Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Janvier nk. 10-13
  • Bafandi ya liboso ya Australie​—Libota likeseni na mabota mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafandi ya liboso ya Australie​—Libota likeseni na mabota mosusu
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya kala na Australie
  • Miziki mpe bokila
  • Ntɔ́ki ya bafandi ya liboso
  • Nkótá ya bafandi ya liboso
  • Bakundoli elikya kitoko
  • Bazali koluka bato oyo babongi na bamboka mike ya Australie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Asungamaki na Nzambe oyo akoki kobuka lokuta te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nsango malamu ya Bokonzi na Australie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Lamuká!—1994
g94 Janvier nk. 10-13

Bafandi ya liboso ya Australie​—Libota likeseni na mabota mosusu

Euti na mokomani na biso na mboka Australie

AUSTRALIE ezali solo mboka oyo ekeseni mpenza na mboka nyonso mosusu na ntina na banyama kitoko lokola Kangourou mpe Koala, oyo emonanaka mingi na mboka yango likoló na banzeté ebéngami eucalyptus. Nzokande, bafandi ya liboso ya mboka wana, babyangami ete aborigènes, bazali kokamwisa koleka mboka yango moko.

Na Lifalansé, liloba “aborigène” lisalelami te mpo na kotyola. Yango euti na maloba mibale ya Latin ab origine, oyo elimboli “longwa na ebandeli.” Bankolo-mboka wana ya Australie babyangami aborigènes, mpo ete bango nde bato ya liboso bafandaki wana.

Ntango mindɛlɛ ya liboso bayaki pene na nsuka ya ekeke ya 18, bafandi ya liboso bazalaki, ndenge ekanisamaki, 300 000. Mibu nkáma mibale na nsima, botángi bato oyo bosalemaki na 1991, bomonisi ete bafandi ya liboso bazalaki 230 000 na bokokanisi na bafandi nyonso ya Australie oyo bazali soko milió 17.

Bafandi wana ya liboso ya Australie bazali banani? Bautaki wapi? Mpo na nini bakeseni na bato mosusu? Mpe elikya nini mingi kati na bango bazali na yango lelo oyo mpo na mikolo mizali koya?

Bomoi ya kala na Australie

Mingi kati na bayekoli ya bizalela ya bato bandimi solo ete bafandi ya liboso ya Australie bautaki na Azia. Mbala mosusu, bayaki na kotiyolamáká likoló ya nzeté na mai to na masuwa longwa na súdi-ɛ́sti ya Azia mpo na kosema na mopanzi ya nɔ́rdi ya Australie. Malcolm D. Prentis amonisaki kati na búku A Study in Black and White, ete: “Bazalaki mpenza balekileki te, na esika ete bázala bongo, bazalaki nde kofanda na milako mikeseni mpo na mwa ntango kolanda bandelo eyebanaki ya teritware na bango.”

Bafandi ya liboso bayebanaki lokola babateli oyo batyaka likebi mingi mpo na ezingelo. Moko na bango alimbolaki ete: “Tozalaki kolóna mabelé na biso, kasi na motindo mokeseni na mindɛlɛ. Tozalaki kosepela kobatela mabelé; kasi bango bazalaki kosepela bobele kozwa biloko bizali na mabelé. Nateyamaki lolenge ya kobatela mabelé, kasi ya kobebisa yango te.”

Prentis akomaki na kondimisama nyonso ete: “Kobika ya bitwɛlɛ mpe ya banyama mpe oyo ya bafandi ya liboso ekangisamaki esika moko: kobika ya moko elimbolaki kobika ya mosusu. Yango ebongaki bongo: na ndakisa: ba kangourous mingi elimbolaki nyama mingi ya bolei mpo na bafandi ya liboso, kasi koboma yango mingi elingaki kozala likámá mpo na bolamu na bango moko.”

