Mokanda euti na Australie
“Nakofandela yango na butu pembeni ya mɔtɔ”
SOKI tokanisi mikili ya kati ya Australie, tomonaka mbala moko bisobe, molunge makasi mpe bitando ya minene. Kasi, mikili yango ezali na bato soki 180 000, oyo bazali bato moke (1 %) soki tokokanisi bango na bato ya ekólo mobimba.
Baboti na ngai, oyo bazali Batatoli ya Yehova, bamemaki ngai kuna na mosala ya kosakola ntango nazalaki naino elenge. Bonene mpe kitoko na yango efungolaki ngai makanisi. Boboto ya bato ya mikili yango mpe esepelisaki ngai. Sikoyo, lokola nakómaki tata ya libota, namonaki malamu namema mpe mwasi na ngai ná bana na biso mibale ya mbula 10 mpe 12 kuna.
Ndenge tomibongisaki mpo na mobembo
Liboso, tofandaki mpo na kotala soki tozali na makoki ya kosala mobembo yango. Mobembo yango ekozwa biso mikolo boni? Ndeko moko ná mwasi na ye mpe babongisi-nzela mibale ya basi ya lisangá na biso basepelaki tókende na bango. Toyokanaki ete tokokende ntango bana-kelasi bakozwa konje. Na nsima, tokomelaki biro ya filiale ya Batatoli na engumba Sydney mpo na kosɛnga teritware. Basɛngaki biso tókende kosakola na teritware moko pene na Goondiwindi, mwa engumba moko oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 400 na wɛsti ya Brisbane, esika tofandaka.
Bayebisaki biso ete mwa lisangá moko ya Batatoli ya Yehova ezali na Goondiwindi. Yango mpe ezalaki lipamboli mosusu. Kokutana na bandeko baklisto ezalaki moko ya makambo ya kitoko na mobembo na biso. Toyebisaki bandeko ya lisangá yango ete tokoya epai na bango. Eyano na bango ya esengo emonisaki ete bazalaki kozela biso na motema moko.
Mwa moke liboso tókende, tokutanaki mpo na kolobela ndenge tokosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe kuna. Mposa na biso ezalaki ete tótosa mimeseno ya moto nyonso oyo tokokutana na ye kuna. Na ndakisa, na bisika mosusu, moto nyonso atalelaka mboka mobimba lokola ya ye. Kokɔta na mboka kozanga ete bato báyeba ezali kozanga bonkonde.
Tokómi
Nsukansuka, mokolo oyo tosengelaki kokende ekómaki. Totondisaki mituka na biloko mpe tobandaki mobembo. Na ebandeli, tozalaki komona bilanga, na nsima tokómaki komona bitando minene ya matiti mpe mwa banzete ya eucalyptus. Moi ezalaki kongɛnga na likoló. Bangonga na nsima, tokómaki na Goondiwindi mpe tofutelaki bawagɔ mpo na kolala.
Mokolo oyo elandaki, mokolo ya lomingo, lokola moi ezalaki kongɛnga mpe mopɛpɛ ezalaki kitoko, ezalaki ntango ebongi mpenza mpo na kosakola! Na eleko ya molunge, molunge ekómaka makasi mpenza (40 °C). Mwa mboka ya liboso oyo tótɛlɛmaki ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30. Bamemaki biso epai ya Jenny, mobange moko ya mwasi oyo azalaki mokonzi ya mboka wana. Alandaki lisolo na biso na likebi mpe na esengo nyonso andimaki buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.a Na nsima, apesaki biso nzela tókɔta na mboka na ye mpo na kosakwela bato mosusu.
Bana ya mboka bakimaki mbangu koyebisa bato ete bapaya bayei. Bato nyonso oyo tozalaki kosolola na bango bazalaki koyoka nsango na biso na likebi mpe kondima mikanda na biso. Mosika te, mikanda nyonso esilaki, mpe ntango ekokaki mpo tózonga komibongisa mpo na makita. Liboso tótika bango, tolakaki ete tokozongela bato oyo tosololi na bango te.
Mokolo wana nsima ya nzanga, Ndako ya Bokonzi etondaki na bato ndenge na ndenge oyo bazalaki kosolola na esengo mpe bakómaki baninga. Bandeko 25 ya mboka wana bazalaki kosakola na molende nyonso nsango ya Bokonzi epai ya bato soki nkóto 11 ya teritware oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ karɛ 30 000. Motatoli ya Yehova moko amonisaki botɔndi na ye na maloba oyo: “Matɔndi mingi mpo na milende oyo bósali mpo na koya kosalisa biso.” Nsima ya makita, biso nyonso tofandaki mpo na kolya mwa eloko. Liboso tókende kolala, tóleisaki mwa banyama oyo ezalaki kotambolatambola esika tozalaki kolala.
“Na butu pembeni ya mɔtɔ”
Nsima ya mikolo mibale oyo elandaki, tokendeki kosakola na mwa bamboka ya mikemike oyo ezali na ndelo ya etúká ya Queensland ná etúká ya Nouvelle-Galles du Sud. Bisika mingi ya mikili yango ya katikati ya Australie ezalaki na mwa banzete ya eucalyptus mpe bitando mineneminene ya matiti, epai bamɛmɛ ná bangɔmbɛ ezalaki kolya. Na nzela, tomonaki ebele ya ba-kangourou, oyo etɛlɛmisaki matoi ntango emonaki biso. Bandɛkɛ oyo ezalaka lokola maligbanga (autruche) ezalaki kotambola na kodenda na kati ya lopango moko mosika.
Na mokolo ya mibale na nsima ya nzanga, tokutanaki na etonga moko monene ya bangɔmbɛ ezali kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na balabala. Banda kala, bakɛngɛli ya bangɔmbɛ bamemaka bangɔmbɛ na teritware wana, mingimingi na ntango ya elanga. Mosika te, tokutanaki na mokɛngɛli ya bangɔmbɛ moko likoló ya mpunda na ye. Natɛlɛmisaki motuka, nakitaki, napesaki ye mbote mpe ye andimaki. Mobange yango atɛlɛmaki mpo na kosolola na ngai, mpe mbwa na ye ezalaki pembeni na ye.
Tolobelaki mwa moke elanga oyo ekaukisaki mpenza mokili yango mpe na nsima nakɔtisaki lisolo ya Biblia. Mobange yango alobaki boye: “Nasuká koyoka masolo ya Biblia kaka ntango nazalaki mwana moke!” Mpo na ye, soki bato babebi lelo boye, ezali foti ya bakonzi ya mangomba. Atako bongo, azalaki na limemya makasi mpo na Biblia. Tosololaki na ye lisolo kitoko mpenza ya mateya ya Biblia, na nsima napesaki ye buku Biblia eteyaka mpenza nini?b Azwaki yango na limemya mpenza, atyaki yango na libenga ya simisi na ye mpe alobaki ete: “Soki ezali mpenza na mateya ya Biblia, nakofandela yango pembeni ya mɔtɔ na butu.”
Tozongi epai na biso
Mokolo wana na butu, na Ndako ya Bokonzi, toyebisaki bandeko makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola. Balakaki ete bakozongela bato oyo basepelaki na nsango na biso. Ntango makita esilaki, ezalaki mpasi kokabwana na bandeko. Tokómaki kolingana makasi. Kondima na bango elendisaki biso mpe oyo ya biso elendisaki bango.—Baloma 1:12.
Na mokolo oyo elandaki, tozongaki epai na biso. Soki tokanisi mobembo wana, tondimaka ete Yehova apambolaki mpenza milende na biso. Tomonaki ete boninga na biso na Yehova ekoli lisusu makasi. Ntango tokómaki na ndako, natunaki bana boye: “Bokosepela tókende wapi na konje oyo ekoya? Kotala bangomba?” Bayanolaki: “Te, tata tózonga kaka kosakola epai touti.” Mwasi na ngai andimaki likanisi ya bana mpe alobaki ete: “Naino tolekisá konje ya kitoko boye te!”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.