Alongaki kotánga makomi ya Biblia
NA NTANGO ya kala, biloko ya kokomela ezalaki mingi te ndenge ezali lelo. Mpo na kokoma lisusu likoló ya mposo ya nyama mpe biloko mosusu, bazalaki konika yango to kosukola yango mpo na kolongola makomi oyo ezali lisusu na ntina te. Bazalaki kobenga mposo yango oyo basukoli palimpseste, liloba oyo euti na Grɛki mpe elimboli “baniki yango lisusu.” Bazalaki kolongola ata makomi ya Biblia na mposo ya nyama mpo básalela mposo yango mpo na kokoma makambo mosusu.
Palimpseste moko ya Biblia oyo ezali na ntina mingi ezali Codex Ephræmi Syri rescriptus, liloba rescriptus elimboli “bakomá lisusu likoló na yango.” Maniskri yango ezali na motuya mingi mpo ezali moko ya bakopi ya biteni ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo eumeli mingi. Na yango, ezali moko ya makambo oyo eleki malamu mpo na kondimisa bosolo ya eteni yango ya Liloba ya Nzambe.
Na ekeke ya 12 ya ntango na biso (T.B.), balongolaki makomi ya Biblia oyo bakomaki liboso na codex yango na ekeke ya mitano mpe bakomaki lisusu masolo 38 ya Éphrem, moto moko ya mayele ya ekólo Siri, oyo babongolaki na Grɛki. Na nsuka ya ekeke ya 17, bato ya mayele bamonaki mpo na mbala ya liboso makomi ya Biblia oyo ezalaki na nse. Mwa bambula na nsima, babimisaki mwa moke makomi oyo ezalaki liboso na maniskri yango. Kasi, kobimisa makomi yango nyonso ezalaki mpenza mpasi mpo makambo oyo banikaki ezalaki komonana malamu lisusu te, bankasa mingi ebebaki mpe makomi mosusu ezalaki likoló ya oyo ekomamaki liboso. Batyaki bankisi na maniskri yango mpo na komona makomi ya Biblia mpe kotánga yango, kasi balongaki mpenza te. Na yango, bato mingi ya mayele bamonaki ete makambo nyonso oyo ebomamaki, ekoki kotángama lisusu te.
Na ebandeli ya bambula ya 1840, Konstantin von Tischendorf, moto ya Allemagne oyo azalaki na mayele ya koyekola minɔkɔ, amipesaki na koyekola codex yango. Tischendorf asalaki mbula mibale mpo na koluka kobimisa makomi ya maniskri yango. Nini esalisaki ye alonga, nzokande bato mosusu balongaki te?
Tischendorf ayebaki malamu mpenza ekomeli ya kala ya Grɛki oyo babengi onciale—oyo bazalaki kokoma na balɛtrɛ minene, oyo ekanganikangani te.a Lokola azalaki na miso ya malamu, amonaki ete soki kaka atomboli mposo ya nyama na esika oyo pole ezali, azalaki kokoka kotánga makomi oyo ezalaki liboso. Lelo oyo, mpo na kosala misala ya ndenge wana, bato ya mayele basalelaka biloko oyo esalisaka mpo na komona malamu, na ndakisa infrarouges, ultraviolets, mpe lumière polarisée.
Tischendorf abimisaki makambo oyo amonaki na Codex Ephræmi na mobu 1843 mpe 1845. Mpo na yango, akendaki nsango lokola moto oyo ayebi malamu ekomeli ya balɛtrɛ ya Grɛki ya kala.
Codex Ephræmi ezali na santimɛtrɛ soki 30 na bolai mpe santimɛtrɛ soki 20 na bonene, mpe ezali maniskri ya kala koleka bamaniskri nyonso oyo bakomá na lokasa mobimba. Na nkasa 209 oyo bamonaki, 145 ezali biteni ya mikanda nyonso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, longola kaka mokanda ye 2 Batesaloniki mpe 2 Yoane. Nkasa mosusu ezali na libongoli ya Grɛki ya biteni ya Makomami ya Ebre.
Lelo oyo, codex yango ebombamá na Bibliothèque nationale de Paris, na France. Bayebi te soki maniskri yango ekomamaki wapi, atako Tischendorf akanisaki ete eutaki na Ezipito. Bato ya mayele batángaka Codex Ephræmi na molɔngɔ ya bamaniskri minei ya ntina mingi ya Makomami ya Grɛki oyo ezalaki na ekomeli ya onciale; bamaniskri mosusu ezali Sinaiticus, Alexandrinus, mpe Vaticanus 209, nyonso ekomamaki na ekeke ya minei mpe ya mitano T.B.
Nsango oyo ezali na Makomami Mosantu ebombamaki mpo na biso na ndenge ya kokamwa na bandenge mingi, bakisa mpe na palimpseste. Atako na palimpseste, moto moko oyo azalaki kosepela mpenza te na makomi ya Biblia amekaki kolongola yango, nsango yango etikalaki kaka. Yango endimisi mpenza maloba oyo ya ntoma Petro ete: “Liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.”—1 Petro 1:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tischendorf ayebanaki mingi mpo amonaki libongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre na Monastɛrɛ Sainte-Catherine na nse ya Ngomba Sinai; yango ezali moko ya mabongoli oyo eumeli mingi koleka mosusu. Babengaka maniskri yango Codex Sinaiticus.
[Etanda/Elilingi na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Codex Ephræmi Syri rescriptus, palimpseste ya ntina mingi oyo Tischendorf alongaki kotánga (1815-1874)
MAKOMI YA BIBLIA OYO EZALAKI LIBOSO
MASOLO YA GRƐKI OYO BAKOMI LIKOLÓ YA OYO EZALAKI LIBOSO
[Eutelo ya bafɔtɔ]]
© Bibliothèque nationale de France
[Elilingi na lokasa 17]
Codex Sinaiticus oyo emonanaki na Monastɛrɛ Sainte-Catherine
[Elilingi na lokasa 17]
Tischendorf