Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/3 nk. 12-16
  • Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komekama ya kondima
  • Namityeli mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso
  • Mosala ya misionɛrɛ
  • Na mosala ya kosakola
  • Tosali mibembo ebele
  • Ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá ebongaki
  • Bokoli mpe bambongwana
  • Bisengo ya babuku mbuma na lnde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mokufeli-mobali azwi libondisi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/3 nk. 12-16

Lisolo ya bomoi

Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango

YA HADYN SANDERSON

Mokolo moko Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoane 13:17) Ya solo, tokoki koyeba oyo ezali malamu, kasi na bantango mosusu ezalaka mpasi kosala yango! Nzokande, makambo namoni na boumeli ya mbula koleka 80 ya bomoi na ngai, oyo na kati na yango 40 na mosala ya misionɛrɛ, endimisi ngai ete maloba ya Yesu ezali solo. Kosala oyo Nzambe alobaka ememaka mpenza esengo. Tiká nayebisa bino.

NA MOBU 1925, ntango nazalaki na mbula misato, baboti na ngai balandaki lisukulu moko oyo esalemaki na engumba na biso Newcastle, na ekólo Australie. Lisukulu yango oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te,” endimisaki mama ete azwi solo mpe abandaki koyangana na makita ya Boklisto mbala na mbala. Esengo oyo tata azalaki na yango mpo na lisukulu yango ekitaki noki. Tata atɛmɛlaki bindimeli ya sika ya mama mpe akanelaki ye ete soki atiki te, akosundola biso. Mama azalaki kolinga tata mpe mposa na ye ezalaki ete libota ekabwana te. Kasi, ayebaki ete kotosa Nzambe nde likambo eleki ntina mpe azwaki ekateli ya kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. (Matai 10:34-39) Tata akimaki ndako mpe na nsima, nakómaki komona ye kaka mbala moko moko.

Soki nazongisi makanisi nsima, nasepelaka mpenza na bosembo ya mama epai ya Nzambe. Ekateli na ye wana, esalaki ete ngai ná na yaya na ngai ya mwasi Beulah, tózwa mapamboli mingi ya elimo. Epesaki mpe biso liteya moko ya ntina mingi: Soki toyebi oyo ezali malamu, tosengeli kosala makasi mpo na kosala yango.

Komekama ya kondima

Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova, basalaki nyonso mpo na kosalisa libota na biso. Nkɔkɔ na biso ya mwasi ayaki kofanda na biso mpe andimaki solo ya Biblia. Ye ná mama bakómaki mpenza baninga na mosala ya kosakola. Elateli na bango mpe bizaleli na bango malamu esalaki ete bato bamemya bango.

Na ntango yango, bandeko baklisto ya mikóló batyelaki ngai likebi mpe bapesaki ngai formasyo ya motuya mingi. Mosika te, balakisaki ngai ndenge ya kosalela kalati ya litatoli mpo na kobanda masolo ya mokuse na bandako ya bato. Nazalaki mpe koyokisa bato masukulu na fono mpe kotambola na libaya oyo bakomi motó ya likambo ya lisolo na balabala ya monene ya engumba. Ezalaki mpasi, mpamba te nazalaki kobanga bato. Atako bongo, nayebaki oyo ezali malamu mpe nazwaki ekateli ya kosala yango.

Ntango nasilisaki kelasi, nabandaki kosala na banki moko oyo ezalaki kosɛnga ngai nasalaka mibembo na bisika oyo babanki mosusu ezali na engumba ya Nouvelle-Galles du Sud. Atako Batatoli bazalaki mingi te na eteni wana ya ekólo, formasyo oyo nazwaki esalisaki ngai nabatela kondima na ngai. Mama azalaki kokomela ngai mikanda oyo ezalaki kolendisa ngai mingi na elimo.

Mikanda yango esalisaki ngai na ntango ebongi. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki mpe basɛngaki ngai nakɔta na mosala ya soda. Mokonzi ya banki azalaki kokende na losambo na molende mpe azalaki mokonzi ya basoda ya esika oyo tofandaki. Ntango nayebisaki ye ete lokola nazali moklisto nakosala mosala ya soda te, asɛngaki ngai napona kati na makambo mibale: Kotika lingomba na ngai to kolongwa na mosala ya banki! Makambo ekómaki ndongo ntango bamemaki ngai na biro oyo bazalaki kozwa bato na mosala ya soda na esika oyo tozalaki. Mokonzi na ngai ya banki azalaki wana mpe azalaki mpenza kotala ndenge nazalaki kopusana penepene na mesa oyo bazalaki kokomisa bato na mosala ya soda. Ntango naboyaki kotya nkombo na ngai na liste yango, bakonzi basilikaki. Ekómaki ndongo, kasi nazalaki na ekateli ya kosala oyo ezali malamu. Na lisalisi ya Yehova, natikalaki kimya mpe nabatelaki ekateli na ngai. Na nsima, ntango nayebaki ete bato ya mobulu bazali koluka ngai, nakangaki bisaka na ngai nokinoki, nakɔtaki na engbunduka mpe natikaki engumba wana!

Ntango nazongaki na Newcastle, basambisaki ngai na tribinale moko elongo na bandeko mosusu nsambo oyo baboyaki mosala ya soda. Zuzi akatelaki biso etumbu ya sanza misato ya bolɔkɔ. Atako kokɔta bolɔkɔ ezalaki likambo ya esengo te, kosala oyo ezalaki malamu ememaki mapamboli. Nsima ya kobima bolɔkɔ, Hilton Wilkinson, Motatoli ya Yehova moko oyo tozalaki na ye na bolɔkɔ, abengaki ngai nasalaka na ye esika akangaka bafɔtɔ. Kuna, nakutanaki na Melody, mwasi oyo nayaki kobala; ye azalaki kosala na esika oyo bayambaka bakiliya. Mwa moke nsima ya kobima na bolɔkɔ, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova.

Namityeli mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso

Nsima ya kobalana, ngai ná Melody tofungolaki esika na biso moko ya kokangaka bafɔtɔ na Newcastle. Eumelaki te, tokómaki na mosala mingi ya kosala mpe tokómaki na mikakatano ya nzoto mpe boyokani na biso na Yehova ekómaki kobeba. Ted Jaracz, oyo azalaki na ntango wana kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya ekólo Australie mpe oyo azali lelo oyo na Lisangani ya Mikóló-bakambi, asololaki na biso na ntina na mikano na biso ya elimo. Nsima ya lisolo wana, totɛkaki esika tozalaki kokanga bafɔtɔ mpe tokómisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ. Na 1954, tosombaki wagɔ moko oyo motuka ebendaka, tokendeki na engumba Ballarat, na etúká ya Victoria mpe tokómaki babongisi-nzela to basakoli ya ntango nyonso.

Yehova apambolaki biso ntango tozalaki kosala elongo na bandeko ya lisangá ya Ballarat oyo ezalaki moke. Na sanza 18 mpamba, motángo ya bayangani na makita elongwaki na 17 mpe ekómaki tii na 70. Na nsima, basɛngaki ngai nasala mosala ya zongazonga na etúká moko na Sudi ya Australie. Na mbula misato oyo elandaki, totalaki masangá oyo ezali na engumba Adelaide mpe bitúka oyo ezali pembeni na ebale Murray epai balonaka vinyo ná malala. Bomoi na biso ebongwanaki mpenza! Tozalaki na esengo ya kosala elongo na bandeko na biso ya mibali mpe ya basi ya bolingo. Ezalaki mpenza lipamboli kosala oyo toyebaki ete ezali malamu!

Mosala ya misionɛrɛ

Na 1958, tokomelaki biro ya filiale ya Australie ete tozali na mposa ya koyangana na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi oyo esengelaki kosalema na engumba New York na mbula wana, motó ya likambo na yango ezalaki “Mokano ya Nzambe.” Batindelaki biso baformilɛrɛ mpo na Gileadi, eteyelo ya bamisionɛrɛ oyo esalemaka na États-Unis. Lokola tolekisaki mbula 30 ya kobotama, tokanisaki ete tolekisi mbula oyo moto akoki kokende na Gileadi. Atako bongo, totindaki baformilɛrɛ na biso mpe babengaki biso na kelasi ya mbala ya 32. Ntango tokómaki na katikati ya mateya na biso, bayebisaki biso ete tokokende kosala na Inde! Atako na ebandeli tomitungisaki mingi, tosepelaki kosala oyo ezali malamu mpe tondimaki na esengo kokende epai batindaki biso.

Tosalaki mobembo yango na masuwa mpe tokómaki na engumba Bombay (lelo oyo Mumbai) na mobu 1959 na ntɔngɔntɔngɔ. Basali ebele balalaki na libongo. Toyokaki nsolo moko boye. Ntango moi ebimaki, toyebaki likambo oyo elingaki kosalema. Naino tóyoka molunge ya ndenge wana te! Bamisionɛrɛ mibale, Lynton Dower ná mwasi na ye Jenny, oyo tosalaki na bango mosala ya babongisi-nzela na Ballarat bayambaki biso. Bamemaki biso na Betele ya ekólo Inde, oyo ezalaki na bashambre ya mikemike. Betele yango ezalaki pene na vile. Bandeko motoba oyo bazalaki kosala na Betele bazalaki kofanda na ndako yango. Ndeko Edwin Skinner, oyo azalaki misionɛrɛ na ekólo Inde banda 1926, ayebisaki biso tósomba basakosi mibale, liboso ya kokende na teritware na biso.

Nsima ya kotambola mikolo mibale na engbunduka, tokómaki na teritware na biso na Tiruchchirappalli, engumba moko oyo ezali na Sudi ya etúká Madras (lelo oyo Tamil Nadu). Kuna, tosalaki elongo na babongisi-nzela minene misato oyo bazalaki kosakola na teritware oyo ezalaki na bato 250 000. Bomoi ezalaki lokola ya bato ya mboka. Mokolo moko, mbongo totikalaki na yango ekokaki ata dolare 4 te. Kasi, ntango mbongo yango esilaki, Yehova atikaki biso te. Mobali moko oyo azalaki koyekola Biblia adefisaki biso mbongo mpo tofutelaka ndako moko ya malamu mpo na makita. Mokolo moko, ntango bilei na biso esilaki, mobali moko ya kartye amemelaki biso ndunda batyá misuni mpe ezalaki na pilipili mingi. Nasepelaki na yango, kasi lokola ezalaki na pilipili mingi, epesaki ngai lisekuseku (hoquet)!

Na mosala ya kosakola

Atako bato mosusu na Tiruchchirappalli bazalaki koloba Lingelesi, mingi bazalaki koloba tamoul. Yango wana, tosalaki makasi mpo na koyekola lolenge mokuse ya kobanda lisolo na monɔkɔ wana na mosala ya kosakola. Kosala bongo, esalaki ete bato ya mboka wana bámemya biso.

Tosepelaki mingi mpenza na mosala ya kosakola ndako na ndako. Bafandi ya Inde bazali bayambi mpe mingi kati na bango bazalaki kobenga biso tómɛla mwa eloko ya malili. Lokola molunge ezalaki mbala mingi makasi (40°C), tozalaki kotonda bango mingi mpo na boyambi na bango. Mpo na komonisa bonkonde, tozalaki naino kosolola makambo mosusu liboso ya kosakola nsango malamu. Mbala mingi bato bazalaki kotuna biso: “Bouti wapi? Bozali na bana? Mpo na nini te?” Ntango bazalaki koyoka ete tozali na bana te, bazalaki mbala mingi kolakisa biso monganga oyo akoki kosalisa biso tóbota! Atako bongo, masolo nyonso wana ezalaki kosalisa biso tomiyebisa epai na bango mpe tólimbwela bango ntina ya mosala na biso ya koteya Biblia.

Bato mingi oyo tozalaki kosakwela, bazalaki na Lingomba ya Hindu, oyo bindimeli na yango ekeseni mpenza na oyo ya Lingomba ya boklisto. Na esika ya kowelana na bango na ntina ya makambo ndenge na ndenge ya filozofi ya Lingomba yango, tozalaki kosakwela bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe yango ezalaki kobota mbuma malamu. Na sanza motoba, bato pene na 20 babandaki koyangana na makita na ndako ya bamisionɛrɛ. Moko ya bato yango nkombo na ye Nallathambi, azalaki motongi ya bandako, banzela (ingénieur civil). Ye ná mwana na ye ya mobali Vijayalayan basalisaki bato soki 50 bákóma basaleli ya Yehova. Vijayalayan asalaki mpe mwa moke na Betele ya Inde.

Tosali mibembo ebele

Naino tokokisaki sanza motoba te na Inde, basɛngaki ngai nasala lokola mokɛngɛli ya etúká ya liboso na ekólo yango. Mosala yango ezalaki kosɛnga kotambola na Inde mobimba, kobongisa mayangani mpe kosala elongo na bato ya minɔkɔ libwa ekeseni. Ezalaki mosala makasi. Totyaki bilamba mpe biloko oyo tokosalela sanza motoba na kati ya bavalisi misato ya minene mpe tokendeki na engumba ya Madras (lelo oyo Chennai) na engbunduka. Lokola teritware na biso ezalaki na bonene ya kilomɛtrɛ 6 500, yango ezalaki kosala ete tótambola ntango nyonso. Na mokolo moko ya lomingo, tosilisaki liyangani moko na sudi ya engumba Bangalore. Na nsima, tosalaki mobembo na Darjeeling, na pembeni ya ngomba Himalaya mpo na kosala liyangani mosusu na pɔsɔ oyo elandaki. Mpo na kokóma na Darjeeling esengelaki kosala bakilomɛtrɛ 2 700 na bingbunduka mitano ekeseni.

Na mibembo oyo tosalaki na ebandeli, tozalaki kolakisa bato filme La société du Monde Nouveau en action. Filme yango esalisaki bato bámona bonene ya mosala oyo basaleli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. Mbala mingi, bankama ya bato bazalaki koya kotala bafilme yango. Mokolo moko, tolakisaki filme yango na etuluku moko ya bato oyo bayanganaki pembeni ya balabala. Ntango filme ezalaki koleka, likoló eyindaki. Lokola mokolo mosusu bato basilikaki ntango nakataki filme, mbala wana nakataki filme te, kasi nalekisaki yango mbangumbangu. Likambo ya esengo, filme esilaki ntango kaka matanga ya liboso ya mbula ebandaki kokwea.

Na bambula oyo elandaki, ngai ná Melody totambolaki na bisika mingi ya ekólo Inde. Lokola etúká na etúká ezali na bilei, molato, monɔkɔ, mai mpe zamba na yango, kokende kuna, ezalaki lokola kosala mibembo na bikólo mosusu. Yehova asalá biloko ya kitoko ndenge na ndenge! Banyama mpe zamba ya Inde ezali mpe bongo. Mokolo moko, ntango tozalaki kopema na zamba ya Népal, tomonaki tigre moko ya monene. Ezalaki nyama moko kitoko. Komona yango, elendisaki mposa na biso ya kozala na paladiso, epai kimya ekozala kati na banyama mpe bato.

Ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá ebongaki

Na ntango wana, bandeko ya Inde basengelaki kotosa mpenza bibongiseli oyo Yehova apesi mpo na kotambwisa mosala ya Batatoli na ye. Na masangá mosusu, bandeko mibali bazalaki kofanda ngambo na bango mpe bandeko basi na ngambo na bango. Mbala mingi, makita ezalaki kobanda na ngonga te. Na esika mosusu, bazalaki kobɛta ngonga makasi mpo na kobenga basakoli ya Bokonzi na makita. Na bisika mosusu, basakoli bazalaki kotala moi mpo na koyeba ngonga ya kobanda makita. Mayangani ezalaki kosalema mbala na mbala te mpe bakɛngɛli bazalaki kotala masangá mpenza ndenge esɛngami te. Bandeko bazalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu, kasi basengelaki na formasyo.

Na 1959, Batatoli bafungolaki Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Formasyo wana oyo ezali kopesama na mokili mobimba, esalisaki bakɛngɛli ya zongazonga, babongisi-nzela minene, bamisionɛrɛ mpe bankulutu ya masangá bákokisa mikumba na bango malamumalamu. Nazalaki molakisi ya Eteyelo yango ntango ebandaki na Inde na Desɛmbɛ 1961. Matomba ya formasyo yango ebandaki komonana mokemoke na masangá ya Inde mpe bokoli esalemaki noki. Ntango kaka bandeko bayebaki oyo ezali malamu, elimo ya Nzambe esalisaki bango básala yango.

Mayangani ya minene mpe elendisaki bandeko, mpe esangisaki bango. Moko ya mayangani yango ya minene ezalaki oyo esangisaka bato ya mikili mingi oyo esalemaki na engumba New Delhi na 1963. Motó ya likambo na yango ezalaki: “Nsango malamu ya seko.” Batatoli ya Inde mobimba basalaki bankoto ya bakilomɛtrɛ mpo na koyangana na liyangani yango, mingi babungisaki mbongo nyonso oyo bazalaki na yango mpo na koyangana. Lokola bayangani 583 oyo bautaki na mikili 27 bazalaki mpe na liyangani yango, ezalaki mbala ya liboso mpo na Batatoli ya Inde bázala esika moko na bandeko ebele bongo.

Na 1961, babengaki ngai ná Melody na Betele ya Bombay, na nsima nakómaki kosala na komite ya filiale. Mikumba mosusu ebakisamaki. Na boumeli ya bambula mingi nazalaki mokɛngɛli ya zone na Azia mpe na Moyen-Orient. Lokola bapekisaki mosala ya kosakola na bikólo yango, basakoli basengelaki kozala “ekɛngɛ lokola banyoka nzokande lokola bibenga [kozala] na ngambo te.”​—Matai 10:16.

Bokoli mpe bambongwana

Ntango tokómaki na Inde na 1959, basakoli bazalaki 1514. Lelo oyo, motángo yango eleki 24 000. Lokola bokoli emonanaki, Betele elongwaki mbala mibale na bisika ezalaki mpe ekendaki na Bombay to pene na yango. Na Marsi 2002, libota ya Betele ekendeki esika mosusu, mpo na mbala oyo bakɔtaki na ndako moko ya monene oyo batongaki pene ya Bangalore, na sudi ya Inde. Bandeko 240 bafandaka na ndako yango ya sika ya Betele mpe basusu kati na bango babongolaka mikanda na minɔkɔ 20.

Atako ngai ná Melody tosepelaki kokende na Bangalore, maladi epesaki biso nzela te.Tozongaki na Australie na 1999. Tozali sikoyo kosala na Betele ya Sydney. Atako totiká Inde, bolingo oyo tozali na yango mpo na baninga na biso balingami mpe bana na biso ya elimo na ekólo wana ezali kaka makasi. Esalaka biso esengo mpenza ntango tozwaka mikanda na bango!

Soki tokanisi bambula 50 oyo tolekisi na mosala ya ntango nyonso, ngai ná Melody tomonaka ete topambolami mingi. Liboso, tozalaki kobatela bililingi ya bato na papye, kasi kosalisa bato babatelama na makanisi ya Nzambe ezalaki likambo eleki malamu. Ekateli oyo tozwaki ya kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso ememeli biso matomba mingi! Ya solo, kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe ememaka mpenza esengo!

[Bakarte na lokasa 15]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

INDE

New Delhi

Darjeeling

Bombay (Mumbai)

Bangalore

Madras (Chennai)

Tiruchchirappalli

[Bililingi na lokasa 13]

Hadyn ná Melody na 1942

[Elilingi na lokasa 16]

Libota ya Betele ya Inde, na 1975

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto