“Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova”
Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
NA Espagne, moklisto moko ya mwasi alobaki boye: “Tozali bandeko ebele oyo tozali na bomoi ya esengo atako tozali minzemba.” Nini epesaka bango esengo? “Tosepelaka mpo tozalaka te na mitungisi mingi oyo bato mosusu bazalaka na yango, yango wana tokoki kosala mingi na mosala ya Yehova, Nzambe na biso.”
Makanisi wana eyokani na oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na minzemba. Ntango ntoma Paulo alobelaki libala, apesaki toli oyo epemami na Nzambe: “Nazali koloba na bato oyo babalá naino te mpe na basi bakufelá mibali ete, ezali malamu bátikala ndenge ngai nazali.” Paulo ye moko azalaki monzemba. Kasi, mpo na nini alendisaki likambo ya kotikala monzemba? Amonisaki ete moto oyo abalá atyaka makanisi na ye na makambo mingi, nzokande mobali to mwasi oyo abalá te “amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo.” (1 Bakolinti 7:8, 32-34) Kosalela Yehova ezali ntina ya libosoliboso oyo epesaka monzemba esengo.
Kotikala monzemba mpo na mokano moko ya malamu mingi
Maloba ya Paulo ekoki kokamwisa bato oyo bakoli na bamboka oyo bamonaka ete kobala mpe kobota ezali na ntina mingi na bomoi ya moto. Nzokande, Yesu Klisto—ye moko mpe abalaki te, kasi azalaki na bomoi ya esengo—alobelaki mokano ya malamu mingi mpo na baklisto oyo bazali minzemba. Alobaki boye: “Ezali na mikube oyo bamikómisá bango moko mikube mpo na bokonzi ya likoló. Oyo akoki kopesa nzela na yango apesa nzela na yango.”—Matai 19:12.
Ndenge kaka maloba yango emonisi, bato mingi bamoni ete kozala monzemba esalisaka bango básalela Nzambe kozanga kotya makanisi na makambo mosusu oyo bato oyo babalá bakanisaka. (1 Bakolinti 7:35) Baklisto mingi bazali kosalela Yehova na esengo atako babalá te, mpe bazali kosepela mingi ndenge bazali komipesa na kosalisa bato mosusu.a
Baklisto mingi oyo bazali minzemba bamonaka ete ezali kaka te bato oyo babalá nde bazalaka na esengo mpe ete minzemba nyonso te nde bazalaka mawamawa. Bato nyonso, ezala baoyo babalá to minzemba, na bantango mosusu bazalaka na esengo mpe na bantango mosusu bazalaka na mawa. Kutu, Biblia elobi ete libala ememaka “bolɔzi na kati ya mosuni.”—1 Bakolinti 7:28.
Monzemba mpo na makambo mosusu
Baklisto mingi bazali minzemba; ezali te mpo baponi yango, kasi mpo na makambo mosusu. Mbala mosusu bazalaka na mposa ya kobala. Kasi, mpo na bamosusu, kozanga mbongo to mpe makambo mosusu ezali kopekisa bango bábala sikoyo. Baklisto mosusu—kati na bango ebele ya bandeko basi—bazali minzemba mpo bazali na ekateli makasi ya kotosa toli ya Biblia ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:39) Bandeko yango balukaka molongani kaka oyo azali mosambeli ya Yehova oyo amipesi mpe azwi batisimo.
Bamosusu kati na bango bamiyokaka ntango mosusu ete bazali kaka bango moko. Ndeko mwasi moko andimaki ete likambo yango ekómelaka ye, kasi alobaki boye: “Toyebi mobeko ya Yehova mpe tolingaka koyokisa ye mawa ata moke te. Tozalaka mpe na mposa ya kobala, kasi ata soki bato mosusu bazali koluka kolakisa biso mibali oyo ‘babongi na biso,’ toboyaka na motema moko. Tolingaka ata moke te kolekisa ntango na mibali to basi oyo bazali baklisto te.” Ebongi mpenza tópesa baklisto ya ndenge wana longonya mpamba te bazali kolanda toli ya Biblia mpe bazali kobatela bizaleli malamu mpo na kosepelisa Yehova ata soki bamitungisaka to bayokaka mawa mpo bazwi naino molongani te.
Lisalisi ya Nzambe
Yehova azalaka sembo epai ya baoyo balakisaka ete bazali sembo epai na ye, na ndakisa na ndenge baboyaka kobala bato oyo bazali basaleli ya Yehova te. Makambo oyo Mokonzi Davidi amonaki na bomoi na ye etindaki ye aloba boye: “Epai ya moto ya sembo [yo Yehova] okomimonisa sembo.” (Nzembo 18:25) Yehova alaki baoyo bazali kosalela ye na bosembo ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebele 13:5) Na ndakisa ya Yehova, tokoki kopesaka longonya epai ya baklisto nyonso, bilenge to mikóló, oyo bazali minzemba mpe bazali kotosa Liloba ya Nzambe na bosembo. Tokoki mpe kobondela Yehova apesa bango makasi ya kolonga mikakatano na bango.—Basambisi 11:30-40.
Baklisto mingi oyo bazali minzemba bamonaka ete komipesa na mosala ya koteya bato Biblia ezali kosalisa bango bázala na bomoi oyo ezali na ntina. Tózwa ndakisa ya Patricia, ndeko mwasi moko ya mbula 35 oyo azali monzemba mpe mobongisi-nzela. Alobi boye: “Atako kozala monzemba ezalaka na komekama mingi, bomoi yango epesi ngai libaku ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola nazali na mobali te, programɛ na ngai ezalaka mindɔndɔ te, mpe yango epesaka ngai ntango mingi ya koyekola. Nayekoli mpe kotyela Yehova motema mingi, mingimingi ntango nakutani na mikakatano.”
Makanisi wana euti na elaka ya Biblia oyo: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5) Ya solo, basaleli nyonso ya Yehova, ezala baoyo babalá to minzemba, bakoki kobɔndisama mpe kolendisama na maloba oyo: “Lisalisi na ngai ekouta epai ya Yehova.”—Nzembo 121:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2005, Yuli/Augusto.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
“Mobali oyo abalá te amitungisaka mpo na makambo ya Nkolo, ndenge akoki kondimama na Nkolo.”—1 BAKOLINTI 7:32
[Etanda na lokasa 8]
MAKAMBO OYO EKOKI KOSALISA MONZEMBA AZALA NA ESENGO
Yesu abalaki te; alobaki boye: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”—Yoane 4:34.
Bana basi minei ya Filipi oyo bazalaki minzemba bamipesaki na ‘kosakola.’—Misala 21:8, 9.
Bandeko basi minzemba oyo basakolaka nsango ya Bokonzi bazali na kati ya ‘ebele ya basi oyo bazali kopalanganisa nsango malamu.’—Nzembo 68:11, NW.