Bobola lelo oyo
VICENTEa atambolaka ntango nyonso na babalabala ya São Paulo, na Brésil, na pusu na ye etondi meke. Alɔkɔtaka bakartɔ, biteni ya bibende, mpe bakopale. Soki molili ebandi kokɔta, atandaka bakartɔ na nse ya pusu na ye mpe alalaka. Soki alali, ayokaka lisusu te makelele ya mituka. Liboso akóma bongo, azalaki na mosala, azalaki na ndako, mpe azalaki na libota. Lelo oyo, mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, asalaka mosala makasi na balabala.
Likambo ya mawa, bamilio ya bato na mokili mobimba mpe bazali kobunda na bobola lokola Vicente. Na mikili ya bobola, bato mingi bazali kolala na babalabala to kofanda na mwa bakartye ya mabemabe. Bato oyo basɛngasɛngaka na balabala batondi kotonda: batɛngumi, bato oyo bamonaka te, basi oyo bazali komɛlisa bana. Soki mituka etɛlɛmi, bana balekalekaka pembeni ya mituka yango mpo na kotɛka babombɔ.
Ezali mpasi kolimbola ntina ya bobola yango. Zulunalo moko ya Grande-Bretagne (The Economist) elobaki boye: “Lelo oyo, bato bakómi na bozwi, na mayele ya monganga mpe mayele mosusu ndenge na ndenge oyo ekoki kosilisa bobola.” Bato mingi bazwi matomba na mayele yango. Okokuta babalabala ya bingumba ya minene na mikili mingi ya bobola etondi na mituka ya sika ya kitoko. Bamagazini etondi na biloko ndenge na ndenge ya mikolo oyo, mpe basombi bazangaka te. Bamagazini mibale na Brésil esalaki piblisite ya biloko na bango. Bamagazini yango ekangamaki te kobanda na mwa 23 Desɛmbɛ tii 24 Desɛmbɛ 2004. Mpo na kobenda bakiliya, moko ya bamagazini yango ebengaki babɛti ya miziki báya kobina epai na bango. Miziki yango ebendaki basombi pene na 500 000.
Atako bongo, bato mingi bazali kozwa litomba te na bozwi oyo basusu bazali na yango. Bokeseni makasi oyo ezali kati na bazwi ná babola etindi bato mingi báloba ete esengeli koluka kosilisa bobola noki mpenza. Zulunalo moko ya ekólo Brésil (Veja) elobaki boye: “Likambo oyo bakonzi basengeli kolobela mingi na mbula oyo [2005] ezali bobola. Zulunalo yango elobelaki mpe ebongiseli moko oyo ekólo Amerika ezwaki (Plan Marshall) mpo na kosalisa bikólo oyo ezali na bobola makasi, mingimingi na Afrika.b Nzokande, ntango ebongiseli yango ebandaki kosala lokola etambola, zulunalo yango ebakisaki ete: “Tokómi komituna soki bakolonga. Soki bikólo mingi ezali kokakatana mpo na kopesa mbongo na ebongiseli yango, ezali mpo bayebi ete mbala mingi mbongo wana ekómaka mpenza te epai ya bato oyo bazali na bosɛnga na yango.” Likambo ya mawa, moyibi mpe babiro ebeleebele nde esalaka ete mbongo oyo baguvɛrnema, bibongiseli mosusu ya mokili mpe bato mosusu bapesaka ekómaka te epai ya bato oyo bazali na bosɛnga na yango.
Yesu ayebaki ete bobola ekosila te na mokili. Alobaki boye: “Ntango nyonso bozali elongo na babola.” (Matai 26:11) Yango elingi koloba ete bobola ekozala seko na seko na mokili? Eloko moko te ekoki kosalema mpo na kosilisa yango? Baklisto bakoki kosala nini mpo na kosalisa babola?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
b Plan Marshall ezalaki ebongiseli moko oyo ekólo ya Amerika esalaki mpo na kosalisa mikili ya Mpoto oyo ebebaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ematisa nkita na yango.