MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 119
‘Tambolá na mobeko ya Yehova’
Kotambola na mobeko ya Yehova elimboli kotika yango etambwisa bomoi na biso. Biblia elobeli bato ebele oyo, ndenge moko na mokomi ya nzembo, balandaki mobeko ya Yehova mpe batikaki yango etambwisa bango.
Tokozwa esengo ya solosolo soki tozali kotambola na mobeko ya Nzambe
Yosua amonisaki ete azalaki ntango nyonso kolanda litambwisi ya Yehova. Ayebaki ete mpo azala na esengo mpe na bomoi ya malamu, asengelaki kotyela Yehova motema mobimba
Liloba ya Nzambe epesaka biso mpiko oyo esengeli mpo na kolonga mikakatano ya bomoi
Yirimia amonisaki mpiko mpe atyelaki Yehova motema ntango akutanaki na makambo ya mpasi. Azalaki na bomoi ya pɛpɛlɛ mpe akangamaki na mokumba na ye
Boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe esalisaka biso tósakola na mpiko
Paulo azalaki kobanga te kosakwela moto nyonso nsango ya Nzambe. Atyaki motema mobima ete Yehova akosalisa ye asakola na mpiko liboso ya Guvɛrnɛrɛ Feliksi
Esika nini nasengeli komonisaka mpiko mingi ntango nazali koteya?
Na kelasi
Na mosala
Na libota
Esika mosusu