Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Bazali koluka bato oyo babongi na bamboka mike ya Australie
NA BOUMELI ya mbula 12, Batatoli bakómaki te na bamboka mosusu ya mike na kati mpenza ya Australie. Yango wana, Batatoli ya Yehova ya Darwin, mboka-mokonzi ya teritware ya nɔrdi, babongisaki kampanye moko ya kosakola mikolo libwa mpo na koluka bato oyo babongi.—Matai 10:11.
Babandaki komibongisa mpo na kampanye yango sanza 12 liboso; basalaki mpe bakarte ya teritware moko ya bonene ya 800 000 kilomɛtrɛ kare, oyo eleki Nouvelle Zélande na monene mbala misato. Mpo na koyeba monene ya mboka yango, okoki kotala na ndakisa nzela moko oyo ezali komema tii na ferme moko ya bangɔmbɛ banda na balabala ya monene; nzela yango ezali na bolai ya kilomɛtrɛ koleka 30! Baferme mosusu ezali tii na ntaka ya kilomɛtrɛ 300 to koleka.
Basakoli nyonso oyo basalaki kampanye yango bazalaki 145. Basusu bautaki mosika mpenza, na ndakisa na mboka Tasmanie. Basusu bayaki na mituka mpe na kati bamemaki biloko ya kolalela, bapine ná biloko mosusu ya kobongisa motuka soki ebebi mpe esansi. Basusu bamemaki biloko na bango na mituka oyo bazalaki kosalela lokola bandako. Lisusu, bafutelaki babisi mibale, oyo mokomoko ezalaki na bisika ya kofanda 22, mpo na komema bandeko oyo bazalaki na mituka ya malamu mpenza te. Bandeko oyo bakendeki na bisi, basakolaki mingimingi na mwa bingumba ya teritware yango.
Liboso bábanda mobembo yango, bandeko oyo bazalaki kotambwisa kampanye yango babongisaki masolo mpe bilakiseli mpo na kosalisa bandeko báyeba ndenge bakosakola nsango malamu na teritware yango oyo bamesanaki na yango te. Na ndakisa, kosakola nsango malamu epai ya bankóló mboka, esɛngaka mbala mingi kolanda mibeko mpe koyeba mimeseno ya mboka na bango. Balobelaki mpe makambo oyo basengelaki kosala to kosala te mpo na kobatela zamba mpe banyama.
Basakoli bakutanaki na makambo mingi ya kitoko mpenza. Na ndakisa, na mwa mboka moko, bandeko bazwaki bibongiseli mpo na kosala lisukulu moko. Mokonzi-mwasi ya mwa mboka yango akendaki ye moko koyebisa bato likambo yango. Na nsima, bakabolelaki bato oyo bayanganaki wana babuku 5 mpe mwa babuku 41. Na mwa mboka moko, basololaki na nkóló mboka moko. Moto yango azalaki kutu na Biblia na ye, King James Version, Biblia yango ezalaki ya kala mpe bankasa na yango mosusu epasuká. Ntango batunaki ye soki ayebi nkombo ya Nzambe, andimaki mpe abimisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko ya kala na libenga ya veste na ye. Atángaki na kati ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, maloba ya Malako 12:30, oyo elobi boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.” Alobaki boye: “Nasepelaka na vɛrsɛ yango mingi.” Nsima ya kosolola na ye na mozindo masolo ya Biblia, andimaki kozwa Biblia mosusu ya sika mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Pene na Golfe ya Carpentarie, mokonzi ya ferme moko ya bangɔmbɛ ya hetare 400000 asepelaki na nsango ya Bokonzi. Ntango balakisaki ye babuku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko,a atunaki soki mikanda ya monɔkɔ ya Kriol ezali. Ezalaki likambo ya kokamwa mpo atako bato mingi ya mboka yango balobaka monɔkɔ ya Kriol, baoyo bayebi kotánga yango bazali mingi te. Na nsima, basakoli bayebaki ete bato nyonso 50 oyo basalaka na ferme yango bayebi kotánga Kriol. Mokonzi yango asepelaki ndenge azwaki mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Kriol, mpe apesaki nimero na ye ya telefone mpo bandeko bábengaka ye.
Na boumeli ya mikolo libwa oyo tosakolaki na molende, tokabolaki Babiblia 120, babuku 770, bazulunalo 705, mpe mwa babuku 1965. Lisusu, tozongelaki bato 720 oyo basepelaki na nsango malamu mpe toyekolaki Biblia na bato 215.
Ya solo, nzala ya elimo ya bato mingi oyo babongi na teritware wana ya monene esilaki.—Matai 5:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Karte na lokasa 30]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
AUSTRALIE
TERITWARE YA NƆRDI
Darwin
Golfe de Carpentarie
Sydney
TASMANIE