Bisengo ya babuku mbuma na lnde
Lisolo ya F. Skinner
Nakanisaki lokola ete nazali kolota: baassemblées 21 esalami na minoko 10,oyo ezalaki na bayangani 15 000 mpo na koyekola boyengebene ya Nzambe, mpe bato 545 bazwaki batisimo mpo na komonisa bolingo na bango epai na Jéhovah, Nzambe monene ya boyengebene. Mpo na ba Témoins de Jéhovah 9 000 ya lnde, makambo yango ezalaki kitoko koleka bantango nyonso ya mobu 1989. Mpo na ngai, wana ezalaki ntango monene mpo na kosepela. Na yango, ntango nakomaki na lnde na Juillet 1926, ezalaki na ngai mpasi na kokanisa ete mokolo moko makambo motindo yango makosalema na lnde. Na eleko yango, eleki sika mbula 63, basakoli ya nsango na Bokonzi bakómaki naino 70 te na mokili yango. Toutaki kozwa mosala monene, moninga na ngai mpe ngai!
Ndenge nini nakomaki na lnde!
Na sanza ya Mai 1926, nasanganaki na assemblée monene na Londres, nsima na yango, nazongaki noki epai na ngai, na Sheffield. Nsima na mikolo mibale, na ntango nautaki na mosala ya kosakola, nazwaki télégramme. Natangaki yango: “Zuzi Rutherford alingi komona yo.”
Ndeko Rutherford, président ya mibale ya la Société Watch Tower, autaki na New York mpo na assemblée yango, mpe azalaki naino na Londres. Bongo lobi elandi, na ntongo na yango, kati na engbunduka oyo nazalaki kozonga na yango na Londres, nazalaki komituna soko makambo yango ezalaki nini. Ntango nakomi na Filiale, bakɔtisaki ngai epai ya ndeko Rutherford, oyo atunaki ngai: “Okomilengela na kosalela Nzambe epai nyonso kati na mokili?—Ee.—Okanisi boni mpo na kokende na lnde?—Nayanolaki kozanga kokakatana Nasengeli kokende ntango nini?” Yango wana, mposo misato na nsima, Georges Wright mpe ngai, tomataki masuwa mpo na kokende na lnde. Nazalaki na mibu 31, mpe nazalaki na kokakatana soko moke te mpo na oyo elingaki ngai kosala na bomoi na ngai.
Eloko ekataki mpo na bomoi na ngai
Na 1918, na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, nalongwaki na limpinga ya Grande-Bretagne nsima ya mbula minei ya mosala .Nabendamaki na mosala ya kokanga bafoto mpe ya koloba na radio, mpe bisika malamu bipesamelaki ngai. Lisusu, nazalaki na mposa ya kobala. Bobele na eleko yango, nazalaki kozwa bososoli ya makambo, oyo ezalaki mpenza kobongola lolenge na ngai ya kotalela bomoi.
Tata na ngai andimaki Boyekoli ya Makomami kati na mikanda mingi, mpe libota na biso ebandaki koyekola Biblia elongo na colporteur moko, ndenge bazalaki kobenga ba pionniers kala. Ezalaki bongo molakisi moko ya kala ya mwasi. Na nsima, ba samedis nyonso nazalaki kokende epai na ye elongo na bilenge mibali mosusu ya mbula na ngai mpo na komela ti mpe koyekola Biblia. Mwasi yango azalaki ntango nyonso kolendisa na maloba oyo, mpo ete tomipesa na Jéhovah: “Boboya kokende na mosala ya Nzambe te.” Alendisaki ngai lisusu ete natikala monzemba.
Na boumeli ya ntango, nakakatanaki na ntina ya etamboli nini nasengelaki kozala na yango. Nazwaki lisalisi na maloba na Yesu, oyo alobelaki elenge mozwi moyuda, oyo makomami na Matai 19:21: “Soko olingi kobonga malamu, kenda kotekisa nyonso oyo ezalaki na yo mpe pesa na babola mpe okozala na biloko na motuya ya likoló, mpe yaka, landa ngai.” Nasengaki kolongwa epai kuna nazalaki kosala, mpe sanza misato na nsima, nakomaki colporteur. Na ekateli na ngai ya kotikala monzemba, tala kopona oyo epesaki ngai nzela na kozwa mosala kitoko na lnde, mbula minei na nsima.
Elanga monene mpe ya sika
George Wright mpe ngai tozwaki mokumba ya mosala ya kosakola bobele na lnde te, kasi lisusu na Birmanie (lelo ekoma Myanmar) mpe na ceylan (lelo Sri Lanka). Na nsima, babakiselaki biso Perse (lelo oyo lran) mpe Afghanistan. Teritware ya lnde ezalaki moke soko bakokanisi yango na oyo ya Etats-Unis, kasi yango elekaki na bato mingi. Na mboka yango, bokeseni ezalaki na biloko ya kolya, na mimesano, na minoko mpe na mangomba ezalaki na ba hindou, ba musulmans, ba parsis, ba jains, ba sikhs mpe babudiste, lisusu bakatolike mpe ba protestants.
Na lnde mosala ya kosala ebandaki na 1905. Na 1912, ntango charles Russell, président ya liboso ya la Société Watch Tower, akendaki kotala mboka yango, mosala ya kosakola ezwaki lisusu bopusi makasi. Bokutani oyo ya ndeko Russell mpe A. Joseph, elenge moyekoli moko ya molende ya Biblia, epesaki nzela na kozwa myango mikoumela mpo ete mosala ya kosakola esalama mbala na mbala. Ndeko Joseph abongolaki mikanda mikolimbolaka Biblia na malayalam, monoko na ye; azalaki kolekaleka mingi mpe kopesa ebele na badiskur, mingi mpenza na sud Ya lnde. Lelo oyo soko ndambo na basakoli ya lnde bazali nde na région oyo epai kuna bazali koloba malayalam, nzokande ezali bobele na 3 % Mpamba ya ba lndiens bafandi kuna. Region yango ezalaki liboso kobengama Travancore mpe cochin, ekomaki Bokonzi ya (GDEL Travancore) Kerala na 1956.
George Wright mpe ngai tosengelaki moko na moko na ntango na ya kosalela mokumba mozalaki na biro ya Bombay, to oyo ya kolekaleka na bamboka mpo na mosala ya kosakola. Mingimingi tozalaki kosala mibembo na bingbunduka, na mpunda to na likalo ebendami na ngombe. Na nsima, tozwaki vuatire. Na eleko yango, mingi tozalaki bobele kokabola mikanda mpe kobenga bato ete baya kosangana na biso na esika oyo tokolakisa bango mpo na makita. Tozalaki koluka mingi mpenza bato oyo bayebaki koloba anglais mpe bazalaki koloba ete bazali baklisto.
Na ebandeli, bapesaki ngai bankombo mpe ba adresses ya bato oyo basalaki abonema na La Tour de Garde. Mingi kati na bango ezalaki, bato oyo bazalaki kosala na nzela ya train mpe na télégraphie. Nazalaki kotala mokomoko kati na bango na ntina na koluka baoyo bazali mpenza na mposa ya solo. Na Janvier nyonso nazalaki kokende na Pendjab, na nord ya lnde, mpe nazalaki kosala mobembo uta Lahore kino Karachi. Nasalaki yango na boumeli ya bambula mingi. Lokola mingi na bato ya lnde, banguna ya Biblia, bamboka oyo epai kuna “baklisto” bafandaki ezalaki mpenza moke, mpe etangwanaki mosika bamoko na bamosusu.
Natambolaki elongo na Témoin moko oyo azalaki kolimbola makambo nazalaki koloba; tozalaki kofanda mpe kolya elongo na bato yango. Bato ya mboka bazalaki kofanda na bandako etongami na mabelé makaukisami na moi, mpe na motondo mosalami na matiti makauki, to mpe na nzete. Bazalaki kolala na ba charpoys, lolenge na mbeto ya makolo minei, oyo esalami na bansinga elinganilingani likoló na nzete. Ntango baloni na bilanga bazalaki koyamba biso, bazalaki mbala mingi kofanda na charpoys, elongo na Biblia na loboko moko, mpe pipe ya molai (50 cm kino 1 m) mpe ezalaki na mai na kati na yango. Bongo nde bazalaki koluka mokapo ya Biblia moko nsima na mosusu, na makoki oyo tozalaki na yango mpo na kolimbwela bango basolo oyo etali Nzambe. Makita mazalaki kosalema se na libanda, mpo ete ntango yango bambula ezalaki lisusu konoka te. Nzokande mpo na mingi na bato ya Eropa, bazalaki kolakisa bopotu na kosangana na mitindo ya makita yango, kasi bato ya lnde bandimaki kosangana bisika nyonso.
Tosalaki makasi mpo na kobimisa mikanda na minoko mingi. Mokanda moke Détresse mondiale ebimaki na monoko Kannada (“ENG, Britannica”, “Les langues du monde”, “Tour du monde”) esepelisaki bato mingi kino ete, mobimisi ya Zulunalo moko elobelaka mangomba na monoko yango, abengisaki biso mpo ete topesa ye masolo oyo akoki kobimisa na zulunalo na ye. Tala lolenge oyo toyebisaki masolo ya mokanda Délivrance na boumeli ya mwa ntango kati na zulunalo ya moto yango, oyo ezalaki kobima na le 15 ya sanza nyonso.
Katikati na 1926 mpe 1938, natangamaki na molongo ya ba pionniers oyo na molende, oyo bakokisaki mosala monene ya kosakola kati na mboka yango. Tosalaki bamilió yo bakilometele mpe tokabolaki mikanda mingi koleka, kasi bokoli bozalaki bobele moke. Na 1938, ezalaki bobele na ba pionniers 18 mpe basakoli 273 mpo na masangá 24 makabolamaki kati na lnde mobimba.
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
Etumba ebandaki na 1939, kasi tolandaki kosakola Nkutu na ebandeli ya mobu 1940, tobandaki kopesa litatoli kati na balabala. Ata bandeko na biso basi ya lnde basanganaki na mosala yango, oyo ezali likambo ya kokamwisa soko oyebi malamu mpenza mimeseno ya mboka yango. Nsima na bambula, mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia azongiselaki maloba oyo epai na Témoin oyo asɛngaki ye ete asangana na mosala ya kosakola: “Nazali mwasi ya lnde. Soki bamoni ngai koloba na mibali na balabala, nakomonana mabe epai na bazalani na ngai nyonso: nakoki te koloba na mobali moko na balabala, ezala ata ndeko na ngai.” Atako bongo, basi baklisto nyonso ya lnde bakomaki basakola na molende.
Lisusu na eleko yango, tobongisaki ba assemblées. Ntongo nyonso ebatelamaki bobele mpo na mosala ya kosakola, oyo ezalaki kosenga lisusu ete tosala bakilometele mingi na makolo mpo na koyebisa bato na bandako na bango mpe baleki nzela ete, diskur piblike ekozala. Mbala moko, bato 300 bayaki kolanda diskur na nse na hema oyo esalemaki na mikombe mpe na mandalala. Ntina ya kopesa ngonga ezalaki mpenza te, mpamba te, bato ya lnde bazalaki kolata montre mingi te. Bato bazalaki koya bobele na ngonga oyo elingaki bango koya, mpe ba diskur ezalaki kobanda na ntango bato bakomaki ebele. Bamosusu balandaki se koya na nsima.
Mingi mpenza, badiskur ezalaki kosalema kino ngonga zomi ya butu, nsima na yango nde basangani mingi basengelaki kosala bakilometele mingi na makolo mpo na kozonga epai na bango. Soko sanza engali, ezalaki mpenza malamu na ntango yango; mpamba te, mpio kitoko ezalaki. Soko sanza engali te, bato ya lnde bazalaki kolinga mandalala na lolenge ya mpaká. Soko epeli, mpaka yango ezalaki kopesa mwa pole moke. Soko balingi komona malamu, bazalaki koningisa mpaka yango na likoló kino ete epela. Ntango wana ekokaki kopesa pole ebongi na komona banzela ya mabe.
Ezalaki na eleko yango nde bakonzi ya mboka bapekisaki kokota na mikanda ya la Société na lnde mpe na ceylan. Mwa masini na biso moke, maye mazalaki na Travancore mazwamaki, mpe bakonzi babimisaki mobeko oyo epekisaki konyatama na mikanda. Na nsima, na 1944, moko na ndeko na biso oyo azalaki physiothérapeute akomaki monganga ya Sir Srivastava, oyo azalaki ministre ya vice-roi, mpe ayebisaki ye na ntina na epekiseli yango.
Moto yango ayebisaki na moklisto ote: “Komitungisa te”. Mpe alimbolaki ye ete M. Jenkins (ministre oyo azalaki monguna ya mosala ya ba Témoins de Jéhovah) akomaki pene na kozwa pension. Nzokande, Sir Francis Mudie, oyo asengelaki kokitana ye, azalaki nde mininga mpenza ya Sri Srivastava. “Benga M. Skinner, mpe nakomonisa ye epai ya Sri Francis Mudie.” Nabengamaki; nsima na bokutani na ngai elongo na M. Mudie, tozwaki bonsomi epai na leta na le 9 Décembre 1944.
Bantina ya kosepela
Na 1947, tozalaki na esengo mingi ntango bamisionere ya liboso oyo babongisami na Galaad, bakomaki na lnde. Kokóma na bango akutanaki bobele na eleko na mpasi ya liboso na lnde, mpamba te, mboka yango ekabwanaki na bokonzi ya Grande-Bretagne na le 15 Aout ya mobu wana. Ntango bokabwani esalemaki na lnde mpo na kosala lnde ya Ba hindous mpe Pakistan ya Ba musulmans, bato mingi bakufaki. Atako bongo, bamisionere mibale batindamaki na Pakistan,oyo ekomaki na lipanda na le 14 Aout. Mpe bamisionere mosusu zomi balandaki biso na lnde, mpe mingi mosusu bayaki mpe na boumeli ya bambula elandaki.
Na ntango meko ya kobongisa makambo ezwamaki, nasepelaki mingi mpenza. Mosala ya circonscription ebandaki na 1955, ntango ndeko Dick Gotterill aponamaki mpo na lnde, nsima na kobima na eteyelo ya Galaad. Ye azalaki mokɛngɛli ya liboso ya circonscription, mpe atikalaki sembo na mosala yango kino liwa na ye na 1988. Na 1960, tozwaki mokengeli ya distrike, oyo akokaki kofanda na biso esika moko, mpe likambo yango esepelisaki ba circonscriptions mingi. Nsima na 1966, nzela epesamelaki lisusu bamisionere te, mpo na kokɔta na lnde. Kasi mwa moke nsima, mosala ya ba pionniers spéciaux mobandaki, mpe ba pionniers ya lnde oyo bazalaki na makoki, batindamaki na biteni bikeseni ya mokili yango. Lelo oyo bazali soko 300.
Na 1958, motuya ya basakoli ekomaki 1 000. Kasi mosala motambwisamaki, mpe lelo oyo tosili koleka 9 000. Lisusu, na 989, assistance ya Ekaniseli oyo etombwanaki na motuya ya bayangani 24 144, emonisi ete mingi na bato bazali koluka lisalisi. Sikawa Sri Lanka esili kozwa filiale na yango moko. Oyo nde esengo na komona ete, atako esanga yango ezali lisusu kokabwana na bitumba, basakoli babakisami longwa na mibale na 1944 kino koleka bankoto lelo oyo!
Kobakisama ya basakoli epesi nzela na koyeisa filiale na biso monene. Na 1978, nsima ya bambula 52 ya mosala na Bombay, filiale na biso ekendeki kotongama na Lonavla, engumba ezalaki pembeni na Bombay. Nakanisaki te ete mokolo moko tokokaki kozwa masini oyo na mosala malamu, oyo ete ba ordinatɛrɛ MEPS mpe bamasini minene mpo na konyata mikanda oyo na langi mibale na minoko mingi ya lnde. Lelo oyo tozali konyata La Tour de Garde na minoko 9 mpe mikanda mosusu na minoko 20.
Ezali lisusu na ntina na kolobela filiale na biso na ntango ezalaki bobele na bato mibale mpamba Lelo oyo Libota ya Béthel ezali na basangani 60! Nazali na mbula 95, mpe nazali bobele na esengo ya kozala pionnier, lokola nazali sikawa moko kati na basangani ya Komité ya filiale ya lnde. Nazali na esengo mingi na kosangana na mosala ya kobuka bilanga na mikolo oyo ya nsuka. Oyo nde likambo ya kosepelisa!