Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/11 nk. 26-30
  • Makabo oyo esepelisaka Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makabo oyo esepelisaka Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na mateya ya Biblia
  • Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Pesáká na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Tiká tópesa Yehova likabo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/11 nk. 26-30

Makabo oyo esepelisaka Nzambe

LISOLO oyo elandi ezali ya esengo te. Na mayele mabe mpenza, Mokonzi-mwasi Atalia abomisaki bato mpo na kozwa bokonzi ya Yuda. Lokola akanisaki ete bana nyonso ya mokonzi bakufi, amityaki mokonzi. Na mpiko nyonso, Yoseba, mwasi mosusu oyo azalaki ndeko ya mokonzi mpe alingaki Yehova mpe Mibeko na ye mingi, abombaki Yoasa, mwana ya bokonzi. Yoseba ná mobali na ye, nganga-monene Yoyada, babombaki mwana wana mbula motoba na esika oyo bango bazalaki kofanda na tempelo.​—2 Mikonzi 11:1-3.

Ntango Yoasa akómaki na mbula nsambo, Nganga monene Yoyada alukaki ndenge ya kolongola mokonzi Atalia na bokonzi oyo azwaki na mayele mabe. Abimisaki mwana oyo azalaki kobomba mpe atyaki ye mokonzi oyo azalaki mpenza mokitani ya solosolo. Basoda ya mokonzi babendaki Mokonzi mabe Atalia na libanda ya tempelo mpe babomaki ye; motema ya bato ekitaki mpe basepelaki. Makambo oyo Yoyada ná Yoseba basalaki esalisaki mingi mpo na kozongisa losambo ya solo na Yuda. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete basalisaki mpenza mpo molɔngɔ ya bakonzi ya libota ya Davidi oyo esengelaki komema tii na Masiya elimwa te.​—2 Mikonzi 11:4-21.

Mokonzi oyo batyaki asengelaki mpe kosala likambo moko oyo ekosepelisa Nzambe. Ndako ya Yehova ebebaki makasi mpe esengelaki bábongisa yango. Lokola Atalia azalaki na mposa mabe ya kozala mokonzi kaka ye moko na Yuda, akipaki ata kobongisa tempelo te, mpe atikaki báyiba biloko na yango. Kasi, Yoasa atyaki motema na ye mobimba na kotonga lisusu tempelo mpe kobongisa yango. Kozanga koumela, abimisaki mobeko ete bato básangisa mbongo mpo na kobongisa ndako ya Yehova. Alobaki boye: “Misolo nyonso ya biloko ya bulɛɛ oyo eyeisami na ndako ya [Yehova], mosolo oyo ekokaki na moto na moto kopesa (mosolo mpo na motuya ya moto na moto) mpe mosolo oyo nyonso motema ya moto ekopusa ye koyeisa na ndako ya [Yehova], tiká ete banganga bákamata yango epai na bango, nganga na nganga epai ya baninga na ye mpe bábamba bisika bibebi ya ndako, epai na epai wana bosɛnga ya kobamba ezali.”​—2 Mikonzi 12:4, 5.

Bato bapesaki makabo na motema moko. Kasi, banganga-nzambe bazalaki kokokisa mokumba na bango ya kobongisa tempelo na motema mobimba te. Na yango, mokonzi amonaki malamu ye moko azwa makambo na mabɔkɔ mpe apesaki mobeko ete bábanda kotya makabo nyonso mbala moko na kɛsi oyo ebongisami mpo na yango. Apesaki mokumba yango na mabɔkɔ ya Yoyada, mpe Biblia elobi ete: “Nganga Yoyada akamataki sanduku, atɔbɔlaki nzela na ezipo na yango mpe atyaki yango penepene na etumbelo na epai ya mobali ya ekɔtɛlo ya ndako ya [Yehova]; banganga baoyo babatelaki ekuke batyaki wana misolo nyonso miyeisami na ndako ya [Yehova]. Emonaki bango ete mosolo ezalaki mingi kati na sanduku, mokomeli ya mokonzi mpe nganga monene bayaki mpe bakangaki yango na mabenga mpe batángaki motuya ya mosolo mozwamaki kati na ndako ya [Yehova]. Bapesaki mosolo motángamaki motuya kati na mabɔkɔ ya baoyo basalaki mosala, baoyo babatelaki ndako ya [Yehova]. Babimisaki yango epai ya basapate mpe batongi baoyo basalaki mosala na ndako ya [Yehova], epai ya batongi ya mabanga mpe babongisi ya mabanga ete básomba mabaya mpo na kobamba bisika bibebi kati na ndako ya [Yehova] mpe eloko nini elingaki kosombama mpo na kobamba ndako. Ata bongo, na mosolo moyeisami na ndako ya [Yehova] basalelaki ndako ya [Yehova] saani ya palata te bizimiseli ya miinda te to masasu te to kelelo te to biloko ya wolo te to biloko ya palata te.”​—2 Mikonzi 12:9-12.

Bato bapesaki makabo na motema moko. Ndako ya losambo ya Yehova ebongisamaki mpo losambo na ye ekoba na limemya. Na yango, basalelaki mbongo nyonso oyo bato bapesaki na lolenge ya malamu mpenza. Mokonzi Yoasa asɛnzɛlaki mpenza ete makambo etambola malamu!

Lelo oyo, ebongiseli ya Yehova esɛnzɛlaka ete mbongo nyonso ya makabo oyo bandeko bapesaka esalelama kaka mpo na kotombola losambo ya Yehova, mpe baklisto ya solo bapesaka makabo na bango na motema moko ndenge kaka Bayisalaele ya kala basalaki. Ntango mosusu yo mpe ozali na kati ya bato oyo bapesaki makabo na mbula ya mosala oyo eleki mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Tiká tótalela lolenge oyo tosalelaki makabo oyo opesaki.

MOTÁNGO YA MIKANDA OYO EBIMISAMI

Na mokili mobimba, mikanda oyo elandi ebimisamaki mpo na boyekoli mpe mpo na kokabolela bato:

• Babuku: 47 490 247

• Mwa babuku ya mike: 6 834 740

• Mwa babuku: 167 854 462

• Manaka: 5 405 955

• Bazulunalo: 1 179,266 348

• Batrakte: 440 995 740

• Bakasɛti-video: 3 168 611

Banyataka mikanda yango na Afrika, na Amerika ya Nɔrdi, ya Ntei mpe ya Sudi, Azia, Mpoto, mpe na bikólo ya bisanga ya pasifike: nyonso bikólo 19.

“Nkombo na ngai Katelyn May. Nazali na mbula mwambe. Nazali na dolare 28, mpe natindeli bino yango mpo esalisa na mosala ya konyata mikanda. Ngai ndeko na bino ya mwasi ya moke, Katelyn.”

“Tosalaki likita moko na libota na biso mpo na kolobela bamasini ya sika ya konyata mikanda. Bana na biso ya mbula 11 mpe 9, bazwi ekateli ya kobimisa mwa mbongo na oyo bamibombelaka mpo na kotinda makabo na bango. Tosepeli kotinda makabo na bango esika moko na oyo ya biso.”

MOSALA YA KOTONGA

Misala ya botongi oyo elandi esalemaki mpo na kosunga misala ya Batatoli ya Yehova:

• Bandako ya Bokonzi na bamboka ya bozwi moke: 2180

• Bandako ya mayangani: 15

• Babiro ya filiale: 10

• Bandeko oyo bakei kosala na mikili mosusu: 2342

“Na wikende oyo, tosali makita mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi na biso ya sika. Tozali mpenza na esengo lokola tozwi esika ya malamu mpo na kosanzola Tata na biso, Yehova Nzambe. Tozali kotɔnda Yehova mpe bino mpo na ndenge botyaki likebi na bamposa na biso mpe botongi Bandako ya Bokonzi mingi. Ya solo, Ndako na biso ya bokonzi ebongisi mpenza kartye na biso.”​—Chili.

“Bandeko bazali na botɔndi mingi mpo na lisalisi oyo ebongiseli ya Yehova epesi. Tii lelo, tolobelaka bantango kitoko oyo tolekisaki elongo na ekipi ya batongi.”​—Moldavie.

“Eumeli mingi te, ngai ná mwasi na ngai tosepelaki mbula 35 ya libala na biso. Ntango tozalaki kotalela oyo mokomoko na biso akopesa mpo na fɛti yango, tozwaki mpe ekateli ya kolongola mwa eloko mpo na kopesa Yehova mpe ebongiseli na ye, mpamba te soki Yehova mpe ebongiseli na ye te, libala na biso ekokaki kozala malamu ndenge oyo te. Tokosepela ete mwa anvelopɛ oyo totindi esalelama mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi na ekólo moko ya bobola.”

“Nauti kozwa libula, mpe lokola nazali mpenza na makambo ya kosala na mbongo yango te, natindeli bino anvelopɛ oyo mpo bósalela yango mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi oyo bandeko ya bikólo mingi bazali na mposa na yango makasi.”

LISALISI MPO NA BAOYO BAZWI MAKAMA

Na mikolo oyo ya nsuka, makama ezali kosalema mbalakaka. Batatoli ya Yehova bapesaka mpe makabo mosusu mpo na kosalisa bandeko na bango na bisika oyo makama esalemi. Tóbosana te ete makabo oyo topesaka mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi makama ezali mpe na kati ya makabo mpo na kosunga mosala na biso na mokili mobimba. Batatoli ya Yehova bapesaki lisalisi ntango makama esalemaki na bisika oyo elandi:

• Afrika

• Azia

• Antilles

• Bisanga ya pasifike

“Ngai ná mobali na ngai tolingi kopesa bino matɔndi mingi na ndenge botindaki biloko mpo na kosunga biso na likama oyo ekómelaki biso ntango ekumbaki esalemaki. Yango epesaki biso likoki ya kobongisa nsamba ya ndako na biso. Tozali mpenza na botɔndi na ndenge boumelaki te mpo na kotindela biso lisalisi yango.”

“Nkombo na ngai Connor, mpe nazali na mbula 11. Ntango namonaki makama oyo tsunami ebimisaki, nayokaki mposa ya kopesa lisalisi. Nazali kolikya ete ekosalisa bandeko na ngai.”

BABONGISI-NZELA YA NTANGO NYONSO

Baklisto mingi bamipesi mingi na mosala ya kosakola to bazali kosala na Betele. Basali mosusu ya ntango nyonso bazwaka lisalisi oyo eutaka na makabo ya bolingo malamu. Na kati na bango tozali na:

• Bamisionɛrɛ: 2 635

• Bakɛngɛli-batamboli: 5,325

• Bandeko ya Betele: 20 092

“Lokola nakoki kosala na Betele sikoyo te [mpo nazali na mbula mitano], natindi likabo oyo na bolingo nyonso. Ntango nakokola, nakokende kosala mosala makasi na Betele.”

Mpo na mateya ya Biblia

Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19) Mpo na kotosa etinda yango, Batatoli ya Yehova bazali kosakola mpe koteya nsango ya Biblia na molende na mikili 235. Bazali kobimisa mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 413.

Kutu, likabo eleki motuya oyo moklisto akoki kopesa mpo na kosalisa bato mingi báyekola makambo etali Nzambe mpe mikano na ye ezali ntango na ye. Batatoli ya Yehova bazali kopesa ntango mpe makasi na bango mingi koleka mpo na kosalisa bazalani na bango. Bapesaka mpe makabo ya mbongo, mpe makabo yango nyonso esalaka, na lolenge moko mpe mosusu, ete nkombo ya Yehova mpe mikano na ye eyebana na mabelé mobimba. Tiká ete Yehova akoba kopambola milende oyo bazali kosala mpo na kosalisa basusu báyeba ye malamumalamu. (Masese 19:17) Komipesa ndenge wana mpo na kosalisa basusu esepelisaka mpenza Yehova!​—Baebele 13:15, 16.

[Etanda na nkasa 28-30]

Ndenge bato mosusu bapesaka

MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA

Bato mingi babombaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba​—Matai 24:14.”

Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na ekólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, Attention Treasurer’s Office, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. Ba-chèque oyo batindi na adrɛsi oyo topesi awa esengeli kopesama na “Watch Tower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya valɛrɛ. Akotinda yango nzela moko na mwa mokanda moko oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.

MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA

Moto akoki kotya mbongo na banki na nkombo ya Watch Tower. Kasi, soki asɛngi yango, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba ebongiseli yango malamu, tuná na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo ezali likoló.

MAKABO OYO EBONGISAMI LIBOSO

Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko, ezali na lolenge mosusu ya kopesa mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:

Asiransi: Moto akoki kokoma nkombo ya Watch Tower mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epaso.

Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya Watch Tower mpo Watch Tower esangola yango soki akufi.

Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na Watch Tower lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Lopango to ndako: Moto akoki kopesa likabo ya ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama, soki ezali ndako oyo afandi, kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya filiale na bino.

Makabo oyo ebotaka: Moto akoki kosɛnga ete bákoma nkombo ya Lisangani moko ya Batatoli ya Yehova, oyo ekoponama, oyo endimami na mibeko ya Leta, na kɔnti na ye na banki to na lotomo na ye ya mosolo. Moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa mbongo oyo mosolo yango ekobanda kobota mbula na mbula na bomoi na ye mobimba. Na mbula oyo likabo ya ndenge wana epesami, Leta akokitisa mpako oyo moto oyo apesi yango asengelaki kofutaka mpo na bozwi na ye.

Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa Watch Tower biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa Watch Tower lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto akufi, biloko oyo atikaki mpo na lingomba, ntango mosusu Leta akitisaka mpako na yango.

Lokola ebengeli “Makabo oyo ebongisami liboso” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mwa buku moko esilá kobongisama oyo ekomami na Espagnol mpe na Lingelesi, oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Plannning to Benefit Kingdom Service Worlwide (Makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomami mpo na koyebisa bato balolenge ndenge na ndenge oyo bakoki kopesa makabo na bango, ezala balingi kopesa yango sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi basungaki mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Leta akitiselaki bango mpako mpo na biloko na bango. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi na Charitable Planning Office.

Mpo na koyeba makambo mosusu, tindá mokanda to bengá na telefone na adrɛsi oyo ezali na nse to na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo ofandi.

Charitable Planning Office

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive

Patterson, New York 12563-9204

Telefone: (845) 306-0707

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa27]

Kasɛti video Fidèles: Staline: US Army photo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto