Mituna ya batángi
Mpo na nini Mobeko ya Moize elobaki ete makambo lokola kobima mai ya mibali, komona sanza mpe kobota ezalaki kokómisa moto “mbindo”?
Nzambe asalaki binama ya kobotela mpo bato bábotaka mpe mpo bato oyo babalá básepelaka. (Genese 1:28; Masese 5:15-18) Nzokande, na Levitike mokapo ya 12 mpe ya 15, ezali na mibeko ebele oyo elobi ete mobali oyo abimi mai ya mibali ye moko, mwasi oyo amoni sanza mpe oyo aboti bazalaki mbindo. (Levitike 12:1-6; 15:16-24) Nzambe apesaki Bayisalaele mibeko yango mpo na kosalisa bango bázala nzoto kolɔngɔnɔ, bázala na bizaleli malamu mpenza, mpe ezalaki komonisa bosantu ya makila mpe ntina ya mbeka mpo na kolimbisama ya masumu.
Mibeko ya Moize oyo elobelaki makambo wana ezalaki mpe mpo na kosalisa Bayisalaele bázala nzoto kolɔngɔnɔ. Buku Biblia mpe minganga (na Lingelesi) elobi ete: “Mobeko oyo epekisaki kosangisa nzoto ntango mwasi amoni sanza ezalaki malamu mpo na kokima bamaladi mosusu oyo eutaka na kosangisa nzoto . . . ezalaki mpe kobatela basi mpo bábɛla kanser ya matrisi te.” Mibeko yango ezalaki kobatela libota ya Nzambe na bamaladi mosusu oyo ekokaki koyebana to komonana te na ntango wana. Lokola Nzambe alakaki ekólo Yisalaele ete bakokóma ebele mpe na biloko mingi, bopɛto na likambo etali binama ya kobotela esalisaki bango bábota mingi. (Genese 15:5; 22:17) Mibeko yango ezalaki mpe kobatela makanisi ya libota ya Nzambe. Kotosa mibeko yango ezalaki kosalisa basi ná mibali báyebaka kokangela mposa ya kosangisa nzoto motema.
Likambo ya libosoliboso oyo ezalaki kokómisa moto mbindo ezali ntango mwasi azali kotanga makila. Mibeko ya Yehova na ntina na makila ezalaki kosalisa Bayisalaele báyeba ete makila ezali mosantu mpe ete ezali na ntina mingi na losambo ya Yehova, mingimingi mpo na bambeka mpe kolimbisama ya masumu.—Levitike 17:11; Deteronome 12:23, 24, 27.
Kasi, kozanga kokoka nde etindaki Yehova abimisa mibeko ebeleebele na likambo yango. Bayisalaele bayebaki ete Adama ná Eva bakokaki te kobota bana ya kokoka nsima ya lisumu na bango. Bana na bango nyonso basengelaki kobuka mbuma mabe ya lisumu yango, elingi koloba kozanga kokoka mpe liwa. (Baloma 5:12) Na yango, atako na ebandeli biboteli esalemaki mpo na kosalisa mwasi ná mobali bápesa bomoi ya kokoka, lelo oyo baboti bakoki kopesa bana kaka bomoi ya kozanga kokoka mpe lisumu.
Mibeko ya kopɛtolama esengelaki kokundwela Bayisalaele te kaka ete báyebaka ete babotamá na masumu, kasi mpe ete esengeli mbeka ya lisiko epesama mpo masumu elimbisama mpe tókóma lisusu bato ya kokoka. Bambeka ya banyama oyo bazalaki kopesa ekokisaki mokano yango te. (Baebele 10:3, 4) Ntina ya Mobeko ya Moize ezalaki ya komema bango tii na Klisto mpe kosalisa bango báyeba ete kaka mbeka ya kokoka ya Yesu nde ekokaki mpenza kosilisa masumu mpe kofungolela bato ya sembo nzela ya bomoi ya seko.—Bagalatia 3:24; Baebele 9:13, 14.