Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/5 nk. 19-22
  • Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tósala fɛti ya loyenge te
  • Fɛti ya libala oyo Yesu akendaki
  • Nani azali mokambi?
  • Ndenge nini kolɛngɛla makambo malamu mpe kolekisa ndelo te
  • Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Milulu ya libala oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bómonisa kondima na makambo ya bomoi na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/5 nk. 19-22

Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova

Welsh na Elthea babalanaki na 1985 na Engumba Soweto, na Afrika ya Sudi. Mbala na mbala, batalaka bafɔtɔ ya fɛti ya libala na bango elongo na Zinzi, Mwana na bango ya mwasi, mpe bazalaka na esengo ntango bazali kokanisa lisusu mokolo wana. Zinzi asepelaka kotánga bankombo ya bato oyo bazalaki na fɛti yango ntango azali kotala bilongi na bango na bafɔtɔ, mpe asepelaka mingi na bafɔtɔ ya mama na ye mpo alataki kitoko mpenza.

FƐTI yango ebandaki na lisukulu ya libala oyo esalemaki na ndako moko ya makita na Soweto. Na nsima, bilenge baklisto bayembaki nzembo na mingongo kitoko mpo na kokumisa Nzambe. Na nsuka, bato nyonso oyo babengisamaki na fɛti, balyaki biloko oyo babongiselaki bango mpe ntango bazalaki kolya, batyaki kasɛti ya nzembo ya Bokonzi mpe ezalaki kobɛta makasi mingi te. Masanga ya makasi ezalaki te, batyaki mpe miziki ya makasi te mpe bato babinaki te. Kasi, bato oyo bayaki na fɛti yango basepelaki ndenge bafandaki esika moko mpe bazalaki kopesa mwasi na mobali oyo babalanaki longonya mpe bazalaki kotombela bango libala malamu. Makambo nyonso wana eumelaki ngonga misato. Raymond, oyo azali nkulutu na lisangá, alobaki ete: “Nakoki kobosana fɛti ya libala wana te, ezalaki mpenza malamu.”

Ntango Welsh na Elthea babalanaki bazalaki kosala na Betele ya Afrika ya Sudi. Bazalaki na makoki ya kosalisa fɛti ya monene te. Baklisto mosusu bamonaki malamu bátika mosala ya ntango nyonso mpo báluka misala mpo na kozwa mbongo ya kosalisa fɛti ya monene. Nzokande, Welsh na Elthea bayokaka mawa te mpo basalisaki mwa fɛti ya moke, mpamba te yango esalisaki bango bákoba kosalela Nzambe na mosala na bango ya ntango nyonso tii ntango babotaki Zinzi.

Kasi, tokoloba boni soki bato oyo balingi kobalana basepeli kobɛta miziki mpe kobina na fɛti na bango? Ezali boni soki basepeli ete bato oyo babengi na fɛti bámela vinyo to masanga mosusu ya makasi? Bongo soki bakoki kosalisa fɛti ya monene oyo ekosɛnga makambo mingi? Ndenge nini bakoki kosala mpo fɛti yango ezala fɛti ya esengo oyo ebongi mpo na basaleli ya Nzambe? Esengeli kotalela mituna yango malamu mpo Biblia elobi ete: “Soko bokolyaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”​—1 Bakolinti 10:31.

Tósala fɛti ya loyenge te

Fɛti ya libala oyo ezangá esengo ezalaka mpenza mingi te. Kasi, soki balekisi ndelo mpe ekómi fɛti ya loyenge, ezalaka mpenza likama monene. Makambo oyo esalemaka na bafɛti mingi ya mabala ya bato oyo bazali Batatoli te, epesaka Nzambe lokumu te. Na ndakisa, bato balangwaka masanga. Ezali mawa na komona ete makambo yango esalemaki mpe na bafɛti ya mabala mosusu ya baklisto.

Biblia elobi ete “masanga ekongala.” (Masese 20:1) Liloba ya Liebele oyo babongoli na “kongala” elimboli “kotya makɛlɛlɛ makasi.” Soki masanga makasi ekoki kotinda moto moko asala makɛlɛlɛ makasi, kanisá ndenge oyo ekoki kosala epai bato ebele bafandi mpe bazali komela masanga mingi! Tomoni mpenza ete yango ekoki komema na “kolangwa masanga, [bafɛti ya loyenge, NW] mpe makambo ya motindo yango,” oyo Biblia elobi ete ezali “misala ya nzoto.” Soki moto asalaka makambo yango mpe aboyi kobongola motema, akozwa bomoi ya seko te ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele.​—Bagalatia 5:19-21.

Liloba ya Greke oyo ebongolami na “fɛti ya loyenge” esalelamaki mpo na kolobela ndenge bilenge oyo balangwe masanga bazali kotambola na balabala mpe bazali kosala makɛlɛlɛ makasi, bazali koyemba, kobina mpe kobɛta miziki. Soki na fɛti moko ya libala, masanga ezali bebo, mpe soki miziki ezali makasi mpe bato bazali kobina ndenge balingi, fɛti yango ekoki mpenza kokóma fɛti ya loyenge. Na esika ya ndenge wana, bato oyo bazali makasi mingi te na elimo bakoki kokwea mpe kosala misala mosusu ya nzoto lokola “ekobo, makambo ya bosɔtɔ, pite [to kopesa nzela na] nkanda.” Tokoki kosala nini mpo misala ya nzoto wana ebebisa fɛti ya libala ya baklisto te? Mpo na kozwa eyano na motuna oyo, tótalela fɛti ya libala moko oyo Biblia elobeli.

Fɛti ya libala oyo Yesu akendaki

Babengisaki Yesu na bayekoli na ye na fɛti ya libala moko na mboka Kana na Galilai. Yesu na bayekoli na ye bakendaki, kutu Yesu asalaki likambo moko mpo na kobakisa esengo na fɛti yango. Ntango vinyo esilaki, Yesu asalaki likamwisi mpe abimisaki vinyo oyo ezalaki kitoko koleka vinyo ya liboso. Na ntembe te, vinyo oyo etikalaki, mobali wana na mwasi na ye basalelaki yango na mwa mikolo oyo elandaki fɛti ya libala yango.​—Yoane 2:3-11.

Makambo oyo elekaki na fɛti ya libala oyo Yesu akendaki ekoki koteya biso mingi. Ya liboso, Biblia elobi polele ete mpo Yesu na bayekoli na ye bákende na fɛti ya libala wana, babengisaki bango kobengisa. (Yoane 2:1, 2) Mpe lisusu, Yesu apesaki masese mibale ya bafɛti ya mabala, mpe na mbala nyonso wana alobaki ete bato bakendaki na bafɛti yango mpo babengisaki bango.​—Matai 22:2-4, 8, 9; Luka 14:8-10.

Na mikili mosusu, kokende na fɛti ya libala etali kaka moto soki alingi, ezala babengi ye to te. Kasi, likambo yango ekoki kobimisa mokakatano lokola mbongo ekómi mpasi. Soki mwasi na mobali oyo babalani bazali na mbongo te, bakoki kokɔta banyongo mpo na koluka koleisa mpe komelisa bato ebele, baoyo bayebi kutu motango na bango te. Yango wana, soki baklisto bamoni malamu kosala fɛti ya moke mpo na libala na bango mpe babengi kaka bato moke, baklisto mosusu oyo babengi bango te basengeli koyoka mabe te mpe koyina bango te. Mobali moko oyo abalaki na engumba Cap, na Afrika ya Sudi, azali koyeba lisusu ete abengisaki bato 200 na fɛti ya libala na ye. Nzokande bato oyo bayaki bazalaki 600 mpe biloko ya kolya nyonso esilisaki mbala moko. Na kati ya bato yango oyo bayaki kasi babengisaki bango te, ezalaki na bato batondi bisi mobimba oyo bayaki kotambola na engumba Cap na wikende oyo ye asalaki fɛti ya libala na ye. Sofɛlɛ ya bisi yango azalaki ndeko moko ya mosika ya mwasi oyo abalaki mpe amonaki mabe moko te ya komema bato nyonso wana na esika ya libala, mpe atunaki mwasi na mobali oyo babalanaki ata kotuna te!

Soki balobi te ete fɛti ezali mpo na bato nyonso, moyekoli ya solo ya Yesu akoki te kokende na fɛti ya libala oyo babengi ye te mpe kolya biloko mpe komela masanga oyo babongisi mpo na bato oyo babengi bango. Baoyo babengi bango te kasi bazali koyoka mposa ya kokende basengeli komituna mituna oyo: ‘Soki nakei na fɛti yango ya libala, nakomonisa mpenza ete nalingaka mwasi na mobali oyo babalani? Nakotya mobulu te mpe yango ekobebisa esengo ya fɛti te?’ Na esika ya koyoka mabe mpo babengi ye te, moklisto oyo ayebi komitya na esika ya bato mosusu, akoki komonisa bolingo mpe kotindela bato oyo babalani maloba mpo na kopesa bango longonya mpe kotombela bango mapamboli ya Yehova. Akoki mpe kokanisa soki akoki kozala na likoki ya kotindela bango likabo moko mpo na kosalisa bango mpe mpo na kobakisa esengo na mokolo ya libala na bango.​—Mosakoli 7:9; Baefese 4:28.

Nani azali mokambi?

Na mikili mosusu ya Afrika, mikóló oyo bazali bandeko ya babalani nde bazwaka mokumba ya kobongisa makambo ya libala. Mwasi na mobali bakoki kosepela na likambo yango mpamba te ekosɛnga bango te bábimisa mbongo. Na yango, bazali mpe na mokumba moko te na makambo nyonso oyo ekoleka na libala. Nzokande, liboso ya kondima likambo yango, ezala ya ndenge nini, basengeli kotalela soki bandeko wana bakolinga kosala ndenge oyo bango babalani, bakosɛnga bango.

Atako Yesu azalaki Mwana ya Nzambe oyo ‘akitaki longwa na likoló,’ likambo moko te emonisi ete azwaki makambo nyonso na mabɔkɔ mpe atambwisaki makambo mingi na fɛti ya libala na Kana. (Yoane 6:41) Nzokande, lisolo ya Biblia eyebisi biso ete moto mosusu aponamaki mpo na kosala lokola “mokóló [“mokambi,” NW] na elambo.” (Yoane 2:8) Moto yango asengelaki kopesa lapolo epai ya mokonzi ya libota wana ya sika, elingi koloba mobali ya libala.​—Yoane 2:9, 10.

Baklisto oyo bazali bandeko ya bato oyo bazali kobalana basengeli kotosa mokonzi ya libota wana ya sika. (Bakolose 3:18-20) Ye nde azali na mokumba ya kopesa mitindo na makambo nyonso oyo ekosalema na fɛti ya libala na ye. Kasi, mobali oyo auti kobala asengeli kokanisa malamu, akoki mpe kotalela makanisi ya mwasi na ye, ya baboti na ye mpe ya babokilo na ye. Nzokande, soki bandeko ya mosuni balingi kaka kosala makambo na ndenge oyo eyokani te na bamposa ya mwasi na mobali, na ntango wana, bango bakoki koboya na boboto mpenza mpe kobimisa mbongo na bango moko mpo na kosala fɛti ezala ata ya moke. Na ndenge yango, likambo moko te ekosalema oyo ekobanda kopesa bato oyo babalani mawa soki bakanisi yango. Na ndakisa, na fɛti moko ya libala ya baklisto na mokili moko ya Afrika, ndeko moko ya mosuni, oyo azalaki moklisto te ye nde azalaki kokamba fɛti, atombolaki kɔpɔ na ye ya masanga mpo na kokumisa bankɔkɔ oyo bakufá!

Ntango mosusu, mwasi na mobali batikaka bato mosusu bazali naino kosala fɛti mpe bango bakei na mobembo ya libala na bango. Na ntango wana, mobali asengeli kopona bato oyo babongi mpo na kokamba fɛti mpe kokeba ete bato bátosa mibeko ya Biblia mpe ete fɛti esila na ngonga malamu.

Ndenge nini kolɛngɛla makambo malamu mpe kolekisa ndelo te

Na ntembe te biloko ya kolya ezalaki mingi na fɛti oyo Yesu akendaki mpamba te Biblia elobi ete ezalaki fɛti ya libala. Lokola Biblia emonisi yango, vinyo mpe ezalaki mingi. Na ntembe te babɛtaki miziki ya malamu mpe bato babinaki na ndenge ebongi mpo ezalaki kosalema bongo epai ya Bayuda. Yesu amonisaki yango na lisese ya mwana ya kilikili. Na lisolo yango, tata yango azalaki na bozwi mingi, asepelaki mingi ntango mwana na ye abongolaki motema mpe azongaki na ndako, yango wana alobaki ete: “Tólya, tósepela.” Yesu alobi ete ‘miziki na kobina’ ezalaki na fɛti yango.​—Luka 15:23, 25.

Kasi, likambo moko ebendi likebi na biso ezali ete Biblia elobi polele te ete na fɛti ya libala na Kana miziki ezalaki mpe bato babinaki. Kutu, kati na masolo mingi ya Biblia oyo elobeli bafɛti ya mabala, balobeli kobina te. Emonani ete na bafɛti ya mabala ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, kobina ezalaki likambo oyo eleki ntina te. Liteya nini tokoki kozwa wana?

Na mabala mosusu ya baklisto na Afrika, basalelaka baradio ya minene. Ntango mosusu miziki ezalaka makasi mpenza mpe yango epekisaka bato oyo bayei na fɛti kosolola malamu. Mbala mosusu kutu emonanaka polele ete biloko ya kolya ezalaka mingi te kasi bato babinaka mingi mpe ezalaka mpasi te bato bábina ndenge balingi. Na esika ezala kaka fɛti ya libala, fɛti yango ekoki kokóma fɛti ya mabina. Lisusu, soki miziki ezali makasi, yango ebendaka mbala mingi bato ya mobulu, bato oyo bayebi bango te, oyo bayaka ata babengi bango te.

Lokola masolo ya bafɛti ya mabala na Biblia elobeli mpenza makambo ya miziki na kobina te, tomoni te ete mwasi na mobali basengeli kotalela likambo yango malamu mpo na kosalisa fɛti ya libala oyo ekokumisa Yehova? Nzokande, na mikili na sudi ya Afrika, na mikolo oyo euti koleka, bilenge baklisto oyo baponamaki mpo na kokɔta esika moko na mwasi na mobali na esika ya libala, bazalaki kolekisa ntango mingi mpo na koyekola mabina ya mindɔndɔmindɔndɔ. Na boumeli ya basanza mingi, bazalaki kolekisa ntango ebele na koyekola mabina wana. Nzokande, baklisto basengeli ‘kosomba ntango’ mpo na “makambo oyo eleki ntina” lokola mosala ya kosakola, koyekola ya moto na moto mpe koyangana na makita.​—Baefese 5:16; Bafilipi 1:10, NW.

Soki totaleli vinyo oyo Yesu abimisaki, tozali komona ete fɛti ya libala na Kana ezalaki mpenza fɛti monene mpe esɛngaki makambo mingi. Kasi tondimi mpenza ete ezalaki esika ya makɛlɛlɛ makasi te mpe bato oyo bayaki na fɛti balangwaki masanga te lokola na bafɛti mosusu ya Bayuda. (Yoane 2:10) Nini endimisi biso yango? Mpamba te Nkolo Yesu Klisto azalaki na fɛti yango. Na kati ya bato nyonso, Yesu nde akokaki kotosa malamu koleka mobeko ya Nzambe oyo elobeli baninga mabe, ete: “Zalá elongo na bameli na masanga te.”​—Masese 23:20.

Yango wana, soki mwasi na mobali balingi kopesa bato vinyo to masanga ya makasi na fɛti ya libala na bango, basengeli kopona bato oyo babongi mpo na kolandela ndenge bakokabola masanga yango. Soki balingi miziki ezala, basengeli kopona miziki malamu mpe kotya moto moko oyo abongi mpo na kotalelaka ete miziki eleka makasi te. Basengeli kotika nzela te ete bapaya bápesa mitindo mpe bátya miziki oyo ezali malamu te to bámatisa miziki makasi. Soki bakobina, basengeli kosɛnga bato bábina na ndenge ebongi mpe bázala na komipekisa. Soki ndeko moko ya mosuni oyo azali moklisto te to ndeko moko moklisto oyo akɔmeli te azali kobina mabina mabe to mabina oyo elamusaka mposa ya nzoto, mobali oyo abali akoki kotya miziki mosusu to akoki kosɛnga na boboto nyonso ete bato bátika kobina. Soki asali bongo te, mobulu ekoki kokɔta na fɛti mpe yango ekobɛtisa bato mosusu libaku.​—Baloma 14:21.

Mpo na kokima makama oyo ekoki kobima na mabina mosusu ya mikolo oyo, miziki makasi mpe masanga mingi na fɛti, baklisto mingi oyo bazali kobala basepelaki ete nyonso wana ezala te na fɛti na bango atako bato mosusu balobaki mabe mpo na yango. Tosengeli nde kopesa bango longonya na ndenge balingaki ete eloko moko te ebwaka nsɔni na nkombo mosantu ya Nzambe. Mibali mosusu baponaki miziki ya malamu, babongisaki ntango ya kobina mpe bapesaki bato masanga mingi te. Na nyonso wana, mobali azali na mokumba ya kopona makambo oyo ekozala na fɛti ya libala na ye.

Na Afrika, bato mosusu oyo bakoli na elimo te, batyolaka bafɛti ya mabala ya baklisto oyo ezali na makambo mabe te mpe balobaka ete ezali lokola bato bakei na esika ya ebembe. Kasi wana ezali makanisi ya malamu te. Masumu ezali misala ya nzoto, ekoki kopesa esengo mpo na mwa ntango mokuse, kasi na nsima, etungisaka lisosoli ya moklisto mpe ezalaka nsɔni mpo na nkombo ya Nzambe. (Baloma 2:24) Nzokande, elimo santu ya Nzambe epesaka esengo ya solosolo. (Bagalatia 5:22) Baklisto mingi bazalaka na esengo ntango bakanisaka mokolo ya libala na bango mpo bayebi ete ezalaki ntango moko ya esengo mpe ebɛtisaki bato mosusu “libaku” te.​—2 Bakolinti 6:3.

Welsh na Elthea babosanaka te maloba malamu oyo ebele ya bandeko na bango oyo bazali baklisto te, kasi bazalaki na fɛti ya libala na bango, balobaki. Moko alobaki ete: “Tosi tolɛmbi na makɛlɛlɛ ya bafɛti ya mabala ya mikolo na biso. Nasepelaki mpenza kozala na fɛti ya libala moko ya malamu.”

Likambo oyo eleki ntina ezali ete bafɛti ya mabala ya baklisto oyo ezali na esengo mpe ezali malamu, ekumisaka Yehova Nzambe, Mobandisi ya libala.

[Etanda/Elilingi na lokasa 22]

MAKAMBO YA KOTALELA MPO NA FƐTI YA LIBALA

• Soki obengi ndeko moko ya mosuni oyo azali moklisto te mpo aloba mwa makambo na fɛti, ondimi mpenza ete akokɔtisa te makambo mosusu oyo eyokani te na mitinda ya boklisto?

• Soki miziki ekozala, osili kopona kaka nzembo ya malamu?

• Miziki yango ekozala makasi to ekozala makasi te?

• Soki bato bakobina, bakobina na ndenge ya mabe te?

• Bato bakomela masanga mingi te?

• Esengeli nde kozala na bakɛngɛli mpo na kolandela ndenge bakokabola masanga yango?

• Fɛti ya libala ekosila na ngonga malamu?

• Ezali na bato oyo bakokɛngɛla mpo mobulu ezala te tii ntango fɛti ekosila?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto