Na Mbu ya Galilai
LISOLO moko oyo ezali na Malako 4:35-41 elobi ete Yesu ná bayekoli na ye bamataki na masuwa mpo na kokatisa Mbu ya Galilai. Tozali kotánga boye: “Nzokande mopɛpɛ moko ya makasi mpenza ya ekumbaki ebɛtaki, mpe mbonge ezalaki komibwaka na masuwa, na boye ete masuwa etikalaki moke etonda na mai. Kasi [Yesu] azalaki na eteni ya nsima ya masuwa, alalaki likoló ya kuse.”
Na Biblia mobimba, kaka na vɛrsɛ yango nde balobeli liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kuse.” Yango wana, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia bayebaka te ndimbola ya solosolo ya liloba oyo basaleli na esika yango. Na Babiblia mingi, babongoli yango na “kuse.” Kasi, kuse yango ezalaki ndenge nini? Ndenge oyo Malako alobeli kuse yango ezali komonisa ete ezalaki eloko oyo ezalaka na masuwa. Masuwa moko ya kalakala oyo bamonaki pembeni ya Mbu ya Galilai na 1986 esalisi mwa moke na koyeba ndimbola ya liloba ya Grɛki oyo Malako asaleli.
Bato ya mayele bayekolaki masuwa yango oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ 8, oyo bazalaki kotambwisa yango na nkai mpe na mopɛpɛ ntango ezali kobɛta na bilamba minene na yango. Bazalaki kosalela yango na mosala ya koboma mbisi mpe ezalaki na nkɔbɛ ya makasi mpo na kokangisa monyama ya monene mpe ya kilo. Ekoki kozala ete masuwa yango esalelamaki kati na mobu 100 liboso ya ntango na biso (L.T.B) mpe mobu 70 ya ntango na biso (T.B.) mpe ekoki kozala ete ezali ndenge moko na masuwa oyo Yesu ná bayekoli na ye bakatisaki na yango ebale. Shelley Wachsmann, moko ya bato oyo bamonaki masuwa yango, akomaki buku moko (The Sea of Galilee Boat—An Extraordinary 2000 Year Old Discovery). Moto yango alobi ete “kuse” oyo Yesu alalelaki ezalaki saki ya zɛlɔ oyo bazalaki kosalela mpo na kobakisa kilo na ngámbo moko ya masuwa mpo etɛngatɛnga te. Moto moko ya engumba Jaffa oyo asalá mingi mosala ya koboma mbisi na minyama alobaki boye: “Ntango nazalaki elenge, bamasuwa oyo tozalaki kotambola na yango na Mbu ya Meditelane ezalaki ntango nyonso na saki moko to mibale ya zɛlɔ. . . . Bazalaki kotya basaki yango na masuwa mpo etɛngatɛngaka te. Kasi, soki ezali na mosala te, tozalaki kotya yango na nkɔbɛ. Boye, soki moto alɛmbi, azalaki kokɔta na nkɔbɛ, mpe azalaki kosalela saki yango lokola kuse mpo na kolala.”
Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bakanisaka ete maloba ya Malako elimboli ete Yesu alalaki likoló ya saki ya zɛlɔ na nkɔbɛ, epai oyo moto akokaki kobatelama malamu ntango mbonge emati na mbu. Ata soki kuse yango ezalaki mpenza ndenge nini, likambo eleki ntina na lisolo yango ezali oyo esalemaki na nsima. Na nguya ya Nzambe, Yesu apekisaki mopɛpɛ makasi oyo ebandaki kobɛta na mbu. Ata bayekoli na ye batunaki ete: “Ye azali mpenza nani, mpamba te ata mopɛpɛ mpe mbu ezali kotosa ye?”