Bafandi ya liboso mpe bayebanaki na makambo mosusu mingi. Moyekoli na nkótá ya bato R. M. W. Dixon akomaki kati na búku na ye The Languages of Australia (Nkótá ya Australie) ete: “Mpo na oyo etali bibongiseli ya bato, ezali bato na Mpótó nde bazali nsima soki tokokanisi bango na bafandi ya liboso ya Australie; bitúlúká nyonso ya Australie bizalaki na lolenge ya mabota oyo etyamaki mpe ekabolamaki malamu na bakonzi, oyo ezalaki na mitindá na yango mpo na makambo matali libala mpe makambo nyonso matali bomoi ya bato.”

Miziki mpe bokila

Eloko ekesenisi mpenza bafandi ya liboso na bato mosusu ezali bongo ebeteli ya miziki oyo ebéngami didgeridoo, mbala mosusu ebéngamaka didjeridu. Liloba yango lilimboli mpenza “tiyó oyo ezali koyúla,” ezali komonisa malamu lolaka oyo ebimaka. Na esika ete ebimisa loyembo, didgeridoo ezali nde kobimisa mogbata (rythme) monene mpe mobongisami mpo na milulu ya mayangani mpe mabina ya butu, oyo eyebani lokola corroborees. Mbala mingi, eloko yango eyúlaka nzela moko na moyembi oyo azali kobeta banzeté mike.

Didgeridoo esalemi na bitape ya nzeté biponami oyo batɔbɔla na kati. Molai na yango ezalaka kati na 0, 90 mètre mpe 1, 50 mètre, kasi ekoki kokóma na 4, 50 mètres. Na momeseno, ngámbo na yango moko etyamaka na nsé, nzokande mobeti, wana efandi ye, azali kofula na ngámbo mosusu, wana asimbi yango na mabɔkɔ na ye mibale.

Na ntango lolaka ya malamu lozali kobeta, mobeti asengeli kofula mopepe na kati ya eteni oyo ezali na monoko na ntango yango azali kobenda mpema na zolo na ye kozanga kokata lolaka. Yango ezali kosɛnga milende motindo moko na oyo esɛngamaka na mobeti ya tuba. Ntɔ́ki yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te na komesena na yango, eyebani na babeti na bibeteli ya mopepe lokola mpema ya zolongano to ya libúngútulú.

Mpo na oyo etali bokila, bafandi ya liboso bazalaki kosalela malamu eloko moko oyo ekeseni mpenza​—boomerang. Eyebanaki lokola esaleli ya bokila mpe ya etumba epai na bafandi ya liboso. Kasi mpo na batambóli mingi na mikolo na biso, ezali bobele elembo ya makambo ya bonkɔ́kɔ ya Australie oyo eyebani malamu. Boomerang oyo eyebani malamu ezali ebundeli oyo engumbama oyo ezongelaka mobwaki na yango soki abwaki yango malamu. Nzokande, ezali na mosusu ebele oyo ezongelaka motindi to mobwaki na yango te. Yango eyebani mpenza lokola kylies, to banzeté ya babomi.

Ntɔ́ki ya bafandi ya liboso

Na ebandeli, bafandi ya liboso bazalaki ata na lolenge moko ya kokoma mpo na kosolola te. Yango wana, Kevin Gilbert, mosáli mpe mokomi na ntɔ́ki ya bafandi ya liboso, alimbolaki ete: ‘Ntɔ́ki ezalaki elobeli malamu mpo na bafandi ya liboso mpe oyo eyebanaki na bato nyonso.’ Alobaki ete: “Ntɔ́ki ezali koyebisa makambo mingi mpe ezali na ndimbola koleka makambo makomami.”

Na bongo, ntɔ́ki ya bikeko mpe bililingi ekómaki na bokangami makasi na lolenge ya bomoi ya bafandi ya liboso. Yango emonisi ete ntɔ́ki na bango ezalaki na mikano mibale: koyeisa makasi kosolola na nzela ya maloba, mpe ezalaki kosalelama lisusu lokola lisalisi mpo na komikundola masoló ya etúlúká mpe makambo matali losambo ya bonkɔ́kɔ.

Na ntina na bozangi nkasa ya mikanda mpe bikomeli motindo moko, ntɔ́ki ya bafandi ya liboso ekomamaki likoló ya mabangá, kati na mibéngá (grottes) mpe likoló na mposo ya nzeté. Kongála ya langi ya mabelé ezali komonana na ntɔ́ki na bango nyonso. Bazalaki kosalela langi oyo ezali komonana mingi na etúká na bango epai kuna balangi esalemaki. Kopakola langi esalemaki longwa na biloko ya mabelé.

Mbala mosusu elembo oyo eyebani mpenza te ya ntɔ́ki na bango ezali ete pene na langi nyonso na bango ezali na matɔnɔ mpe mikɔ́lɔ́tɔ́. Ata makambo mpamba, oyo na ebandeli makoki komonana ete mazali na langi moko, soki matalelami na bozindo makomonisa ete mabongisami na matɔnɔ ya langi ndenge na ndenge.

Engebene búku Marketing Aboriginal Art in the 1990 (Mombongo ya ntɔ́ki ya bafandi ya liboso na mobu 1990) eyebisi ete kati na bambula 1980 “ntɔ́ki ya bafandi ya liboso . . . na mbala moko etikaki kozala ‘ntɔ́ki ya baímboka’ mpo na kokóma ‘ntɔ́ki malamu ya mombongo.’” Basusu bazali kolobela mposa ya kozwa ntɔ́ki yango oyo ezali na langi ya matɔnɔ, oyo bazali kokumisa koyebana na yango kati na bato.

Nkótá ya bafandi ya liboso

Mindɛlɛ ya Australie mbala mingi bazalaka na makanisi mabe na ntina na nkótá ya bafandi ya liboso. Na ndakisa, basusu bandimaka ete ezalaki bobele na lokótá moko ya kalakala ya bafandi ya liboso, oyo esukaki bobele na koloba na zolo mpe kokimela. Kasi eloko moko te endimisi yango!

Sikawa, engebene mitango, ekanisami ete na eleko moko, nkótá ya bafandi ya liboso ezalaki 200 kino 250. Nzokande, koleka na ndambo na yango esili kolimwa. Lelo oyo, soko nkótá 50 kati na yango nde ezali kolobama na bituluku ya bafandi ya liboso 100 to koleka. Mpe motuya na nkótá oyo elobamaka na bato 500 to koleka ezali sikawa na nsé ya 20.

Na esika ete ezala ya kala, lokótá ya bafandi ya liboso oyo elobamaka, ezali na mibeko ya lokótá oyo ebongisami malamu. Kati na búku na ye The Languages of Australia (Nkótá ya Australie), molakisi Dixon akomaki ete: “Ezali na lokótá moko te kati na nkótá 5 000 to nkótá mingi oyo elobamaka lelo kati na mokili, oyo ekoki kolobelama ete ezali ya ‘kala.’ Nkótá nyonso ezali na lolenge na yango, na boye ete kolobela mibeko na yango ya ntina ezali kosɛnga bankasa mingi; lokótá nyonso ezali na bankóto na maloba na yango na ndenge ezali kolobelama mokolo na mokolo.”

Barry J. Blake akomaki na kolanda likanisi yango moko mpo na nkótá ya bafandi ya liboso ete: “Ezali bisaleli ya kosolola oyo ebongisami malamu, moko na moko ezali malamu mpo na kolobela makambo ya bafandi ya liboso, motindo moko Lingelesi mpe Lifalansé elobelaka makambo matali Mpótó.” Kolandáká bosukisi wana, Galarrwuy Yunupingu, moko kati na bafandi ya liboso oyo azali bongo mopanzi nsango, alobaki ete: “Bobele mindɛlɛ moke nde bamekaki koyekola lokótá na biso, mpe Lingelesi ezali na likoki te ya kolobela boyokani na biso na mokili ya bankɔ́kɔ na biso.”

Kati na ekeke ya 19, kobongolama ya biteni ya Biblia na nkótá mibale ya bafandi ya liboso esalemaki. Evanzile ya Luka ebongolamaki na lokótá ya Awabakal mpe Genese, Exode mpe Evanzile ya Matai ebongolamaki na lokótá ya Narrinyeri. Likambo ya kosepelisa, na mabongoli wana, nkombo ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, ebongolamaki na “Yehóa” mpe “Jehovah,” mwa kokesena na yango moke euti engebene esakolela (syntaxe) ya lokótá na lokótá.

Lelo oyo, bazali kolobela mingi kozongisama ya nkótá ya bafandi ya liboso mpe kobenda likebi ya bato oyo bazali bafandi ya liboso ya Australie te ete báyeba motuya, ntina mpe kitoko ya nkótá yango. Yango wana, mingi bazali kosepela lokola Ministɛlɛ́ oyo ekotalelaka makambo ya bafandi ya liboso, epesi nzela ete bábimisa diksionere na nkótá 40. Yango etaleli te bobele oyo ezali kolobama, kasi lisusu, nkótá mosusu mingi oyo esalelamaka lisusu te, oyo ekoki kokutama kati na mikanda ya kala mpe bisaleli mosusu ya kala.

Bakundoli elikya kitoko

Wana mindɛlɛ bakómaki na Australie na nsuka ya ekeke ya 18, babomaki mingi bankolo-mboka kino penepene na kosilisa bango. Nzokande, lelo oyo ezali na bingumba oyo bizali na bitúká epai kuna bafandi ya liboso bazali mingi, mpe mingimingi na kati mpenza ya mokili yango, ezali mpe na bamboka mike oyo etondi bobele na bafandi ya liboso. Bomoi ya bato wana ezali ntango nyonso mpasi. Mwasi moko kati na bango alobaki ete: “Tozali lisusu na ntango ya kala te, kasi tozali mpe na esika ya malonga sikawa te.” Kasi abakisaki ete: “Mikolo mizali koya mipesi elikya mpo na mingi kati na biso.”

Mpo na nini bongo? Ezali mpo ete mingi kati na bafandi ya Australie bazali sikawa kosepela kotánga kati na Biblia​—mbala mosusu na lokótá na bango moko​—ete mabe makolongwa mosika te mpe ete mabelé makopesama na bato oyo bakobatela yango malamu. (Nzembo 37:9-11, 29-34; Masese 2:21, 22) Bokonzi ya Nzambe ekokokisa yango. Bokonzi yango, oyo Yesu ateyaki biso ete tósambelaka mpo na yango, ezali boyangeli ya solo ya likoló. (Matai 6:9, 10) Ebele na bafandi ya liboso ya mibali mpe ya basi bazali sikawa komipesa na koyebisa basusu mapamboli mingi oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato.​—Emoniseli 21:3, 4.

Mwasi moko kati na bango alimbolaki na kotalela mingi likanisi ya baninga na ye ya Australie ete: “Bazali koyeba ete, ezala mindɛlɛ, ezala bafandi ya liboso mpe ezala mingi kati na bato oyo bazali na mabelé, bango nyonso bazalaka na makanisi ya libungá. Bamoko bazali kokanisa ete Australie ezali mpo na bafandi ya liboso mpo ete bango nde bamonaki yango to ezali mpo na mindɛlɛ mpo ete bakamataki yango na nzela ya bitumba. Moko te azali na elónga. Ezali nde ya Yehova Nzambe, mpo ete ye nde azalisaki yango.”​—Emoniseli 4:11.

Ya solo, Yehova Nzambe, Mozalisi na biso nde azali nkolo ya Australie mpe biteni nyonso ya mabelé. Mpe na kokokisama ya libondeli oyo Yesu ateyaki, Bokonzi ya Nzambe ekoya, mpe mabelé mobimba makozonga paladiso monene efandami na bato ya mposo ndenge nyonso mpe ya mabota nyonso oyo bakolinga Nzambe ya solo mpe bakosalela ye.

[Elilingi na lokasa 11]

Didgeridoo, ebeteli ya miziki oyo ezali bobele epai na bafandi ya liboso

[Elilingi na lokasa 11]

Ntɔ́ki ya bafandi ya liboso

[Elilingi na lokasa 12]

Ebele na bafandi ya liboso bazali lelo kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto