Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/8 nk. 11-15
  • Nsukansuka, libota na biso ekómaki na bomoko!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsukansuka, libota na biso ekómaki na bomoko!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo ekómaki na libala biso
  • Ndenge nasalisaki bana na ngai báyeba solo
  • Tolongi mikakatano
  • Mobali na ngai abandi kobongwana mokemoke
  • Mbongwana ekɔtaki ntango asilisaki mosala
  • Nsukansuka libota na biso ekómaki na bomoko
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Batatoli ya Yehova bapanzaka mabala ya bato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/8 nk. 11-15

Lisolo ya bomoi

Nsukansuka, libota na biso ekómaki na bomoko!

YA SUMIKO HIRANO

Nazwaki bomoi oyo eleki malamu, mpe nalingaki ete mobali na ngai mpe azwa yango. Mbula ntuku minei na mibale elekaki liboso azwa bomoi yango.

TOBALANAKI na 1951, ntango nazalaki na mbula 21. Na mbula minei ya libala, tobotaki bana mibale ya mibali, mpe nazalaki na bomoi moko ya esengo.

Mokolo moko na mobu 1957, yaya na ngai ya mwasi ayebisaki ngai ete misionɛrɛ moko ya Batatoli ya Yehova ayaka kotala ye. Atako azalaki kosambela na Lingomba ya Bouddha, abandaki koyekola Biblia na misionɛrɛ yango mpe alendisaki ngai nayekola mpe Biblia. Nandimaki. Nazalaki na Lingomba ya Protesta, mpe nakanisaki ete nakomonisa bango mabunga ya mateya ya Batatoli ya Yehova.

Mosika te, namonaki ete boyebi na ngai ya Biblia ezalaki moke. Natunaki misionɛrɛ wana ete, “Yehova azali mpenza nani?” Natikalá koyoka nkombo wana na Lingomba na biso te. Misionɛrɛ wana, Daphne Cooke (na nsima abalaki Pettitt), abendaki likebi na ngai na Yisaya 42:8, oyo elobaka polele ete Yehova ezali nkombo ya Nzambe, Mozwi-na-Nguya nyonso. Daphne ayanolaki na mituna na ngai nyonso na lisalisi ya Biblia.

Natunaki mpe pastɛrɛ na biso mituna yango. Alobaki na ngai boye: “Kotuna mituna ezali lisumu. Ndimá kaka makambo oyo bayebisi yo.” Atako nandimaki te ete kotuna mituna ezali mabe, na boumeli ya sanza motoba mobimba nazalaki kokende losambo mikolo nyonso ya lomingo na ntɔngɔ, mpe na nsima ya nzanga nazalaki kokende na makita ya Batatoli ya Yehova.

Makambo oyo ekómaki na libala biso

Makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia esepelisaki ngai makasi, mpe nazalaki koyebisa yango mobali na ngai, Kazuhiko. Nsima ya boyekoli nyonso mpe ya makita nyonso, nazalaki koyebisa ye makambo oyo nayekoli. Na yango, ‘tozalaki lisusu na boyokani te.’ Aboyaki nakóma Motatoli. Kasi, koyekola Biblia ezalaki kosepelisa ngai mingi, yango wana nakobaki koyekola mpe koyangana na makita ya Batatoli.

Liboso nakende na makita na butu, nazalaki kolambela Kazuhiko biloko oyo azalaki kolinga mingi, kasi ye abandaki kokende kolya na restora. Soki nauti na makita, abandaki kozala na esengo te mpe azalaki kosololisa ngai te. Nsima ya mikolo mibale to misato, nkanda na ye ezalaki kokita, kasi ezalaki kozonga soki nakei lisusu na makita.

Na ntango wana, nabɛlaki maladi ya ntolo, maladi oyo ebomaki bato mingi na libota na mobali na ngai. Kazuhiko akómaki komitungisa makasi mpe ayebisaki ngai ete soki nabiki, nakoki kosala eloko nyonso oyo nalingi. Eloko kaka moko oyo nasɛngaki ye ezali ete apekisa ngai te koyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Andimaki.

Nsima ya nsanza motoba nayokaki nzoto malamu, mpe na boumeli ya ntango wana nayekolaki Biblia na mozindo. Nazalaki koluka mabunga ya Batatoli, mpe nazalaki kokanisa ete soki nazwi ata moko nakotika koyekola. Nazwaki ata moko te. Nzokande, mabunga ya Lingomba ya Protesta nde emonanaki polele. Nayaki koyeba bolingo mpe boyengebene ya Yehova mpe namonaki ntina ya kozala na bomoi oyo eyokani na mibeko na ye.

Ntango maladi na ngai esilaki, akokisaki elaka na ye, azalaki koboya lisusu te nakende na makita. Nakobaki kokola na elimo mpe na sanza ya Mai 1958, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Nazalaki kosepela ete libota na ngai mpe esambela Nzambe ya solo.

Ndenge nasalisaki bana na ngai báyeba solo

Bana na ngai bazalaki na ngai ntango nyonso na makita mpe na mosala ya kosakola, kasi makambo mosusu oyo esalemaki esalisaki ngai namona ete bazali mpenza kokola na boyebi ya Biblia. Mokolo moko, Masahiko, mwana na ngai ya mbula motoba, azalaki kosakana na libanda ya ndako. Nayokaki moto moko agangi na mongongo makasi. Mwasi moko ya kartye akɔtaki mbala moko na ndako mpe agangaki ete motuka etuti mwana na ngai. Namitunaki soki akufi. Nakangaki kaka motema mpe nabimaki nokinoki. Ntango namonaki ndenge velo na ye efinanaki, nabangaki makasi, na nsima, namonaki ye azali koya epai ngai, atutanaki mpenza mingi te. Ayambaki ngai mpe alobaki ete, “Mama, Yehova asalisi ngai, boye te?” Komona ye azali na bomoi mpe koyoka maloba kitoko wana elelisaki ngai.

Mokolo mosusu na mosala ya kosakola, tokutanaki na mobange moko, oyo alobaki boye: “Oyo nde mawa! Mwana moke boye okei kotambwisatambwisa ye boye tii wapi?” Liboso nayanola, Tomoyoshi, oyo azalaki kaka na mbula mwambe, alobaki boye: “Nkɔkɔ, mama abendaka ngai na mosala ya kosakola te. Nasakolaka mpo nalingi kosalela Yehova.” Mobange wana atalaki mwana yango tii mpe azangaki likambo ya koloba.

Na elimo, bana na ngai bazangaki tata. Na yango, ezalaki mokumba na ngai ya koteya bango solo, atako nayebaki naino Biblia malamu te. Ngai moko nazalaki kokolisa bolingo, kondima mpe molende mpo na Yehova mpe nazalaki kosala makasi napesa bango ndakisa. Nazalaki kobondela Yehova mokolo na mokolo liboso na bango. Nazalaki koyebisa bango makambo oyo nazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola. Yango ezalaki kolendisa bango mpenza. Ntango batunaki bango na nsima mpo na nini bakómaki babongisi-nzela, to basali ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, balobaki boye: “Tomonaki ndenge mama na biso azalaki na esengo mpo azalaki mobongisi-nzela, mpe tolingaki kozala na esengo lokola ye.”

Nazalaki mpenza kosala makasi ete nalobaka mabe te na ntina na tata na bango to na ntina na ndeko moko ya lisangá. Nayebaki ete soki nazali kosala bongo, yango ekokaki kobebisa bango. Bakozala na limemya lisusu te mpo na moto oyo nazali kolobela ata mpe mpo na ngai moko.

Tolongi mikakatano

Na 1963, mosala ya mobali na ngai ememaki biso na Taïwan. Ayebisaki ngai ete soki nazali kosakwela bato ya ekólo Japon oyo bazali kuna, nakoluka makambo. Bakozongisa biso na Japon mpe yango ekobendela kompanyi na ye mindondo. Alingaki kokabola biso na Batatoli.

Na ekólo Taïwan, epai makita nyonso ezalaki kosalema na monɔkɔ ya Chinois, Batatoli bayambaki biso na esengo nyonso. Nayekolaki monɔkɔ ya Chinois mpo nasakwela Bachinois na esika ya Bajaponais. Na ndenge yango, nakokaki kopengola mindondo oyo mobali na ngai alobelaki.

Boninga na biso na Batatoli na Taïwan elendisaki biso makasi. Harvey ná mwasi na ye Kathy Logan, oyo bazalaki bamisionɛrɛ, basalisaki biso mingi. Ndeko Logan akómaki tata ya bana na ngai ya elimo. Amonisaki bango ete kosalela Yehova ezali bomoi ya mpasi te. Nayebi mpenza ete na Taïwan nde bana na ngai bazwaki ekateli ya kosalela Yehova.

Tomoyoshi ná Masahiko bakɔtaki na eteyelo moko ya Amerika na Taïwan, epai bayekolaki Lingelesi ná Chinois. Mateya wana ebongisaki bango mpo na mosala ya Yehova, Nzambe ya solo. Nazali na botɔndi mingi epai na Yehova ndenge asalaki ete eleko wana ya mpasi ememela biso esengo. Nsima ya mbula misato na ndambo na Taïwan, tozongaki na Japon.

Bana bakómaki mwa mikóló mpe balingaki kobanda mpe kosala makambo na ndenge na bango moko. Nazalaki kolekisa bangonga mingi mpo na kokanisa elongo na bango na lisalisi ya mitinda ya Makomami, mpe Yehova asalisaki bango na ntango wana ya mpasi. Ntango Tomoyoshi asilisaki eteyelo ya ntei, akómaki mobongisi-nzela. Na mwa bambula ya liboso kaka ya mosala na ye ya mobongisi-nzela, asalisaki bato minei bámipesa na Yehova mpe bábatisama. Masahiko alandaki ndakisa ya ndeko na ye, mpe akómaki mobongisi-nzela ntango kaka asilisaki eteyelo ya ntei. Na mbula minei ya liboso ya mosala na ye ya mobongisi-nzela, asalisaki bilenge minei bakóma Batatoli.

Na nsima, Yehova apambolaki bango lisusu mingi koleka. Tomoyoshi ayekolaki Biblia na mobali ya mwasi moko oyo nayekolaki na ye Biblia. Bana na bango mibale ya basi mpe bakómaki Batatoli. Na nsima, Tomoyoshi abalaki Nobuko, mwana na bango ya mwasi ya liboso mpe Masahiko abalaki oyo ya leki, Masako. Tomoyoshi ná Nobuko bazali sikoyo kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na etúká ya New York. Masahiko ná Masako bazali bamisionɛrɛ na Paraguay.

Mobali na ngai abandi kobongwana mokemoke

Mobali na ngai, Kazuhiko azalaki komonisa mpenza te ete azali kosepela na bindimeli na biso bambula wana, kasi tomonaki ete abandi kobongwana. Ntango bato bazalaki kotɛmɛla ngai, azalaki kokɔtela ngai, nzokande azalaki koyeba te ete azali kokɔtela solo. Azalaki kosalisa Batatoli oyo bazalaki na bosɛnga. Na lisolo mokuse oyo asalaki na libala ya moko ya bana na biso, alobaki boye: “Koteya bato lolenge malamu ya bomoi ezali likambo eleki malamu, mpe oyo eleki mpasi. Bana na ngai ná basi na bango baponi nzela wana ya mpasi bomoi na bango mobimba. Nabondeli bino ete bósalisa bango.” Nyonso wana, esalisaki ngai mpenza nayeba ete nsukansuka ye mpe akosambela Yehova elongo na biso.

Nazwaki bibongiseli ete Batatoli bayaka epai na biso mpo amesana na bango. Nazalaki kobenga Kazuhiko na makita ya lisangá, na mayangani mpe na Ekaniseli ya liwa ya Nkolo. Ntango mosala na ye ezalaki kotikela ye mwa ntango, azalaki koyangana na makita yango, atako azalaki kokakatana. Mbala mingi, nazalaki kokanisa ete akoki kondima koyekola Biblia, nazalaki kobenga bankulutu epai na biso. Kasi, azalaki koboya koyekola. Namitunaki soki amoni mabe nini.

Namikundolaki maloba ya ntoma Petelo oyo: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.” (1 Petelo 3:1, 2) Namonaki ete nazalaki kotosa toli wana ntango nyonso te. Mpo na kotosa toli yango malamu, esengelaki nakola lisusu makasi na elimo.

Na 1970, nakómaki mobongisi-nzela na mokano ya kokóma lisusu makasi na elimo. Mbula 20 elekaki. Kasi, namonaki ete mobali na ngai azali kaka kobongwana te. Mokolo moko, moyekoli moko ya Biblia alobaki boye: “Ezali mpenza mpasi. Ozali kosalisa bato mosusu, kasi mobali na yo moko ozali kokoka kosalisa ye te.” Maloba yango ezalaki ya kolɛmbisa, kasi nalɛmbaki te.

Na nsuka ya bambula ya 1980, baboti na biso bakómaki mibange makasi mpenza. Kosalisa bango mpe kokokisa mikumba na ngai mosusu ezalaki mpasi. Bambula mingi, batɛmɛlaki bindimeli na ngai, kasi nasalaki nyonso mpo na komonisa ete nalingaka bango. Liboso akufa, na mbula 96, mama alobaki na ngai boye: “Sumiko, soki nasekwi, nakokɔta na lingomba na bino.” Namonaki ete nasalaki mosala ya mpunda te.

Mobali na ngai amonaki nyonso oyo nasalaki mpo na baboti na biso. Mpo na komonisa botɔndi na ye, abandaki koyangana na makita nyonso. Ayanganaki bongo bambula ebele, kasi akolaki mpenza te na elimo. Nakobaki kaka koluka kosepelisa ye. Nazalaki kobenga baninga na ye nyonso ezala oyo ya mboka mopaya oyo bazalaki kosala na bango, kolya epai na biso. Nazalaki kokende kominanola elongo na ye. Ntango bakitisaki ngonga ya babongisi-nzela na 70 na sanza, nakómaki lisusu na ngonga mingi ya kozala na ye elongo.

Mbongwana ekɔtaki ntango asilisaki mosala

Mosala ya mobali na ngai esilaki na 1993. Nalobaki na motema ete, sikoyo akozala na ntango ya koyekola Biblia. Kasi, alobaki ete kosambela Nzambe kaka mpo akómi na ntango mingi ezali kotuka Nzambe. Nzokande, alobaki ete akosambela Nzambe ntango motema na ye ekotinda ye mpe alingi te ete ngai natindika ye na makasi.

Mokolo moko, Kazuhiko atunaki ngai soki nakolinga kolekisa mpe ntango mingi mpo na ye. Likambo yango etungisaki ngai mpamba te nazalaki kosalela ye nyonso oyo nakoki banda tobalaná. Nasalaki nyonso mpo na kosepelisa ye, kasi ye azalaki komona ete nazalaki kosalela Yehova mingi koleka ye. Nsima ya kokanisa mwa moke, nayebisaki ye ete nakokoka te kosalela ye koleka ndenge nazalaki kosala. Kasi, soki asangani na ngai na oyo nazali kosala, tokoki kobanda bomoi ya sika oyo eleki malamu mpe tokozala elongo kaka mpo na mwa bambula te, kasi libela na libela. Esalaki mikolo mobali na ngai azalaki na eyano ya kopesa te. Nsukansuka, atunaki, “Okoyekola Biblia na ngai?” Ntango nyonso oyo nakanisaka maloba wana motema na ngai etondaka na esengo.

Nazwaki liboso bibongiseli mpo nkulutu moko ayekola na ye, kasi ayebisaki ngai ete, “Nakoyekola na moto mosusu te, kaka na yo.” Tobandaki koyekola mikolo nyonso. Lokola ngai nazali na lisangá ya Chinois mpe mobali na ngai alobaka monɔkɔ yango malamu, tozalaki koyekola na Chinois. Tótángaki mpe Biblia mobimba elongo na boumeli ya mwa basanza kaka.

Na ntango yango, nkulutu moko na lisangá ya Chinois ná mwasi na ye bakómaki mpenza kotyela biso likebi. Atako bazalaki ata na mbula ya bana na biso te, bakómaki mpenza baninga na biso ya motema. Batatoli mosusu mpe bakómaki mpenza kotyela mobali na ngai likebi. Bazalaki koyamba biso epai na bango mpe kosolola na Kazuhiko lokola tata na bango. Yango esepelisaki ye mingi.

Mokolo moko, bayaki kotikela biso lokasa ya libyangi mpo na libala moko oyo esalemaki na lisangá, kasi lokasa yango ezalaki na nkombo ya mobali na ngai. Komona ete batyaki ye na esika na ye ya mokonzi ya libota esimbaki mpenza motema na ye, mpe andimaki kokende na fɛti yango. Akómaki kosolola na Batatoli mpe abandaki koyekola Biblia na nkulutu moko ya lisangá. Boyekoli na ye ya Biblia, koyangana na makita, mpe bolingo ya bandeko esalisaki ye akola na elimo.

Nsukansuka libota na biso ekómaki na bomoko

Na Desɛmbɛ 2000, mobali na ngai azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Yehova. Bana na biso ná basi na bango bautaki mosika mpe bayaki mpo na komona “likamwisi” yango. Nsima ya mbula 42, libota na biso ekómaki na bomoko.

Lelo oyo, ntɔngɔ nyonso, biso mibale tótángaka mokapo ya mokolo mpe Biblia elongo. Mokolo na mokolo, tobɛtaka masolo ya elimo mpe tosalaka makambo nyonso ya elimo elongo. Mobali na ngai azali sikoyo mosaleli na misala mpe autaki kosala lisukulu moko na Chinois. Nazali kotɔnda Yehova ndenge asangisi biso. Nazali na mposa ete ngai ná bato ya libota na ngai mpe baninga na ngai ya motema tósimba nkombo mpe boyangeli na ye libela na libela.

[Karte na lokasa 13]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

CHINE

RÉPUBLIQUE POPULAIRE DÉMOCRATIQUE DE CORÉE

RÉPUBLIQUE DE CORÉE

Mbu ya Japon

JAPON

Tokyo

Ɛsti ya mbu ya Chine

TAÏWAN

Taipei

[Elilingi na lokasa 12]

Ngai ná libota na ngai na 1958, mbula oyo nazwaki batisimo

[Bililingi na lokasa 13]

Baninga lokola Harvey ná Kathy Logan balendisaki biso na elimo ntango tolongwaki na Tokyo mpe tokendaki na Taipei

[Elilingi na lokasa 15]

Lelo oyo, libota ekómi na bomoko na kati ya losambo ya solo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto