Bato mosusu balobaka ete Armagedone ezali nini?
“Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone.”—EMONISELI 16:16.
OKANISAKA nini ntango oyokaka liloba “Armagedone”? Mbala mosusu okanisaka ete ezali likama moko monene oyo ekokwela mokili. Atako na Biblia liloba yango ezali kaka na esika moko, bapanzi-nsango mpe bakonzi ya mangomba bazongelaka yango mbala na mbala.
Makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na Armagedone, eyokani mpenza na oyo Biblia eteyaka? Kozwa eyano na motuna wana ezali na ntina mingi. Mpo na nini? Mpamba te koyeba solo na ntina na Armagedone ekoki kosalisa yo otika kobanga mpambampamba, ozala na elikya mpo na mikolo ezali koya, mpe otika kokanisela Nzambe mabe.
Talelá mituna misato oyo elandi, mpe kokanisá makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na Armagedone ná oyo Biblia eteyaka mpenza.
1. ARMAGEDONE EZALI NDE LIKAMA OYO EKOUTA EPAI YA BATO?
Mbala mingi, bapanzi-nsango mpe bato ya mayele basalelaka liloba “Armagedone” mpo na kolobela makama oyo bato babimisaka. Na ndakisa, balobaki ete Etumba ya Liboso mpe ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki Armagedone. Nsima ya bitumba yango, bato bazalaki kobanga ete États-Unis ná Union soviétique bábwakelana babɔmbi atomike. Bapanzi-nsango babengaki matata yango oyo elingaki kobima “Armagedone ya bibundeli ya nikleere.” Lelo oyo, bato ya mayele oyo bazali kobanga ete kobeba ya mai mpe mopɛpɛ ebakisa molunge to malili awa na mabele, bazali kokebisa bato ete etikali moke “Armagedone ya klima” esalema.
Makanisi na bango emonisi nini? Emonisi ete avenire ya mabele mpe ya biloko nyonso oyo ezali na mabele ezali na mabɔkɔ ya bato. Soki baguvɛrnema ya mokili elongi te kobongisa makambo, mabele ekobeba libela.
Biblia eteyaka nini? Eteyaka ete Nzambe akotika nzela te ete bato bábebisa mabele. Biblia emonisi biso ete Yehovaa akelaki mabele “mpamba te.” Asalaki yango nde mpo “bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Na esika atika bato bábebisa mpenza mabele, Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’—Emoniseli 11:18.
2. ARMAGEDONE EZALI NDE LIKAMA LOKOLA MOPƐPƐ MAKASI TO KONINGANA YA MABELE?
Ntango mosusu bapanzi-nsango basalelaka liloba “Armagedone” mpo na kolobela makama minene lokola mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele. Na ndakisa, na mobu 2010, lapolo moko elobaki ete “‘Armagedone’ esalemi na Haïti.” Lapolo yango ezalaki kolobela mpasi oyo ekɔtaki na Haïti, ndenge oyo biloko ya bato ebebaki mpe ndenge oyo bato mingi bakufaki ntango mabele eninganaki na ekólo yango. Bapanzi-nsango mpe bato oyo basalaka bafilme basalelaka liloba yango kaka te mpo na makambo oyo esilá kosalema, kasi mpe mpo na oyo bazali kobanga ete esalema na mikolo ezali koya. Na ndakisa, basalelaka liloba “Armagedone” mpo na kolobela likama oyo bakanisaka ete ekobima soki monzoto moko (astéroïde) etutani ná mabele.
Makanisi na bango emonisi nini? Emonisi ete Armagedone ezali likambo moko oyo ekanami te, oyo ekoboma bato kozanga kopona, ata baoyo basali eloko te. Ezali na eloko moko te oyo okoki kosala mpo na komibatela na yango.
Biblia eteyaka nini? Eteyaka ete Armagedone ezali te likambo oyo ekanami te, oyo ekoboma bato bibomelá. Na Armagedone, kaka bato mabe nde bakobomama. Biblia elaki ete etikali moke, “moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te.”—Nzembo 37:10.
3. NZAMBE AKOBEBISA MABELE NA ARMAGEDONE?
Bandimi ya mangomba mingi bakanisaka ete nsukansuka etumba moko ekobima kati na mabe ná malamu, mpe yango nde ekoboma mokili. Ebongiseli moko (Princeton Survey Research Associates) esalaki ankɛtɛ na États-Unis. Na kati ya bato oyo batunaki, mikóló mingi (40%) bandimaki ete mokili ekokufa na “etumba ya Armagedone.”
Mateya na bango emonisi nini? Emonisi ete bato bakelamaki te mpo na kofanda libela na mabele, mpe mabele esalemaki te mpo eumela libela. Nzambe akelaki bato na likanisi ete mokolo mosusu bango nyonso basengeli kokufa.
Biblia eteyaka nini? Biblia elobi polele ete Nzambe “atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Mpo na bato oyo bafandi na mabele, Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”—Nzembo 37:29.
Emonani polele ete makanisi ya Biblia ekeseni mpenza na makanisi oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na Armagedone. Na yango, solo ezali wapi?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.