Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/6 nk. 16-20
  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mibu milekisami na bomoi ya monzemba mipambolami
  • Bolamu oyo ekozwama na bomoi ya monzemba ya peto
  • Bandakisa ya kala
  • Bandakisa ya ntango na biso
  • Minzemba oyo bazali komibatela
  • Avenire ya esengo
  • Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Yebá kosalela malamu bonzemba na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Pesá nzela na yango’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Minzemba oyo bazali kosepela na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/6 nk. 16-20

Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami

’Akokangwa ete abalana na ye oyo elingi ye, kasi kati na Nkolo. Nde na makanisi na ngai, akozala na esengo koleka soko akotikala lokola ezali ye.’​—1 BAKOLINTI 7:39, 40.

1. Ezala tosili kobala to naino tobali te, mokumba nini tozali na yango epai na Jéhovah?

EBONGI ete baoyo nyonso bamipesi na Jéhovah basambela ye na molimo na bango mobimba. Ezala tosili kobala to te, tosengeli kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na elimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso. (Malako 12:30) Ya solo, likebi ya moklisto monzemba ekobendama na makambo mingi te wana ezali ye kosalela Nzambe, nzokande ezali bongo te mpo na moklisto oyo asili kobala. Kasi, moklisto monzemba akoki mpenza kozala na esengo?

2, 3. (a) Na mokuse, Paulo alobi nini kati na 1 Bakolinti 7:39, 40? (b) Mituna nini misengeli kotalelama?

2 Ntoma Paulo ayanoli ete akoki kozala na esengo. Na ntina na baoyo babalaki kasi sikawa bakomi minzemba, akomaki: “Mwasi akangami na mobali na ye na ntango wana ezali ye na bomoi. Soko mobali akokufa, akokangwa ete abalana na ye oyo elingi ye, kasi kati na Nkolo. Nde na makanisi na ngai, akozala na esengo na koleka soko akotikala lokola ezali ye. Nabanzi mpe ete ngai nazali na elimo na Nzambe.”​—1 Bakolinti 7:39, 40.

3 Mpo ete Paulo amonisi ete baklisto oyo babali te bakoki kozala na esengo, bamoko bakoki te kotikala minzemba ata mpo na mwa ntango? Eloko nini ekoki kopesa minzemba esengo? Mpe na likambo nini kotikala monzemba ezali lolenge ya bomoi epambolami?

Mibu milekisami na bomoi ya monzemba mipambolami

4. Makoki nini bilenge bazali na yango, nzokande bamosusu bakosalaka nini na eleko yango?

4 Mokonzi na mayele Salomó apesaki elendiseli oyo: “Kanisa Motongi na yo na mikolo na bolenge na yo, naino mikolo mabe eyei te (mikolo ya bobange), naino bilanga ekomi te wana okolobaka ete: ‘Nazali na esengo na yango te.”’ (Mosakoli 12:1) Na bolenge, mingimingi moto azali makasi mpe na nzoto kolongono. Ekozala malamu na kozwa litomba na makoki yango mpo na kosalela Jéhovah kozanga komipesa na makambo mosusu! Ekozala mpe malamu na koyeba kosalela mibu ya bolenge mpo na kozwa eksperianse. Kasi ezali mpe na boumeli ya eleko yango ete bilenge ya mokili bamipesaka na kolingalinga basi to mibali. Bolukiluki moko esalemaki epai na bilenge 1 079 ya mbula 18 kino 24 emonisaki ete mokomoko kati na bango asilaki kolingana na basi to mibali nsambo kati na bomoi na ye. Bango nyonso balobaki ete basi to mibali oyo balinganaki na bango na ntango oyo batunamaki, ezalaki bolingo ya solo, kasi bolingo ya ntango moke te.

5. Mituna nini mitali libala, elenge mokomoko asengeli komituna yango na litomba mpenza?

5 Nzokande, mituya mitali kokabwana ya babalani, koboma mabala mpe bantina mosusu ya kopanzana ya mabota emonisi polele ete ezali likambo na mayele te ya kobala wana moto azali naino mwana. Na esika ya kowela komesana na bilenge mibali to basi mpe kobala, bilenge baklisto oyo bazali na mayele bazali kokanisa malamu na ndenge oyo bakoki kozwa litomba na bolenge na bango mpo na kosalela Jéhovah kozanga kobendama na makambo mosusu. Bilenge, na kokanisaka na ezalela na bino, bomituna mituna milandi: Sikawa, nasili kotela mpo na likambo etali kolinga mpe nazali pene mpo na komikotisa na libala? Nasili kozwa eksperianse mingi mpo ete nazala mobalani malamu? Nakoki kokokisa malamu mikumba ya libala mpe mbala mosusu kobokola bana? Mpo ete namipesi epai na Jéhovah, nasengeli te kopesa ye makasi oyo ezali na ngai na bolenge na ngai kozanga ete yango ebebisama na mikumba ya libala?

Bolamu oyo ekozwama na bomoi ya monzemba ya peto

6, 7. (a) Mingimingi bomoi ya monzemba ezalaka na matomba nini oyo ezangi epai na bato babali? (b) Na ntina yango misionere moko monzemba na Afrike, alobaki nini?

6 Baklisto minzemba babendami na mikumba ya libala te, mpe bakoki kosala “mosala mingi kati na Nkolo”. (1 Bakolinti 7:32-34; 15:58) Na esika ya kotya likebi se epai na moto moko (mobali to mwasi), monzemba azali na likoki ya komizipola kati na bolingo ya boklisto na komibanzabanzaka mpo na bandeko mingi ya lisangá, ata baoyo basili kokoma mibange to bazali na mposa ya likebi etondi na bolingo. (Nzembo 41:1) Mingimingi, baklisto minzemba bazali na ntango koleka mpo na koyekola mpe kokanisa na mozindo Liloba ya Nzambe. (Masese 15:28) Bakoki kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah kozanga mpasi, koyekola komipesa mobimba epai na ye mpe koluka litambwisi na ye. (Nzembo 37:5; Bafilipi 4:6, 7; Yakobo 4:8) Monzemba moko oyo asalelaki Jéhovah lokola misionere na Afrike na boumeli ya bambula ebele alobaki mokolo mosusu:

7 “Na boumeli ya bambula yango nyonso, bomoi kati na bamboka ya Afrike ezalaki na mindondo te, makambo makopengwisaka likebi, oyo mazali kati na bingumba minene mazalaki te. Na ndenge yango, nazalaki na likoki monene mpenza ya koyekola mpe kokanisa na mozindo na Liloba na Nzambe. Yango epesaki ngai nzela ya kotikala makasi. Na yango, bomoi ya misionere ezalaki mpenza lipamboli mpe libateli liboso na mposa ya biloko ya mosuni. Na boumeli ya bampokwa kitoko ya Afrike, nazalaki na ntango mingi ya kokanisa na mozindo likoló na biloko bizalisamaki na Jéhovah mpe kobelema pene na ye; esengo na ngai eyaka makasi, na mpokwa nyonso, wana ezali ngai kotambola ngai moko, na ntango myoto ezali kongala na likoló mpe nazali kosolola na Jéhovah. Yango ezali kobelemisa ngai pene na ye.”

8. Moklisto moko mwasi abala te, mpe asalaki bambula mingi na siege ya la Société, alobaki nini mpo na bomoi ya monzemba?

8 Moklisto mwasi monzemba oyo asalaki bambula mingi na siege ya la Société Watch Tower ayebisi biso makanisi na ye: “Naponaki kofanda ngai moko mpo na kosalela Jéhovah. Kasi nazalaki mpenza ngai moko? Te. Na solo, ntango oyo nalekisaka ngai moko ezali kati na oyo eleki motuya. Ndenge yango nazali na likoki ya kosolola na Nzambe kati na libondeli, komipesa na kokanisa mozindo mpe koyekola kozanga ete natya likebi na makambo mosusu. . . . Bomoi ya monzemba esalisaki ngai mingi ete nazala na esengo.”

9. Tanga mabaku malamu oyo epesameli baklisto minzemba?

9 Minzemba bakoki lisusu kondima mabaku malamu ya mosala oyo baklisto babali bakoki kondima yango te mpo bazali na mikumba ya libota. Bazali mbala mosusu na likoki ya kokende kosala lokola pionnier kati na régio epai kuna mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene mpenza. Elenge moko monzemba akoki kozwa libaku malamu ya kokoma mosangani ya Béthel na sičge ya la Société Watch Tower to kati na moko na bafiliales na yango. Elenge mwasi akoki kozwa esengo ya kokende kofanda elongo na moklisto mosusu ya mwasi oyo asili kokola mingi mpe azali pionnier kati na lisangá na ye to na lisangá mosusu, oyo teritware na yango etalemaka mingi te. Mpo na nini okosolola te na ntina na makoki yango epai ya mokengeli ya zongazonga? Baklisto minzemba, bomipesa mpo na kokokisa mosala monene oyo ekosanzola Jéhovah. Soko bokosala ndenge yango, akopambola bino mingi.​—Malaki 3:10.

Bandakisa ya kala

10. Wapi ndakisa eleki malamu ya mosaleli na Jéhovah oyo abalaki te, mpe mpo na nini tokoki koloba ete bomoi ya monzemba ezalaki na litomba mpo na ye?

10 Yesu Klisto azalaki ndakisa eleki malamu ya mosaleli na Jéhovah oyo abalaki te. Amipesaki mobimba mpo na kokokisa mokano na Nzambe. Alobaki boye: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano na Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Azalaki na mosala mingi - mpo na kosakola, kobikisa bato na bokono, mpe kokokisa makambo mosusu. (Matai 14:14) Azalaki kosepela na bato mosusu na bosembo nyonso mpe azalaki komiyoka malamu elongo na mibali, basi mpe bana. Mosala na ye ezalaki kosenga ye ete akenda mibembo, mbala mosusu elongo na bato mosusu. (Luka 8:1-3) Kanisa ndenge mosala yango elingaki kozala mpasi mingi epai na ye soki azalaki na mwasi mpe bana mike! Kozanga ntembe, kozala monzemba ezalaki litomba mpo na Yesu. Na mikolo na biso, bomoi ya monzemba ekoki kozala na matomba ndenge moko mpo na moklisto, mingimingi soki abengami ete asakola nsango ya Bokonzi na bamboka mosika to esika ezali na makama.

11, 12. Bandakisa nini ya minene baklisto minzemba oyo bazali kosalela Jéhovah na eleko na biso bakoki kotalela?

11 Bato mosusu mpe bamonaki ete bomoi ya monzemba ezalaki lolenge ya bomoi ezali na litomba mpe epambolami. Mwana na Yefeta ya mwasi akokisaki na motema malamu elaka ya tata na ye na kotikalaka monzemba kati na bato oyo bazalaki kopesa ntina mingi na libala mpe na bana. Azwaki esengo mpo na kosalela Jéhovah mpe ezali likambo na ntina ya koyeba ete azalaki kolendisama mbala na mbala; na yango, “bana basi na Yisraele bakendaki mbula na mbula kolela mwana mwasi na Yefeta Mogilada mikolo minei na kati na mbula.” (Basambisi 11:34-40) Bobele bongo, na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe oyo babali mpe basusu basengeli kokumisa mpe kolendisa baklisto minzemba oyo bazali kosalela Jéhovah na molende nyonso.

12 Bana basi minei ya Filipe, bango baseka bazalaki “basakoli”. (Misala 21:8, 9) Basi yango basepelaki solo na mosala na bango ya molende oyo bazalaki kokokisa mpo na kosanzola Jéhovah. Ndenge moko mpe lelo, bilenge basi mingi minzemba bazali na libaku ya kosala lokola ba pionniers, to basakoli ya Bokonzi mpo na ntango nyonso. Na ntembe te, baklisto yango, basangani na ‘limpinga monene ya basi bazali kosakola nsango malamu’ basengeli solo kokumisama.​—Nzembo 68:11.

13. Ndenge nini likambo ya Paulo emonisi ete bomoi ya monzemba ekoki kozala lolenge ya bomoi epambolami?

13 Ntoma Paulo amonaki ete bomoi ya monzemba ezalaki litomba mpo na ye. Na mosala na ye, atambolaki bankoto na bakilomčtre, akutanaki na mikakatano minene mpe makama mingi, alekisaki butu kozanga kolala mpe akufaki nzala. (2 Bakolinti 11:23-27) Na ntembe te, elingaki kozala na ye mpasi mpo na koyikela makambo nyonso wana mpiko soko abalaka. Mpe lisusu, alingaki te kozwa mikumba nyonso oyo mipesamelaki ye lokola “ntoma na mabota” soko azalaka na libota. (Baloma 11:13) Ata asengelaki koyikela minyoko mpiko, Paulo amonaki ye moko ete bomoi ya monzemba ezali lolenge ya bomoi epambolami.

Bandakisa ya ntango na biso

14. Basakoli ya liboso ya nsango malamu oyo mingi na bango bazalaki minzemba azalaki na bomoi ya ndenge nini?

14 Lokola Paulo mpe baklisto mosusu ya liboso oyo babalaki te, liboke moke ya basaleli na Nzambe oyo basanganaki na mosala ya kopanza nsango malamu (mosala oyo ebandaki na 1881) bazalaki minzemba oyo bazalaki na mokumba te. Na bolingo na bango moko, bazalaki kokenda na bingumba ya minene mpe ya mike, na zamba esika bayebaki te, mpo na koluka bato ya mitema sembo mpe kotikela bango mikanda mikolimbolaka Biblia. Bazalaki kotambola na bingunduka, na vélo, na motuka ebendamaki na mpunda to motuka ya moteur, Mbala mingi, bazalaki kotambola na makolo kolekaka na ndako na ndako na esengo nyonso. (Misala 20:20, 21) Témoin de Jéhovah moko alobi boye: “Mbala mosusu bazalaki kozwa miliki, nsoso, savon na esika ya mbongo ya mikanda oyo bazalaki kokabola. Bazalaki kobomba biloko yango to kotekela yango bato mosusu. Na bamboka oyo bafandi bazalaki mingi te, mbala mosusu bazalaki kolala epai na basali bilanga, epai na babokoli na bibwele to ata na ba hangare to bibombelo ya loso. . . . Baklisto ya sembo (oyo mingi kati na bango bazalaki minzemba) balendendelaki bambula mingi, kino ntango bakomaki bampaka nde batikaki lolenge wana ya mosala.” Kozanga ntembe, moklisto mwasi moko abimisi mayoki ya basakoli nyonso ya eleko wana: “Tozalaki bilenge mpe tozalaki na esengo na mosala. Tozalaki kosalela makasi na biso mpo na Jéhovah na esengo nyonso.”

15. Ekuke nini ekopesaka nzela na mosala monene efungwamelaki ba pionniers mingi minzemba, esili koleka sikawa mbula 45?

15 Na bambula eleki, bobele na ntango na biso, ba pionniers, ebengeli oyo na nsima epesamaki epai na basakoli ya ntango nyonso, mingi kati na bango bazalaki mpe minzemba. Bazalaki mingimingi kopesa litatoli na bamboka mosika, bazalaki kosala masangá ya sika, mpe bazalaki na esengo mosusu kati na mosala ya Jéhovah. Bamoko kati na bango bazwaki libaku ya kobakisa mosala na bango ntango Ecole de Galaad efungwamaki na 1943, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala. (1 Bakolinti 16:9) Na bongo, mingi kati na ba pionniers yango, oyo bazalaki minzemba bazwaki formation na Ecole de Galaad mpo na kokoma ba misionnaires, nsima na yango nde babandaki kosakola nsango ya Bokonzi na ba teritware ya sika. Lokola bazalaki na mokumba te, bamipesaki na mosala ya Jéhovah. Bamosusu babimaki na bakelasi ya liboso na eteyelo yango, bazali naino minzemba kino lelo mpe makasi kati na mosala ya missionnaire to lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso.

16. Eloko nini emonisi ete minzemba bakosalaka na Béthel bamonaki ete bomoi ya monzemba epamboami?

16 Baklisto mingi minzemba bazali uta bambula ebele basangani ya libota ya Béthel na sičge ya la Société to na moko na bafiliales na yango ezwami kati na mokili mobimba. Bakaboli likanisi elobi ete bomoi ya monzemba ezali lolenge ya bomoi epambolami? Ee, solo mpenza. Tala na ndakisa, oyo Témoin moko monzemba alobaki nsima na kosala na Béthel ya Brooklyn bambula ebele: “Esengo ya komona bamilió na bazulunalo mpe mikanda mosusu, kopanza nsango ya Liloba na Nzambe kino na nsuka ya mabelé, ezalaki mbano monene mpo na ngai.” Wana esilaki ye kosala mbula 45 na Béthel, monzemba mosusu alobaki: “Mokolo nyonso nasengaka kati na libondeli epai na Tata na biso na makoló ete asalisa ngai mpe apesa ngai mayele, mpo natikala makasi na elimo mpe na nzoto kolongono mpo na kokokisa mokano na ye. . . . Nazalaki na bomoi ya esengo, epambolami mpe esepelisaki ngai makasi.”

Minzemba oyo bazali komibatela

17. Tanga makambo mibale oyo makoki kosalisa baklisto minzemba ete bamibatela peto?

17 Lokola tomonaki yango, tozali na bandakisa ezwami na Biblia mpe bandakisa mosusu ya ntango na biso emonisi ete bomoi ya monzemba epambolami. Kasi ya solo, na ntango nyonso oyo azali monzemba, moklisto asengeli ‘kobatela makasi ekateli na motema na ye’. (1 Bakolinti 7:37) Nani akoki kosalisa ye amibatela? Ezali Jéhovah, ‘ye oyo akoyokaka mabondeli’, ye nde akoki kopesa ye lisalisi eleki motuya (Nzembo 65:2) Baklisto minzemba, bozwa ezaleli ya kosala mabondeli epai na Nzambe. “Boyika mpiko mpo na kobondela”, bosenga ye ete apesa bino elimo na ye mpe asalisa bino boboto mbuma na elimo yango, mingimingi kimya mpe komipekisa (Baloma 12:12; Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Epai mosusu, bokanisa na mozindo na batoli ya Liloba na Nzambe kati na libondeli mpe bosalelaka yango ntango nyonso.

18. Na likambo nini, toli oyo epesameli minzemba kati na 1 Bakolinti 14:20 ekoki kosalisa bango ete bamibatela?

18 Mwango mosusu ya komibatela peto ezali ya kokima eloko nyonso oyo ekolamusaka mposa na nzoto, bakisa mikanda ya mbindo mpe kominanola ezangi peto. Paulo alobaki: “Bozala bana mike kati na makambo mabe nde bokoma mikolo kati na makanisi.” (1 Bakolinti 14:20) Kolinga te oyeba to osala mabe, kasi na lisalisi na Nzambe monisa mayele na koyebaka eloko te kati na makambo mabe mpe kozala lokola bana mike na makambo yango. Kobosana mpe te ete Jéhovah aboi pite mpe etamboli mabe.

19. Ba versets nini mosusu ezwami na Biblia ezali kopesa batoli oyo ekoki kosalisa minzemba ete bamibatela peto?

19 Okomibatela mpe kozanga mbindo soko oyebi kopona baninga na yo. (1 Bakolinti 15:33) Kima baoyo balingaka kolobela mingi kosangana ya mobali na mwasi mpe libala kati na bomoi na bango. Kima mpenza masolo ya mbindo esalemi lokola liseki. Paulo apesi toli oyo: “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na babulami. Tika te ete bosoto bozala to maloba na zoba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopesaka matondi.”​—Baefese 5:3, 4.

Avenire ya esengo

20. Bolamu nini baklisto oyo bazali kosalela mibu na bango ya bolenge mpo na kosalela Jéhovah, bazali kozwa?

20 Baklisto minzemba oyo bazali kosalela Jéhovah na makoki na bango nyonso bazali kosepela uta sikawa mpe bazali kozwa kimya ya elimo. Yango ezali mpe kopesa nzela ete bakola mpe batela na elimo. Soko bakotikala minzemba mpo na Bokonzi kino nsuka na biloko mabe ya ntango oyo, Jéhovah akobosana te milende oyo bakosala na bolingo nyonso kati na mosala ya bosantu.

21. Soko ozwi ekateli ya kobala nsima na kolekisa bomoi ya monzemba ya peto, okozala na matomba nini?

21 Bino basaleli na Nzambe oyo bozali minzemba, bolamu ezali kozela bino soko bokosalela matomba ya Bokonzi na molende nyonso. (Masese 10:22) Wana ekozwa bino ekateli ya kobala na nsima, bokosala bongo nsima na kozwa eksperianse monene kati na bomoi mpe wana bokokoma makasi na elimo. Lisusu, na kolandaka toli ya Makomamami, bokopona mobalani amipesi na Jéhovah mpe ya bosembo oyo akosalisa bino ete bosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Kasi longwa sikawa kino ntango bokobala, bokomona ete bomoi ya monzemba ezali lipamboli ntango tozali kosalela Nzambe na biso ya bolingo, Jéhovah.

Bozongeli

◻ Matomba nini ezali kozwama na bomoi ya monzemba ya peto mpo na basaleli na Jéhovah?

◻ Bandakisa nini ezwami na Biblia emonisi ete bomoi ya monzemba ekoki kozala lolenge ya bomoi epambolami?

◻ Na eleko na biso, bandakisa nini tozali na yango ya minzemba bapambolami?

◻ Nini ekoki kosalisa moklisto monzemba ete atikala peto?

[Etanda na lokasa 19]

Minzemba mpo na komibatela peto

◆ Bosambelaka Nzambe mbala na mbala mpo apesa bino elimo na ye mpe asalisa bino mpo ete elimo yango ebotela bino mbuma

◆ Bokanisa na mozindo mpe bosalela ntango nyonso batoli ezwami na Liloba ya Nzambe

◆ Bokima mikanda mpe bafilms ya mbindo mpe kominanola ya mbindo

◆ Boyeba kopona baninga na bino

◆ Boboya maloba mpe maseki ya mbindo

[Bililingi na lokasa 17]

Mwana mwasi na Yefeta, ntoma Paulo mpe basaleli mosusu na Jéhovah bamonaki ete bomoi ya monzemba ezali lolenge ya bomoi epambolami. Bongo yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto