Mituna ya batángi
Maloba “Soki nde” oyo ezali na Sefania 2:3 emonisi ete basaleli ya Nzambe bakoki kozala na elikya te ete bakozwa bomoi ya seko?
Vɛrsɛ yango elobi: “Bóluka [Yehova], bino basokemi nyonso na mokili; baoyo bakosalaka malako na ye, bóluka boyɛngɛbɛnɛ, boluka bopɔlɔ, soki nde bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova].” Mpo na nini vɛrsɛ yango elobi “soki nde”?
Mpo na koyeba ndenge Yehova akosala mpo na basaleli na ye ya sembo na Hala-magedona, esengeli toyeba oyo Biblia eteyaka na ntina na oyo Nzambe akosala mpo na baoyo bazali kokufa liboso ntango ya kosambisama ekoka. Bamoko bakozwa lisekwa ya bomoi ezangi kufa lokola bikelamu ya elimo na makoló, nzokande basusu bakosekwa mpo na kozala na bomoi ya seko na paladiso. (Yoane 5:28,29; 1 Bakolinti 15:53,54) Soki Yehova akanisaka basaleli na ye ya sembo oyo bazali kokufa liboso Hala-magedona eya mpe akopesa bango mbano, akosala kaka bongo mpo na basaleli na ye oyo bazali kobika na mokolo ya nkanda na ye.
Maloba ya ntoma Petelo ezali mpe kolendisa. Akomaki boye: “[Nzambe] abatelaki Noa, mosakoli ya boyengebene elongo na bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela likoló na mokili moko ya bato oyo bazali kotyola Nzambe; mpe kokómisáká bingumba ya Sodome mpe Gomola putulu ya mɔtɔ akweisaki yango. . .mpe abikisaki moyengebeni Lota. . .Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya lisambisi bato oyo bazangi boyengebene mpo balongolama.” (2 Petelo 2:5-9) Atako Yehova abomaki bato mabe na ntango ya kala, kasi abatelaki Noa mpe Lota mpo basalelaki ye na bosembo. Bobele bongo, Yehova akobikisa mpe bato oyo babangaka ye na Hala-magedona. “Ebele ya bato” ya boyengebene bakobika.—Emoniseli 7:9, 14.
Na yango, ekoki kozala ete maloba “Soki nde” oyo esalelami na Sefania 2:3 emonisi te ete Nzambe akoki te kobatela bato oyo ye andimi bango. Kasi, moto akobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova kaka soki abandi koluka boyengene mpe bopɔlɔ. Moto yango akoki kobatelama kaka soki akobi koluka bopɔlɔ mpe boyengebene.—Sefania 2:3.
[Elilingi na lokasa 31]
“Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato oyo babangaka ye”