Lisolo ya bomoi
Nasepelaka ndenge napesaki mabɔkɔ na mosala ya koteya Biblia
YA ANNA MATHEAKIS
Masuwa ezalaki kozika. Soki masuwa molai wana ya mɛtrɛ 171 ezindi, ekomema ngai na nse ya mai mpe nakokufa. Na kobanga nyonso, nabɛtaki mai na kati ya mbonge makasi mpo na kobikisa bomoi na ngai. Mpo nazinda te, nasengelaki kaka kotingama na elamba ya mai (gilet de sauvetage) oyo mwasi moko alataki. Lokola Nayebaki te nini nasala, nazalaki kaka kobondela Nzambe mpo apesa ngai makasi mpe mpiko.
EZALAKI na 1971 mpe nazalaki kozonga na Italie, mboka ya misato epai batindaki ngai misionɛrɛ. Ntango masuwa wana ezindaki, nabungisaki biloko nyonso oyo nazalaki na yango. Kasi, nabungisaki te biloko oyo eleki ntina, elingi koloba bomoi na ngai, bandeko na ngai baklisto mpe libaku kitoko ya kosalela Yehova. Mosala ya misionɛrɛ esilaki komema ngai na bakɔntina misato, mpe kozinda ya masuwa wana ezalaki kaka moko ya ebele ya makama oyo ekómelaki ngai na bomoi.
Nabotamaki na 1922. Libota na ngai ezalaki kofanda na Ramallah, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 16 na nɔrdi ya Jérusalem. Baboti na ngai bazalaki bato ya esanga ya Crète, kasi tata akolaki na Nazarete. Nazalaki mwana ya nsuka na libota ya bana mitano, misato ya mibale mpe mibale ya basi. Libota na biso etungisamaki mingi ntango yaya na ngai ya mibale akweaki na Ebale Yolodani mpe akufaki, ntango akendeki na pikiniki na baninga na ye ya kelasi. Nsima ya likama wana, mama alingaki lisusu kofanda na Ramallah te, tolongwaki wana mpe tokendeki na Athènes, na ekólo Grèce, ntango nazalaki na mbula misato.
Solo ya Biblia ekɔti na libota na biso
Mwa moke nsima ya kokóma na biso na Grèce, yaya na ngai ya liboso, Nikos, oyo azalaki ntango wana na mbula 22, akutanaki na bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Makambo oyo ayekolaki na Biblia epesaki ye esengo mingi mpe molende makasi na mosala ya kosakola. Likambo yango epesaki tata nkanda makasi mpe abenganaki Nikos na ndako. Kasi, soki tata akei na Palestine, ngai ná mama ná ndeko na ngai ya mwasi tozalaki kokende na Nikos na makita. Nabosanaka te ndenge mama azalaki kolobela na esengo nyonso makambo oyo azalaki koyoka na makita yango. Kasi, mwa moke na nsima, abɛlaki maladi ya kanser mpe akufaki na mbula 42. Na ntango wana ya mpasi, ndeko na ngai ya mwasi Ariadne amemaki mokumba ya libota na biso. Atako azalaki elenge, azalaki lokola mama mpo na ngai na boumeli ya bambula ebele.
Ntango tata azali na Athènes, azalaki ntango nyonso komema ngai na Lingomba ya Orthodoxe; mpe nsima ya liwa na ye, nakobaki kokende na losambo, kasi mingi te. Kasi, lokola namonaki ete bato ya lingomba yango bazalaki kosala te makambo oyo Nzambe alingaka, natikaki kokende ndako-nzambe.
Nsima ya liwa ya tata, nazwaki mosala moko ya malamu na ministère des finances. Kasi, ndeko na ngai ya mobali amipesaki mobimba na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe asalaki yango na boumeli ya ebele ya bambula na Grèce. Na 1934, akendeki na Chypre. Na ntango wana, Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo bazalaki te na esanga yango; na yango ndeko na ngai azwaki libaku malamu ya kotambwisa mosala ya kosakola kuna. Ntango abalaki, mwasi na ye Galatia mpe akómaki mobongisi-nzela mpe asalaki mosala yango bambula ebele.a Nikos azalaki mbala na mbala kotindela biso mikanda oyo elimbolaka Biblia, kasi tozalaki ata kofungola yango te. Afandaki na Chypre tii liwa na ye.
Namipesi mpenza na solo ya Biblia
Na 1940, George Douras, Motatoli moko ya mpiko na Athènes mpe moninga ya Nikos ayaki kotala biso mpe asɛngaki biso tókóma kosangana na mwa etuluku moko ya boyekoli ya Biblia na ndako na ye. Tondimaki na esengo nyonso kosanganaka na bango. Mwa moke na nsima, tobandaki koyebisa bato mosusu makambo oyo tozalaki koyekola. Boyebi ya Biblia oyo tokómaki na yango etindaki ngai na ndeko na ngai ya mwasi tómipesa na Nzambe. Ariadne azwaki batisimo na 1942 mpe ngai na 1943.
Ntango Etumba ya Mibale esilaki, Nikos abengaki biso na Chypre, yango wana tokendeki na Nicosie na 1945. Kuna na Chypre, bapekisaki mosala ya kosakola te lokola na Grèce. Tozalaki kosakola kaka ndako na ndako te, kasi mpe na babalabala.
Mbula mibale na nsima, Ariadne asengelaki kozonga na Grèce. Kuna, akutanaki na ndeko moko, mosambeli ya Yehova, yango wana atikalaki na Athènes mpe na nsima babalanaki. Eumelaki te, sɛmɛki na ngai ná yaya na ngai balendisaki ngai nazonga na Grèce mpe nabanda mosala ya ntango nyonso na mboka mokonzi, Athènes. Lokola nazalaki na mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela banda kala, nazongaki na Athènes, epai basakoli bazalaki mingi te.
Bikuke ya sika efungwelami ngai
Mwa 1 Novɛmbɛ 1947, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe nazalaki kolekisa ngonga 150 nsanza na sanza na mosala ya kosakola. Teritware ya lisangá na biso ezalaki monene mingi, yango wana nazalaki kotambola mingi. Atako bongo, nazwaki mapamboli mingi. Mbala mingi, soki bapolisi bakuti Batatoli bazali kosakola to bazali kosala makita, bazalaki kokanga bango, mpe mosika te bakangaki ngai mpe.
Bafundaki ngai ete nazali koluka kokimisa bato mangomba na bango mpo bákɔta na lingomba na biso, likambo oyo bazalaki kotalela lokola mbeba monene na ntango wana. Bakatelaki ngai etumbu ya sanza mibale na bolɔkɔ ya Avérof, bolɔkɔ ya basi na Athènes. Nakutaki Motatoli mosusu ya mwasi na bolɔkɔ yango mpe tozalaki na esengo ya kozala esika moko mpe ya kolendisana na elimo, atako tozalaki na bolɔkɔ. Nsima ya nsanza mibale ya bolɔkɔ, nakobaki na esengo nyonso mosala ya mobongisi-nzela. Bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia bazali tii lelo basaleli ya Yehova mpe yango epesaka ngai esengo mingi.
Na 1949, babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 16 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia na États-Unis, epai bapesaka basaleli ya ntango nyonso formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ. Ngai ná bandeko na ngai tosepelaki makasi. Nazwaki bibongiseli mpo nayangana naino na liyangani moko oyo esangisaki bato ya mikili mingi, oyo esalemaki na engumba New York na eleko ya molunge ya 1950, liboso nakende na Gileadi.
Ntango nakómaki na États-Unis, nazwaki libaku kitoko ya kosala lokola mobongisi ya bashambre na biro monene ya Batatoli ya Yehova, na engumba New York, na boumeli ya mwa basanza. Kuna, bopɛto ezalaki makasi, mpe ezalaki na makambo ebele ya kitoko mpe ya kolendisa; okomona na bilongi ya bandeko mibali mpe basi kaka esengo na esengo. Nakobosana te sanza motoba oyo nalekisaki kuna. Na nsima, kelasi ya Gileadi ebandaki, epai sanza mitano ya mateya emonanaki lokola mwa mikolo ya kotánga. Biso bayekoli tomonaki motuya mpe kitoko ya boyebi ya Makomami, mpe yango ebakisaki esengo na biso mpe mposa ya kosalisa basusu bákóma na boyebi ya solo oyo epesaka bomoi.
