Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/6 nk. 24-28
  • Tósepela mpenza na “bomoi ya sikoyo”!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósepela mpenza na “bomoi ya sikoyo”!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakómi mobongisi-nzela
  • Koboya kokɔta na makambo ya mokili elukeli ngai mindondo
  • Mbongwana nsima ya etumba
  • Tokómi bamisionɛrɛ
  • Milende mpo na komesana na Makambo ya sika
  • Tokei epai mosusu
  • Nasaleli Jéhovah na elaka malamu mpe na elaka ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na mosala ya ntango nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bondeko na biso na mokili mobimba elendisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova ‘asembolaki banzela na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/6 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Tósepela mpenza na “bomoi ya sikoyo”!

YA TED BUCKINGHAM

Ntango nakokisaki mbula motoba na mosala ya mobongisi-nzela mpe sanza motoba ya libala, nabɛlaki maladi ya ebukabuka. Ezalaki na 1950, mpe nazalaki kaka na mbula 24. Na boumeli ya sanza libwa oyo nasalaki na lopitalo, nazwaki mpenza ntango ya kokanisa malamumalamu na ntina na bomoi na ngai. Avenire na ngai ná mwasi na ngai Joyce ekozala ndenge nini awa nakómi ebɔsɔnɔ?

NA 1938, tata na ngai, atako azalaki kolinga makambo ya losambo te, azwaki buku Gouvernement.a Ekoki kozala ete mobulu oyo ekɔtaki na makambo ya politiki mpe bitumba oyo ezalaki koya nde etindaki ye andima kozwa buku yango. Ndenge nayebi, atángaki buku yango te, kasi mama atángaki yango mpo ye azalaki komipesa mpenza na makambo ya losambo. Nsima ya kotánga buku yango, azwaki mbala moko ekateli oyo esengelaki. Alongwaki na Lingomba ya Angleterre mpe, atako tata azalaki kotɛmɛla ye, akómaki Motatoli ya Yehova mpe atikalaki sembo tii na liwa na ye na 1990.

Mama amemaki ngai na makita mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi moko na engumba Epsom, na sudi ya Londres. Toyanganaki na esika moko oyo ezalaki liboso magazini mpe tolandaki kasɛti moko oyo ezalaki na lisukulu ya Joseph Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova na ntango wana. Lisukulu yango esimbaki mpenza motema na ngai.

Bomoi na biso ezalaki na likama mpenza mpo na babɔmbi oyo bazalaki kobwaka na Londres. Yango wana na 1940, tata amonaki malamu tókenda kofanda na Maidenhead, mwa engumba oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 45 na wɛsti ya Londres, epai mwa kimya ezalaki. Yango ezalaki malamu mpenza mpo na biso, mpamba te bato 30 oyo bazalaki koyangana na lisangá oyo ezalaki kuna balendisaki biso mingi. Fred Smith, ndeko moko ya sembo oyo azwaki batisimo na 1917, azwaki ngai mpenza lokola mwana na ye mpe apesaki ngai formasyo mpo nakóma mosakoli ya malamu mpenza. Nabosanaka te ndakisa malamu mpe lisalisi na ye ya bolingo.

Nakómi mobongisi-nzela

Nazwaki batisimo na Ebale Thames na 1941, ntango nazalaki na mbula 15. Ezalaki mokolo moko ya malili mpenza na sanza ya Marsi. Na ntango wana, yaya na ngai Jim akómaki mobongisi-nzela. Ye ná mwasi na ye, Madge, bazali lelo oyo kofanda na engumba Birmingham, nsima ya kolekisa ebele ya bambula na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na Angleterre mobimba. Leki na ngai Robina ná mobali na ye Frank, bazali mpe kosalela Yehova na bosembo nyonso tii lelo.

Nazalaki comptable na kompanyi moko oyo ezalaki kosala bilamba. Mokolo moko, mokonzi moko ya kompanyi yango abengaki ngai na biro na ye mpe ayebisaki ngai ete balingi nakóma kosomba biloko nyonso ya mosala mpo na kompanyi. Kasi, lokola nazalaki na likanisi ya kokóma mobongisi-nzela lokola ndeko na ngai, naboyaki na limemya nyonso mpe nayebisaki ye ntina oyo naboi. Nakamwaki mpenza ntango akumisaki ngai ndenge naponaki mosala malamu wana. Nsima ya liyangani ya etúká oyo esalemaki na 1944 na engumba Northampton, nakómaki mobongisi-nzela.

Batindaki ngai liboso mpenza na engumba Exeter, na etúká ya Devon. Na ntango wana, engumba yango, oyo ebebisamaki mpenza na babɔmbi, ekómaki kobonga mokemoke. Nakómaki kofanda ndako moko na Frank Middleton ná mwasi na ye Ruth, babongisi-nzela oyo bazalaki komonisela ngai boboto mpenza. Nazalaki kaka na mbula 18 mpe nayebaki mpenza te kosukola bilamba mpe kolamba, kasi mokemoke nakómaki koyeba.

Ndeko Victor Gurd, moto moko ya Irlande oyo azalaki na mbula 50 nde azalaki moninga oyo nazalaki kobima na ye na mosala ya kosakola. Ye akómaki mosakoli banda na bambula ya 1920. Asalisaki ngai nayeba kosalelaka ntango na ngai malamu, apesaki ngai mposa ya kotángaka Biblia, mpe asalisaki ngai nayeba kosalelaka mabongoli mosusu ya Biblia. Na boumeli ya bambula wana oyo nazalaki kozwa formasyo epai ya Victor, ndakisa ya bosembo na ye esalisaki ngai mingi.

Koboya kokɔta na makambo ya mokili elukeli ngai mindondo

Etumba elingaki kosila, kasi bakonzi bazalaki kaka koluka bilenge mpo na mosala ya soda. Nasambaki na tribinale moko na etúká ya Maidenhead na 1943, mpe nayebisaki bango polele ete nakoki kosala mosala ya soda te mpo nazali mosakoli ya nsango malamu. Atako baboyaki koyokela ngai, nazwaki ekateli ya kokende na engumba Exeter mpo na kokoba mosala na ngai. Kuna, babengaki ngai lisusu mpo nasamba na tribinale. Zuzi oyo asambisaki ngai akatelaki ngai etumbu ya misala makasi sanza motoba mpe ayebisaki ngai ete asepeli te ndenge etumbu yango ezali kaka ya mikolo moke. Ntango sanza motoba wana esilaki, babakiselaki ngai lisusu sanza minei.

Lokola nazalaki Motatoli ya Yehova kaka ngai moko na kati ya bato nyonso ya bolɔkɔ, bakɛngɛli bazalaki kobenga ngai Yehova. Nazalaki koyoka mabe ndenge bazalaki kobenga ngai na nkombo yango na ntango bazalaki kobenga bankombo (appel), kasi ezalaki esengo mpenza koyoka ndenge nkombo ya Nzambe ezalaki kosakolama mokolo na mokolo. Yango esalaki ete bato mosusu ya bolɔkɔ báyeba ete ngai nakɔtaki bolɔkɔ kaka mpo nazali Motatoli ya Yehova. Na nsima, ntango batindaki Norman Castro na bolɔkɔ epai nazalaki, batikaki kobenga ngai Yehova mpe bakómaki kobenga biso Moize ná Alona.

Batindaki ngai na bolɔkɔ ya engumba Bristol mpe na nsima na bolɔkɔ ya Winchester. Bomoi ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi yango esalisaki ngai nayeba kobatelaka esengo na ngai ata ntango nakutani na mikakatano. Ngai ná Norman tosepelaki ndenge tosalaki Ekaniseli na bolɔkɔ ya Winchester. Francis Cooke ayaki kotala biso na bolɔkɔ mpe asalelaki biso lisukulu moko kitoko ya Ekaniseli.

