“Pole” likoló ya Biblia ya bibliotɛkɛ ya libosoliboso ya Russie
BATO mibale ya mayele bazalaki koluka bamaniskri ya kala ya Biblia. Moto na moto na ngámbo na ye asalaki mibembo na bisobe mpe alukaki na madusu, bamonastɛrɛ mpe bandako ya kala oyo ezali likoló ya mabanga. Bambula mingi na nsima, bakutanaki na bibliotɛkɛ ya libosoliboso ya Russie, epai bamaniskri mingi koleka mosusu nyonso oyo emonaná na mokili etyamaki. Bato wana bazalaki banani? Ndenge nini bamaniskri oyo bamonaki ekómaki na Russie?
Bamaniskri ya kala mpo na kolongisa Liloba ya Nzambe
Mpo tóyeba moko na bato yango, tózonga na ebandeli ya ekeke ya 19, ntango bato mingi na Mpoto bamipesaki na koyekola. Na eleko yango, makambo ya siansi ekolaki, bato bakómaki kosala biloko mingi ya sika mpe, bato mingi bakómaki koboya makambo oyo bato bazalaki kondima banda kala. Bato mosusu ya mayele bazalaki koluka komonisa ete Biblia elobaka solo te. Kutu, bato mingi ya mayele bazalaki koloba polele ete makambo oyo ezalaki na Biblia na ntango wana ekesanaki na oyo ezalaki liboso na mokanda yango.
Bato mosusu ya sembo oyo balukaki kolongisa Biblia bamonaki ete soki baluki biloko mosusu, na ndakisa bamaniskri oyo eyebanaki te, ekoki kosalisa mpo na komonisa ete Liloba ya Nzambe ezali solo. Bakanisaki ete soki bamoni bamaniskri oyo eumeli koleka oyo bazalaki na yango, ekosalisa bango bámonisa ete makambo oyo ezali na Biblia ebongwaná te, atako banda kala bato mosusu balukaki kolimwisa to kobebisa nsango na yango. Bamaniskri ya ndenge wana ekokaki mpe komonisa mwa bisika oyo mabunga ekɔtaki na bakopi.
Ekólo Allemagne ezali moko ya bisika oyo bato ya mayele bazalaki kotyana ntembe mingi likoló ya Biblia. Kuna, elenge moko oyo azalaki molakisi na iniversite azwaki mokano ya kosala mobembo oyo esalisaki ye amona bamaniskri mingi ya Biblia koleka mosusu nyonso oyo emonanaki liboso. Nkombo na ye ezalaki Konstantin von Tischendorf; moto yango ya mayele na makambo ya Biblia aboyaki makanisi ya bato oyo bazalaki koloba ete Biblia elobaka solo te mpe alongaki mpenza komonisa ete Biblia ebongwaná te. Na mobembo na ye ya liboso na esobe ya Sinai na mobu 1844 amonaki biloko oyo akanisaki kutu te. Ntango abwakaki liso na kitunga moko oyo batyaki biloko ya kala na monastɛrɛ moko, amonaki kopi moko ya kala ya Septante, to libongoli ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki; yango eumeli koleka bakopi nyonso oyo eyebanaki na ntango wana!
Tischendorf azalaki na esengo mingi mpe asalaki makasi amema nkasa 43. Akanisaki ete akoki komona mikanda mosusu; kasi, ntango azongaki lisusu kuna na mobu 1853 amonaki kaka mwa biteni. Biteni mosusu ezalaki wapi? Lokola Tischendorf azalaki lisusu na mbongo te, alukaki moto moko ya bozwi asunga ye mpe azwaki mokano ya kosala mobembo mosusu mpo na koluka bamaniskri ya kala. Kasi, alukaki naino kokutana na tsar (mokonzi) ya Russie.
Mokonzi asepeli na likanisi ya Tischendorf
Ekoki mpenza kozala ete Tischendorf, moto ya mayele na makambo ya Biblia oyo azalaki Protesta, azalaki komituna soki bakoyamba ye ndenge nini na Russie, ekólo monene ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Likambo ya malamu mpo na ye, na eleko yango makambo mingi ezalaki kobongwana na Russie. Lokola bazalaki kolobela mingi likambo ya koyekola, mokonzi-mwasi Catherine II afungolaki bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg na mobu 1795. Bibliotɛkɛ wana ya libosoliboso na Russie ezalaki na ebele ya mikanda oyo bamilio ya bato bakokaki kotánga.
Atako bazalaki koloba ete bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg ezalaki moko na babibliotɛkɛ oyo elekaki malamu na Mpoto mobimba, bibliotɛkɛ yango ezangaki eloko moko. Nsima ya mbula 50 banda bafungolá yango, bibliotɛkɛ yango ezalaki kaka na bamaniskri motoba ya Liebele. Yango ezalaki moke mingi na kotalela ndenge oyo bato ya Russie bakómaki kosepela koyekola minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia mpe na mosala ya kobongola. Catherine II atindaki bato ya mayele bákende koyekola Liebele na bainiversite ya Mpoto. Ntango bazongaki, bakómaki koteya Liebele na baseminɛrɛ minene ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Russie, mpe mpo na mbala ya liboso, bato ya mayele ya Russie babandaki kosalela bamaniskri ya Liebele mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ ya Russe. Kasi, bazalaki na mbongo mingi te mpo na kosala mosala yango malamu mpe bakonzi mosusu ya mangomba oyo basepelaki na likambo yango te babandaki kotɛmɛla bango. Kongɛngisama ya solo ebandaki naino te mpo na baoyo bazalaki koluka boyebi ya Biblia.
Mokonzi Alexandre II amonaki mbala moko ete mosala ya Tischendorf ezalaki na ntina mingi mpe andimaki kosunga ye. Atako bato mosusu “bayokelaki ye zuwa mpe batɛmɛlaki ye makasi,” Tischendorf akendaki lisusu na Sinai mpe azongaki na ndambo ya kopi ya Septante oyo etikalaki.a Na nsima, bakómaki kobenga bamaniskri yango Codex Sinaiticus; tii lelo oyo ezali bamaniskri ya Biblia oyo eleki koumela. Ntango Tischendorf azongaki na Saint-Pétersbourg, akendaki mbala moko na ndako ya mokonzi. Asɛngaki mokonzi asunga ye na “moko na misala minene ya koyekola makomi ya Biblia,” elingi koloba mosala ya kobongisa mokanda oyo ezali na makambo nyonso ya bamaniskri oyo autaki komona, oyo na nsima batyaki yango na bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg. Mokonzi andimaki mbala moko, mpe na nsima, Tischendorf akomaki na esengo mpenza ete: “Nzambe apesi bato ya ntango na biso . . . Biblia ya Sinai, mpo ezala mpo na biso pole oyo ekosalisa biso tóyeba makomi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe, mpe kosalisa biso tóbongisa yango na ndenge ezalaki mpenza na ebandeli mpo tókoka kolongisa solo.”
Mikanda ya motuya mingi oyo eutaki na Crimée
Na ebandeli tolobaki ete ezalaki mpe na moto mosusu ya mayele oyo azalaki koluka bamaniskri ya Biblia. Ezalaki nani? Mwa bambula liboso Tischendorf azonga na Russie, mobali moko apesaki likanisi ya kosala likambo ya malamu mingi mpo na bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg; mokonzi asepelaki na yango mpe ebendaki bato ya mayele ya Mpoto mobimba na Russie. Bango nyonso bazalaki kokamwa mpenza. Bazalaki kokuta ebele ya bamaniskri mpe biloko mosusu. Ezalaki na mikanda 2 412, kati na yango bamaniskri mpe barulo 975. Kati na yango ezalaki na bamaniskri 45 ya Biblia oyo ekomamaki liboso ya ekeke ya 10. Likambo ya kokamwa, moto moko nde asangisaki bamaniskri nyonso wana; nkombo na ye ezalaki Abraham Firkovich, moto ya mayele oyo azalaki Karaite mpe azalaki na mbula koleka 70! Kasi, Bakaraite bazalaki banani?b
Motuna wana ebendaki mpenza likebi ya mokonzi. Russie ekómaki ekólo monene oyo esangisaki mabelé oyo liboso ezalaki bikólo mosusu. Yango esalaki ete mokonzi ya Russie akóma koyangela bato mosusu oyo bazalaki bapaya. Etúká kitoko ya Crimée, pembeni ya Mer Noire, ezalaki mboka ya bato oyo bazalaki komonana lokola Bayuda kasi bazalaki na mimeseno ya Ba-turc mpe bazalaki koloba monɔkɔ ekokani mwa moke na Tatar. Bakaraite bazalaki koloba ete bazali bankɔkɔ ya Bayuda oyo bakendaki boombo na Babilone nsima ya kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Kasi, na bokeseni na Balabi ya Lingomba ya Bayuda, bango bazalaki kolanda Talmud te mpe bazalaki kolendisa likambo ya kotánga Makomami. Bakaraite ya etúká ya Crimée bazalaki na mposa makasi ya kolakisa mokonzi likambo oyo ekomonisa polele ete bango bakeseni na Bayuda mosusu, mpo bátya bango molɔngɔ moko te na Bayuda wana. Na ndenge balakisaki bamaniskri ya kala ya Bakaraite, bazalaki na elikya ya komonisa ete bazali bankɔkɔ ya Bayuda oyo bakendaki kofanda na Crimée nsima ya kouta na boombo na Babilone.
Firkovich abandaki mosala ya koluka mikanda mpe bamaniskri ya kala na Tchoufout-Kale, bandako oyo ezali na bangomba ya Crimée. Bakaraite mingi bazalaki kofanda mpe kosambela na mwa bandako wana oyo batongaki na mabanga oyo bazalaki kozwa na bangomba. Bakaraite bazalaki kopasola te bakopi ya Makomami oyo ebebi oyo ezalaki na nkombo Yehova, mpamba te bazalaki koloba ete kosala bongo ezali kofinga nkombo ya Nzambe. Bazalaki kobatela bamaniskri yango malamumalamu na bandako ya kobomba biloko oyo babengi geniza, elingi koloba “esika ya kobomba” na Liebele. Lokola Bakaraite bazalaki na limemya mingi mpo na nkombo ya Nzambe, bazalaki mpenza kosimba mikanda wana te.
Lokola ba geniza ezipamaki na mputulu na boumeli ya bankama ya bambula, Firkovich alukaki malamumalamu na bisika oyo ezalaki. Na moko na yango amonaki maniskri moko ya mobu 916 T.B. Babengaka yango “Codex de Saint-Pétersbourg des derniers prophètes”; ezali moko ya bakopi ya Makomami ya Liebele oyo eumeli mingi.
Firkovich ayanganisaki bamaniskri ebele, mpe na mobu 1859, alakaki kotɛkela yango bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg. Na mobu 1862, Alexandre II apesaki mbongo mingi (rouble 125 000 ya ntango wana) mpo básomba mikanda nyonso wana mpo na bibliotɛkɛ. Na ntango wana, Leta azalaki kobimisa rouble 10 000 na mbula mobimba mpo na misala ya bibliotɛkɛ yango! Na kati ya mikanda oyo basombaki, ezalaki mpe na Codex de Leningrad (B 19A). Ezali bakopi oyo ekomamaki na mobu 1008 mpe ezali kopi ya Makomami ya Liebele mobimba oyo eumeli koleka mosusu nyonso. Moto moko ya mayele alobaki ete “na ntembe te ezali maniskri ya Biblia oyo eleki ntina, mpamba te bato ya mayele basalelaki yango mpo na kobongisa Biblia ya Liebele.” (Talá na etanda.) Kaka na mbula wana, elingi koloba mobu 1862, babimisaki Codex Sinaïticus oyo Tischendorf abongisaki, mpe bato ya mayele ya mokili mobimba basepelaki na yango.
Pole ya elimo na ntango na biso
Bibliotɛkɛ wana oyo ebengamaka lelo “Bibliothèque nationale de Russie” ezali na bamaniskri mingi ya kala koleka esika mosusu nyonso na mokili.c Se ndenge makambo ezalaki kobongwana na Russie, nkombo ya bibliotɛkɛ yango ebongwanaki mbala nsambo na boumeli ya mbula nkama mibale. Moko na bankombo oyo eyebani malamu ezali “Bibliothèque publique d’État Saltykov-Chtchédrine.” Atako bibliotɛkɛ yango ebebisamaki mwa moke na ntango ya mobulu oyo esalemaki na bambula ya 1900, bamaniskri yango ebebisamaki te na bitumba nyonso mibale ya mokili mobimba mpe ntango bazingaki engumba Leningrad. Bamaniskri yango ezali na ntina nini mpo na biso?
Bamaniskri ya kala ezali na ntina mingi mpo esalisaka babongoli ya Biblia ya mikolo na biso báyeba soki bazali kobongola makambo ndenge ekomamaká mpenza. Esalisaka bato oyo balukaka solo na bosembo bázala na Makomami Mosantu oyo bato babakisi makambo mosusu te. Makambo oyo ezali na Codex Sinaïticus mpe Codex de Leningrad esalisaki mpenza babongoli ya Biblia Libongoli ya mokili ya sika ya Makomami Mosantu, oyo Batatoli ya Yehova babimisaki na 1961. Na ndakisa, Biblia Hebraica Stuttgartensia mpe Biblia Hebraica ya Kittel, oyo komite ya bobongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki, ebongisamaki na kolanda Codex de Leningrad mpe ezali na nkombo ya Nzambe na bisika 6 828 na makomi na yango ya ebandeli.
Lelo oyo, bato mingi bayebaka te ete soki bazali na likoki ya kotánga Biblia, ezali mpo na lisalisi ya bibliotɛkɛ oyo ezali na Saint-Pétersbourg ná bamaniskri na yango, oyo mosusu babengaka yango na nkombo ya kala ya engumba yango, Leningrad. Kasi, tosengeli mpenzampenza kozongisa matɔndi epai ya Yehova, Mobandisi ya Biblia, ye oyo apesaka pole ya elimo. Yango wana mokomi ya nzembo asɛngaki ye boye: “Tindá pole na yo mpe solo na yo. Tiká ete yango etambwisa ngai.”—Nzembo 43:3, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Azwaki mpe kopi mobimba ya Makomami ya Grɛki ya boklisto oyo esalemaki na ekeke ya minei T.B.
b Mpo na koyeba makambo mingi mpo na Bakaraite, talá lisolo “Bakaraite mpe bolukiluki na bango ya solo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1995.
c Ndambo monene ya Codex Sinaïticus etɛkamaki na British Museum. Kaka mwa biteni na yango etikalá na “Bibliothèque nationale de Russie.”
[Etanda na lokasa 13]
NKOMBO YA NZAMBE EYEBANI MPE EZALI KOSALELAMA
Na bwanya na ye, Yehova amonaki malamu ete Liloba na ye, Biblia, ebatelama tii na ntango na biso. Mosala monene oyo bakomeli basalaki na boumeli ya bankama ya bambula esalisaki mpo na kobatela yango. Kati na bango, baoyo basalaki mosala ya makasi mingi ezali Bamasorete, bakomeli Baebele oyo bazalaki na ekeke ya motoba tii ekeke ya zomi T.B. Liebele ya kala ezalaki kokomama na milelisi (voyelles) te. Bambula mingi na nsima, ndenge oyo bazalaki kobenga maloba mosusu ekokaki kobunga mpamba te monɔkɔ ya Aramɛyɛ ekómaki kozwa esika ya Liebele. Bamasorete babakisaki mwa bilembo na makomi ya Biblia mpo na kosalisa bato bákoka kotánga maloba ya Liebele.
Likambo oyo ebendi likebi na biso ezali ete Codex de Leningrad ezali na bilembo wana na balɛtrɛ minei oyo ezali nkombo ya Nzambe mpo na kolakisa ndenge ya kobenga yango. Emonisi ete esengeli kobengama Yehwah, Yèhwih, mpe Yehowah. “Yehova” ezali ebengeli oyo eyebani mingi lelo oyo. Bakomi ya Biblia mpe bato mosusu na ntango ya kala bayebaki malamu nkombo ya Nzambe. Lelo oyo, nkombo ya Nzambe eyebani na bamilio ya bato oyo bandimaka ete ‘kaka Yehova azali Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba’ mpe basalelaka yango.—Nzembo 83:18.
[Elilingi na lokasa 10]
Ndako ya bamaniskri na bibliotɛkɛ ya Saint-Pétersbourg
[Elilingi na lokasa 11]
Mokonzi-mwasi Catherine II
[Bililingi na lokasa 11]
Konstantin von Tischendorf (na kati) mpe Alexandre II, mokonzi ya Russie
[Bililingi na lokasa 12]
Abraham Firkovich
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Bililingi nyonso mibale: Bibliothèque nationale de Russie, Saint-Pétersbourg
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]
Catherine II: Bibliothèque nationale de Russie, Saint-Pétersbourg; Alexandre II: Euti na buku Spamers Illustrierte Weltgeschichte, Leipzig, 1898