Mabe ekundi malamu
NA MOKILI ya lelo oyo, ekoki komonana ete bato mingi te bazali komipesa mpo na kosalisa basusu. Nzokande, bato mosusu bazali mpenza na mposa ya kosalisa basusu, na lolenge moko to mosusu. Mbula na mbula, bato ebele bapesaka bamiliare ya dolare mpo na makambo oyo bamoni ete ekoki kosalisa bato. Na ndakisa, na 2002 na Angleterre, bato bapesaki mbongo ebele, tii miliare 13 ya dolare mpo na kosalisa basusu. Banda na 1999, bato 10 ya motema malamu bapesi to balaki kopesa mbongo koleka miliare 38 ya dolare mpo na kosalisa bato oyo bazali kokelela.
Bato mosusu ya motema malamu bafutelaka mabota oyo ezali na bozwi mingi te mbongo ya lopitalo, bapesaka bana oyo bazali kaka na moboti moko formasyo, bapesaka mbongo mpo na bakampanye ya mangwele na mikili ya bobola, mpe bapesaka babɔkɔli ya bibwɛlɛ na mikili ya bobola banyama ya kobɔkɔla mpe basungaka bato oyo makama ya mbula, mipɛpɛ to koningana ya mabelé ekómeli bango.
Bandakisa oyo touti kopesa emonisi ete bato bazali na likoki ya kosalela basusu bolamu. Kasi, likambo ya mawa ezali ete bato mosusu bazali kosala mabe ya koloba te.
Mabe ezali se kobakisama
Banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, bitumba soki 50 esalemi, epai basasaki bato ya bituluku mobimba na mokano ya kosilisa bango to bato ya politiki batindaki bato bábomana. Zulunalo moko (American Political Science Review) elobaki boye: “Banda 1945, bitumba ya ndenge wana ebomisi basoda soki milio 12 mpe basivili soki milio 22, koleka kutu bato oyo bakufaki na bitumba kati na bana-mboka mpe kati na bikólo.”
Kobanda na bambula ya 1950 tii na 2000, kowelana ya bato ya politiki ebomisaki bato koleka milio 2 na ekólo Cambodge. Koyinana na kati ya Bahutu ná Batutsi na Rwanda ebomisaki mibali, basi mpe bana koleka 800 000. Na Bosnie, kowelana ya mangomba mpe ya bato ya politiki ebomisaki bato koleka 200 000.
Na 2004, secrétaire général ya ONU atángaki makambo ya mabe oyo eutaki kosalema: “Na Iraq, tomoni ndenge babomi ebele ya basivili kozanga mawa, bakangi basali ya Croix Rouge, bapanzi-nsango mpe bato ya misala mosusu, mpe babomi bango lokola banyama. Tomoni mpe ndenge bazali konyokola bato ya Iraq oyo bakangi. Na etúká ya Darfour, tomoni ndenge ebele ya bato bakimi bamboka na bango, ndenge bandako na bango ebebisami mpe basoda bazali kosangisa na basi nzoto na makasi mpo na kobangisa mpe kolɛmbisa banguna na bango. Na nɔrdi ya Ouganda, tomoni ndenge bazali kokatakata bana na bambeli mpe kosalisa bango makambo ya mobulu. Na Beslan, tomoni ndenge bakangi bana mpe babomi ebele kati na bango lokola banyama.”
Ata na mikili ya bozwi, emonani lokola kobomana na kati ya bato ya bituluku ekeseni ezali se kobakisama. Na ndakisa, zulunalo moko (Independent News) ekomaki na 2004 ete na Angleterre, “na boumeli ya mbula zomi oyo eleki, bitumba kati na bato ya bikólo to mposo ekeseni ebakisamaki mbala 11.”
Mpo na nini bato oyo bazali na likoki ya kosala makambo mingi ya malamu bazali kosala makambo ya mabe ndenge wana? Mabe ekosila mokolo mosusu? Ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, Biblia ezali kopesa biyano ya malamu mpenza na mituna wana.