Molulu ya kosukola ya Bayuda—Ebandeli ya batisimo?
YOANE MOBATISI ateyaki “batisimo lokola elembo ya kobongola motema.” Yesu mpe atindaki bayekoli na ye bákómisa bato bayekoli mpe bábatisa bango.—Malako 1:4; Matai 28:19.
Biblia emonisi ete batisimo ya baklisto esɛngi kozindisama mobimba na mai. Buku moko (Jesus and His World) elobi ete “milulu oyo ekokani na yango ekoki komonana na mangomba ndenge na ndenge, ya kala to ya lelo, na mokili mobimba.” Buku yango elobi ete “batisimo ya baklisto . . . eutaki na losambo ya Bayuda.” Likambo yango ezali solo?
Bapisini mpo na molulu ya kosukola ya Bayuda
Bato ya arkeoloji oyo batimolaki pembeni ya Ngomba ya Tempelo na Yelusaleme bamonaki bapisini soki 100 oyo eumeli banda na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.) Etanda oyo ezalaki na sinagoga moko na ekeke ya mibale to ya misato ya T.B. elobi ete bapisini ya ndenge yango ezalaki mpo na “bapaya oyo bazali na mposa na yango.” Bamonaki mpe bapisini mosusu na kartye ya Yelusaleme oyo bazwi mpe banganga-nzambe bazalaki kofanda; bandako mingi ezalaki na pisini na kati mpo na molulu ya kosukola.
Bazalaki kosala bapisini yango na kati ya libanga to bazalaki kotimola libulu mpe na nsima batongi yango na biliki to na mabanga. Bazalaki kopakola yango simá mpo mai ebimaka te. Bapisini yango mingi ezalaki pene na mɛtrɛ misato na molai mpe pene na mɛtrɛ mibale na mokuse. Batiyo ezalaki komema mai ya mbula na batono. Mai ezalaki na mozindo ya koleka mɛtrɛ 1 mpo, ntango moto agumbami, azinda nzoto mobimba. Bapisini mosusu ezalaki na efelo moke na katikati ya basikalié oyo bazalaki kokitela na mai. Bato mosusu balobaka ete ngámbo moko ezalaki mpo na kokita na mai ntango moto azali naino mbindo, mpe ngámbo mosusu mpo na kobima na mai nsima ya kokóma pɛto.
Bayuda bazalaki kosalela bapisini yango mpo na molulu ya komipɛtola. Yango ezalaki kosɛnga nini?
Mibeko mpe bonkɔkɔ etali kosukola
Mibeko ya Moize emonisaki ete basambeli ya Nzambe basengeli kozala pɛto na elimo mpe na nzoto. Bayisalaele bazalaki na makambo ndenge na ndenge oyo ekokaki kokómisa bango mbindo; yango wana basengelaki kosukolaka nzoto mpe bilamba na bango mpo na komipɛtola.—Levitike 11:28; 14:1-9; 15:1-31; Deteronome 3:10, 11.
Yehova azali Nzambe ya pɛto mpe ya bosantu mingi. Yango wana, asɛngaki ete banganga-nzambe ná Balevi básukolaka mabɔkɔ mpe makolo na bango liboso bápusana pembeni ya etumbelo mpo bákufa te.—Exode 30:17-21.
Bato ya mayele balobaka ete na ekeke ya liboso ya T.B., bakonzi ya mangomba ya Bayuda basɛngisaki ata bato oyo bazali Balevi te bálanda momeseno ya komipɛtola lokola banganga-nzambe. Baesene ná Bafalisai bazalaki mbala na mbala kosala molulu ya kosukola. Buku moko elobi mpo na ntango ya Yesu boye: “Moyuda nyonso asengelaki kosala molulu ya kosukola liboso akɔta na Ngomba ya Tempelo, liboso apesa mbeka, liboso ete nganga-nzambe atumba mbeka mpo na ye mpe liboso asala likambo mosusu ya ndenge wana.” Makomi ya Tamuld elobi ete moto asengelaki kozindisa nzoto mobimba na mai.
Yesu apamelaki Bafalisai mpo bazalaki kosɛngisa bato bálanda molulu ya komipɛtola. Bazalaki kopesa “batisimo ndenge na ndenge,” kati na yango, batisimo ya “bakɔpɔ mpe ya bilokó mpe ya bambɛki ya kwivre.” Yesu alobaki ete Bafalisai babosanaki mibeko ya Nzambe mpo na kotya mimeseno na bango moko. (Baebele 9:10; Malako 7:1-9; Levitike 11:32, 33; Luka 11:38-42) Ata mobeko moko te na kati ya Mibeko ya Moize esɛngaki kozindisama mobimba na mai.
Na bongo, batisimo ya baklisto eutaki nde na molulu ya kosukola oyo ezalaki momeseno ya Bayuda? Te!
Molulu ya kosukola mpe batisimo ya baklisto
Bayuda bazalaki kosala molulu ya kosukola mpo na komipɛtola. Kasi, batisimo oyo Yoane azalaki kopesa, ezalaki te lokola molulu ya kosukola oyo Bayuda bazalaki kosala. Lokola Yoane azalaki kobengama Mobatisi, emonisi ete ndenge oyo azalaki kozindisa bato na mai ekesanaki na ndenge oyo Bayuda bazalaki kosala. Kutu, bakonzi ya mangomba ya Bayuda batindaki bato bákende kotuna ye ete: “Mpo na nini ozali kobatisa?”—Yoane 1:25.
Komipɛtola oyo Mibeko ya Moize esɛngaki ezalaki kosalema mbala nyonso oyo moto asali likambo oyo ekómisi ye mbindo. Kasi, ezalaki bongo te mpo na batisimo ya Yoane to ya baklisto. Batisimo ya Yoane ezalaki komonisa kobongola motema mpe kotika bizaleli mabe ya kala. Batisimo ya baklisto ezalaki kolimbola ete moto amipesi mobimba na Nzambe. Moklisto azalaki kozwa yango kaka mbala moko.
Molulu ya kosukola oyo ezalaki kosalema na bandako ya banganga-nzambe mpe na bapisini oyo ezalaki pembeni ya Ngomba ya Tempelo ekokani na batisimo ya baklisto kaka na mwa makambo mikemike. Bandimbola na yango ekeseni mpenza. Diksionɛrɛ moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Bato ya mayele mingi bandimi ete Yoane [Mobatisi] alandaki te to amekolaki te lolenge ya batisimo oyo amonaki na esika oyo afandaki,” elingi koloba, na lingomba ya Bayuda. Tokoki mpe koloba bongo mpo na batisimo ya lisangá ya boklisto.
Batisimo ya baklisto ezali “lisɛngi oyo esalemi epai ya Nzambe mpo na kozala na lisosoli ya malamu.” (1 Petelo 3:21) Yango emonisaka ete moto amipesi mobimba na Yehova mpo na kosalela Ye lokola moyekoli ya Mwana na Ye. Kozindisama mobimba na mai ebongi mpenza mpo na komonisa yango. Ntango moto azindisami, emonisaka ete akufi na oyo etali bizaleli oyo azalaki na yango kala. Ntango abimisami na mai, elimboli ete abandi bomoi ya sika mpo na kosala mokano ya Nzambe.
Yehova asalaka ete bato oyo bamipesi na ye mpe bazwi batisimo bázala na lisosoli ya malamu. Yango wana, ntoma Petelo ayebisaki baklisto boye: “[Batisimo] ezali mpe sikoyo kobikisa bino.” Molulu ya kosukola ya Bayuda ekoki kokokisa likambo ya ndenge wana te.