Likambo moko ya mawa
OWEN, mwana moko ya mbula mibale na ndambo, azalaki kosakana na eteni ya ndako ya kosukola. Baboti na ye batyaki bankisi na armware moko, esika oyo bakanisaki ete akoki kokóma te, kasi ye amataki tii kuna. Na kati ya armware yango ezalaki na molangi moko oyo ebendaki likebi na ye. Afungolaki yango mpe amɛlaki nkisi oyo ezalaki na kati. Oyo nde likambo ya mawa!
Nkisi oyo amɛlaki ezalaki nde aside moko ya mabe mpenza mpe, likambo ya mawa, Owen akufaki. Baboti na ye bayokaki mpasi mingi. Percy, tata ya mwana yango, akendeki koluka libɔndisi epai ya pastɛrɛ moko ya lingomba na ye. Atunaki ye boye: “Mpo na nini mwana na ngai akufi?” Pastɛrɛ yango ayanolaki ete “Nzambe akamati ye mpo azali na mposa ya anzelu mosusu ya moke na likoló.” Makanisi ya tata yango ebulunganaki mpe amonaki ete Nzambe azali malamu te. Ezali mpenza solo ete Nzambe nde alingaki ete likama yango esalema? Percy alɛmbaki nzoto mpe azwaki ekateli ya kolongwa na lingomba yango.
Ntango Percy azalaki kokanisa na likambo yango, amitunaki boye: ‘Mwana na ngai azali nde kokoba konyokwama esika azali? Nakomona ye lisusu?’
Ntango mosusu yo mpe omitunaka nini ekómelaka moto nsima ya liwa mpe soki tokomonana lisusu na bandeko na biso oyo bakufá. Biblia, Liloba ya Nzambe epesi biyano na mituna yango. Ezali na biyano ya polele mpe ya kobɔndisa mpo na bato nyonso oyo bakutaná na makama ya ndenge wana. Likambo eleki ntina ezali ete Biblia ezali na elikya moko kitoko oyo Nzambe apesi: Elikya ya Lisekwa.
Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi mpo na koyeba makambo mingi na ntina na elikya yango.