Mpo na nini mokili ezali na bomoko te?
“Mpo na mbala ya liboso banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bikólo nyonso ekómi na bomoko. . . . Mokili ekoki kosimba libaku yango mpo na kokokisa mokano oyo ezalaka na yango banda kala ya kosala mokili moko ya sika.”
PREZIDA moko ya États-Unis nde alobaki maloba wana na bambula ya 1990. Makambo oyo ezalaki koleka na ntango wana ezalaki komonisa ete mokili elingi kokóma na bomoko. Biyangeli ya diktatire ezalaki kokwea moko moko. Mur de Berlin ekweaki, mpe yango emonisaki ete mbongwana ekɔti na Mpoto. Bato ya mokili mobimba bakamwaki komona ndenge Union soviétique elimwaki, ekólo oyo bato mingi na Mpoto mpe na Amerika bazalaki kotalela lokola mobimisi ya bitumba nyonso. Kowelana esilaki kati na États-Unis ná URSS, mpe na bipai nyonso bakómaki kosɛnga ete bibundeli nyonso elongolama, ezala ata bibundeli ya nikleere. Atako bongo, etumba moko ebimaki mbalakaka na golfe Persique, kasi yango emonanaki lokola likambo moko ya ntango moke kaka, mpe bato bakobaki koluka kimya.
Ekómaki komonana mpenza ete makambo ekobonga, ezala na politiki to na makambo mosusu ya bomoi. Bomoi ya bato ekómaki kobonga na mikili mingi. Mayele ya minganga ekolaki mpe bakómaki kosala ata makambo oyo, na mwa bambula eleki, elingaki komonana lokola maji. Ndenge nkita ezalaki kokola na bikólo mingi emonisaki ete mokili mobimba ekotonda na bomɛngo. Emonanaki mpenza ete makambo ezali kobonga.
Kasi, lelo oyo tókómi komituna: ‘Tókómi wapi? Wapi bomoko yango oyo balakaki na mokili?’ Na esika ya bomoko mpe bomɛngo, tozali nde komona makambo mosusu. Tozali ntango nyonso koyoka nsango ya babɔmbi, ya bateroriste, ya ebele ya mindoki ya mabemabe oyo bazali kobimisa mpe ya makambo mosusu ndenge na ndenge ya mobulu. Makambo nyonso wana ezali se kokabola mokili. Eumeli mingi te, moto moko ya bozwi mingi alobaki boye: “Mokili ekómi kaka bomá ngai naboma yo tóbomana.”
Bikólo ezali kokóma na bomoko to nde ezali kokabwana?
Ntango ebongiseli ya ONU esalemaki, moko ya mikano na yango ezalaki ya “kosala ete bikólo nyonso ezala na ntomo ndenge moko mpe ekólo mokomoko ezala na bonsɔmi ya komitambwisa, mpo na kokolisa boninga kati na bikólo.” Lelo oyo, nsima ya mbula soki 60, makanisi malamu wana oyo bazalaki na yango ekokisami? Soki moke te! Na esika bikólo eluka “boninga,” ekólo mokomoko ezali nde kokangama na ‘bonsɔmi na yango ya komitambwisa.’ Lokola bikólo mpe bituluku ezali koluka libosoliboso nde matomba na yango moko mpe koluka kolendisa bokonzi na yango, yango ezali kosala ete bokabwani ezala makasi na mokili. Ntango ebongiseli ya ONU esalemaki, esangisaki bikólo 51. Lelo oyo, bikólo yango ekómi 191.
Ndenge tomoni yango, na bambula ya 1990, bato bazalaki mpenza na elikya ete mokili ekokóma na bomoko. Kasi, elikya yango ekendeki na mai, mpamba te banda kaka na ntango yango, bokabwani ezali kokóma kaka makasi na mokili. Bitumba oyo ekabolá Yougoslavie, kowelana kati na Tchétchénie ná Russie, etumba ya Iraq mpe bitumba oyo ezali kosilisa bato na Moyen-Orient; nyonso wana emonisi mpenza ete bokabwani ezali se kokóma makasi.
Na ntembe te, bato mingi bazalaki mpenza koluka kimya na makanisi ya malamu. Atako bongo, elikya ezali ata moke te ete mokili ekokóma na bomoko. Bato mingi bazali komituna: ‘Mpo na nini mokili ezali kaka kokóma na bomoko te? Mokili ezali kokende wapi?’
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
AP Photo/Lionel Cironneau
Arlo K. Abrahamson/AFP/ Getty Images