Mboka ya liboso epai batindaki ngai misionɛrɛ
Na kelasi ya Gileadi, balobaki na biso tópona baninga ya mosala liboso bátinda biso na bateritware. Moninga na ngai ya mosala ezalaki Ruth Hemmig (oyo akómá mwasi ya ndeko Bosshard), ndeko mwasi moko malamu mpenza. Ngai ná Ruth tosepelaki mingi ntango batindaki biso na engumba Istanbul, na ekólo Turquie, esika Asie ná Mpoto ekutani! Toyebaki ete mosala ya kosakola endimamaki naino te na mboka wana, kasi toyebaki mpe ete Yehova akosunga biso.
Istanbul ezali engumba moko kitoko oyo etondi na bato ya mikili ndenge na ndenge. Kuna, tokokuta bazando etondi na biloko ndenge na ndenge, bilambeli ya kitoko ya bato ya mikili ndenge na ndenge, bisika kitoko epai babombaka biloko ya kala (musées), bakartye kitoko mpe libongo moko ya kitoko. Likambo eleki ntina, bato mingi bazalaki mpenza na mposa ya koyekola makambo ya Nzambe. Mwa etuluku moke ya Batatoli ya Yehova oyo tokutaki kuna bazalaki mingimingi bato ya Arménie, Bagrɛki mpe Bayuda. Nzokande, ezalaki mpe na bato ya bikólo mosusu, mpe ezalaki na ntina mingi koyeba minɔkɔ ebele, ná oyo ya Turquie. Tozalaki ntango nyonso na esengo ya kokutana na bato ya bikólo ndenge na ndenge oyo bazalaki komonisa mposa makasi ya koyeba solo. Mingi kati na bango bazali kokoba kosalela Yehova tii lelo.
Likambo ya mawa, Ruth azwaki lisusu te mikanda ya kofanda na Turquie, yango wana alongwaki na ekólo yango. Azali kokoba na mosala ya ntango nyonso na Suisse. Nsima ya ebele ya bambula oyo tokabwaná, nabosanaka te esengo mpe bilendiseli oyo nazalaki kozwa epai na ye.
Nakei na mokili mosusu
Na 1963, baboyaki kopesa ngai mikanda ya kofanda na Turquie. Ezalaki mpasi mpo na ngai kotika bandeko baklisto oyo namonaki bazali kokola na elimo atako bazalaki kokutana na ebele ya mikakatano. Mpo na kolendisa ngai, bandeko na ngai bafutelaki ngai tike ya kokende na engumba New York mpo nayangana na liyangani moko kuna. Bayebisaki ngai naino te epai bakotinda ngai.
Nsima ya liyangani, batindaki ngai na engumba Lima, na ekólo Pérou. Nalongwaki mbala moko na New York mpe nakendeki na teritware na ngai ya sika elongo na moninga na ngai ya mosala, ndeko mwasi moko ya elenge. Nayekolaki monɔkɔ ya espagnol mpe nazalaki kofanda na ndako ya bamisionɛrɛ oyo ezalaki na likoló ya biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Ezalaki esengo mpenza kosakola kuna mpe koyebana na bandeko ya mboka yango.
Teritware mosusu mpe monɔkɔ mosusu
Na nsima, bandeko na ngai kuna na Grèce babandaki konuna mpe bazalaki lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te. Basɛngaki ngai ata mokolo moko te natika mosala ya ntango nyonso, naluka mosala mpo nasalisa bango. Nzokande, nsima ya kokanisa mpe ya kobondela, namonaki ete ekozala malamu nazala pene na bandeko na ngai. Bandeko ya biro ya filiale bandimaki mpe batindaki ngai na Italie, mpe bandeko na ngai basɛngaki ete bango moko báfutela ngai tike. Ekutanaki mpe ete mposa ya basakoli ezalaki makasi na Italie.
Nasengelaki lisusu koyekola monɔkɔ ya sika; monɔkɔ ya Italie. Teritware na ngai ya liboso na Italie ezalaki engumba Foggia. Na nsima, batindaki ngai na engumba Naples, epai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Teritware na ngai ezalaki Posilipo, moko ya bakartye kitoko ya engumba Naples. Ezalaki monene mpe ezalaki na mosakoli ya Bokonzi kaka moko. Nasepelaki mingi na mosala na teritware yango mpe Yehova asalisaki ngai nayekola Biblia na bato mingi. Nsukansuka, lisangá monene ebotamaki wana.
Na kati ya bato ya liboso oyo nayekolaki na bango Biblia kuna, ezalaki na mama moko na bana na ye minei. Ye ná bana na ye ya basi mibale bazali Batatoli ya Yehova tii lelo oyo. Nayekolaki mpe na mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki na mwana moko ya mwasi ya moke. Bango nyonso bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Lelo oyo, mwana na bango abalá mosaleli moko ya Yehova ya sembo mpe bazali kosalela Nzambe elongo na molende mpenza. Namonaki mpenza nguya ya Liloba ya Nzambe ntango nazalaki koyekola Biblia na libota moko ya bato ebele. Ntango totángaki bavɛrsɛ mingi ya Biblia oyo ezali komonisa ete Nzambe asepelaka te bato básalela bikeko mpo na kosambela ye, mama azelaki ata te ete tósilisa koyekola. Abimisaki mbala moko bikeko nyonso oyo ezalaki na ndako na ye mpe abwakaki yango!
Na makama na mbu
Mbala nyonso oyo nazalaki kokende na Grèce mpe kozonga na Italie, nazalaki kotambola na masuwa. Mbala mingi, mibembo yango ezalaki koleka malamu. Kasi, mobembo moko oyo nasalaki na eleko ya molunge ya 1971 elekaki mabe mpenza. Nazalaki kozonga na Italie na masuwa Héléanna. Mokolo ya 28 Augusto na ntɔngɔntɔngɔ, kuku ya masuwa ebandaki kozika. Mɔtɔ yango ekómaki kopanzana mpe ebimisaki yikiyiki na kati ya masuwa. Basi bazalaki kobungisa makanisi mpe kokwea, bana bazalaki kolela, mibali bazalaki kotomboka mpe koganga. Bato bakimaki mbango mpo na kokɔta na bakano oyo ezalaki ngambo na ngambo ya masuwa. Kasi, bilamba ya mai (gilet de sauvetage) ezalaki mingi te mpe bansinga ya kokitisa bakano ezalaki kosala malamu te. Lokola nazalaki na elamba ya mai te mpe mɔtɔ ezalaki kaka kokóma makasi, nazalaki na likambo mosusu ya kosala te, namibwakaki na mai.
Ntango kaka nakweaki na mai, namonaki mwasi moko oyo alataki elamba ya mai azali kotepatepa pembeni na ngai. Emonanaki lokola ayebi kobɛta mai te, yango wana nasimbaki ye na lobɔkɔ mpe nabandaki kobenda ye mosika na masuwa oyo ezalaki kozinda. Mbonge ezalaki se kokóma makasi, mpe milende oyo nazalaki kosala mpo nazinda te elɛmbisaki ngai mpenza. Elikya ezalaki lisusu te, kasi nakobaki kosɛnga Yehova apesa ngai makasi, mpe yango epesaki ngai nguya. Yango etindaki ngai nakanisa lisusu likama ya masuwa oyo ekómelaki ntoma Paulo.—Misala mokapo 27.
Nakangamaki kaka na mwasi oyo nasimbaki mpe nabundaki na mbonge na boumeli ya ngonga minei, nazalaki kobɛta mai soki nazwi mwa makasi mpe kobelela Yehova mpo asalisa ngai. Nsukansuka, namonaki mwa masuwa moko ezali koya pembeni na biso. Babikisaki ngai na mai, kasi mwasi wana akufaki. Ntango tokómaki na engumba Bari, na Italie, bamemaki ngai na lopitalo, epai bapesaki ngai lisalisi ya liboso. Nafandaki mwa mikolo na lopitalo, Batatoli mingi bazalaki koya kotala ngai mpe bazalaki kopesa ngai lisungi nyonso oyo nazalaki na yango mposa. Bolingo oyo bandeko yango bamonisaki esimbaki mpenza mitema ya bato mosusu oyo bazalaki na lopitalo.b
Ntango nabikaki, batindaki ngai na Rome. Basɛngaki ngai nasakolaka na bamagazini mpe na zando, na katikati ya engumba, epai nasakolaki na boumeli ya mbula mitano, na lisalisi ya Yehova. Nasakolaki na Italie na boumeli ya mbula 20, mpe nakómaki kolinga bato ya Italie mingi.
Nazongi epai nabandaki
Na nsima, nzoto ya Ariadne mpe ya mobali na ye ekómaki na mokakatano makasi. Namonaki ete soki nafandi pene na bango, nakoki kozongisela bango ata mwa moke bolamu nyonso oyo basalaki ngai. Tiká nayebisa bino ete kotika Italie esalaki ngai mpasi mingi na motema. Kasi, na ndingisa ya bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala na Italie, nakendaki na Athènes mpe, banda na eleko ya molunge ya 1985, nazali mobongisi-nzela kuna, epai nabandaki mosala ya ntango nyonso na 1947.
Nazalaki kosakola na teritware ya lisangá na biso, mpe nasɛngaki na bandeko ya biro ya filiale soki nakoki mpe kosakolaka na bamagazini, na zando mpe na bisika ya mosala na vile. Nasakolaki kuna na boumeli ya mbula misato elongo na ndeko mwasi moko oyo azalaki mpe mobongisi-nzela. Kuna, tozwaki libaku ya kopesa litatoli ya malamumalamu epai ya bato oyo bazalaka mpenza te na bandako na bango.
Atako bambula ezali koleka, mposa na ngai ya kosala mosala ya Bokonzi ezali se kobakisama, kasi makasi na ngai ya nzoto ezali kosila. Lelo oyo, mobali ya Ariadne asilá kokufa. Ye moko Ariadne, oyo azalaki lokola mama na ngai, amonaka lisusu te. Ngai moko, nazalaki nzoto makasi na boumeli ya bambula nyonso oyo nalekisaki na mosala ya ntango nyonso. Kasi, eumeli te, nakweaki na sikalie mpe lobɔkɔ na ngai ya mobali ebukanaki. Nakweaki lisusu mpe nabukanaki mokɔngɔ. Bapasolaki ngai mpe natikalaki na mbeto ntango molai. Sikoyo nakómá kotambola na mpasi. Nakómá kotambola na nzete mpe nakoki kobima libándá kaka soki moto azali pembeni na ngai. Atako bongo, nazali kosala nyonso oyo makoki na ngai ezali kopesa nzela, na elikya ete nzoto na ngai ekobonga lisusu. Kopesa mabɔkɔ ata mwa moke na mosala ya koteya bato Biblia ezali tii lelo oyo komemela ngai esengo mpe bolamu ya solo.
Soki nakanisi bambula ya esengo oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, motema na ngai etondaka mpenza na botɔndi mpo na Yehova. Ye ná ebongiseli na ye awa na mabelé bapesi ngai litambwisi ya malamu mpe lisalisi oyo ebongi mpenza, oyo esalisi ngai nasalela Yehova na makasi mpe na makoki na ngai nyonso bomoi na ngai mobimba. Mposa na ngai ezali ete Yehova apesa ngai makasi mpo nakoba kosalela ye. Nazali na esengo mpo na ndenge napesi mabɔkɔ na mosala ya koteya bato Biblia oyo ezali kosalema na mokili mobimba, oyo ye moko azali kotambwisa.—Malaki 3:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Annuaire des Témoins de Jéhovah ya 1995, nkasa 73-90, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Okoki kotánga lisolo yango mobimba na Lamuká! ya 8 Yuni, 1972, nkasa 12-16 (na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 9]
Elongo na ndeko na ngai ya mwasi Ariadne ná mobali na ye Michalis, ntango nazalaki kokende na Gileadi
[Elilingi na lokasa 10]
Batindaki ngai ná Ruth Hemmig na engumba Istanbul, na ekólo Turquie
[Elilingi na lokasa 11]
Na Italie, na ebandeli ya bambula ya 1970
[Elilingi na lokasa 12]
Lelo oyo, elongo ná ndeko na ngai ya mwasi, Ariadne