Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/6 nk. 4-7
  • Mokili ezali kokende wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili ezali kokende wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bomoko ezali te?
  • Nini ekoki kotya bomoko na mokili?
  • Ndenge nini mokili ekokóma na bomoko?
  • Bomoko ezali elembo ya losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mpo na nini mokili ezali na bomoko te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bomoko ya losambo na mikolo na biso​—Elimboli nini?
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/6 nk. 4-7

Mokili ezali kokende wapi?

BOMOKO YA MOKILI. Moto nyonso azalaka na mposa mokili ekóma na bomoko, boye te? Kutu, bato balobelaka bomoko mingi. Soki bakonzi ya mokili bakutani, bazangaka te kolobela likambo yango. Na sanza ya Augusto 2 000, bakonzi koleka 1 000 ya mangomba bakutanaki na New York, États-Unis, na Likita ya Milenɛrɛ mpo na kimya ya mokili. Balobelaki ndenge ya kosilisa bitumba na mokili. Nzokande, likita yango ezalaki kaka lokola mokili yango moko. Moto moko ya mayele na mibeko ya Bamizilma oyo afandaka na Jérusalem aboyaki koya na likita yango mpamba te Labi moko ya Lingomba ya Bayuda azalaki wana. Bato mosusu basepelaki te mpo babengaki Dalai Lama te na likita yango mikolo mibale ya liboso mpo na kobanga noki bato ya Chine básilika.

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2003, bikólo ya Pacifique elobelaki kimya na likita ya ebongiseli ya coopération économique Asie-Pacifique (APEC) oyo esalemaki na ekólo Thaïlande. Bikólo 21 oyo ezalaki na likita yango, ezwaki ekateli ya kosukisa bateroriste mpe bayokanaki mpo na makambo oyo basengeli kosala mpo na kotya kimya na mokili. Nzokande, na likita yango, bayangani mingi basepelaki te na maloba ya ministre-mokambi ya ekólo moko, mpamba te na maloba na ye azalaki koloba mabe mpo na Bayuda.

Mpo na nini bomoko ezali te?

Atako bazali kolobela mingi ndenge ya kotya bomoko na mokili, likambo ya malonga ezali kosalema te. Mpo na nini atako bato mingi bazali mpenza kosala milende mpo na koluka bomoko, mokili ezali kaka kokóma na bomoko te tii lelo oyo, na ekeke ya 21?

Eyano moko na motuna wana ezwami na maloba ya ministre-mokambi moko oyo ayanganaki na likita ya APEC oyo touti kolobela. Alobaki boye: “Likambo ezali koboma mokili ezali lolendo ya ekólo.” Ya solo, bato batondi mpenza na bolingo ya ekólo. Mposa ya komiyangela nde ezali kotambwisa ekólo mpe etuluku mokomoko. Mposa ya bonsomi oyo bikólo etondi na yango, elimo ya kowelana mpe lokoso, nde ezali kokómisa bokabwani yango makasi. Mbala mingi, soki esɛngi kopona kati na matomba ya ekólo ná oyo ya mokili mobimba, matomba ya ekólo ezwaka esika ya liboso.

Mokomi moko ya Nzembo ayebaki mpenza ndenge abengaki bolingo ya ekólo “maladi mabe.” (Nzembo 91:3) Ezali lokola bolɔzi moko oyo ezali komema mpasi makasi na mokili. Bolingo ya ekólo ná elimo na yango oyo etindaka bato báyina bato ya bikólo mosusu ebandá kala. Lelo oyo, bolingo ya ekólo ezali kokoba kokabola bato, mpe bakonzi ya mokili bazali kokoka kosilisa yango te.

Bakonzi mingi bazali koloba ete bolingo ya ekólo mpe moimi nde ezali mpenza koboma mokili. Na ndakisa, U Thant, oyo azalaki secrétaire général ya ONU, alobaki boye: “Mikakatano mingi oyo tozali kokutana na yango lelo oyo, ezali kouta na bizaleli mabe . . . Moko na yango ezali kolinga ekólo na ndenge ya mabe; koloba ‘nakokɔtela kaka ekólo na ngai, esala malamu to mabe.’” Lokola bikólo lelo oyo ezali koluka kaka matomba na yango moko, bazali ntango nyonso kobɛtela bonsomi na bango ya komiyangela tangba. Bato oyo bonsomi ya komiyangela ememelaka bango matomba yango bazali kotingama na yango makasi. Na ndakisa, zulunalo moko (International Herald Tribune) elobaki boye mpo na Union européenne: “Likambo oyo ezali komonana mingi epai ya bato ya politiki na Mpoto ezali ezaleli ya kowelana mpe ya kozanga kotyelana motema. Bikólo mingi ya Union européenne endimaka te ete ekólo moko ematela bikólo mosusu.”

Biblia, Liloba ya Nzambe, elobeli na bosikisiki mpenza mabe ya boyangeli ya mwana ya moto: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Lokola bituluku ya bato bakaboli mokili na bikólo, bazali komona mpenza bosolo ya maloba ya Biblia oyo: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso ya mayele.”​—Masese 18:1.

Mozalisi na biso, ye oyo ayebi nini ebongi mpo na biso, asalaki bato te mpo bámiyangela bango moko. Lokola bakómi komiyangela, yango emonisi ete batye likanisi ya Nzambe pembeni mpe baboyi kondima ete ye nde Nkolo ya biloko nyonso. Nzembo 95:3-5 elobi boye: “[Yehova] azali Nzambe monene; ye azali Mokonzi monene likoló na banzambe nyonso. Ye asimbi bisika ya bozindo ya mokili na [lobɔkɔ] na ye; nguya ya ngomba ezali mpe ya ye. Mai-ya-monana ezali eloko na ye, bobele ye oyo asalaki yango; mabelé mpe lokola esalamaki na lobɔkɔ na ye.” Nzambe nde abongi mpenza kozala Mokonzi ya bato nyonso. Lokola bikólo ezali koluka komiyangela yango moko, ezali kotosa mokano ya Nzambe te.​—Nzembo 2:2.

Nini ekoki kotya bomoko na mokili?

Mokili ekokóma na bomoko kaka soki ekómi koyangelama na mokonzi moko, oyo azali koluka bolamu ya bato nyonso. Bato mingi oyo bakanisaka malamu bandimaka mpe likanisi wana. Kasi, mbala mingi bato yango batalelaka nde bibongiseli mosusu. Na ndakisa, bato mosusu, ata mpe bakonzi ya mangomba, batindaki bato bákóma kotalela ebongiseli ya ONU mpo na kotya kimya na mokili mobimba. Nzokande, bibongiseli ya bato, ata ezali na makanisi malamu ndenge nini, elongi soki moke te kosilisa mikakatano ya mokili mobimba. Kutu, mingi kati na bibongiseli yango ezangi bomoko kaka ndenge bikólo mpe ezangi bomoko.

Biblia ekebisi biso na likambo ya kotyela bibongiseli ya bato motema na maloba oyo: “Ndimelá bana ya mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” (Nzembo 146:3) Yango emonisi ete elikya nyonso ya bomoko na mokili esili? Te. Elikya ezali.

Bato mingi lelo bayebi te ete Nzambe asilá kotya guvɛrnema oyo ezali na makoki ya kotya bomoko na mokili. Biblia elobi mpo na Yehova Nzambe boye: “Ngai nafandisi mokonzi na ngai likoló ya Siona, na ngomba na ngai ya bulɛɛ. Lɔmbá ngai mpe nakopesa yo mabota lokola libula na yo, mpe kino nsuka ya mokili ete ezala ya yo.” (Nzembo 2:6, 8) Mokapo yango emonisi ete Yehova Nzambe ‘atye mokonzi na ye,’ oyo abengi na vɛrsɛ 7 ete: “mwana na ngai.” Mwana yango ezali moto mosusu te, kaka Yesu Klisto, mwana ya Nzambe oyo aleki monene na kati ya bana na ye nyonso ya elimo. Yehova apesi ye bokonzi likoló ya bikólo nyonso.

Ndenge nini mokili ekokóma na bomoko?

Bato mingi bandimaka te bokonzi oyo Nzambe atyá na likoló. Bikólo batingami kaka na boyangeli na bango moko. Kasi, Nzambe akoki kosepela te na bato oyo bazali koboya bokonzi oyo ye atye. Mpo na baoyo bazali koboya kondima boyangeli yango, Nzembo 2:9 elobi boye: “[Yo, mwana Yesu Klisto] okotuta bango na lingenda ya ebende, okobuka bango lokola mbɛki ya moyemi.” Báyeba to báyeba te, makambo oyo bikólo ezali kosala ekomema bango na kondongbana na Nzambe. Mokanda ya nsuka ya Biblia elobi ete “bakonzi ya mabelé mobimba oyo efandami” bazali koyanganisama “mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14) Bikólo ná makambo na yango oyo ezali kokabola bato ekosuka. Yango ekosala ete guvɛrnema ya Nzambe ekokisa mikano na yango kozanga ete moto atya yango nkaka.

Yehova Nzambe, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, akosalela nguya na ye na bwanya mpenza mpo na kotya bomoko na mokili, na nzela ya mwana na ye. Guvɛrnema ya Nzambe ekomema bomoko ya solo mpe ekopambola bato nyonso oyo balingaka boyengebene. Tosɛngi yo ozwa mwa ntango mpo na kotánga Nzembo 72 na Biblia na yo. Na mokapo yango, bapesi elilingi ya makambo oyo bokonzi ya mwana ya Nzambe ekosala mpo na bato. Bato bakokóma na bomoko ya solosolo, mpe mikakatano na bango nyonso, elingi koloba minyoko, mobulu, bobola mpe bongo na bongo ekosila.

Na mokili ya lelo oyo etondi na bokabwani, bato mingi bakanisaka ete elikya yango ezali kaka ndoto mpamba. Kasi bazali nde komikosa! Bilaka nyonso ya Nzambe ezangaka te kokokisama. (Yisaya 55:10, 11) Okosepela komona mbongwana yango? Okoki komona yango. Kutu lelo oyo, ezali na bato oyo basili komibongisa mpo na kofanda na bomoko ya solo. Bauti na bikólo nyonso, kasi na esika ya kobunda, bazali nde kotosa na bomoko boyangeli ya Nzambe. (Yisaya 2:2-4) Bato yango ezali banani? Ezali Batatoli ya Yehova. Tosɛngi na yo okende ata mbala moko na makita na bango. Na ntembe te, okosepela kozala na baninga oyo bakosalisa yo okóma kotosa boyangeli ya Nzambe mpe osepela na bomoko oyo ezangi nsuka.

[Bililingi na lokasa 7]

Bato oyo bauti na bikólo nyonso bazali komibongisa mpo na kozala na bomoi na mokili ya bomoko

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Saeed Khan/AFP/Getty Images

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

Mwasi azali kolela: Igor Dutina/AFP/Getty Images; batomboki: Said Khatib/AFP/Getty Images; mituka ya bitumba: Joseph Barrak/AFP/Getty Images

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto