Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/9 nk. 8-12
  • Nayikaki mpiko lokola soda ya Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nayikaki mpiko lokola soda ya Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bamemi ngai na bolɔkɔ mosika
  • Bilei ya elimo ekómi tii esika tozalaki
  • Nalɛmbi kosakola te
  • Elendiseli euti epai ya moto oyo nakanisaki te
  • Nazongi na bolɔkɔ, nazongeli mosala ya kosakola
  • Soda ya Klisto
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Nasalelaki Yehova na motema molai uta bolenge na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/9 nk. 8-12

Lisolo ya bomoi

Nayikaki mpiko lokola soda ya Klisto

YA YURII KAPTOLA

“Namoni sikoyo ete ozali mpenza na kondima!” Maloba wana eutaki epai ya moto oyo nazalaki ata kokanisa te. Ezalaki soda moko ya Union soviétique mpe maloba yango elendisaki ngai mingi mpamba te na ntango wana nazalaki mpenza na mposa ya bilendiseli. Bakatelaki ngai bolɔkɔ ya bambula ebele mpe nabondelaki Yehova makasi asunga ngai. Nazalaki kobunda na monyoko moko makasi oyo ezalaki kosɛnga kozala na mpiko mpe na ekateli makasi.

NABOTAMAKI mwa 19 Ɔkɔtɔbɛ, 1962 mpe nakolaki na wɛsti ya Ukraine. Kaka na mbula yango, tata na ngai Yurii, akutanaki na Batatoli ya Yehova. Mosika te, akómaki mosambeli ya Yehova ya liboso na mboka na biso. Bakonzi oyo bazalaki kopekisa mosala ya Batatoli ya Yehova bayebaki ete azalaki kosakola.

Nzokande, bato mingi ya kartye na biso bazalaki kotosa baboti na ngai mpo na bizaleli na bango ya boklisto mpe ndenge bazalaki komibanzabanza mpo na bato mosusu. Baboti na biso basalelaki mabaku nyonso mpo na kokɔtisa bolingo ya Nzambe na motema na ngai ná oyo ya bandeko na ngai misato ya basi banda bomwana na biso, yango esalisaki ngai nálonga mikakatano ebele oyo nakutanaki na yango na eteyelo. Mokakatano moko ya ndenge wana ebimaki ntango basɛngaki mwana mokomoko alataka makarɔ oyo ekomonisa ete azali na kati ya ebongiseli moko ya bana na Russie (Les enfants d’octobre). Lokola naboyaki kokɔta na makambo ya politiki, nalataki makarɔ te mpe emonanaki ete nakeseni na bana-kelasi mosusu.​—Yoane 6:15; 17:16.

Na nsima, ntango nakómaki na kelasi ya misato, bana-kelasi nyonso basengelaki kokɔta na ebongiseli ya bilenge Bakoministe, oyo bazalaki kobenga Bilenge Bapiɔniɛ. Mokolo moko, babimisaki bana-kelasi na biso nyonso libándá mpo na kokomisa bankombo mpo na kokóma Bapiɔniɛ. Nabangaki mingi, nakanisaki ete bakotyola ngai mpe bakogangela ngai. Bana nyonso ya kelasi longola ngai, bazalaki na matambala ya sika ya motane oyo bautaki na yango na bandako mpe basalaki molɔngɔ molai liboso ya mokambi ya eteyelo, balakisi mpe bana ya bakelasi ya likoló. Ntango basɛngaki na bana ya kelasi ya likoló bákanga biso matambala na kingo, nakitisaki motó na nse mpe nakanisaki ete moto moko te akomona ngai.

Bamemi ngai na bolɔkɔ mosika

Ntango nakómaki na mbula 18, bakatelaki ngai bolɔkɔ ya sanza misato mpo naboyaki kokɔta na makambo ya politiki. (Yisaya 2:4) Nasalaki mbula ya liboso na engumba Trudovoye, na etúká ya Vinnitskaya, na Ukraine. Kuna, nakutanaki na Batatoli ya Yehova mosusu soki 30. Lokola bakonzi baboyaki tózala elongo, batindaki biso mibalemibale tósalaka na bisika ekeseni.

Na Augusto 1982, bakɔtisaki ngai ná Eduard, Motatoli mosusu ná bato ya bolɔkɔ mosusu na engbunduka mpe bamemaki biso na nɔrdi ya Bangomba Oural. Tonyokwamaki na molunge makasi mpe na nkaka mikolo mwambe tii ntango tokómaki na bolɔkɔ ya Solikamsk, na etúká ya Permskaya. Na bolɔkɔ yango, batyaki ngai ná Eduard moto na moto na esika na ye. Pɔsɔ mibale na nsima, batindaki ngai mosika mpenza na nɔrdi ya mboka Vels, na etúká ya Krasnovishersky.

Tokómaki na katikati ya butu mpe molili ezalaki makasi. Atako bongo, mokonzi moko apesaki mitindo ete biso nyonso tókatisa ebale na bwato. Tozalaki komona ebale te, bwato mpe te! Tolukalukaki na molili kino totutaki bwato moko mpe, atako tozalaki kobanga, tokatisaki ebale. Ntango tokómaki na ngambo, tolandaki mwinda moko oyo ezalaki komonana na ngomba moko oyo ezalaki mosika te na biso, epai tokutaki mwa bandako ya kapo. Wana nde esika tobandaki kofanda. Batyaki ngai ná bato mosusu ya bolɔkɔ soki 30 na mwa ndako ya kapo oyo ezalaki mwa monene. Na eleko ya malili, malili ezalaki ntango mosusu kokóma makasi (-40oC), mpe kapo wana ezalaki kobatela biso ata moke te. Mosala ya libosoliboso ya bato ya bolɔkɔ ezalaki ya kokata banzete, kasi ngai nazalaki kotonga mwa bandako mpo na bato ya bolɔkɔ.

Bilei ya elimo ekómi tii esika tozalaki

Atako nazalaki kaka ngai moko Motatoli ya Yehova na esika wana, Yehova abosanaki ngai te. Mokolo moko, mama na ngai oyo azalaki na wɛsti ya Ukraine atindelaki ngai liboke moko ya biloko. Ntango mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ afungolaki yango, eloko ya liboso oyo amonaki ezalaki mwa Biblia ya moke. Azwaki yango mpe abandaki kofungolafungola yango. Nabandaki kokanisa soki nakoloba nini mpo bábɔtɔla ngai te eloko yango ya motuya. Mokɛngɛli yango atunaki ngai boye: “Oyo ezali nini?” Liboso kutu nayanola, Inspecteur moko oyo atɛlɛmaki pembeni wana alobaki: “Aa! Ezali diksionɛrɛ.” Nalobaki eloko te. (Mosakoli 3:7) Inspecteur yango atalatalaki na kati ya liboke mpe azongiselaki ngai yango ná Biblia wana. Nasepelaki mingi mpe nakabelaki ye mwa ndambo ya nguba oyo batindelaki ngai. Ntango nazwaki liboke yango, namonaki ete Yehova abosanaki ngai te. Asalisaki ngai mpenza na mosuni mpe akokisaki bamposa na ngai ya elimo.​—Baebele 13:5.

Nalɛmbi kosakola te

Mwa bansanza na nsima, nakamwaki kozwa mokanda moko oyo eutaki epai ya ndeko moko oyo azalaki na bolɔkɔ mosusu, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 400. Asɛngaki ngai naluka moto moko oyo asepelaki na solo mpe akómaki sikoyo na bolɔkɔ epai nazalaki. Kokoma makambo polelepolele ndenge wana na mokanda ezalaki bwanya te, mpo bazalaki kotánga mikanda na biso liboso bápesa biso yango. Mpo na yango, mokonzi moko ya basoda abengaki ngai na biro na ye mpe alobaki na ngai ete nameka lisusu kosakola te. Na nsima, asɛngaki ngai natya manzaka na mokanda moko mpo na koloba ete natiki kosakwela bato mosusu bindimeli na ngai. Nayanolaki ete nazali komona te ntina oyo nakotya manzaka na mokanda wana, mpamba te bato nyonso bayebi ete nazali Motatoli ya Yehova. Nayebisaki ye ete bato mosusu ya bolɔkɔ balukaka koyeba mpo na nini ngai nazali na bolɔkɔ. Nakoyebisa bango nini? (Misala 4:20) Mokonzi wana ya basoda amonaki ete akoki kobangisa ngai te, yango wana amonaki malamu alongola ngai wana. Batindaki ngai na kaa mosusu.

Batindaki ngai na mboka Vaya, oyo ezalaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 200. Kuna, bakɛngɛli ya bolɔkɔ batosaki lisosoli na ngai mpe bapesaki ngai misala mosusu oyo ezali na boyokani te na makambo ya basoda; nasalaki liboso mosala ya mabaya mpe na nsima mosala ya kura. Kasi, misala yango ezalaki pɛtɛɛ te. Mokolo moko, bayebisaki ngai nazwa bisaleli na ngai ya mosala mpe nakende na nganda ya mboka wana. Basoda oyo bazalaki kuna basepelaki mpenza ntango bamonaki ngai. Miinda oyo ezalaki kokembisa bilembo ndenge na ndenge ya basoda ezalaki kosala malamu te. Balingaki nabongisela bango yango mpamba te bazalaki komibongisa mpo na fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya basoda ya Union soviétique. Nsima ya kobondela mingi mpe kokanisa mpo na likambo yango, nayebisaki bango ete nakosala mosala ya motindo wana te. Napesaki bango bisaleli na ngai mpe nakendeki. Bafundaki ngai epai ya mokonzi moko; likambo ya kokamwa, ayokaki makambo nyonso oyo bafundaki ngai na yango mpe alobaki: “Nazali komemya ye mpo na yango. Akangamaka na makambo oyo ayebi ete ezali malamu.”

Elendiseli euti epai ya moto oyo nakanisaki te

Mwa 8 Yuni 1984, nsima ya mbula misato ya bolɔkɔ, babimisaki ngai. Ntango kaka nazongaki na Ukraine, nasengelaki kokomisa nkombo epai ya basoda oyo bazalaki kobunda ná guvɛrnema ya Ukraine lokola moto oyo auti na bolɔkɔ. Bakonzi bayebisaki ngai ete nsima ya sanza motoba bakosambisa ngai lisusu, yango wana ekozala malamu nalongwa na etúká yango. Yango wana, nalongwaki na Ukraine mpe nazwaki mosala na Lettonie. Mpo na mwa ntango, nazalaki kosakola mpe koyangana na makita na mwa etuluku ya Batatoli ya Riga, mboka mokonzi mpe ya pembenipembeni. Nzokande, nsima ya mbula moko kaka, basɛngaki ngai lisusu nasala mosala ya soda. Na biro ya kokomisa bankombo mpo na mosala ya soda, nayebisaki mokonzi ya basoda ete nasilá koboya mosala yango. Alobaki na ngai na mongongo makasi boye: “Oyebi mpenza likambo ozali kosala? Tokotala nini okoloba epai ya colonel!”

Amemaki ngai na etazi ya liboso epai colonel azalaki. Colonel ayokaki ngai na likebi mpenza ntango nazalaki kolimbolela ye ntina nini naboyaki kokɔta mosala ya soda mpe ayebisaki ngai ete nakanisa lisusu liboso nakutana na bato oyo bakomisaka bato na mosala ya soda. Ntango kaka tobimaki na biro ya colonel, mokonzi ya basoda oyo agangelaki ngai liboso alobaki: “Namoni sikoyo ete ozali mpenza na kondima.” Ntango nasambaki liboso ya bato oyo bakomisaka bato na mosala ya soda, nayebisaki bango lisusu ete nakoki kosala mosala ya soda te, mpe batikaki ngai.

Na ntango wana, nazalaki kofanda na otɛlɛ. Mokolo moko na mpokwa, nayokaki babɛti na porte. Nafungolaki mpe namonaki mobali moko alati kazaka mpe asimbi sakosi. Mobali yango alobaki ete: “Nazali moto ya sirete ya Union soviètique. Nayebi ete ozali kokutana na mikakatano mingi mpe bakosambisa yo lisusu.” Nayanolaki ye ete: “Ɛɛ, ezali solo.” Mobali yango abakisaki boye: “Tokoki kosalisa yo soki ondimi kosala na biso.” Nayebisaki ye ete “nakoki kosala likambo ya ndenge wana te. Nakotikala sembo na bindimeli na ngai ya boklisto.” Alobaki lisusu eloko te mpe akendeki.

Nazongi na bolɔkɔ, nazongeli mosala ya kosakola

Mwa 26 Augusto 1986, tribinale monene ya Riga ekatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ mbula minei ya misala makasi mpe bamemaki ngai na bolɔkɔ monene ya Riga. Batyaki ngai na kasho moko monene elongo na bato mosusu ya bolɔkɔ 40 mpe nasakwelaki moto nyonso oyo azalaki na kasho wana. Basusu kati na bango bazalaki komonisa lokola bandimaka Nzambe; basusu bazalaki kosɛka. Namonaki ete bato ya bolɔkɔ basalaki bituluku mpe nsima ya pɔsɔ mibale baoyo bazalaki kotambwisa bituluku yango balobaki na ngai ete lokola naboyi kolanda mibeko na bango, nasengeli kosakola lisusu te. Nayebisaki bango ete bakangaki ngai mpo na likambo wana. Ngai nazali na mibeko mosusu oyo nalandaka.

Nakobaki kosakola na kobombana mpe ntango namonaki bato oyo balingaka makambo ya elimo, nabandaki koyekola Biblia na bato minei kati na bango. Ntango tozalaki koyekola, bazalaki kokoma mateya ya moboko na kati ya karnɛ. Mwa basanza na nsima, batindaki ngai na bolɔkɔ ya engumba Valmiera epai bazalaki kokɛngɛla bato ya bolɔkɔ makasi; nazalaki kosala mosala ya kura. Kuna, nayekolaki Biblia na moto mosusu oyo azalaki kosala mosala ya kura mpe mbula minei na nsima, akómaki Motatoli ya Yehova.

Mwa 24 Marsi 1988, batindaki ngai na kaa mosusu oyo ezalaki pembeni wana. Kokende kuna ezalaki mpenza lipamboli mpamba te nazalaki na bonsomi mingi. Bazalaki kotinda ngai nasala na bisika oyo bazalaki kotonga bandako, mpe nazalaki ntango nyonso koluka mabaku ya kosakola. Mbala mingi, nazalaki kosakola libanda ya kaa tii na mpokwa makasi, kasi bazalaki kotungisa ngai te ntango nazalaki kozonga na kaa.

Yehova apambolaki milende na ngai. Na esika yango, mwa Batatoli bazalaki, kasi na kati ya engumba, Motatoli azalaki kaka moko, ndeko mwasi moko ya mokóló, na nkombo Vilma Krūmin̗a. Ngai ná ndeko mwasi Krūmin̗a tobandaki koyekola Biblia na ebele ya bilenge. Ntango mosusu, bandeko mibali mpe basi bazalaki kouta na Riga mpo na koya kosakola elongo na biso, mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza mosusu bazalaki kouta kutu na Leningrad (lelo oyo Saint-Pétersbourg) mpo na kosakola na biso. Na lisalisi ya Yehova, toyekolaki Biblia na bato ebele mpe eumelaki te nabandaki mosala ya mobongisi-nzela; nazalaki kolekisa ngonga 90 sanza na sanza na mosala ya kosakola.

Mwa 7 Aprili 1990, batalelaki lisusu likambo na ngai na tribinale ya Valmiera. Ntango nabandaki kosamba, natala boye, prokirɛrɛ oyo azalaki kosambisa ezalaki elenge mobali moko oyo nasololaká na ye lisolo ya Biblia! Ayebaki ngai mpe asɛkaki mwa moke, kasi alobaki eloko te. Nabosanaka te maloba oyo zuzi alobaki na ngai mokolo wana: “Yurii, bolɔkɔ ya mbula minei oyo bakatelaká yo ezalaki ya lokuta. Basengelaki kotya yo na bolɔkɔ te.” Na mbalakaka, nabimaki na bolɔkɔ!

Soda ya Klisto

Na Yuni 1990, nasengelaki lisusu kokende na biro epai bazalaki kokomisa bato mpo na mosala ya soda mpo na kozwa mikanda oyo ekopesa ngai nzela ya kofanda na Riga. Nakɔtaki lisusu kaka na biro wana oyo ezalaki na mesa ya molai, epai mbula minei liboso, nayebisaki colonel ete nakokɔta mosala ya soda te. Na mbala wana, atɛlɛmaki mpo na kopesa ngai mbote, aningisaki lobɔkɔ na ngai mpe alobaki: “Ezali mpenza nsɔni ndenge tosalaki yo makambo nyonso wana. Nasɛngi bolimbisi mpo na ndenge esalemaki bongo.”

Nayanolaki ete: “Nazali soda ya Klisto mpe nasengeli kokokisa mokumba na ngai. Na lisalisi ya Biblia, yo mpe okoki kokóma na elikya oyo Yesu alaki bayekoli na ye, elingi koloba bomoi ya esengo mpe ya libela.” (2 Timote 2:3, 4) Colonel ayanolaki: “Nasombaki Biblia kala mingi te mpe sikoyo nazali kotánga yango.” Nazalaki na buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.a Nafungolaki yango na motó ya likambo oyo ezali kolobela elembo ya mikolo ya nsuka mpe nalakisaki ye bisakweli ya Biblia oyo ezali kokokisama na mikolo na biso. Na botɔndi nyonso, colonel aningisaki lisusu lobɔkɔ na ngai mpe asɛngaki Nzambe apambola mosala na ngai.

Na ntango wana, bilanga etelaki mpenza mpo na kobuka mbuma na Lettonie. (Yoane 4:35) Na 1991, nakómaki nkulutu ya lisangá. Bankulutu bazalaki kaka mibale na ekólo mobimba! Mbula moko na nsima, lisangá kaka moko wana ya Lettonie ekabwanaki na masangá mibale: moko ya monɔkɔ ya letton mpe mosusu ya monɔkɔ ya Russe. Nazwaki libaku malamu ya kozala na lisangá ya monɔkɔ ya Russe. Bokoli esalemaki nokinoki mpe mbula oyo elandaki, lisangá na biso ekabwanaki na masangá misato! Na kotalela makambo nyonso oyo eleki, emonani polele ete Yehova ye moko nde azalaki kobenda bampate na ye na kati ya ebongiseli na ye.

Na 1998, nakómaki mobongisi-nzela monene na engumba Jelgava oyo ezali na ntaka ya bakilomɛtrɛ 40 na sudi-wɛsti ya Riga. Na mbula wana kaka, nazalaki moko ya bato ya liboso ya ekólo Lettonie oyo babengamaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi oyo esalemaki na monɔkɔ ya Russe na Solnetchnoïé pene ya Saint-Pétersbourg, na Russie. Ntango nazalaki na Eteyelo yango, namonaki ntina ya kolinga bato mpo na kolonga na mosala ya kosakola. Eloko esepelisaki ngai mingi koleka makambo oyo tozalaki koyekola, ezalaki bolingo mpe likebi oyo bandeko ya Betele mpe balakisi na biso bazalaki komonisela biso.

Na 2001, likambo mosusu ya esengo esalemaki na bomoi na ngai: nabalaki Karina ndeko mwasi moko ya malamu. Karina mpe akómaki mobongisi-nzela mpe mikolo nyonso nalendisamaka ntango namonaka ye azali kouta na mosala ya kosakola na esengo nyonso. Ya solo, ezali esengo monene kosalela Yehova. Mpasi oyo namonaki na nse ya boyangeli ya Bakoministe, eteyaki ngai kotyela Yehova motema mobimba. Moto nyonso oyo alingi kobatela boninga na Yehova mpe kopesa bokonzi na ye mabɔkɔ akomona minyoko eloko mpamba. Kosalisa bato mosusu báyeba Yehova esali ete bomoi na ngai ezala na ntina. Ezali mpo na ngai lokumu monene kosalela Yehova lokola “soda malamu mpenza ya Klisto.”​—2 Timote 2:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, kasi ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 11]

Bakatelaki ngai etumbu ya mbula minei ya misala makasi na bolɔkɔ monene ya Riga

[Elilingi na lokasa 12]

Ngai ná karina na mosala ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto