Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/3 nk. 20-25
  • Nasalaki na elimo ya komipesa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasalaki na elimo ya komipesa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mama-leki amonisaki elimo ya komipesa
  • Ntango ya kozwa ekateli
  • Mosala ya mobongisi-nzela na ntango ya etumba
  • Mosala ya misionɛrɛ
  • Na Chypre mpe na Israël
  • Namesanaki na mbongwana ya ndenge na ndenge
  • Ntango ya yikiyiki
  • Mikumba ebongwani mbala na mbala
  • Na Chypre mpe na Grèce lisusu
  • Natikali mpo na kosunga yaya na ngai ya bolingo
  • Nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na mosala ya ntango nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Nasepelaka ndenge napesaki mabɔkɔ na mosala ya koteya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tozalaki kobanga te—Yehova azalaki na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nazali kosalela Yehova na esengo atako nakómá ebɔsɔnɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/3 nk. 20-25

Lisolo ya bomoi

Nasalaki na elimo ya komipesa

YA DON RENDELL

Mama akufaki na 1927 ntango nazalaki na mbula mitano mpamba. Atako bongo, kondima na ye ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Ndenge nini likambo motindo wana ekokaki kosalema?

MAMA azalaki mondimi ya molende na Lingomba ya Angleterre ntango ye na tata babalanaki; tata azalaki soda. Babalanaki liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda. Etumba yango ebandaki na 1914; mama andimaki te ndenge sango na bango akómaki kolendisa bandimi bákɔta mosala ya soda, na ntango oyo azalaki koteya na ndako-nzambe. Bongo, sango yango azongiselaki ye ndenge nini? Ayebisaki mama ete: “Zongá na ndako mpe komitungisa te mpo na makambo ya ndenge wana!” Maloba wana esepelisaki mama te.

Na 1917, ntango etumba eyaki ndongo, mama akendaki kotala “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Amonaki mpenza ete azwi lingomba ya solo mpe mbala moko alongwaki na lingomba oyo azalaki mpe akómaki kosangana na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Azalaki kokende na makita ya lisangá moko ya Yeovil, engumba oyo ezalaki pene ya mboka na biso West Coker, na etúká moko ya Angleterre oyo babengi Somerset.

Eumelaki te, mama abandaki koyebisa baleki na ye misato ya basi makambo ya sika oyo akómaki kondima. Mikóló oyo bazalaki na lisangá wana ya Yeovil bayebisaki ngai ndenge mama na leki na ye Millie bazalaki kotambola na bavelo na molende mpenza mpo na kokende na mwa bamboka ya mosika, kokabola mikanda Études des Écritures, oyo ezalaki kosalisa mpo na koyekola Biblia. Kasi likambo ya mawa, mama abɛlaki maladi ya ntolo (tuberculose), oyo na ntango wana ezalaki na nkisi te. Maladi yango elalisaki ye na mbeto na boumeli ya sanza 18, nsima na yango akufaki.

Mama-leki amonisaki elimo ya komipesa

Lokola mama-leki Millie azalaki kofanda na biso na ntango wana, asalisaki mama ntango abɛlaki mpe abatelaki ngai na Joan, yaya na ngai ya mwasi oyo azalaki na mbula nsambo. Ntango mama akufaki, mbala moko mama-leki Millie asɛngaki ete abɔkɔla biso. Lokola tata amonaki ete balongoli ye mokumba wana, asepelaki mpe andimaki mbala moko ete mama-leki Millie afanda na biso.

Tozalaki kolinga mama-leki na biso mingi mpe tosepelaki mpenza ndenge andimaki kotikala na biso. Kasi mpo na nini azwaki ekateli ya ndenge wana? Bambula mingi na nsima, mama-leki Millie ayebisaki biso ete ayebaki ete azalaki na mokumba ya kolanda kosala mosala oyo mama na biso abandisaki, elingi koloba koteya ngai na Joan mateya ya solo ya Biblia, mpamba te ayebaki ete tata na biso akosala yango te, mpo azalaki kosambela te.

Na nsima, toyaki mpe koyeba ete mama-leki Millie azwaki ekateli mosusu oyo etalaki mpenza bomoi na ye. Mpo abɔkɔla biso na ndenge oyo ebongi, azwaki ekateli ete akobala te. Oyo nde elimo ya komipesa! Yango wana, ngai na Joan tozali mpenza na botɔndi mingi epai na ye. Makambo nyonso oyo mama-leki Millie ateyaki biso mpe ndakisa malamu oyo atikelaki biso etikalá libela na makanisi na biso.

Ntango ya kozwa ekateli

Ngai na Joan tozalaki kotánga na eteyelo ya Lingomba ya Angleterre oyo ezalaki na mboka na biso. Mama-leki Millie akendaki kokutana na mokambi ya eteyelo yango mpo na koyebisa ye polelepolele bindimeli na biso. Na ntango bana-kelasi mosusu bazalaki kokɔta na misa, biso tozalaki kozonga na ndako; ntango sango azalaki kokɔta na kelasi mpo na kopesa mateya ya lingomba, biso tozalaki kofanda na esika mosusu mpe azalaki kopesa biso bavɛrsɛ ya Makomami mpo tókanga yango na motó. Yango esalisaki ngai mingi nsima ya bambula, mpamba te bavɛrsɛ yango etikalá libela na makanisi na ngai.

Nalongwaki na kelasi ntango nazalaki na mbula 14 mpe na boumeli ya mbula minei nayekolaki kosala fromaje na izini moko ya mboka. Nayekolaki mpe kobɛta piano, nakómaki kosepela mingi na miziki mpe na mabina. Atako solo ya Biblia esilaki kopika misisa na kati ya motema na ngai, kasi etindaki ngai naino te nazwa ekateli. Mokolo moko na sanza ya Marsi 1940, mama moko mobange, oyo azalaki Motatoli, abengaki ngai nakende kotika ye na liyangani moko na engumba Swindon, oyo ezalaki soki kilomɛtrɛ 110 na mboka na biso. Albert Schroeder, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Angleterre, asalaki lisukulu ya bato nyonso. Ezali liyangani wana nde ebongolaki mpenza bomoi na ngai.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala makasi. Likambo nini mpenza ya malonga nasengelaki kosala na bomoi na ngai? Nazwaki ekateli ya kozonga na Ndako ya Bokonzi ya lisangá ya Yeovil. Na likita ya liboso oyo nakɔtaki, balobelaki mpo na mbala ya liboso likambo etali kopesa litatoli na balabala. Atako nazalaki na boyebi mingi te, nasɛngaki ete nasangana na mosala wana. Ebele ya baoyo bazalaki koloba ete bazali baninga na ngai bakamwaki mpenza mpe bazalaki kotyola ngai ntango nazalaki kokutana na bango na balabala!

Na sanza ya Yuni 1940, nazwaki batisimo na engumba ya Bristol. Nsima ya sanza moko, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso. Eumelaki te, yaya na ngai ya mwasi azwaki mpe batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Yehova; nazalaki na esengo monene mpenza!

Mosala ya mobongisi-nzela na ntango ya etumba

Mbula moko nsima ya ebandeli ya etumba, bakonzi ya Leta batindelaki ngai mikanda mpo na koyebisa ngai ete nasengeli kobanda mosala ya soda. Lokola na Yeovil, nasilaki kokomisa nkombo na liste ya bato oyo lisosoli na bango epekisi bango kokɔta mosala ya soda, nakendaki kosamba na tribinale ya Bristol. Tokendaki elongo na John Wynn, kosala lokola babongisi-nzela na mboka Cinderford mpe Gloucestershire; na nsima tokendaki na mboka Haverfordwest mpe Carmarthen, na Pays de Galles.a Na nsima, basambisaki ngai na tribinale ya Carmarthen mpe bakatelaki ngai etumbu ya sanza misato ya bolɔkɔ, oyo nasengelaki kolekisa na bolɔkɔ ya Swansea; basɛngaki ngai mpe nafuta lomande ya livre sterling 25, oyo na ntango wana ezalaki mbongo ebele mpenza. Na nsima, lokola nafutaki lomande yango te, bakatelaki ngai etumbu ya sanza misato mosusu ya bolɔkɔ.

Ntango basambisaki ngai mpo na mbala ya misato, batunaki ngai boye: “Oyebi te ete Biblia elobi: ‘Pesá epai na Kaisala yango ezali na Kaisala’?” Ngai nazongisaki ete: “Ɛɛ, nayebi yango malamu; kasi nakosepela kosilisa vɛrsɛ yango: ‘mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.’ Ezali yango nde nazali kosala.” (Matai 22:21) Nsima ya mwa bapɔsɔ, batindelaki ngai mokanda mpo na koyebisa ngai ete balongoli ngai na molɔngɔ ya bato oyo basengeli kokɔta mosala ya soda.

Na ebandeli ya 1945, babengaki ngai nakende kosala na Betele ya Londres. Na eleko ya malili oyo elandaki, Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe sekrɛtɛrɛ na ye Milton Henschel, bayaki na Londres. Bazwaki bankombo ya bilenge mwambe ya Angleterre, ngai mpe na kati, mpo tókɔta eteyelo ya misionɛrɛ na kelasi ya mbala ya mwambe ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia.

Mosala ya misionɛrɛ

Na mokolo ya 23 Mai 1946, longwa na mwa libongo ya Fowey, na etúká ya Cornouailles, tomataki masuwa moko oyo bazalaki kobenga “Liberty.” Mokonzi ya libongo yango, kapitɛni Collins, azalaki Motatoli ya Yehova. Ntango masuwa etikaki libongo, abɛtaki loseba. Ndenge kaka ezalaka, esengo na biso esanganaki na mawa ntango tozalaki komona libongo ya Angleterre ebandi kolimwa mokemoke. Mobembo wana na Mbu ya Atlantique ezalaki mpasi mpo mbonge ezalaki makasi; kasi nsima ya mikolo 13 tokómaki malamu na États-Unis.

Nakobosana ata moke te liyangani oyo nakendaki oyo esangisaki Batatoli ya mikili mingi na boumeli ya mikolo mwambe, elingi koloba kobanda na mokolo ya 4 tii ya 11 Augusto 1946, na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio; liyangani yango ya Teokrasi ezalaki na motó ya likambo “Mabota ya esengo.” Bato 80 000 bazalaki na liyangani yango, kati na bango ezalaki na bato 302 oyo bautaki na mikili 32. Na liyangani yango babimisaki zulunalo Lamuká!b mpe mokanda ya koyekola na yango Biblia “Que Dieu soit reconnu pour vrai!”, bayangani basepelaki mingi.

Tozwaki badiplome na Gileadi na 1947 mpe batindaki ngai na Bill Copson na Egypte. Kasi liboso ya kokende, nazwaki formasyo moko ya malamu mpo na mosala ya biro epai ya Richard Abrahamson, na Betele ya Brooklyn. Tokómaki na engumba Alexandrie mpe eumelaki te, namesanaki na bomoi ya bato ya Moyen-Orient. Kasi, koyekola lokota ya Arabe ezalaki pɛtɛɛ te, nasengelaki mpe kosalela bakalati ya kopesa na yango litatoli oyo ekomamaki na minɔkɔ minei.

Bill Copson atikalaki kuna mbula nsambo; kasi ngai, nsima ya mbula moko, lokola nazwaki ndingisa mosusu te ya kofanda na mboka yango, esengelaki nalongwa na ekólo yango. Soki nakanisi mbula wana ya liboso ya mosala ya misionɛrɛ, namonaka ete eleki bambula nyonso ya bomoi na ngai, mpo yango nde ebotaki mbuma mingi koleka. Nazwaki libaku malamu ya koyekola Biblia na bato koleka 20 pɔsɔ na pɔsɔ, mpe bamosusu kati na baoyo bayekolaki solo na ntango wana bazali kokumisa Yehova tii lelo. Ntango nalongwaki na Egypte, batindaki ngai na esanga Chypre.

Na Chypre mpe na Israël

Nabandaki koyekola monɔkɔ ya sika, monɔkɔ ya Grɛki, mpe nabandaki komesana na lokota ya mboka yango. Mwa moke na nsima, ntango batindaki Anthony Sideris na ekólo Grèce, baponaki ngai mpo na kokamba mosala ya kosakola na Chypre. Na ntango wana filiale ya Chypre ezalaki mpe kokamba mosala ya kosakola ya ekólo Israël; nazalaki na libaku malamu ya kokende na ekólo yango mbala na mbala elongo na bandeko mosusu mpo na kotala mwa Batatoli oyo bazalaki kuna.

Mbala ya liboso oyo nakendaki na Israël, tosalaki mwa liyangani moko na kati ya restora moko na engumba Haïfa; bato 50 to 60 bayanganaki. Lokola tokabolaki bato na kotalela bikólo epai bautaki, yango epesaki biso nzela tósala liyangani yango na minɔkɔ 6! Mbala mosusu, na engumba Jérusalem, nalakisaki filme moko oyo Batatoli ya Yehova babimisaki mpe nasalaki lisukulu moko oyo zulunalo moko ya lokota ya Lingelesi elobaki malamu mpo na yango.

Na ntango wana, Chypre ezalaki na Batatoli soki 100, mpe esengelaki bábunda etumba makasi mpo na kondima na bango. Basango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce bazalaki kotinda bato ya mobulu mpo na kopanza mayangani na biso, mpe ezalaki mbala na ngai ya liboso bábwakela ngai mabanga ntango nazali kosakola na bamboka ya mike. Esengelaki nayekola kobenda nzoto noki liboso ya likama! Na ntango ya botɛmɛli makasi ndenge wana, kondima na biso elendisamaki mpenza ntango batindaki bamisionɛrɛ mosusu na esanga yango. Dennis Matthews na mwasi na ye Mavis elongo na Joan Hulley mpe Beryl Heywood balandaki ngai na engumba Famagusta, nzokande Tom Goulden na mwasi na ye Mary bakendaki na engumba Limassol elongo na Nina Constanti, moto ya Chypre oyo abotamaki na Londres. Kaka na ntango yango, batindaki mpe Bill Copson na Chypre; mpe na nsima, Bert Vaisey na mwasi na ye Beryl.

Namesanaki na mbongwana ya ndenge na ndenge

Na nsuka ya 1957, nabɛlaki mpe nakokaki lisusu te kokoba na mosala ya misionɛrɛ na esanga yango. Na mawa nyonso, nazwaki ekateli ya kozonga na Angleterre mpo na kokende komisalisa. Ntango nakómaki kuna nakobaki kosala lokola mobongisi-nzela tii na 1960. Nafandaki epai ya yaya na ngai ya mwasi na mobali na ye; kasi makambo ebongwanaki. Bomoi ekómaki mpasi mpo na yaya na ngai Joan. Asengelaki kokokisa bamposa ya mobali na ye mpe ya mwana na bango ya mwasi; longola yango, na boumeli ya mbula 17 oyo ngai nazalaki te, abatelaki na bolingo mpenza tata mpe mama-leki Millie oyo bakómaki mibange mpe bazalaki kobɛla mingi. Namonaki ete esengelaki nalanda ndakisa ya komipesa oyo mama-leki na biso apesaki, yango wana nafandaki na yaya na ngai ya mwasi tii ntango mama-leki mpe tata bakufaki.

Nakokaki kotikala na Angleterre, kasi nsima ya kopema moke, namonaki ete nazalaki na mokumba ya kozonga na esika oyo batindaki ngai, mpamba te ebongiseli ya Yehova ebebisaki mbongo mingi mpo na kopesa ngai formasyo. Yango wana, na 1972, ngai moko nafutaki tike mpe nazongaki na Chypre mpo na kosala lisusu lokola mobongisi-nzela na esanga yango.

Nathan Knorr ayaki kuna mpo na kobongisa liyangani ya etúká oyo esengelaki kosalema na mbula oyo elandi. Ntango ayebaki ete nasilaki kozonga na esanga yango, asɛngaki bápona ngai lokola mokɛngɛli ya zongazonga mpo na esanga wana mobimba; yango nde mosala nasalaki na boumeli ya mbula minei. Kasi mosala yango ezalaki kobangisa mpenza, mpamba te yango ezalaki kosɛnga nalobaka lokota ya Grɛki ntango nyonso.

Ntango ya yikiyiki

Ngai na Paul Andreou, Motatoli moko ya Chypre oyo azalaki koloba Grɛki, tozalaki kofanda na ndako moko na mboka Karakoumi, oyo ezali na ɛsti ya Kyrenia, na bokula ya nɔrdi ya esanga yango. Biro ya filiale ya Chypre ezalaki na engumba Nicosie, na sudi ya Bangomba ya Kyrenia. Na ebandeli ya sanza ya Yuli 1974, nazalaki na Nicosie ntango balongolaki prezida Makarios na bokonzi na makasi, mpe namonaki ndenge ndako na ye ezikaki. Ntango bafungolaki nzela, nazongaki nokinoki na Kyrenia, esika tozalaki kozwa bibongiseli mpo na liyangani ya zongazonga. Nsima ya mikolo mibale, nayokaki ntango bɔmbi ya liboso ekweaki na libongo, mpe namonaki ndenge likoló etondaki na ba hélicoptère oyo ezalaki komema basoda oyo bautaki ekólo Turquie.

Lokola nazalaki moto ya ekólo Angleterre, basoda ya Turquie bamemaki ngai pene na engumba Nicosie; kuna, basali ya ONU batunaki ngai mituna, mpe bamekaki kosolola na biro ya filiale. Na nsima, esengelaki nasala likambo moko oyo ebangisaki ngai mingi: nasengelaki koleka na esika oyo ezalaki na bansinga ya telefone mpe ya kura mpe kokatisa ndelo oyo ekabolaki ngámbo mibale oyo ezalaki kobunda; nsima ya kosala bongo nakómaki na bandako oyo bakóló na yango basundolaki yango. Nazalaki mpenza na esengo mpamba te natikaki te kosolola na Yehova Nzambe! Mabondeli oyo nazalaki kosala esungaki ngai na boumeli ya ntango wana ya mpasi mingi koleka oyo nyonso nakutaná na yango na bomoi na ngai.

Nabungisaki biloko na ngai nyonso, kasi nazalaki na esengo mpamba te, na biro ya filiale, nazalaki na likama te. Kasi likambo yango ezalaki se mpo na mwa ntango moke. Nsima ya mwa mikolo, basoda oyo bakɔtaki na esanga na makasi mpo na kobundisa yango bazwaki eteni na yango ya nɔrdi. Mpo na yango, tosengelaki kotika Betele mpe tokendaki kofanda na engumba Limassol. Kuna, nazalaki na esengo ya kosala elongo na komite moko oyo esalemaki mpo na kosalisa bandeko 300 oyo bazalaki mpenza na mikakatano mpo na yikiyiki nyonso wana oyo ezalaki na mboka, mingi kati na bango bazalaki lisusu na bandako te.

Mikumba ebongwani mbala na mbala

Na sanza ya Yanuali 1981, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki ngai nakende na Grèce mpo na kosala na Betele ya Athènes; na nsuka ya mbula yango, nazongaki na Chypre mpe baponaki ngai mokambi ya komite ya filiale. Andreas Kontoyiorgis na mwasi na ye Maro, bato ya Chypre oyo bautaki na Londres, bakómaki mpenza mpo na ngai “lisungi oyo ezali kolendisa.”​—⁠Bakolose 4:​11, NW.

Ntango Theodore Jaracz, mokɛngɛli ya zone, asilisaki kotala filiale na biso na 1984, nazwaki mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo elobaki kaka mwa maloba moke, ete: “Ntango ndeko Jaracz akosilisa kotala filiale na bino, tokosepela ete okende elongo na ye na ekólo Grèce.” Bayebisaki ngai te ntina oyo nasengelaki kokende elongo na ye; kasi ntango tokómaki na Grèce, batángelaki komite ya filiale mokanda mosusu oyo eutaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mokanda yango emonisaki ete baponi ngai mokambi ya komite ya filiale na mboka wana.

Na ntango wana, na mbalakaka, bandeko mingi ya Grèce bakómaki kopɛngwa. Bazalaki mpe kofunda biso mingi ete tozali kokɔtisa bato na makasi na lisangá na biso. Mokolo na mokolo, bazalaki kokanga basaleli ya Yehova mpe kofunda bango na batribinale. Oyo nde libaku malamu nazalaki na yango ya koyebana na bandeko mibali mpe basi oyo bayikaki mpiko mpe batikalaki sembo liboso ya komekama wana! Na nsima, bandeko mosusu basambaki ata liboso ya Cour européenne des droits de l’homme mpe balongaki; nyonso wana ebimisi mbuma malamu na mosala ya kosakola na Grèce.c

Ntango nazalaki na Grèce, nakendaki na mayangani ya etúká oyo esalemaki na bingumba Athènes mpe Thessalonique, mpe na bisanga ya Rhodes mpe ya Crète; tii lelo nabosanaka yango te. Mbula minei oyo nalekisaki na Grèce ezalaki bambula ya esengo mpe epesaki ngai mbano mingi; kasi mbongwana mosusu ezalaki kozela ngai: esengelaki nazonga na Chypre na 1988.

Na Chypre mpe na Grèce lisusu

Na boumeli ya ntango oyo nazalaki lisusu na Chypre te, bandeko batongaki bandako mosusu ya filiale na engumba Níssou, oyo ezalaki mosika mingi te na engumba Nicosie. Carey Barber, ye autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, asalaki lisukulu ya bofungoli. Sikoyo makambo ekómaki kotambola malamu na esanga yango, mpe nasepelaki mingi ndenge nazongaki kuna; kasi mosika te mbongwana mosusu ezalaki kozela ngai.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete bátonga Betele ya sika na Grèce, mosika mingi te na nɔrdi ya engumba Athènes. Lokola nayebaki koloba Lingelesi mpe Grɛki, na 1990, basɛngaki ngai nazonga kuna mpo ete, na esika oyo bazalaki kotonga Betele yango ya sika, nazala mobongoli mpo na bandeko ya mikili mosusu oyo bayaki kosala wana. Tii lelo, nabosanaka ata moke te esengo oyo nazalaki na yango ya kokóma na esika ya mosala na ngonga ya 6 ya ntɔngɔ na eleko ya molunge mpo na kotombela boyei malamu na bankama ya bandeko mibali mpe basi ya Grèce, oyo bamipesaki na bolingo na bango moko mpo na kosala elongo na batongi! Nakobosana soko moke te esengo mpe molende oyo bazalaki na yango.

Basango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe bato na bango balingaki kokɔta na esika oyo tozalaki kosala misala na biso mpo bátya mobulu, kasi Yehova ayokaki mabondeli na biso, mpe abatelaki biso. Natikalaki wana, na esika oyo bazalaki kotonga Betele, tii ntango bafungolaki bandako yango ya sika ya Betele na mokolo ya 13 Aprili 1991.

Natikali mpo na kosunga yaya na ngai ya bolingo

Na mbula oyo elandaki, nakendaki konje na Angleterre; nafandaki epai ya yaya na ngai ya mwasi na mobali na ye. Likambo ya mawa, ntango nazalaki wana, mobali na ye abɛlaki maladi ya motema, akangamaki mbala mibale mpe akufaki. Joan asalisaki ngai mingi na boumeli ya mosala na ngai ya misionɛrɛ. Ezalaki mpenza kosalema te ete pɔsɔ mobimba eleka kozanga ete akomela ngai mokanda mpo na kolendisa ngai. Mikanda ya ndenge wana ezalaka mpenza likambo moko ya malamu mpo na misionɛrɛ nyonso! Sikoyo, lokola mobali na ye akufaki mpe nzoto na ye ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ te, azalaki na mposa ya lisungi. Nasengelaki kosala nini?

Thelma, mwana mwasi ya Joan na mobali na ye basilaki kondima mokumba ya kobatela mwasi mosusu ya sembo ya lisangá na bango, oyo mpe mobali na ye akufá; mwasi yango, ezalaki mwana ya nɔkɔ na biso, azalaki na maladi oyo ezalaki kozela bobele liwa. Yango wana, nsima ya kobondela mbala mingi, nazwaki ekateli ete natikala wana mpo na kobatela Joan. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na komesana na bomoi wana; kasi sikoyo nazali na libaku malamu ya kosala lokola nkulutu na lisangá ya Pen Mill, moko ya masangá mibale ya mboka Yeovil.

Bandeko ya mikili mosusu oyo nasalaki na bango babengaka ngai na telefone mpe bakomelaka ngai mikanda ntango nyonso; nazali na botɔndi mingi mpo na yango. Soki nalobi lelo nazonga na Grèce to na Chypre, nayebi ete bandeko na ngai bakotindela ngai tike noki mpenza. Kasi sikoyo nazali na mbula 80, mpe ezala miso na ngai to bokolongɔnɔ ya nzoto na ngai ezali lisusu te ndenge ezalaki kala. Lokola nazali lisusu te na makoki ya kosala ndenge nazalaki kosala liboso, yango nde likambo oyo elɛmbisaka mpenza; kasi bambula oyo nasalaki na Betele esalisaki ngai nazala na mimeseno mingi oyo ezali kosalisa ngai lelo. Na ndakisa, nazalaka kaka na momeseno ya kotánga mokapo ya mokolo liboso ya komɛla tii na ntɔngɔ. Nayekolaki mpe ndenge ya kofanda malamu na bato mpe kolinga bango, makambo mibale oyo ezali sɛkɛlɛ ya mosala ya misionɛrɛ.

Soki nakanisi lisusu mbula kitoko soki 60 oyo nalekisi na kokumisa Yehova, namonaka ete mosala ya ntango nyonso ezali libateli oyo eleki malamu mpe epesaka mateya oyo eleki malamu. Ngai mpe nakoki koloba na motema na ngai mobimba maloba oyo Davidi alobaki mpo na Yehova, ete: “Ozali [ebombamelo] na ngai mpe ekimelo na mokolo na mpasi na ngai.”​—⁠Nzembo 59:⁠16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisolo ya bomoi ya John Wynn ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1997, nkasa 25-28, ezali na motó ya likambo “Motema na ngai ezali na botɔndi mingi.”

b Liboso eyebanaki na nkombo Consolation.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Dɛsɛmbɛ 1998, nkasa 20-21, mpe ya 1 Sɛtɛmbɛ 1993, nkasa 27-31; Lamuká! ya 8 Yanuali 1998, nkasa 21-22, mpe ya 22 Marsi 1997, nkasa 14-15 (na Lifalanse).

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

GRÈCE

Athènes

CHYPRES

Nicosiea

Kyrenia

Famagusta

Limassol

[Elilingi na lokasa 21]

Mama, na 1915

[Elilingi na lokasa 22]

Ngai (moto ya minei kobanda na lobɔkɔ ya mwasi) na bandeko mosusu ya kelasi ya mbala ya mwambe ya Gileadi likoló ya Betele ya Brooklyn, na 1946

[Elilingi na lokasa 23]

Ngai na mama-leki Millie ntango nazongaki na Angleterre mpo na mbala ya liboso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto