Koyeba koyoka na boboto
“MERSI mingi ndenge ozwi ntango ya koyoka ngai.” Moto moko auti koloba na yo bongo mikolo oyo? Maloba ya ndenge wana epesaka esengo na motema! Bato mingi basepelaka na moto oyo ayebaka koyoka. Soki toyebi koyoka, tokoki kokitisa mitema ya bato oyo bazali kotungisama. Koyeba koyoka esalisaka biso mpe tósepela na bato. Na kati ya lisangá, koyeba koyoka ezali na esika monene na likambo ya ‘kotyelana likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.’—Baebele 10:24.
Nzokande, bato mingi bayebaka koyoka te. Bato ya ndenge wana balingaka kopesa toli, kolobela makambo na bango moko, to kopesa makanisi na bango na esika báyoka oyo basusu balingi koloba. Koyeba koyoka ezali likambo oyo moto akoki koyekola. Ndenge nini tokoki koyekola koyoka malamu?
Sɛkɛlɛ moko mpo na koyeba koyoka
Yehova azali “Molakisi Monene.” (Yisaya 30:20, NW) Akoki koteya biso makambo mingi na oyo etali koyoka. Tótalela ndenge oyo Yehova asalisaki mosakoli Eliya. Lokola Eliya akómaki kobanga mpo Mokonzi-mwasi Yezabele azalaki kokana koboma ye, akimaki na esobe mpe asɛngaki ete akufa na ye. Kuna, anzelu ya Nzambe asololaki na ye. Ntango mosakoli yango amonisaki ntina oyo azalaki kobanga, Yehova ayokaki ye mpe na nsima alakisaki ye nguya monene na Ye. Nini esalemaki? Eliya atikaki kobanga mpe azongelaki mosala na ye. (1 Mikonzi 19:2-15) Mpo na nini Yehova azwaka ntango ya koyoka makambo oyo ezali kotungisa basaleli na ye? Mpamba te atyelaka bango likebi. (1 Petelo 5:7) Na bongo, sɛkɛlɛ monene mpo na koyeba koyoka ezali kotyela basusu likebi mpe komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bango.
Ntango mobali moko na ekólo Bolivie asalaki lisumu moko ya monene, asepelaki mingi na likebi oyo ndeko moko ya lisangá atyelaki ye. Mobali yango alobi boye: “Nalɛmbaki na ndenge oyo ekómela ngai naino te na bomoi na ngai. Nakokaki ata kotika kosalela Yehova soki ndeko moko azwaki te ntango ya koyoka ngai. Alobaki na ngai mingi te, kasi lokola namonaki ete azalaki koyoka ngai na likebi, yango elendisaki ngai mpenza. Nazalaki na mposa te ayebisa ngai oyo nasengeli kosala; nayebaki oyo nasengeli kosala. Na ndenge oyo nazalaki komiyoka, nazalaki kaka na mposa ete moto moko atyela ngai likebi. Ndenge oyo ayokaki ngai esalisaki ngai nabungisa elikya te.”
Yesu Klisto azali Ndakisa monene ya moto oyo ayebi mpenza koyoka. Mwa mikolo nsima ya lisekwa na ye, bayekoli na ye mibale bautaki na Yelusaleme mpe bazalaki kokende na mboka moko na ntaka ya kilomɛtrɛ 11. Na ntembe te bayekoli yango balɛmbaki nzoto. Yesu Klisto abandaki kotambola na bango nzela moko. Nzelanzela azalaki kotuna bango mituna ya sikisiki mpo na koyeba makambo oyo ezalaki kotungisa bango, mpe bayekoli yango balobaki na ye polele. Balobelaki bilikya oyo bazalaki na yango liboso mpe mobulungano oyo bakómaki na yango. Yesu atyelaki bango likebi, mpe lokola ayokaki bango malamu, yango esalisaki bayekoli yango mpe báyoka ye. Na nsima, Yesu “alimbwelaki bango makambo oyo etalaki ye na kati ya Makomami nyonso.”—Luka 24:13-27.
Kozwa naino ntango ya koyoka moto ezali ndenge malamu ya kosalisa ye mpo ayoka biso. Mwasi moko ya ekólo Bolivie alobi boye: “Baboti na ngai ná babokilo na ngai bakómaki koloba mabe na ndenge oyo nazalaki kobɔkɔla bana na ngai. Maloba na bango ezalaki kosepelisa ngai te, kasi nazalaki mpe koyeba te soki nazali kobɔkɔla bana malamu. Na eleko yango, Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na ngai. Alobelaki ngai bilaka ya Nzambe. Kasi, ndenge oyo mwasi yango azalaki kotuna makanisi na ngai emonisaki ete azalaki na mposa ya koyoka ngai. Nakɔtisaki ye na ndako, mpe nabandaki mbala moko koyebisa ye mokakatano na ngai. Ayokaki ngai malamu mpe akataki ngai maloba te. Atunaki ngai soki nalingi nini mpo na bana na ngai mpe makanisi ya mobali na ngai ezali nini. Kosolola na moto oyo azali kosala makasi ya koyeba mposa na ngai ekitisaki ngai mpenza motema. Ntango abandaki koyebisa ngai oyo Biblia elobi mpo na libota, nayebaki ete nazali kosolola na moto oyo azali komibanzabanzaka mpo na mokakatano na ngai.”
Biblia elobi ete: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Yango wana, koyeba koyoka elimboli kobosana naino makambo na biso. Yango ekoki kosɛnga ete ntango moto azali koloba na biso likambo ya ntina, tókanga naino televizyo, tókitisa naino zulunalo oyo tozali kotánga, to tókanga naino telefone mpo likambo mosusu ebenda likebi na biso te. Koyeba koyoka elimboli kofungola mpenza matoi mpo na kokanga ntina ya makanisi ya moto. Yango esɛngaka komipekisa mpo tóbanda te koloba makambo na biso, to maloba lokola, “Nakanisi lisusu likambo moko oyo ekómelaki ngai.” Atako maloba ya ndenge wana ezali mabe te ntango tozali kobɛta masolo, tosengeli kotika kolobela makambo na biso ntango moto azali koyebisa biso likambo oyo ezali kotungisa ye. Ezali mpe na ndenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozali mpenza kotyela moto likebi.
Koluka koyeba ndenge oyo moto azali koyoka
Yobo azwaki maloba soki mbala zomi ntango azalaki kosolola ná baninga na ye. Kasi, Yobo alobaki ete: “Nani akolukela ngai moto mpo na koyoka ngai?” (Yobo 31:35) Mpo na nini alobaki bongo? Mpamba te ndenge na bango ya koyoka ezalaki kobɔndisa te. Bazalaki komibanzabanza mpo na ye te, mpe bazalaki na mposa te ya koyeba ndenge oyo azalaki koyoka. Bazalaki komitya na esika na ye te, ndenge moto oyo ayebi koyoka asalaka. Nzokande ntoma Petelo apesi toli oyo: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa.” (1 Petelo 3:8) Ndenge nini tokoki komitya na esika ya basusu? Lolenge moko ezali koluka koyeba makanisi ya moto mpe kokanga ntina ya mokakatano na ye. Maloba ya boboto lokola “namoni ete likambo yango etungisaki yo mpenza” to “bamityaki na esika na yo ata moke te,” ezali balolenge oyo tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na ye. Lolenge mosusu ezali kozongela na maloba na biso makambo oyo moto alobi; yango ekomonisa ete tozali kokanga ntina ya maloba na ye. Koyeba koyoka elimboli kotya likebi na maloba kaka te, kasi mpe na mayoki ya moto.
Roberta azali Motatoli ya Yehova oyo aumeli na mosala ya ntango nyonso. Ye alobi boye: “Na ntango moko boye, nalɛmbaki na mosala na ngai. Yango wana nalukaki kosolola na mokɛngɛli-motamboli. Ayokaki ngai mpenza mpe asalaki makasi amitya na esika na ngai. Kutu, namonaki ete asosolaki ete nazali kobanga aloba na ngai ete ebongi te moto lokola ngai nayoka ndenge wana. Ndeko yango alobaki na ngai ete azalaki koyeba ndenge oyo nazali koyoka mpamba te ye mpe akutaná na likambo ya ndenge wana. Yango esalisaki ngai mpenza mpo nazonga nsima te.”
Tokoki koyoka moto malamu ata soki tozali na makanisi ndenge moko na ye te. Tokoki mpe kotɔnda moto oyo ayebisi biso ndenge oyo azali komiyoka. Moboti asengeli kosala nini soki mwana na ye abundi na kelasi to mwana na ye ya mwasi ayebisi ye ete azali kosepela na mwana mobali moko boye? Ekoleka malamu ayoka mwana yango mpe ameka kososola makanisi na ye liboso ateya ye ezaleli oyo ebongi mpe amonisa ye ezaleli oyo ebongi te.
Masese 20:5 elobi ete: “Toli na motema ya moto ezali lokola mai ya bozindo, nde moto ya mayele akotoka yango.” Soki moto moko oyo azali na bwanya mpe ayebi makambo mingi, kasi azali na momeseno ya kopesa toli te soki batuni ye te, ntango mosusu esɛngaka nde biso tótoka toli na ye. Ezali mpe ndenge moko ntango tozali koyoka moto. Esɛngaka kozala na bososoli mpo na kotinda ye aloba. Kotuna mituna esalisaka, kasi tosengeli kokeba ete na mituna na biso, tókɔta te na makambo oyo etali biso te. Ekoki kozala malamu tósɛnga na moto oyo azali koloba abanda na makambo oyo akokakatana te kolobela. Na ndakisa, mwasi oyo alingi kolobela mikakatano oyo azali na yango na libala na ye akoki komona ete ekozala mpasi te abanda kolobela ndenge oyo ye ná mobali na ye bakutanaki mpe babalanaki. Moto oyo asakolaka lisusu te akoki komona ete ezali mpasi te alobela ndenge oyo ayekolaki solo.
Ntango oyo koyoka na boboto ekómaka mpasi
Koyoka moto oyo asilikeli biso ekoki kozala mpasi, mpamba te mposa ya motema na biso ezalaka ete tómilongisa. Tokoki kosala nini na ntango wana? Masese 15:1 elobi boye: “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda.” Kosɛnga na moto aloba mpe koyoka ye na motema molai ntango azali komonisa likambo oyo etungisi ye ezali lolenge moko ya kozongisa eyano na boboto.
Ntango bato mibale bazali koswana, mbala mingi bazongelaka kaka makambo oyo bauti koloba. Moto na moto amonaka ete mosusu nde azali koyoka ye te. Kanisá ndenge likambo ekokóma pɛtɛɛ soki moko na bango atiki koloba mpe ayoki mpenza moninga! Ya solo, ezali na ntina mingi tómipekisa mpe tólobaka na boboto mpe bolingo. Biblia elobi na biso boye: “Ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.”—Masese 10:19.
Moto moko te abotamaka na makoki ya koyoka na boboto. Kasi, moto akoki koyekola yango soki asali molende. Ezali na ntina moto azala na mayele yango. Koyoka mpenza ntango basusu bazali koloba ezali mpe lolenge ya komonisa bolingo. Esalisaka mpe biso moko tózala na esengo. Yango wana, ezali na ntina mingi tóyekola koyoka na boboto!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 11]
Ntango tozali koyoka, tosengeli kobosana naino makambo na biso
[Elilingi na lokasa 12]
Koyoka moto oyo asiliki ekoki kozala mpasi