Mbongwana nsima ya etumba

Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba Bristol na 1946, epai buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” ebimaki, nakutanaki na Joyce Moore, ndeko mwasi moko kitoko oyo azalaki mpe mobongisi-nzela na etúká ya Devon. Bolingo na biso ekolaki, mpe tobalanaki nsima ya mbula minei na engumba Tiverton epai nazalaki kofanda banda na 1947. Tozalaki kofanda na ndako moko oyo tozalaki kofutela, dolare moko na ndambo pɔsɔ na pɔsɔ. Tozalaki na bomoi ya malamu mpenza!

Na mbula ya liboso ya libala na biso, tokendaki na sudi ya Brixham, engumba moko kitoko oyo ezali na libongo, epai mayele ya kotiyolisa minyama na masuwa mpo na koboma mbisi ebandaki. Toumelaki naino te na engumba yango, nabɛlaki ebukabuka ntango tozalaki kokende na liyangani moko ya etúká na Londres. Maladi yango ebwakaki ngai mpe nakómaki lokola moto akufi. Ndenge nalobaki yango na ebandeli, babimisaki ngai na lopitalo nsima ya sanza libwa. Lobɔkɔ na ngai ya mobali ná makolo ebebaki mpenza, ndenge ezali tii lelo, mpe nakómaki kotambola na nzete. Mwasi na ngai ya bolingo azalaki moninga na ngai ya motema oyo azalaki ntango nyonso kolendisa ngai, mingimingi na ndenge azalaki kosala nyonso mpo na kokoba na mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, tosengelaki kosala nini? Naumelaki te komona ete lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te.

Na mbula oyo elandaki, tokendeki na liyangani moko na Wimbledon, na engumba Londres. Na ntango wana, nazalaki lisusu kotambola na nzete te. Na liyangani yango, tokutanaki na Pryce Hughes, ndeko oyo azalaki kotambwisa misala ya Batatoli ya Yehova na Angleterre. Apesaki ngai mbote mpe alobaki boye: “Ted! Tolingi okóma mokɛngɛli ya zongazonga.” Likambo yango elendisaki ngai mingi mpenza! Namitunaki soki nabongi mpenza na mosala yango, lokola nabɛlaka. Ngai ná Joyce tozalaki mpenza kondima te soki nakokoka mosala yango, kasi nsima ya kozwa formasyo ya pɔsɔ moko mpe kotyela Yehova motema mobimba, tozongaki na sudi-wɛsti ya Angleterre, epai batindaki ngai mokɛngɛli ya zongazonga. Na ntango wana, nazalaki kaka na mbula 25, kasi tii lelo nabosanaka te boboto mpe motema molai ya Batatoli oyo bazalaki mpenza kosunga ngai.

Kati na misala nyonso ya Teokrasi oyo tosalaki, ngai ná Joyce tomonaki ete kotala masangá esalisaki biso tóyebana lisusu mingi na bandeko. Lokola tozalaki na motuka te, tozalaki kosala mibembo na biso na engbunduka to na bisi. Atako nazalaki naino kobunda na maladi na ngai wana, tókobaki mosala na biso tii na 1957. Ezalaki bomoi moko ya malamu mpenza, kasi na mbula wana mokakatano mosusu ebimaki.

Tokómi bamisionɛrɛ

Tosepelaki makasi ntango babengaki biso na kelasi ya mbala ya 30 na Gileadi. Lokola maladi na ngai esilisaki ngai makasi nyonso te, ngai ná Joyce tóndimaki kokende. Toyebaki malamu ete Yehova azangaka te kopesa makasi epai ya bato oyo bazali koluka kosala mokano na ye. Sanza mitano oyo tolekisaki na Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo ezali na engumba South Lansing, na etúká ya New York, elekaki noki. Bana-kelasi mingi bazalaki bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango. Ntango batunaki bana-kelasi soki ezali na bato oyo balingi kokende kosala mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya, biso mpe tondimaki. Tokendaki wapi? Na Ouganda, na Ɛsti ya Afrika.

Lokola mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Ouganda na ntango wana, bayebisaki ngai nakende kuna mpe naluka mosala. Tosalaki mobembo molai na engbunduka mpe na masuwa tii na Kampala, na Ouganda. Bakonzi ya immigration basepelaki na biso te mpe batikaki biso tófanda wana kaka mwa basanza. Na nsima, basɛngaki biso tólongwa na Ouganda. Biro monene ya Batatoli ya Yehova esɛngaki biso tókende na Rhodésie du Nord (lelo oyo Zambie). Kuna, tozalaki na esengo ya kokutana na baninga minei oyo tozalaki na bango na Eteyelo ya Gileadi: Frank Lewis ná mwasi na ye Carrie mpe Hayes Hoskins ná mwasi na ye Harriet. Mwa moke na nsima, batindaki biso na Rhodésie du Sud (lelo oyo Zimbabwe).

Tokendaki na engbunduka mpe, liboso tokóma na engumba Bulawayo, tómonaki mpo na mbala ya liboso babweta (chutes) ya Victoria. Tofandaki mwa moke elongo na libota ya ndeko McLuckie, moko ya Batatoli ya Yehova ya liboso oyo bakómaki kuna. Tozwaki libaku ya koyeba bango malamumalamu na boumeli ya mbula 16 oyo elandaki.

Milende mpo na komesana na Makambo ya sika

Nsima ya kozwa formasyo pɔsɔ mibale mpo na koyeba malamu makambo ya Afrika, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya etúká. Mpo na kopesa litatoli na mwa bamboka ya Afrika, esengelaki tómemaka mai, biloko ya kolya, mbeto, bilamba ya kolata, masini ya kolakisa bafilme, motɛrɛ ya kura, televizyo (écran) moko ya monene mpo na kolakisa bililingi, mpe biloko mosusu. Tozalaki komema biloko nyonso wana na motuka moko ya makasi, oyo ebongaki mpenza mpo na banzela ya mabulumabulu.

Nazalaki kosala elongo na bandeko ya Afrika oyo bazalaki bakɛngɛli ya zongazonga, mpe Joyce azalaki kosalisa basi na bango ná bana na bango oyo bazalaki kotambola na biso. Kotambola na bisobe ya Afrika ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mingimingi na ntango ya moi makasi, kasi namonaki ete moi yango ezalaki malamu mpo na nzoto na ngai ya maladi, mpe nazalaki kotɔnda Nzambe mingi mpo na yango.

Bato mingi bazalaki babola. Mingi kati na bango bakangamaki na mimeseno ya bonkɔkɔ, na biyambayamba mpe na momeseno ya kobala basi ebele; atako bongo, bamonisaki limemya mpenza mpo na Biblia. Na bisika mosusu, makita ezalaki kosalema na nse ya banzete ya minene, mpe na butu tozalaki kopelisa miinda ya petrole. Tozalaki ntango nyonso komona bonene ya Nzambe ntango tozali koyekola Liloba na ye na butu mpe tozali komona likoló etondi na minzoto, oyo ezali moko ya misala minene na ye.

Likambo mosusu oyo nakobosana te ezali ntango tozalaki kolakisa bafilme ya la Société Watch Tower na bamboka ya Afrika. Soki lisangá ezali na Batatoli 30, ntango tolakisi filme, bato oyo bazalaki koya kotala yango bakokaki kokóma 1 000 to koleka.

Na mikili ya molunge, bato babɛlaka mingi, kasi ezali na ntina mingi obungisa elikya te. Ngai nazalaki kobɛla malaria mbala na mbala, mpe amibe ezalaki kotungisa Joyce, kasi tozalaki kolɛmba nzoto te.

Na nsima, batindaki biso na Betele ya Salisbury (lelo oyo Harare), epai tozwaki libaku ya kosala elongo na basaleli mosusu ya sembo ya Yehova lokola Lester Davey mpe George Bradley ná mwasi na ye Ruby. Guvɛrnema epesaki ngai mokumba ya kotalelaka bandeko oyo bakokisi masɛngami mpo na kokomisa mabala na bango na buku ya Leta. Yango epesaki ngai nzela nasalisaka bandeko ya Afrika bábalana na ndenge ebongi, mpe yango esalaki ete mabala ekóma makasi na masangá. Mwa bambula na nsima, nazwaki mokumba mosusu. Nasengelaki kotalaka masangá nyonso ya ekólo Zimbabwe oyo elobaka minɔkɔ ya Shona ná ya Zulu te. Na boumeli ya mbula koleka zomi, ngai ná Joyce tozalaki na libaku ya koyebana na bandeko ntango tozali kotala bango na masangá, mpe tozalaki kosepela mingi komona ndenge bazalaki kokola na elimo. Na ntango yango, tózalaki mpe kotala bandeko ya Botswana mpe ya Mozambique.

Tokei epai mosusu

Nsima ya kolekisa bambula ebele na sudi ya Afrika, batindaki biso na 1975 na ekólo Sierra Leone, na wɛsti ya Afrika. Tofandaki na Betele mpe tobandaki mosala na biso na teritware wana ya sika, kasi eumelaki mingi te. Nabɛlaki malaria makasi oyo ebukaki ngai mpenza kobuka. Nakendeki komisalisa na Londres mpe kuna, balobaki na ngai nazonga lisusu na Afrika te. Likambo yango epesaki biso mawa mingi, kasi bandeko ya Betele ya Londres bayambaki biso na esengo mpenza. Ebele ya bandeko ya Afrika oyo bazali na masangá mingi ya Londres basalisaki biso tómimona lokola bapaya te. Ntango namiyokaki lisusu malamu, tokómaki kosala na Betele mpe batyaki ngai na biro ya Betele oyo etali makambo ya kosomba biloko. Bokoli oyo tomoni na nsima esalisi biso tómona ete tosalaki mosala moko malamu mpenza.

Na bambula ya 1990, Joyce abɛlaki makasi, mosisa na ye moko ya bɔɔngo ebebaki mpe akufaki na 1994. Azalaki mwasi moko ya bolingo mpe ya bosembo, mpe azalaki kondima bambongwana nyonso oyo tozalaki kokutana na yango. Namoni mpenza ete mpo nalɛmbaka te na bantango ya mpasi ndenge wana, ezali na ntina mingi natalelaka makambo na miso ya elimo mpe natalaka ntango nyonso liboso. Molende na makambo ya elimo, lokola mosala ya kosakola, esalaka ete nazwa ntango ya komitungisa na makanisi te.​—Masese 3:5, 6.

Kosala na Betele ezali libaku kitoko mpe bomoi moko ya malamu. Na Betele, ezali na ebele ya bilenge oyo okoki kosala na bango, mpe makambo ya esengo ezangaka te. Moko ya mapamboli ezali motángo ya bandeko oyo toyambaka awa na Betele ya Londres. Ntango mosusu namonaka baninga na ngai ya Afrika, mpe namikundolaka makambo mingi ya esengo. Makambo nyonso wana esalisaka ngai nakoba kosepela mpenza na “bomoi ya sikoyo” mpe kozela na elikya mpenza mpo na bomoi “oyo ezali koya.”​—1 Timote 4:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova na 1928, kasi ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná mama, na 1946

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai ná Joyce mokolo ya libala na biso, na 1950

[Elilingi na lokasa 26]

Na liyangani moko ya etúká na engumba Bristol, na 1953

[Bililingi na lokasa 27]

Nazali kotala mwa etuluku moko ya boyekoli (na likólo) mpe lisangá moko (na lobɔkɔ ya mwasi) na sudi ya Rhodésie, lelo oyo Zimbabwe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto