Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/7 lok. 3
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Ntina oyo mabe ezali tii lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Liteya nini tokoki kozwa na bomoi ya mwasi na mobali ya liboso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bato oyo baleki biso
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/7 lok. 3

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

LIKAMBO moko ya mabe ekómelaki bato na ebandeli mpenza. Anzelu moko oyo atombokelaki Nzambe akosaki Eva mpe Eva alyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki. Anzelu yango alobaki na Eva ete ye ná mobali na ye bakokufa solo te, mpe Nzambe ayebi ete mokolo oyo bakolya mbuma wana, miso na bango ekofungwama mpe bakozala lokola Nzambe, bakoyeba malamu mpe mabe. (Genese 2:16, 17; 3:1-5) Anzelu yango akómá kobengama Zabolo mpe Satana.​—Emoniseli 12:9.

Eva andimaki maloba ya Satana. Biblia elobi boye: “Mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko mpo na kotala. Bongo akamataki mbuma na yango mpe alyaki. Na nsima apesaki mpe ndambo na mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.” (Genese 3:6, NW) Na bongo, mobali ná mwasi ya liboso balandaki nzela ya Satana mpe bakómaki batomboki. Yango wana, ezala bango moko to bana oyo basengelaki kobota, bakokaki lisusu kofanda na Paladiso te. Na esika bana na bango bábotama bato ya kokoka mpe oyo bazali na bomoi ya seko, batikelaki bango lisumu mpe liwa.​—Baloma 5:12.

Yehova Nzambe, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, asalaki nini? Abongisaki makambo mpo masumu ya bato elimbisama. (Baloma 5:8) Yehova Nzambe abongisaki mpe boyangeli moko oyo ekosilisa mabe oyo botomboki ya Adama ná Eva ememaki. Biblia ebengi boyangeli yango ete “Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 21:31) Bokonzi yango, oyo ezali ebongiseli moko na kati ya boyangeli ya Nzambe, ekokokisa mokano moko ya ntina mingi.

Mokano yango ezali nini? Wapi mwa makambo ya Bokonzi yango mpe ezali na bokeseni nini na boyangeli ya bato? Ntango nini Bokonzi yango ebandaki koyangela? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto