Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/5 nk. 26-30
  • Matomba ya kotambola na bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matomba ya kotambola na bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mapamboli oyo ezali kokómisa biso bazwi
  • “Akobakisa mawa na yango te”
  • Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tambolá na nzela ya bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bilenge oyo bazali kosepelisa motema ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/5 nk. 26-30

Matomba ya kotambola na bosembo

“Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”​—MASESE 10:22.

1, 2. Mpo na nini ebongi te tókanisaka kaka mikolo ekoya?

FILOZOFE moko ya Amerika alobaki boye: “Mposa makasi ya makambo oyo tokozala na yango na mikolo ekoya . . . epekisaka biso tómona makambo malamu oyo tozali na yango lelo.” Likambo yango emonanaka ata epai ya bilenge na ndenge bakanisaka mingi makambo oyo bakobanda kosala ntango bakokóma mikóló, mpe na bongo, babosanaka makambo malamu oyo bazalaka na yango ntango bazali naino bilenge.

2 Likambo yango ekómelaka mpe ata basambeli ya Yehova. Kasi, yango ekoki kozala likama. Toyebi ete Nzambe alaki kokómisa mabelé paladiso mpe tozelaka yango na motema mobimba. Tozelaka na motema mobimba ntango oyo maladi, bobange, mpe bampasi ekozala lisusu te. Atako ezali malamu kozela makambo yango, tokanisi boni soki tozali kokanisakanisa kaka ndenge oyo tokozala nzoto malamu na mikolo ekoya mpe tokómi kobosana mapamboli ya elimo oyo tozali na yango lelo oyo? Ekozala mawa mingi! Tokoki kolɛmba nzoto mpe koyoka ‘motema mpasi mpo na elikya oyo ezelisami.’ (Masese 13:12) Mikakatano mpe mitungisi ya bomoi ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kokómisa biso mawamawa. Na esika tóluka ndenge ya kolonga yango, tokoki kokóma na ezaleli ya komilelalela. Tokoki kokima makambo nyonso wana soki tozali kokanisa mapamboli oyo tozali na yango lelo oyo.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Masese 10:22 elobi boye: “Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” Bomɛngo ya elimo oyo biso basaleli ya Yehova tozali na yango lelo oyo ezali lipamboli oyo tosengeli kosepela na yango! Sikoyo, tólobela mwa makambo oyo ezali komonisa bomɛngo yango ya elimo mpe tótalela matomba na yango mpo na mokomoko na biso. Soki tofandi mpe tokanisi boboto oyo Yehova amoniseli ‘moyengebene oyo azali kotambola na bosembo na ye,’ yango ekolendisa ekateli na biso ya kokoba kosalela Tata na biso ya likoló na esengo.​—Masese 20:7.

Mapamboli oyo ezali kokómisa biso bazwi

4, 5. Liteya nini ya Biblia esepelisaka yo mingi, mpe mpo na nini?

4 Boyebi ya sikisiki ya mateya ya Biblia. Mangomba ya boklisto eteyaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Kasi, lingomba na lingomba elimbolaka mateya ya Biblia na ndenge na yango. Lisusu, ata bandimi ya lingomba moko bazalaka na makanisi ekeseni na mateya ya Biblia. Bato yango bakeseni mpenza na biso basaleli ya Yehova! Atako touti na bikólo ekeseni mpe tozali na mimeseno ndenge moko te, kasi tosambelaka Nzambe oyo toyebi nkombo na ye. Azali te nzambe moko na bapersona misato. (Deteronome 6:4; Nzembo 83:18; Malako 12:29) Lisusu, toyebi malamu ete etikali moke Yehova asukisa ntembe monene oyo Satana abimisaki na oyo etali lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi, mpe mokomoko na biso akomonisa ete azali na ngámbo ya Nzambe soki atikali sembo. Toyebi oyo Biblia elobi mpo na bato oyo bakufá mpe tozali te lokola bato mosusu oyo babangaka Nzambe moko oyo anyokolaka bato na lifelo to atindaka bato na epongelo.​—Mosakoli 9:5, 10.

5 Longola yango, tozali na esengo ya koyeba ete tobimaki pwasa te. Tozali nde bikelamu ya Nzambe; kutu, akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:26; Malaki 2:10) Mokomi ya nzembo ayembelaki Nzambe boye: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.”​—Nzembo 139:14.

6, 7. Mbongwana nini osalaki to oyo bato mosusu basalaki mpe ebimisaki matomba?

6 Tolongwe na boombo ya mimeseno ya mabe. Mbala na mbala, bazulunalo, radio mpe televizyo elobelaka makama ya komɛla likaya, komɛla masanga mingi, mpe pite. Kasi, bato mingi bayokaka makebisi yango te. Nzokande, soki moto ayekoli ete Nzambe ya solo apekisi makambo yango mpe ete bato oyo basalaka yango bayokisaka ye mawa, atikaka kosala makambo yango! (Yisaya 63:10; 1 Bakolinti 6:9, 10; 2 Bakolinti 7:1; Baefese 4:30) Atako moto yango asalaka bongo libosoliboso mpo na kosepelisa Yehova Nzambe, azwaka mpe mapamboli mosusu; na ndakisa, akómaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe azwaka kimya ya makanisi.

7 Kotika mimeseno ya mabe ezalaka pɛtɛɛ te mpo na bato mingi. Atako bongo, mbula na mbula ebele ya bato bazali kotika mimeseno ya mabe. Bazali komipesa na Yehova mpe bazali kozwa batisimo ya mai mpo na komonisa na miso ya bato nyonso ete batiki misala oyo Nzambe aboyi. Likambo yango ezali kolendisa biso nyonso! Ezali kobakisa ekateli na biso ya koboya kozala baombo ya masumu mpe ya mimeseno ya mabe.

8. Batoli nini ya Biblia esalaka ete mabota ezala na esengo?

8 Mabota ya esengo. Na bikólo mingi, mabota ezali kobeba. Mabala mingi ezali kokufa, mpe mpo na yango bana bazali konyokwama. Na bikólo mosusu ya Mpoto, soki totángi mabota 10, mabota mibale kati na yango ezali na moboti kaka moko. Ndenge nini Yehova asalisi biso tótambola na nzela ya bosembo na likambo yango? Tosɛngi yo otánga Baefese 5:22–6:4, mpe talá toli malamu oyo Liloba ya Nzambe epesi mibali, basi, mpe bana. Kosalela toli oyo epesami na bavɛrsɛ yango mpe na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia ebongisaka mabala, esalisaka baboti bábɔkɔla bana malamu, mpe esalaka ete mabota ezala na esengo. Yango mpe ezali lipamboli oyo tosengeli kosepela na yango, boye te?

9, 10. Nini ekesenisi ndenge oyo totalelaka avenire ná ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango?

9 Tozali na elikya ete etikali moke mikakatano ya mokili esila. Atako mayele ya siansi ezali kokola mpe bakonzi mosusu bazali kosala milende mpo na kobongisa makambo, mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo ezali kosila te. Klaus Schwab, moto oyo asalaki ebongiseli moko ya makambo ya nkita (Forum économique mondial), alobaki ete “mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango ezali se kobakisama mpe ntango mpo na kotalela yango ezali kokóma moke.” Alobelaki “makama oyo ekoki kokómela bikólo mingi na mbala moko na ndakisa misala ya bateroriste, kobeba ya mopɛpɛ, mai, mpe mabelé, mpe kokwea ya nkita.” Moto yango asukisaki boye: “Makambo oyo ezali kobima na mokili lelo oyo ezali kosɛnga ete bato nyonso bázala liboke moko mpe básala mpenza molende mpo na kolonga yango.” Tokɔti na bambula ya 2000 oyo tozalaki kozela, kasi avenire ya bato mingi ezali kaka molili.

10 Ezali mpenza lipamboli koyeba ete Yehova abongisi Bokonzi oyo ekosilisa mikakatano ya mokili mpe apesi yango na mabɔkɔ ya Masiya! Na nzela ya Bokonzi yango, Nzambe ya solo “akosukisa bitumba” mpe ‘kimya ekoyikana.’ (Nzembo 46:9; 72:7) Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponi, ‘akobikisa mobola, moto ya mawa, mpe moto ya bolɔzi na kati na konyokola mpe na kongala.’ (Nzembo 72:12-14) Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, nzala ekozala te. (Nzembo 72:16) Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:4) Bokonzi ebandaki koyangela na likoló mpe mosika te ekobongola makambo nyonso awa na mabelé.​—Danyele 2:44; Emoniseli 11:15.

11, 12. (a) Koluka bisengo epesaka nde bolamu ya solosolo? Limbolá. (b) Nini epesaka bolamu ya solosolo?

11 Toyebi makambo oyo epesaka bolamu ya solosolo. Nini epesaka bolamu ya solosolo? Moto moko ya pisikoloji alobaki ete bolamu esangisi makambo misato: koluka bisengo, komipesa (na makambo lokola mosala mpe libota), mpe kozala na bomoi oyo ezali na ntina (kokokisa mokano moko to likambo oyo ekosalisa basusu). Na kati ya makambo yango misato, alobaki ete koluka bisengo nde ezali na nsuka mpe abakisaki boye: “Esengeli bato báyeba yango mpamba te mingi batyaka bisengo na esika ya liboso na bomoi na bango.” Biblia elobi nini na likambo yango?

12 Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, alobaki boye: “Nalobaki na motema na ngai ete, Talá, nakomeka yo na esengo; boye sepelá na malamu. Nde talá, yango ezali bobele mpamba. Mpo na kosepela, nalobi ete, Ezali ebebe, mpe mpo na esengo ete, Ekosala nini?” (Mosakoli 2:1, 2) Biblia emonisi ete bolamu oyo moto akoki kozwa na bisengo ezali se mpo na mwa ntango. Kasi, ezali boni na oyo etali komipesa na mosala? Mosala oyo eleki ntina oyo tosengeli komipesa na yango ezali kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Ntango tozali koyebisa bato mosusu nsango ya lobiko oyo euti na Biblia, tozali komipesa na mosala oyo ekoki kobikisa biso mpe bato oyo bakoyoka biso. (1 Timote 4:16) Lokola tozali “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe,” tozali komona ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (1 Bakolinti 3:9; Misala 20:35) Mosala yango ezali kosala ete bomoi na biso ezala na ntina mpe ezali kopesa Mozalisi nzela ya kopesa eyano epai ya Satana Zabolo, moto oyo azali kotumola ye. (Masese 27:11) Ya solo, Yehova amonisi biso ete kokangama na Nzambe epesaka esengo ya solosolo mpe oyo eumelaka.​—1 Timote 4:8.

13. (a) Mpo na nini Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali lipamboli oyo tosengeli kosepela na yango? (b) Matomba nini ozwi na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?

13 Ebongiseli monene mpe ya malamu ya koteya. Gerhard azali nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Ye alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki na mokakatano makasi mpo na koloba. Soki nalingi koloba liboso ya bato, nazalaki kobɛtabɛta monɔkɔ mpe nazalaki kokóma na likukuma. Nazalaki komimona ete nazali na ntina te. Baboti na ngai bakɔtisaki ngai na kelasi ya koyekola koloba, kasi esalisaki ngai te. Mokakatano na ngai ezalaki na makanisi, kasi na nzoto te. Nzokande, na lisangá ya Yehova ezalaki na ebongiseli moko ya malamu mpenza: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ntango nakomisaki nkombo na eteyelo yango, nakómaki na mpiko. Nasalaki makasi nasalela makambo oyo nazalaki koyekola. Yango esalisaki ngai mpenza! Nakómaki koloba malamu, natikaki komitungisa, mpe nazalaki kobanga lisusu te na mosala ya kosakola. Lelo oyo nakómá kosala masukulu ya bato nyonso. Nazali na botɔndi epai ya Yehova na ndenge abongolaki bomoi na ngai na lisalisi ya eteyelo yango.” Formasyo oyo Yehova azali kopesa biso mpo tósala mosala na ye ezali mpe ntina ya kozala na esengo, boye te?

14, 15. Na ntango ya mpasi, lisalisi nini tokoki kozwa nokinoki? Pesá ndakisa.

14 Kozala baninga ya Yehova mpe kozala na kati ya libota ya bandeko ya mokili mobimba. Katrin, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Allemagne, amitungisaki mingi ntango ayokaki ete na sudi-ɛsti ya Azia mabelé eninganaki makasi mpe mai ya mbu emataki na mokili. Mwana na ye ya mwasi azalaki na ekólo Thaïlande ntango likama yango esalemaki. Na boumeli ya mokolo moko na ndambo, mama yango ayebaki naino te soki mwana na ye azali na bomoi to soki azali na kati ya bato oyo bakufaki, oyo motángo na bango ezalaki se kobakisama. Motema ya Katrin ekitaki ntango babengaki ye na telefone mpo na koyebisa ye ete mwana na ye azali malamu!

15 Nini esalisaki Katrin na boumeli ya ntango nyonso wana? Akomi boye: “Nalekisaki ntango wana nyonso na kobondela Yehova. Nazalaki komona ntango nyonso ete libondeli ezalaki kobakisela ngai makasi mpe kimya. Longola yango, bandeko ya elimo bazalaki koya kotala ngai mpe kolendisa ngai.” (Bafilipi 4:6, 7) Tókanisa mpasi oyo alingaki kozala na yango soki alekisaki bangonga wana kozanga lisungi ya Yehova oyo azalaki kozwa na nzela ya libondeli mpe kozanga libɔndisi ya bandeko ya elimo! Kozala baninga ya Yehova mpe ya Mwana na ye mpe kozala na bandeko ya elimo ezali lipamboli ya motuya monene oyo tosengeli kozwa na lisɛki te.

16. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete elikya ya lisekwa ezali na motuya monene.

16 Elikya ya komona lisusu baninga mpe bandeko na biso oyo bakufá. (Yoane 5:28, 29) Elenge mobali moko na nkombo Matthias abotamaki na libota ya Batatoli ya Yehova. Kasi, lokola amonaki mpamba mapamboli oyo azalaki na yango, ntango akómaki elenge, atikaki lisangá. Akomi boye: “Nazalaki kosolola mpenza te na tata na ngai. Tozalaki koyokana te. Atako bongo, tata azalaki ntango nyonso koluka bolamu na ngai. Azalaki kolinga ngai mingi, kasi na ntango wana nazalaki koyeba yango te. Na 1996, tata abɛlaki; ntango nafandaki pembeni ya mbeto na ye, nasimbaki lobɔkɔ na ye mpe nazalaki kolela makasi, nasɛngaki ye bolimbisi mpo na mabe nyonso oyo nasalaki mpe nayebisaki ye ete nalingaka ye mingi. Kasi, akokaki koyoka lisusu te mpo akufaki. Soki nakozala na bomoi na ntango ya lisekwa, nakobongisa mabe nyonso oyo nasalaki tata na ngai. Na ntembe te akozala na esengo ya koyoka ete nakómá nkulutu mpe ete ngai ná mwasi na ngai tozali babongisi-nzela.” Elikya ya lisekwa ezali mpenza lipamboli mpo na biso!

“Akobakisa mawa na yango te”

17. Komanyola likoló ya mapamboli ya Yehova esengeli kotinda biso na kosala nini?

17 Yesu Klisto alobaki boye mpo na Tata na ye: “Asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:45) Soki Yehova Nzambe apesaka mapamboli na ye ata epai ya bato oyo bazangi boyengebene mpe bato ya mabe, ezali boni mpo na baoyo batambolaka na nzela ya bosembo? Nzembo 84:11 elobi ete: “[Yehova] . . . akoboya kopesa eloko malamu soki moke te na baoyo bazali kotambola alima.” Soki tokanisi ndenge oyo abatelaka baoyo balingaka ye mpe amibanzabanzaka mpo na bango, tokozala mpenza na botɔndi mpe na esengo!

18. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova abakisaka mawa te na mapamboli na ye? (b) Mpo na nini basaleli mingi ya Nzambe oyo bazali sembo banyokwamaka?

18 “Mapamboli ya [Yehova]” nde epesi basaleli na ye bomɛngo ya elimo. Biblia elaki mpe ete “akobakisa mawa na yango te.” (Masese 10:22) Kasi, mpo na nini basaleli ya sembo ya Nzambe bamekamaka mpe bakutanaka na mikakatano makasi? Tokutanaka na mikakatano mpe tonyokwamaka mingimingi mpo na bantina misato. (1) Nzoto na biso ya masumu. (Genese 6:5; 8:21; Yakobo 1:14, 15) (2) Satana ná bademo na ye. (Baefese 6:11, 12) (3) Mokili oyo mabe. (Yoane 15:19) Atako Yehova atikaka nzela ete makambo ya mabe ekómela biso, ezali ye te moto atindelaka biso yango. Kutu, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.” (Yakobo 1:17) Mapamboli ya Yehova epesaka mawa te.

19. Baoyo bazali kokoba kotambola na bosembo bakozwa bolamu nini?

19 Kozala na bomɛngo ya elimo esalaka ete tópusana penepene na Nzambe. Ntango tokómi baninga ya Nzambe, ‘tomibombelaka moboko kitoko na esika moko ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo tósimba makasi bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko. (1 Timote 6:12, 17-19) Na mokili ya sika, longola bomɛngo ya elimo, tokozala mpe nzoto malamu. Na ntango wana, bato nyonso oyo bazali ‘kokoba kotosa mongongo ya Yehova’ bakozala na bomoi ya solosolo. (Deteronome 28:2, NW) Yango wana, tózala na ekateli makasi ya kokoba kotambola na esengo nyonso na nzela ya bosembo.

Oyekoli nini?

• Mpo na nini ebongi te tókanisaka kaka mikolo ekoya?

• Mapamboli nini tozali na yango lelo oyo?

• Mpo na nini basaleli ya sembo ya Nzambe banyokwamaka?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto