Lisolo ya bomoi
Yehova akokisi mposa na ngai ya kozala misionɛrɛ
Ya Sheila Winfield da Conceição
Misionɛrɛ moko, oyo autaki na Afrika mpe ayaki na lisangá na biso, ayebisaki biso ete na teritware na bango moto nyonso ayambaka ye mpe ayokaka na likebi mpenza nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nalobaki na motema ete: ‘Nakosepela mpenza kosakola na teritware ya ndenge wana!’ Atako nazalaki kaka na mbula 13, lisolo ya misionɛrɛ wana epesaki ngai mposa ya kokóma misionɛrɛ.
NZOKANDE, libota na biso ebandaki koyekola makambo ya Yehova liboso mpenza. Mokolo moko na ntɔngɔ, na 1939, bilenge mibali mibale oyo balataki kitoko babɛtaki monɔkɔ ya ndako na biso na engumba Hemel Hempstead, pene na engumba Londres, na Angleterre. Bazalaki Batatoli ya Yehova. Ngai nazalaki kaka na mbula moko, yango wana nayebi te makambo oyo balobaki. Mpo na kobengana bango, mama ayebisaki bango ete tata akokaki kosepela koyoka bango, kasi azali te mpe akozonga na ngonga ya 9 na butu. Kasi, akamwaki komona ete bilenge yango bayaki lisusu kaka na butu ya mokolo wana! Ntango tata na ngai, Henry Winfield, asololaki na bango mpe amonaki ete bakɔtaka na makambo ya politiki to ya ekólo te, akɔtisaki bango na ndako mpe andimaki koyekola Biblia na bango. Akolaki nokinoki na elimo mpe azwaki batisimo. Mwa bambula na nsima, mama na ngai, Kathleen, abandaki mpe koyekola. Azwaki batisimo na 1946.
Na 1948, nabandaki komipesa mingi na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Namonaki ete nasengeli kozala na montrɛ mpo natángaka malamu bangonga oyo nazali kolekisa na mosala ya kosakola. Soki ngai ná baleki na ngai tosali mobulu te, na mokolo ya pɔsɔ bazalaki kopesa biso moto na moto mwa mbongo ya ebende ya makuta motoba. Pene na mbula mibale mobimba, nazalaki kobomba mbongo na ngai mpo nasomba montrɛ ya mwa ntalo moke. Kasi Ray, leki na ngai ya nsuka, azalaki ntango nyonso kosɛnga tata apesaka ye bibende mibale ya makuta misato misato. Mokolo moko, atingamaki tata akabolela ye mbongo na ye kaka na bibende mibale mpe tata asilikaki. Ray abandaki kolela mpe alobaki ete alingaki bápesaka ye bibende mibale mpo na sɛkɛlɛ moko kati na ye ná Yehova. Nsukansuka, Ray ayebisaki ete: “Ngai moko nalyaka makuta misato mpe natyaka misato mosusu na kɛsi ya makabo.” Mama alelaki na esengo, tata alukelaki ye nokinoki bibende mibale ya makuta misato mpe ngai namonaki ntina ya kopesaka makabo mpo na kotombola mosala ya Bokonzi.
Na ntango wana, tata azwaki bibongiseli mpo tókende kofanda epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Na 1949, atɛkaki ferme na ye ná libulu na ye ya zɛlɔ mpe akómaki mobongisi-nzela, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso. Ngai nazwaki batisimo mwa 24 Sɛtɛmbɛ 1950, mpo na komonisa ete namipesi na Yehova. Banda wana, na ntango ya konje nazalaki kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe kolekisa ngonga 100 na sanza na mosala ya kosakola. Kasi, wana ezalaki kaka ebandeli. Mosika te, nakómaki na mposa makasi ya komipesa lisusu mingi mpo na kotombola losambo ya solo.
Mposa ya kokóma misionɛrɛ
Na 1951, batindaki tata na engumba Bideford, na Nɔrdi ya etúká ya Devon. Ntango tokómaki kuna, mwa moke na nsima misionɛrɛ moko oyo autaki na Afrika ayaki na lisangá na biso, ndenge nalobaki na ebandeli. Kobanda wana, mikano nyonso oyo nazalaki kozwa ezalaki na boyokani na mposa na ngai ya kokóma misionɛrɛ. Na eteyelo, balakisi bayebaki mokano na ngai mpe bazalaki kosala nyonso mpo bábongola ngai makanisi, mpo nalanda mosala moko ya mosuni. Mokolo nasilisaki kelasi, nakɔtaki na biro ya balakisi mpo na kotɔnda bango mpe kopesa bango mbote ya nsuka mpe moko na bango alobaki na ngai ete: “Longonya! Na kati ya bana-kelasi nyonso, kaka yo nde oyebi nini okosala na bomoi. Tozali kolikya ete okokokisa mokano na yo.”
Mosika te, nazwaki mosala moko oyo nazalaki kosala kaka ndambo ya mokolo, mpe mwa 1 Desɛmbɛ 1955, nakómaki mobongisi-nzela. Na nsima, mama ná baleki na ngai bakómaki mpe babongisi-nzela. Na yango, na boumeli ya ebele ya bambula, biso nyonso tozalaki babongisi-nzela.
Nakei Irlande
Mbula moko na nsima, basɛngaki ngai nakende kosala na Irlande. Nabandaki kopusana mokemoke pene na kokokisa mokano na ngai ya kokóma misionɛrɛ. Na sanza ya Febwali ya 1957, ngai ná babongisi-nzela mosusu mibale, June Napier mpe Beryl Barker, tokómaki na engumba Cork, na sudi ya Irlande.
Ezalaki pɛtɛɛ te kosakola na Irlande. Lingomba ya Katolike ezalaki kotɛmɛla biso makasi. Liboso ya kokɔta na buludingi to na lopango moko ya bandako ebele, tozalaki naino kotala soki tokozwa nzela ya kokima soki balandi biso. Tozalaki kobomba bavelo na biso mwa mosika, kasi mbala mingi bazalaki komona yango mpe kokatakata bapine na yango to kobimisa yango mopɛpɛ.
Mokolo moko, ntango ngai ná Beryl tozalaki kotala bato na kati ya lopango moko ya bandako ebele, bilenge ebele babandaki kofinga biso mpe kobamba biso mabanga. Tokɔtaki na butiki moko oyo ezalaki na ndako ya moto moko boye, esika bazalaki kotɛka miliki. Ebele ya bato bayaki kotondana na libándá. Lokola Beryl azalaki kolinga miliki mingi, amɛlaki kɔpɔ mibale to misato ya miliki malɛmbɛmalɛmbɛ, na elikya ete bato yango bakokende. Kasi, bazalaki kokende kaka te. Na nsima, sango moko akɔtaki na butiki yango. Lokola akanisaki ete tozali bapaya, atunaki biso soki tokosepela alakisa biso mboka. Akɔtisaki biso naino na eteni mosusu ya ndako yango mpe kuna, tofandaki nyɛɛ mpe tozalaki kotala ye ndenge azalaki kopesa mobange moko oyo alingaki kokufa mafuta ya bakɔni. Na nsina, tobimaki na ndako yango elongo na sango. Ntango bato yango bamonaki biso tozali kotambola elongo na sango mpe kosolola na ye, bapanzanaki.
Nakei Gileadi
Na 1958, liyangani Mokano ya Nzambe, oyo esangisaki bato ya mikili mingi, esengelaki kosalema na engumba New York. Tata asengelaki kokende, ngai mpe nazalaki na mposa ya kokende, kasi nazalaki na mbongo te. Kasi, nkɔkɔ na ngai ya mwasi akufaki liwa moko ya mbalakaka mpe atikelaki ngai dolare 280. Nzokande, nasengelaki kaka na dolare 180 mpo na kokende na liyangani; mpe nakendaki mbango kosomba tike.
Mwa moke na nsima, ndeko moko oyo autaki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Angleterre ayaki kotala biso mpe asɛngaki babongisi-nzela minene nyonso oyo bazalaki kokende na liyangani bátondisa lokasa mpo na Gileadi, Eteyelo ya société Watchtower mpo na kobongisa bamisionɛrɛ. Nandimaki te! Apesaki bandeko nyonso nkasa ya kotondisa, longola kaka ngai, mpo nazalaki mwana moke. Nasɛngaki ye apesa mpe ngai, mpe nayebisaki ye ete lokola nasilaki kotika mboka na biso mpe nazalaki kosakola na mboka mopaya, nazali kaka lokola misionɛrɛ. Lokola amonaki ete nazalaki na ekateli makasi, apesaki ngai mpe lokasa yango. Nabondelaki makasi mpo bándima ngai! Eyano eyaki noki mpenza: babengaki ngai na Gileadi.
Nazwaki libaku malamu ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 33 ya Eteyelo ya Gileadi elongo na babongisi-nzela mosusu 81 oyo bautaki na bikólo 14. Sanza mitano ya mateya elekaki noki mpenza. Ntango tokómaki pene na kosilisa, ndeko Nathan Knorr asalelaki biso lisukulu moko ya ngonga minei, mpo na kolendisa biso. Alendisaki baoyo bakolinga kotikala minzemba básala yango. (1 Bakolinti 7:37, 38) Kasi, mpo na baoyo bazalaki na mposa ya kobala, alobaki ete bákoma makambo oyo bakoluka komona epai ya bato oyo bakolinga kobalana na bango. Soki na nsima moto amonani, okotala kaka soki akokisi makambo yango to te.
Ngai nakomaki boye: Mobali oyo akobala ngai asengeli kozala misionɛrɛ lokola ngai mpe kolinga Yehova makasi, asengeli koyeba Biblia koleka ngai, kondima tóbota kaka nsima ya Armagedona mpo tókoba na mosala ya ntango nyonso, asengeli koyeba Lingelesi malamu mpenza mpe kozala mokóló na ngai. Yango esalisaki ngai mingi, ngai elenge ya mbula 20 oyo nalingaki kokende na teritware ya mosika mpenza.
Nakei Brésil
Mwalomingo, 2 Augusto 1959, tosilisaki kelasi mpe bayebisaki biso bipai tokokende. Batindaki ngai na Brésil elongo na Vehanouch Yazedjian, Sarah Greco, Ray Hatfield ná mwasi na ye Inger, Sonia Springate mpe Doreen Hines. Tosepelaki makasi. Nazalaki kokanisa ete kuna ezalaka kaka bazamba, banyoka, banzete ya ndembo mpe Ba-Indiens. Kasi, ntango nakómaki kuna, nakamwaki mpenza! Na esika ya zamba ya Amazone, namonaki Rio de Janeiro, engumba moko ya moi makasi mpe kitoko, oyo ezalaki mboka mokonzi ya Brésil na ntango wana.
Etumba ya monene oyo tozalaki na yango ezalaki ya koyekola Portugais. Na sanza ya liboso, tozalaki koyekola ngonga 11 na mokolo. Nsima ya kosakola na Rio mpe kofanda mwa mikolo na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, batindaki ngai na ndako ya bamisionɛrɛ na engumba Piracicaba, na etúká ya São Paulo, mpe na nsima na ndako ya bamisionɛrɛ ya engumba Porto Alegre, na etúká ya Rio Grande do Sul.
Na nsima, na ebandeli ya 1963, babengaki ngai nakende kosala na biro ya filiale lokola mobongoli ya mikanda. Floriano Ignez da Conceição, oyo alakisaki biso monɔkɔ ya Portugais ntango tokómaki na Brésil, azalaki mokɛngɛli ya Departema yango. Ayekolaki solo na 1944, ntango Brésil mobimba ezalaki kaka na Batatoli soki 300, mpe akɔtaki na kelasi ya mbala ya 22 ya Gileadi. Nsima ya mwa basanza, ndeko Conceição asɛngaki ngai mokolo moko ete soki midi ebɛti nabima naino te, mpo alingi kosolola na ngai. Liboso, nabangaki mpe nabandaki komituna soki nasali likambo moko ya mabe. Ntango ngonga ebɛtaki mpo tókende kolya, natunaki ye ayebisa ngai likambo yango. Atunaki ngai boye: “Okosepela nabala yo?” Natikalaki monɔkɔ polele. Nasɛngaki ye atikela ngai ntango nakanisa malamu mpe nakimaki mbangu na ndako ya kolya.
Floriano azalaki mobali ya liboso te oyo alingaki ngai. Kasi, tii na ntango wana, mobali moko te akokisaki masɛngami na ngai mpo na mobali oyo akoki na ngai. Namonaka mpenza ete masɛngami yango esalisaki ngai mpo nazwa ekateli ya mabe te. Na mbala oyo, nazwaki mpenza mobali oyo nazalaki koluka. Foriano akokisaki masɛngami yango nyonso! Na yango, tobalanaki mwa 15 Mai 1965.
Mitungisi ya nzoto
Atako ngai ná Floriano tokutanaki na mikakatano, libala ememelaki biso esengo monene. Moko ya mikakatano yango ezalaki maladi ya Floriano, oyo ebandaki mwa moke liboso tóbalana. Mwa bambula liboso, mimpululu na ye ya lobɔkɔ ya mwasi etikaki kosala, mpe yango ekómaki kotungisa ye mingi. Mpo na yango, tobimaki na Betele mpe batindaki biso babongisi-nzela minene na engumba Teresópolis, na mokili ya ngombangomba ya etúká ya Rio de Janeiro. Tozalaki na elikya ete mipɛpɛ kitoko oyo ezalaka kuna ekosilisa maladi yango.
Longolá yango, na sanza ya Desɛmbɛ 1965, nazwaki nsango ete maladi ya kanser ezali kotungisa mama makasi. Ngai ná mama tozalaki kotindelana mikanda mingi, kasi namonaki ye te mbula nsambo mobimba. Na yango, afutelaki biso tike mpe tokendaki kotala ye na Angleterre. Basalaki mama lipaso, kasi minganga balongaki te kolongola kanser yango. Atako azalaki kobɛla makasi mpe azalaki kaka kolala na mbeto, azalaki kaka na mposa ya kosakola. Azalaki na masini ya kokoma mikanda na ndako na ye ya kolala mpo bato mosusu bábɛtɛlaka ye mikanda na ye. Azalaki mpe kopesa bato oyo bazalaki koya kotala ye mwa litatoli. Akufaki mwa 27 Novɛmbɛ 1966. Na sanza yango, apesaki lapolo ya mosala ya kosakola ya ngonga zomi! Tata atikalaki kaka mobongisi-nzela tii ntango akufaki na 1979.
Nsima ya liwa ya mama, ngai ná Floriano tozongaki na Brésil, epai tozali tii lelo oyo na etúká ya Rio de Janeiro. Bapesaki biso liboso mokumba ya kotala masangá na mboka mokonzi, kasi toumelaki mingi te, mpo Floriano akómaki lisusu kobɛla makasi. Tozongaki kosala lokola babongisi-nzela minene na engumba Teresópolis.
Na 1974, nsima ya konyokwama ebele ya bambula, minganga balongolaki Floriano mimpululu yango oyo ebebaki. Na ntango wana, akokaki lisusu kosala te lokola mokɛngɛli-mokambi na lisangá mpe mobongisi-nzela monene, kasi azalaki koyekola na bato Biblia na bangonga oyo bato ya libándá bakɔtaka kotala bato na lopitalo. Moko ya bato yango ezalaki Bob, moto moko ya Amerika oyo azwaki pansiɔ mpe bazalaki koyekola na Lingelesi. Bob andimaki solo mpe na nsima azwaki batisimo. Mokemoke, Floriano abikaki, mpe banda wana, azali mobongisi-nzela tii lelo oyo.
Yehova apamboli ngai na mosala ya kosakola
Nazali mobongisi-nzela monene banda ebele ya bambula, mpe Yehova apamboli ngai mpenza. Na Teresópolis, nazwaki libaku malamu ya kosalisa bato koleka 60 bámipesa na Yehova. Na kati na bango, ezalaki na mwasi moko na nkombo Jupira, oyo nalakisaki mpe kotánga. Na nsima, nayekolaki na bana na ye ya mikóló mwambe. Lelo oyo, Jupira ná bato mosusu koleka 20 ya libota na ye bazali kosalela Yehova. Moko azali nkulutu ya lisangá, misato basaleli na misala mpe mibale bazali babongisi-nzela.
Nayekoli kotalelaka bato nyonso ete bakoki koyekola solo. Mokolo moko, nazalaki koyekola Biblia na mwasi moko na nkombo Alzemira mpe mobali na ye, Antônio, alobaki na ngai ete soki nabimi na ndako na bango te, akotindela ngai mbwa mibale ya minene. Nazalaki kokutana na Alzemira lisusu mpenza te. Soki mbula nsambo na nsima, nasɛngaki Antônio nzela nabanda koyekola na ye lisusu. Andimaki, kasi alobaki na ngai nameka kosolola na ye moko (Antônio) masolo ya Biblia te. Kasi, mokolo moko oyo mbula ezalaki kobɛta, nasɛngaki Antônio aya mpe kolanda mateya. Nayaki koyeba ete azalaki koboya mpo ayebaki kotánga te. Kobanda wana, Floriano ná bandeko mosusu bayekolaki na ye mpe balakisaki ye kotánga. Lelo oyo, ná Alzemira ná Antônio bazwá batisimo. Antônio azali kosunga lisangá mingi mpe abimaka na bilenge mingi na mosala ya kosakola.
Wana kaka mwa ndambo ya makambo ya esengo oyo tokutanaki na yango na boumeli ya mbula koleka 20 oyo tosalaki na Teresópolis. Na ebandeli ya 1988, batindaki biso na teritware mosusu, engumba Niterói, epai tosalaki mbula mitano liboso tókende na engumba Santo Aleixo. Na nsima, tokendaki na lisangá ya engumba Japuíba, na katikati mpenza ya etúká ya Rio de Janeiro mpe tozwaki libaku malamu ya kofungola lisangá ya engumba Ribeira.
Tozali na bozwi te, kasi tozali na esengo mpenza
Na boumeli ya bambula nyonso wana, ngai ná Floriano tosalisi bato koleka 300 bámipesa na Yehova. Lelo oyo bamosusu bazali kosala na biro ya filiale, bamosusu bazali babongisi-nzela, bamosusu bankulutu mpe bamosusu basaleli na misala. Nazali mpenza kotɔnda Nzambe ndenge, na nzela ya elimo santu na ye, apesi biso likoki ya kosalisa ebele ya bato wana!—Malako 10:29, 30.
Ya solo, Floriano azali kotungisama mingi na maladi na ye. Atako bongo, akangami kaka makasi na mosala ya Yehova, azali na esengo mpe na elikya makasi. Mbala mingi, alobaka ete: “Lelo oyo, esengo ekoki kouta te na bomoi ezangi mikakatano. Moto akozala na esengo nde soki Yehova azali kosalisa ye ayikela mikakatano mpiko.”—Nzembo 34:19.
Na 2003, bazwaki ngai na kanser na liso ya mwasi. Basalaki ngai lipaso mpe batyaki ngai liso ya kotya, oyo esɛngaka nasukola yango mbala ebele na mokolo. Atako bongo, Yehova azali kopesa ngai makasi mpo nakoba kosalela ye lokola mobongisi-nzela monene.
Na oyo etali biloko ya mokili, nazali na bomɛngo te. Kasi, Yehova apamboli ngai na teritware na ngai mpe apesi ngai ebele ya bozwi ya elimo. Likambo oyo ndeko mwasi ya misionɛrɛ oyo autaki na Afrika alobaki mpo na mosala ya kosakola kuna ekokani mpenza na oyo tomoni na teritware na biso na Brésil. Ya solo, Yehova akokisi mpenza mposa na ngai ya kokóma misionɛrɛ!
[Elilingi na lokasa 9]
Libota na biso na 1953
[Elilingi na lokasa 9]
Nazali kosakola na Irlande, na 1957
[Elilingi na lokasa 10]
Na Brésil na 1959, elongo na bamisionɛrɛ mosusu. Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai, Inger Hatfield, Doreen Hines mpe Sonia Springate
[Elilingi na lokasa 10]
Ngai ná mobali na ngai