Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/12 lok. 3
  • Armagedona elimboli libebi ya mokili?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Armagedona elimboli libebi ya mokili?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Bato mosusu balobaka ete Armagedone ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Armagedon ekoya ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Etumba ya Armagedone ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/12 lok. 3

Armagedona elimboli libebi ya mokili?

SOKI oyoki liloba Armagedona, omonaka na makanisi libebi moko ya monene to kozika ya molɔ́ngɔ́ mobimba na mɔtɔ? Liloba “Armagedona” ekómá mpenza nzembo na minɔkɔ ya bato nyonso. Basalelaka liloba yango mingimingi mpo na kolobela likambo moko ya nsɔmɔ oyo ezali kozela bato. Batelevizyo mpe ya bavideo etondisi makanisi ya bato na bililingi ya nsɔmɔ na ntina na Armagedona. Bato babimisi ebele ya makanisi ya lokuta na ntina na liloba yango. Atako bato bazali kopesa liloba yango bandimbola ebele, mingi kati na bandimbola yango eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpo na Armagedona.

Lokola Armagedona esalelami na Biblia mpo na kolobela “[nsuka] ya mokili,” omoni te ete ezali na ntina tóyeba ndimbola mpenza ya liloba yango? (Matai 24:3, Bible na lingala ya lelo oyo) Ekozala malamu tótalela liloba ya Nzambe, liziba ya solo mpo na koyeba soki Armagedona ezali nini mpe soki ekolimbola nini mpo na yo mpe mpo na libota na yo.

Soki totaleli Biblia, tokomona ete Armagedona ekozala te libebi ya mokili, kasi nde ebandeli ya mokili moko ya esengo mpo na bato oyo bazali na mposa ya kozala na bomoi ya esengo na mokili ya sika ya boyengebene. Okoyeba nini Biblia eteyaka mpenza na likambo yango na lisolo elandi.

[Etanda/Elilingi na lokasa 3]

OKANISAKA ETE ARMAGEDONA EZALI NINI?

• Etumba ya bibundeli ya nikleere

• Kobebisama ya mopɛpɛ, mai mpe zamba

• Monzoto moko ya likoló ekotutana na mabelé

• Nzambe akoboma bato mabe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto