Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/10 nk. 23-27
  • Bómonisa kondima na makambo ya bomoi na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bómonisa kondima na makambo ya bomoi na bino
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kokutana na mwa baninga
  • Ekozala ndenge nini?
  • Milulu mpe bafɛti ya libala
  • “Mokambi ya fɛti”
  • Bakado ya libala
  • Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Milulu ya libala oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/10 nk. 23-27

Bómonisa kondima na makambo ya bomoi na bino

“Ndenge moko mpe, kondima, soki ezali na misala te, ekufi na kati na yango moko.”​—Yakobo 2:17.

1. Mpo na nini baklisto ya liboso bazalaki kokeba na kondima mpe na misala na bango?

BAKLISTO ya ekeke ya liboso bazalaki komonisa kondima na makambo ya bomoi na bango. Moyekoli Yakobo alendisaki baklisto nyonso boye: “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki mpamba te.” Alobaki lisusu boye: “Se ndenge nzoto oyo ezangi elimo ekufi, ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala ekufi.” (Yakobo 1:22; 2:26) Mbula soki 35 na nsima, baklisto mingi bazalaki kokoba komonisa kondima na bango na misala oyo ebongi. Nzokande, bamosusu bazalaki kosala yango te. Yesu apesaki baklisto ya Similina longonya; kasi, alobaki na baklisto mingi ya Saladi boye: “Nayebi misala na yo, oyebani ete ozali na bomoi, nzokande okufá.”​—Emoniseli 2:8-11; 3:1.

2. Mituna nini baklisto basengeli komituna mpo na kondima na bango?

2 Yango wana Yesu alendisaki baklisto ya Saladi, mpe na nzela na bango baklisto nyonso oyo basengelaki kotánga maloba na ye, ete bámonisa bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na solo mpe bálala mpɔngi te na elimo. (Emoniseli 3:2, 3) Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Makambo oyo nasalaka emonisaka nini? Misala na ngai emonisaka ete kondima na ngai ezali na bomoi? Nasalaka makasi mpo namonisa kondima na ngai na makambo nyonso, ata na makambo oyo etaleli mosala ya kosakola to makita te?’ (Luka 16:10) Tokoki kotalela makambo mingi, kasi tótalela kaka likambo ya kokutana na mwa baninga, na ndakisa mpo na fɛti ya libala.

Kokutana na mwa baninga

3. Makanisi ya Biblia ezali nini na oyo etali kokutana na baninga mpo na kosepela?

3 Biso nyonso tosepelaka soki babengisi biso tókutana na baklisto mosusu mpo na kolekisa ntango elongo. Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingaka basaleli na ye bázala na esengo. (1 Timote 1:11) Atindaki Salomo akoma likambo oyo na Biblia: “Nazali kolobela esengo mpo ete moto azali na likambo lileki oyo na malamu na nse na moi te, bobele kolya mpe komɛla mpe kosepela. Zambi yango ekozala na ye elongo kati na mosala na ye.” (Mosakoli 3:1, 4, 13; 8:15) Moto akoki kosepela ndenge wana ntango azali kolya na libota to ntango akutani elongo na mwa baninga baklisto.​—Yobo 1:4, 5, 18; Luka 10:38-42; 14:12-14.

4. Moto oyo akani kobengisa bato asengeli kotalela makambo nini?

4 Soki okani kobengisa baninga mpo bólekisa mwa ntango elongo, osengeli kokanisa malamu ndenge oyo makambo ekoleka, ata soki bakozala kaka bato moke mpo na kolya mwa eloko mpe kobɛta masolo. (Baloma 12:13) Osengeli koluka ete “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu,” mpe etambwisama na “bwanya oyo euti na likoló.” (1 Bakolinti 14:40; Yakobo 3:17) Ntoma Paulo akomaki boye: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe. Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku.” (1 Bakolinti 10:31, 32) Wapi mwa makambo oyo esengeli tótyela likebi? Kotalela makambo yango liboso ekosalisa yo moko ná bato oyo okobengisa bómonisa kondima na bino na misala.​—Baloma 12:2.

Ekozala ndenge nini?

5. Mpo na nini moto oyo akoyamba bapaya asengeli kotalela soki asengeli kopesa bango masanga mpe kotya miziki?

5 Bato mingi, ntango babengisi bapaya bamitunaka soki basengeli kopesa bango masanga to te. Tósimba likambo oyo: ezali masanga te nde esalaka ete bapaya básepela. Tóbosana te, Yesu aleisaki ebele ya bato na mampa mpe mbisi. Lisolo yango elobi te ete apesaki bango vinyo atako azalaki na likoki ya kosala yango. (Matai 14:14-21) Soki okopesa bapaya na yo masanga, osengeli kokeba ete ezala mingi koleka te mpe osengeli kobongisa eloko mosusu mpo na baoyo bakomɛla masanga te. (1 Timote 3:2, 3, 8; 5:23; 1 Petelo 4:3) Kebá ete otindika moto moko te ete amɛla eloko oyo ekoki koswa “lokola nyoka.” (Masese 23:29-32) Ezali boni mpo na miziki to banzembo? Soki obongisi kotya mwa miziki osengeli kopona miziki ya malamu, otalela ndenge ebɛtaka mpe maloba na yango. (Bakolose 3:8; Yakobo 1:21) Baklisto mingi bamonaka ete kotya Banzembo ya Bokonzi to koyemba yango ezalaka malamu mingi. (Baefese 5:19, 20) Osengeli mbala na mbala kokeba ete miziki ebɛta makasi te mpo bato básolola malamu mpe ezala makɛlɛlɛ te mpo na bato ya pembeni.​—Matai 7:12.

6. Ndenge nini moto oyo ayambi bapaya akoki komonisa kondima na ye na masolo to na makambo mosusu oyo azali kolendisa?

6 Ntango baklisto bakutani bakoki kolobela makambo ndenge na ndenge, na ndakisa kotánga lisolo moko na mongongo makasi, to kobɛta masolo ya makambo oyo bango moko to mpe bandeko mosusu bakutanaki na yango. Soki ndeko oyo ayambi bapaya amoni ete masolo ebandi kobeba, akoki kosalela mayele mpo na kokɔtisa lisolo mosusu oyo ezali malamu. Asengeli mpe kotika te ete kaka moto moko nde alobaka mpe bamosusu bayokaka ye. Soki amoni bongo, akoki kozwa maloba mpe na mayele nyonso kokɔtisa bato mosusu na lisolo; na ndakisa akoki kosɛnga na bana mike báloba to akoki kobanda lisolo moko oyo ekotinda bato mingi báloba. Na ndenge yango bilenge mpe mikóló bakosepela na bokutani yango. Soki osaleli bwanya mpe mayele mpo na kobongisa makambo, bapaya bakomona ‘ezaleli na yo ya makambo makasimakasi te.’ (Bafilipi 4:5) Bakomona ete omonisaka kondima na yo na makambo nyonso ya bomoi na yo.

Milulu mpe bafɛti ya libala

7. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango tozali kobongisa molulu mpe fɛti ya libala?

7 Libaku oyo tozalaka na yango mpenza ya kosepela ezali ntango ndeko moko abali. Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, ata mpe Yesu ná bayekoli na ye, bazalaki kokende na bafɛti. (Genese 29:21, 22; Yoane 2:1, 2) Nzokande, lelo oyo, kobongisa molulu ya libala mpe fɛti ya libala ekómi kosɛnga milende mpenza mpo ezala na bokatikati mpe eyokana na mitinda ya boklisto. Kasi, yango ezali makambo lokola makambo nyonso ya bomoi ya moto mpe moklisto akoki komonisa kondima na ye na makambo yango.

8, 9. Ndenge nini makambo oyo bato mingi basalaka na mokolo ya libala emonisaka polele oyo 1 Yoane 2:16, 17 elobi?

8 Bato mingi oyo bayebi mitinda ya Nzambe te mpe baoyo bakipaka yango te bamonaka ete fɛti ya libala ezali libaku ya kolakisa mbongo mpe kosala makambo oyo ekokamwisa bato. Na zulunalo moko ya Mpoto, mwasi moko alobaki boye mpo na mokolo ya libala na ye: ‘Tomataki na likalo moko ya kitoko, oyo bampunda minei bazalaki kobenda; makalo 12 ezalaki kolanda yango na nsima ná likalo moko oyo ebendamaki na mpunda moko ememaki bato oyo bazalaki kobɛta miziki. Na nsima, tolyaki bilei ya kitoko mpe batyaki miziki ya kitoko; ezalaki mpenza nsuka ya bisengo. Kaka ndenge nazalaki kokana yango, nazalaki mpenza mokonzi-mwasi mokolo wana.’

9 Atako milulu ya libala esalemaka ndenge moko te bisika nyonso, kozala na makanisi motindo wana ezali komonisa oyo ntoma Yoane akomaki ete: “Eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili​—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—​euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.” Baklisto oyo bakɔmeli na elimo bakoki nde koluka libala na bango esalema lokola ya mokonzi, báluka kosalisa fɛti oyo ekokende nsango? Kutu, makambo oyo bakosala esengeli nde komonisa ete babosani te likanisi oyo elobi ete “moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoane 2:16, 17.

10. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete babalani bámibongisa soki balingi ete fɛti na bango ezala na bokatikati? (b) Babalani basengeli kosala nini mpo na kopona bato oyo bakobengisa?

10 Baklisto basengeli kolekisa ndelo te mpe kozala makambo makasimakasi te; mpo na yango, Biblia ekoki kosalisa bango. Atako mokolo ya libala ezalaka mokolo ya ntina mingi, bayebaka ete yango ezali kaka ebandeli ya bomoi ya baklisto mibale oyo baponi kofanda lokola mwasi ná mobali mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko. Eloko moko te ezali kosɛngisa bango básala fɛti ya monene. Soki basepeli kosala fɛti mpo na libala na bango, bakotánga naino motuya mpe bakotalela soki fɛti yango ekozala ndenge nini. (Luka 14:28) Biblia elobi ete na libala, mobali nde azali mokonzi. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:22, 23) Na yango, mobali nde azali nkolo fɛti. Ya solo, akosolola na mwasi na ye mpo bápona banani bakobengisa. Ekozala mpasi bábengisa baninga mpe bandeko na bango nyonso; yango wana ekosɛnga ete bázwa bikateli oyo ebongi. Babalani bakotya motema ete soki bakoki kobengisa baklisto mosusu te, baklisto yango bakoyeba komitya na esika na bango mpe bakomona yango mabe te.​—Mosakoli 7:9.

“Mokambi ya fɛti”

11. Mokumba nini “mokambi ya fɛti” azalaka na yango?

11 Soki babalani basepeli kosala fɛti na mokolo ya libala na bango, ndenge nini bakoki komindimisa ete makambo ekotambola malamu? Banda bambula mwa mingi, Batatoli ya Yehova, balandaka ebongiseli moko oyo ezalaki na fɛti ya libala oyo Yesu akendaki na Kana. Na fɛti yango ezalaki na “mokambi ya fɛti”; na ntembe te azalaki moninga moko oyo bakokaki kotyela motema. (Yoane 2:9, 10) Ndenge moko mpe, mobali akopona moklisto moko oyo akɔmeli na elimo mpo na kopesa ye mokumba wana ya ntina mingi. Mokambi ya fɛti asengeli koyeba mposa ya babalani mpe ndenge oyo balingi makambo etambola, akolandela yango liboso fɛti ebanda mpe ntango ezali kosalema.

12. Makambo nini mobali asengeli kotalela na oyo etali masanga?

12 Na boyokani na likambo oyo tolobelaki na paragrafe 5, babalani mosusu bamonaka malamu ete masanga ezala te na fɛti na bango noki te bato mosusu bálangwa mpe bábebisa fɛti. (Baloma 13:13; 1 Bakolinti 5:11) Kasi, soki basepeli kotya masanga, mobali asengeli kozwa bibongiseli mpo bato bámɛla na kolekisa ndelo te. Na fɛti ya libala oyo Yesu akendaki na Kana, vinyo ezalaki mpe Yesu abakisaki vinyo mosusu ya kitoko koleka. Kutu, mokambi ya fɛti alobaki ete: “Moto nyonso abimisaka vinyo oyo eleki kitoko liboso, mpe ntango bato balangwe, oyo ya kitoko mingi te. Yo obombi vinyo oyo eleki kitoko tii sikoyo.” (Yoane 2:10) Yango emonisi te ete Yesu azalaki kolendisa bato na kolangwa masanga, kutu azalaki koboya yango. (Luka 12:45, 46) Maloba ya mokambi ya fɛti emonisi ete ezalaki na bafɛti mosusu ya libala oyo bato balangwaki. (Misala 2:15; 1 Batesaloniki 5:7) Na yango, mobali mpe moklisto oyo ye aponi mpo azala mokambi ya fɛti basengeli kokeba ete bato nyonso oyo bakozala na fɛti yango bálanda toli oyo: “Bólangwaka vinyo te, na kati na yango misala ya mbindo ezali, kasi bókoba kotonda na elimo.”​—Baefese 5:18; Masese 20:1; Hosea 4:11.

13. Soki babalani baponi kotya miziki na fɛti na bango basengeli kotalela makambo nini mpe mpo na nini?

13 Ndenge moko na bafɛti mosusu, soki batye miziki basengeli mpe kokeba ete ebɛtaka makasimakasi te mpo epekisa bato te kosolola na ndenge ebongi. Nkulutu moko alobaki boye: “Ntango ngonga ebandi kopusana, mpe bato bakómi kosolola to babandi kobina, mbala mingi miziki ekómaka makasi. Ntango mosusu na ebandeli miziki oyo ezalaki kobɛta na nse ekoki kokóma makasi mpe kopekisa bato básolola malamu. Fɛti ya libala epesaka bato libaku ya kokutana mpe kolekisa ntango malamu elongo. Ebongi te ete miziki epekisa bato básolola malamu.” Na likambo yango mpe mobali ná mokambi ya fɛti basengeli te kotika mokumba nyonso na moto oyo azali kotya banzembo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nyonso oyo bokosala na maloba to na misala, bósala nyonso na nkombo ya Nkolo Yesu.” (Bakolose 3:17) Ntango bato oyo bayaki na fɛti ya libala bakozonga epai na bango bakozala na makanisi ete babalani basalaki nyonso na nkombo ya Yesu ata mpe na miziki? Tosengeli koluka ete fɛti na biso emonisa ete tosali nyonso na nkombo ya Yesu.

14. Ntango baklisto bakei na fɛti ya libala, eloko nini esengeli kotikala na makanisi na bango?

14 Ya solo, soki libala ebongisami malamu, bato bakobosana yango te. Adam ná Edyta babalaná esili koleka mbula 30, balobi boye mpo na libala moko oyo bakendaki: “Tomiyokaki mpenza ete tozali na kati ya bandeko baklisto. Ezalaki na banzembo mpo na kokumisa Yehova mpe na masano mosusu ya malamu. Kobina mpe miziki ezalaki na esika ya liboso te. Fɛti yango epesaki biso esengo, elendisaki biso, mpe makambo nyonso esalemaki na kolanda mitinda ya Biblia.” Emonani ete ezali na makambo mingi oyo mwasi ná mobali bakoki kosala na mokolo ya libala na bango mpo na komonisa kondima na bango na misala.

Bakado ya libala

15. Toli nini ya Biblia tokoki kosalela mpo na oyo etali bakado ya libala?

15 Na mikili mingi, baninga mpe bandeko bazalaka na momeseno ya komemela babalani bakado. Soki okani kopesa kado eloko nini osengeli kobosana te? Tóbosana te toli oyo ntoma Yoane apesaki na oyo etali “kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela.” Amonisaki ete ezaleli yango ezali ya baklisto te oyo bamonisaka kondima na bango na misala, kasi ezali nde ya ‘mokili oyo ezali koleka.’ (1 Yoane 2:16, 17) Na kotalela maloba ya Yoane, ezali na ntina te ete babalani bátánga liboso ya bato nyonso nkombo ya moto mokomoko mpe kado oyo apesi. Baklisto ya Masedonia mpe ya Akaya bapesaki bandeko ya Yelusaleme makabo, kasi esika moko te balobi na biso ete batángaki bankombo na bango. (Baloma 15:26) Baklisto mingi oyo bapesaka bakado na mabala basalaka yango kozanga bato báyeba mpo ebenda likebi ya bato te. Mpo na yango tótalela toli ya Yesu oyo ezali na Matai 6:1-4.

16. Na likambo etali bakado ya libala ndenge nini babalani bakoki koboya koyokisa basusu mpasi na motema?

16 Kotánga bankombo ya bato oyo bamemi bakado ekoki ‘kobimisa kowelana’ mpo moto nyonso akoluka koyeba nani aleki baninga to nani apesi kado ya ntalo mingi. Yango wana, babalani basengeli te kotánga bankombo ya bato oyo bapesi bango bakado mpo yango ekoki koyokisa bamosusu nsɔni, mingimingi baoyo ntango mosusu bazalaki na makoki te ya kopesa bango kado. (Bagalatia 5:26; 6:10) Ya solo, ezali mabe te babalani báyeba nani apesi bango kado boye to boye. Bakoki kotánga yango na karte oyo bakotya na kati ya kado kasi bakoyebisa bankombo yango na bato nyonso te. Ntango tozali kosomba, kopesa mpe kozwa bakado ya libala, biso nyonso tozali na libaku ya komonisa kondima na biso ata na makambo wana ya mike.a

17. Mokano nini baklisto basengeli kozala na yango mpo na kondima mpe misala na bango?

17 Komonisa kondima na biso esuki kaka te na kozala na bizaleli malamu, koyanganaka na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Tiká ete mokomoko na biso azala na kondima ya solosolo, oyo emonanaka na makambo nyonso asalaka. Ya solo, tokoki komonisa kondima na biso na misala oyo “ekokisami malamu,” ata na makambo oyo touti kolobela.​—Emoniseli 3:2.

18. Ndenge nini tokoki kokokisa maloba ya Yoane 13:17 na oyo etali molulu mpe fɛti ya libala?

18 Nsima ya kosukola bayekoli na ye ya sembo makolo mpo na kopesa bango ndakisa malamu ya komikitisa, Yesu alobaki na bango boye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoane 13:4-17) Lelo oyo, ekoki kozala na ntina te tósukola makolo ya bato, na ndakisa bapaya oyo bayei epai na biso. Kasi, ndenge tomoni yango na lisolo oyo, ezali na makambo mosusu ya bomoi na biso oyo tokoki kosalela mpo na komonisa kondima na biso na misala ya bolingo mpe na boboto; na ndakisa na makambo oyo etaleli kokutana na baklisto mosusu to milulu ya libala. Tokoki kosala yango ntango tobali to ntango babengisi biso na libala moko to mpe ntango tokutani na baninga baklisto oyo bazali na mokano ya komonisa kondima na bango na misala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makambo mosusu oyo etali milulu mpe bafɛti ya libala ezali na lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala.”

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini okoki komonisa kondima na yo:

• ntango ozali kobongisa mwa bokutani mpo na kolekisa ntango elongo na baninga?

• ntango ozali kobongisa molulu to fɛti ya libala

• ntango ozali kopesa to kozwa kado ya libala?

[Elilingi na lokasa 24]

Ata ntango obengisi kaka bato moke, salelá “bwanya oyo euti na likoló”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto