Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/1 nk. 25-29
  • Koluka boyengebene ekobatela biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koluka boyengebene ekobatela biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya boyengebene
  • Bayengebene na kati ya mokili oyo ezangi boyengebene
  • Motambo ya pite to ekobo
  • Bopusi mabe ya bato ya mboka
  • Kobosana Yehova te
  • Kebá na elimo ya lipanda
  • Mekolaká Yesu
  • Mpo na nini kolanda kosalela boyengebene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tólinga boyengebene na motema mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Sepelá na boyengebene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Basaleli ya Yehova balingaka boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/1 nk. 25-29

Koluka boyengebene ekobatela biso

“Boye, bókoba koluka liboso . . . boyengebene ya [Nzambe].”​—MATAI 6:33.

1, 2. Ekateli nini elenge moklisto moko azwaki, mpe mpo na nini azwaki yango?

ELENGE moklisto moko ya mwasi na Azia azalaki sekrɛtɛrɛ na biro moko ya Leta. Azalaki sembo, azalaki kokóma na mosala na ngonga mpe azalaki kolekisa ntango ya mosala mpambampamba te. Kasi, lokola bazwaki ye naino na mosala yango mpo na libela te, ekómaki ntango ya kotalela likambo na ye. Mokonzi ya departema na bango ayebisaki elenge mwasi yango ete soki andimi kozala makango na ye akozwa ye na mosala libela mpe akomatisa ye mpɛtɛ. Ndeko yango aboyaki na motema moko, atako ayebaki ete akokaki kobungisa mosala na ye.

2 Ndeko yango akanisaki malamu te? Te, atosaki nde maloba ya Yesu oyo: “Boye, bókoba koluka liboso . . . boyengebene ya [Nzambe].” (Matai 6:33) Mpo na ye, kolanda mitinda ya sembo ezalaki na ntina mingi koleka kozwa litomba moko na nzela ya kosala pite.​—1 Bakolinti 6:18.

Ntina ya boyengebene

3. Boyengebene ezali nini?

3 “Boyengebene” elimboli ezaleli ya kokangama na mitinda ya bizaleli malamu. Na Biblia, maloba ya Grɛki mpe ya Liebele oyo basaleli mpo na boyengebene epesaka likanisi ya “kozala alima.” Yango elimboli te komitánga moyengebene yo moko. (Luka 16:15) Elimboli nde kotambola alima na kolanda mitinda ya Yehova. Ezali boyengebene ya Nzambe.​—Baloma 1:17; 3:21.

4. Mpo na nini boyengebene ezali na ntina mpo na moklisto?

4 Mpo na nini boyengebene ezali na ntina? Mpamba te Yehova, “Nzambe ya boyengebene,” amoniselaka basaleli na ye boboto ntango bamonisaka boyengebene. (Nzembo 4:1; Masese 2:20-22; Habakuku 1:13) Moto nyonso oyo azangi boyengebene akoki kozala moninga na ye te. (Masese 15:8) Wana nde ntina oyo ntoma Paulo alobaki na Timote ete: “Kimá bamposa oyo ekangani na bolenge, kasi landá nde boyengebene,” ná bizaleli mosusu ya ntina mingi. (2 Timote 2:22) Emonisi mpe ntina oyo Paulo atángaki mpe “ebateli-ntolo ya boyengebene” ntango alobelaki molato ya etumba ya elimo.​—Baefese 6:14.

5. Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki koluka boyengebene?

5 Nzokande, moto moko te azali moyengebene na ndenge ya kokoka. Biso nyonso tosangolá ezaleli ya kozanga kokoka ya Adama, mpe biso nyonso tobotamá bato ya masumu. Kasi, Yesu alobaki ete tosengeli koluka boyengebene. Ndenge nini ekoki kosalema? Ekoki kosalema mpamba te Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kosikola biso, mpe soki tozali komonisa kondima na mbeka yango, Yehova akolimbisa masumu na biso. (Matai 20:28; Yoane 3:16; Baloma 5:8, 9, 12, 18) Na yango, soki tozali koyekola mitinda ya boyengebene ya Yehova, tozali kosala nyonso mpo na kotosa yango, mpe tozali kobondela ye asalisa biso tólonga bolɛmbu na biso, Yehova akondima losambo na biso. (Nzembo 1:6; Baloma 7:19-25; Emoniseli 7:9, 14) Oyo nde libɔndisi!

Bayengebene na kati ya mokili oyo ezangi boyengebene

6. Mpo na nini mokili ezalaki esika mabe mpo na baklisto ya ekeke ya liboso?

6 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye bázala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé,” bakutanaki na mokakatano makasi. (Misala 1:8) Teritware mobimba oyo apesaki bango ezalaki “kolala na kati ya nguya ya moto mabe,” Satana. (1 Yoane 5:19) Elimo na ye ya mabe ebebisaki mokili makasi, mpe ekokaki kobebisa baklisto. (Baefese 2:2) Mokili ezalaki esika mabe mpenza mpo na bango. Bakokaki kotikala sembo kaka soki baluki liboso boyengebene ya Nzambe. Mingi bayikaki mpiko, kasi mwa ndambo batikaki “nzela ya boyengebene.”​—Masese 12:28; 2 Timote 4:10.

7. Mikumba nini moklisto azali na yango oyo ezali kosɛnga ete atɛmɛla makambo mabe?

7 Mokili ezali esika malamu mpo na baklisto lelo oyo? Soki moke te! Mokili ebebi makasi koleka kutu ndenge ezalaki na ekeke ya liboso. Lisusu, Satana abwakamá awa na mabelé mpe azali kobundisa baklisto bapakolami, “bato ya momboto ya mwasi yango oyo batikalaki, oyo bazali kotosa mibeko ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:12, 17) Azali mpe kobundisa moto nyonso oyo azali kopesa “momboto” yango mabɔkɔ. Baklisto bakoki kokima mokili te. Atako bazali bato ya mokili te, bafandaka kati na yango. (Yoane 17:15, 16) Mpe basengeli kosakola na kati ya mokili, koluka bato oyo babongi mpe koteya bango bákóma bayekoli ya Klisto. (Matai 24:14; 28:19, 20) Na yango, lokola baklisto bakoki mpenza kokima makambo mabe ya mokili oyo te, basengeli kotɛmɛla yango. Tiká tótalela makambo minei ya mabe oyo basengeli kotɛmɛla.

Motambo ya pite to ekobo

8. Mpo na nini Bayisalaele bakómaki kosambela banzambe ya Moaba?

8 Pene na nsuka ya mobembo ya mbula 40 oyo basalaki na esobe, Bayisalaele mingi batikaki nzela ya boyengebene. Bamonaki na miso makambo mingi oyo Yehova asalaki mpo na kosikola bango, mpe etikalaki moke bákɔta na Mokili ya Ndaka. Nzokande, na ntango wana ya ntina mingi, bakómaki kosambela banzambe ya Moaba. Mpo na nini? Bakweaki na “mposa ya mosuni.” (1 Yoane 2:16) Biblia elobi ete: “Bato babandaki kosala ekobo na bana basi ya Moaba.”​—Mituya 25:1.

9, 10. Likambo nini lelo oyo ezali kosɛnga ete tófungola mpenza miso mpo tókwea te na bamposa mabe ya nzoto?

9 Likambo wana ezali komonisa lolenge oyo bamposa mabe ya nzoto ekoki kobebisa bato oyo bazali na bokɛngi te. Tosengeli kozwa liteya na likambo yango, mingimingi lokola bato mingi lelo oyo bakómi komona pite to ekobo lokola likambo mabe te. (1 Bakolinti 10:6, 8) Lapolo moko ya États-Unis elobi boye: “Liboso ya 1970, libala ya makango epekisamaki na États-Unis mobimba. Sikoyo, ekómá momeseno. Bato mingi oyo babalani lelo oyo, babandaki naino kozala makango.” Mabala ya makango mpe misala mosusu ya mbindo esuki kaka na États-Unis te. Ezali kosalema na mokili mobimba, mpe likambo ya mawa, baklisto mosusu bazali kolanda ezaleli yango, mpe bazali kobimisama na lisangá.​—1 Bakolinti 5:11.

10 Lisusu, bapiblisite oyo ezali kotinda bato básala pite mpe ekobo ezali kosalema na bisika nyonso. Bafilme mpe batelevizyo ezali komonisa ete ezali mabe te bilenge básangisa nzoto liboso ya kobala. Bakómi kolakisa mibali bazali kosangisa nzoto bango na bango lokola likambo ya malamu. Mpe bakómi ata kolakisa polelepolele ndenge bato bazali kosangisa nzoto. Na Internet mpe bazali kolakisa polele ndenge bato bazali kosangisa nzoto. Na ndakisa, mokomi moko ya zuluanalo alobaki ete mwana na ye ya mbula nsambo autaki na eteyelo mpe ayebisaki ye ete moninga na ye moko ya kelasi amoni basi na Internet bolumbu bazali kosangisa nzoto. Tata wana ayokaki mpasi na motema; kasi ezali na bana ebele oyo batalaka bililingi motindo wana na Internet kozanga koyebisa baboti na bango. Lisusu, baboti mingi bayebi te makambo nini ezali na masano ya video oyo bana na bango basakanaka. Masano mingi elakisaka pite to ekobo, misala ya bademo mpe mobulu.

11. Ndenge nini mabota bakoki komibatela na pite to ekobo oyo etondi na mokili?

11 Ndenge nini mabota bakoki kokima lolenge mabe wana ya “kominanola”? Basengeli koluka liboso boyengebene ya Nzambe, koboya misala nyonso ya mbindo. (2 Bakolinti 6:14; Baefese 5:3) Baboti oyo bakɛngɛlaka malamu makambo oyo bana na bango basalaka mpe bakɔtisaka na mitema ya bana na bango bolingo ya Yehova mpe ya mibeko na ye ya sembo, babatelaka bango na bafilme to bafɔtɔ ya bato bazali kosangisa nzoto, basinema ya mbindo, mpe makambo mosusu ya mabe.​—Deteronome 6:4-9.a

Bopusi mabe ya bato ya mboka

12. Likambo nini ebimaki na ekeke ya liboso?

12 Ntango Paulo azalaki na Lisitala, na Asie Mineure, abikisaki moto moko na ndenge ya likamwisi. Biblia elobi boye: “Bibele wana ya bato, komonáká likambo oyo Paulo asalaki, batombolaki mingongo na bango, kolobáká na monɔkɔ ya Likaonia ete: ‘Banzambe bakómi lokola bato mpe bakiteli biso!’ Mpe babandaki kobenga Balanabasi Zeusi, kasi Paulo Helemesi, mpo ye moto azalaki liboso na oyo etali koloba.” (Misala 14:11, 12) Na nsima, kaka bibele wana ya bato balingaki koboma Paulo mpe Balanabasi. (Misala 14:19) Emonani polele ete bato wana balandaki bopusi mabe ya bato ya mboka. Emonani lokola ntango bato mosusu ya mboka yango bakómaki baklisto, batikaki te biyambayamba na bango. Na mokanda oyo atindelaki baklisto ya Kolose, Paulo akebisaki bango na “losambo ya baanzelu.”​—Bakolose 2:18.

13. Wapi mwa mimeseno oyo moklisto akoki kokima, mpe ndenge nini akoki kozwa makasi ya kosala bongo?

13 Lelo oyo mpe, baklisto ya solo basengeli koboya mimeseno oyo euti na mangomba ya lokuta, oyo ezali kobuka mitinda ya boklisto. Na ndakisa, na mikili mosusu, milulu mingi oyo esalemaka ntango mwana abotami mpe ntango moto akufi euti na liteya ya lokuta oyo elobaka ete biso bato tozali na elimo oyo ekufaka te. (Mosakoli 9:5, 10) Na mikili mosusu, bazali na momeseno ya kokata bana basi gazá to ngenga. Ezali momeseno ya mabe, oyo ezali na ntina te mpe eyokani te na bolingo oyo baboti baklisto basengeli komonisela bana na bango. (Deteronome 6:6, 7; Baefese 6:4) Ndenge nini baklisto bakoki kotɛmɛla bopusi mabe ya bato ya mboka mpe kotika mimeseno motindo wana? Basengeli kotyela Yehova motema mobimba. (Nzembo 31:6) Nzambe ya boyengebene akolendisa mpe akokokisa bamposa ya baoyo balobaka na ye na motema moko ete: “Yo ozali ebombelo na ngai mpe ndako na ngai makasi, Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.”​—Nzembo 91:2; Masese 29:25.

Kobosana Yehova te

14. Likebisi nini Yehova apesaki Bayisalaele mwa moke liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka?

14 Mwa moke liboso Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova akebisaki bango ete bábosana ye te. Alobaki boye: “Kebá ete obosana [Yehova] Nzambe na yo te, na kozanga kobatela malako na ye mpe monɔkɔ na ye mpe mibeko na ye, oyo elakeli bino ngai lelo oyo, ete wana ekosila yo kolya mpe kotonda, mpe ekosila yo kotonga ndako mpe kofanda na yango, mpe wana ekofuluka bangɔmbɛ na yo mpe bitonga na yo, mpe wana ekoya palata ná wolo na yo mingi, mpe wana eyei biloko na yo nyonso mingi, na ntango yango ozala na molumba te, mpe obosana Nzambe na yo te.”​—Deteronome 8:11-14.

15. Ndenge nini tokoki koyeba ete tobosani Yehova te?

15 Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kosalema lelo? Ɛɛ, soki tozali na mikano ya mabe. Nzokande, soki tozali koluka liboso boyengebene ya Nzambe, tokotya losambo ya pɛto na esika ya liboso na bomoi na biso. ‘Tokomisombela ntango oyo ebongi’ ndenge Paulo alendisi biso, mpe tokolala mpɔngi te na mosala na biso ya kosakola. (Bakolose 4:5; 2 Timote 4:2) Soki tokómi kozwa kominanola to komisepelisa na ntina mingi koleka makita mpe mosala ya kosakola, tokoki kobosana to kotya Yehova na esika ya mibale na bomoi na biso. Paulo alobaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala “bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:4) Baklisto ya solosolo bamitalelaka mbala na mbala mpo na koyeba soki makanisi motindo wana ezali kokɔtela bango te.​—2 Bakolinti 13:5.

Kebá na elimo ya lipanda

16. Elimo nini ya mabe Eva mpe bato mosusu na mikolo ya Paulo bamonisaki?

16 Na Edene, Satana asalelaki elimo ya lipanda oyo Eva azalaki na yango. Eva alingaki ye moko azwaka bikateli mpo na oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe. (Genese 3:1-6) Na ekeke ya liboso, bato mosusu na lisangá ya Kolinti bazalaki mpe na elimo yango. Bakanisaki ete bayebi mingi koleka Paulo, mpe na ndenge ya lityo, Paulo abengaki bango bantoma minene.​—2 Bakolinti 11:3-5; 1 Timote 6:3-5.

17. Ndenge nini tokoki kokima elimo ya lipanda?

17 Na mokili ya lelo, mingi bazali “bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo,” mpe baklisto mosusu balandi elimo yango. Bamosusu bakómi tii kotɛmɛla solo. (2 Timote 3:4; Bafilipi 3:18) Mpo na oyo etali losambo ya pɛto, ezali malamu mingi tólukaka koyeba makanisi ya Yehova mpe tóyokelaka “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe bankulutu ya lisangá. Wana mpe ezali koluka boyengebene, mpe yango ekobatela biso na elimo ya lipanda. (Matai 24:45-47; Nzembo 25:9, 10; Yisaya 30:21) Lisangá ya bapakolami ezali “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” Yehova atyá yango mpo ebatelaka mpe etambwisaka biso. (1 Timote 3:15) Kondima yango ekosalisa biso ‘tósala eloko moko te na ezaleli ya komitya liboso’ wana tozali kotosa mokano ya sembo ya Yehova na komikitisa mpenza.​—Bafilipi 2:2-4; Masese 3:4-6.

Mekolaká Yesu

18. Na lolenge nini tosengeli komekola Yesu?

18 Na ntina na Yesu, Biblia esakolaki ete: “Yo olingi boyengebene mpe oyini [mabe].” (Nzembo 45:7; Baebele 1:9) Oyo nde ndakisa kitoko! (1 Bakolinti 11:1) Yesu ayebaki kaka te mitinda ya sembo ya Yehova, kasi alingaki mpe yango. Na yango, ntango Satana amekaki ye na esobe, Yesu aboyaki mbala moko kotika “nzela ya boyengebene.”​—Masese 8:20; Matai 4:3-11.

19, 20. Wapi matomba ya Koluka boyengebene?

19 Ya solo, bamposa mabe ya nzoto ekoki kozala makasi. (Baloma 7:19, 20) Nzokande, soki boyengebene ezali na motuya mingi mpo na biso, yango ekopesa biso makasi ya kokima mabe. (Nzembo 119:165) Soki tolingi boyengebene mingi, yango ekobatela biso na mabe. (Masese 4:4-6) Tóbosana te ete soki tokwei na komekama, wana tolongisi Satana. Ezali malamu mingi tótɛmɛla ye mpe tólongisa Yehova!​—Masese 27:11; Yakobo 4:7, 8.

20 Lokola baklisto ya solo balukaka boyengebene, ‘batondi na mbuma ya boyengebene, oyo eyaka na nzela ya Yesu Klisto, mpo na nkembo mpe lisanzoli ya Nzambe.’ (Bafilipi 1:10, 11) Bazali kolata “bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.” (Baefese 4:24) Bazali bato ya Yehova mpe balukaka kosalela ye, kasi te komisepelisa. (Baloma 14:8; 1 Petelo 4:2) Yango nde ezali kotambwisa makanisi mpe makambo oyo bazali kosala. Bazali mpenza kosepelisa Tata na bango ya likoló!​—Masese 23:24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makanisi ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa baboti bábatela mabota na bango na pite to ekobo ezwami na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini ezali na ntina koluka boyengebene?

• Ndenge nini moto ya kozanga kokoka akoki koluka boyengebene?

• Wapi mwa makambo ya mokili oyo moklisto asengeli koboya?

• Ndenge nini koluka boyengebene ebatelaka biso?

[Elilingi na lokasa 26]

Mokili ezalaki esika mabe mpenza mpo na bayekoli ya Yesu

[Elilingi na lokasa 27]

Bana oyo bateyami mpo na kolinga Yehova bakobatelama na pite to ekobo

[Elilingi na lokasa 28]

Bayisalaele mosusu babosanaki Yehova ntango bakómaki na bozwi mingi na Mokili ya Ndaka

[Elilingi na lokasa 29]

Lokola Yesu, baklisto bayinaka ezaleli ya kozanga boyengebene

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto