Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/2 nk. 20-25
  • Tolukaki liboso bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolukaki liboso bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosepeli mpo na solo ya Biblia
  • Kokota na mosala ya babongisi-nzela
  • Mosala na biso na boumeli ya bambula ya Etumba
  • Mosala nsima ya Etumba​—mpe Galadi
  • Mosala na biso na Brésil
  • Bomoi moko ya matomba mingi
  • Mbongo epesaka nde esengo ya solosolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Naponaki mosala ya malamu
    Lamuká!—2007
  • Yehova akokisi mposa na ngai ya kozala misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Eloko eleki kitoko mpo na yango napesaki bomoi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/2 nk. 20-25

Tolukaki liboso bokonzi

LISOLÓ YA OLIVE SPRINGATE

Mama azimisaki buzí mpe atikaki ndako na biso ya kolala nsima na koyoka mabondeli na biso. Leki na ngai ya mobali atunaki ngai nokinoki ete: “Olive, ndenge nini Nzambe akoki komona mpe koyoka biso katikati na bifelo oyo esalemi na biliki?”

“MAMA alobi ete Nzambe akoki komona makambo nyonso, ata oyo ezali kati na mitema na biso,” ezali eyano napesaki. Mama na biso azalaki mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe mpe motangi monene ya Biblia, mpe akotisaki kati na biso limemya mozindo mpo na Nzambe mpe mpo na mitinda ya Biblia.

Baboti na biso bazalaki basangani ya Lingomba ya Anglican kati na engumba moke ya Chatham, na etúká ya Kent, na mboka Angleterre. Atako mama azalaki kokende mingi na ndakonzambe, andimaki ete kozala moklisto elimboli makambo mingi, kasi esuki te bobele na kofanda mpe koyoka mateya mapesami kati na ndakonzambe mbala moko na poso. Andimisamaki mpe ete Nzambe asengelaki kozala bobele na lingomba moko ya solo.

Bosepeli mpo na solo ya Biblia

Na 1918, wana nazalaki soko na mibu mitano, mama asombaki búku monene oyo ezalaki na motó na likambo ete Etudes des Ecritures, oyo ekomamaki na Charles T. Russell, prezidá ya liboso ya Watch Tower Bible and Tract Society. Mwa bambula na nsima, wana tozalaki kofanda na esika moke ebéngami Wigmore, mama akutanaki na moko kati na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na ntango wana. Andimaki boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku La Harpe de Dieu, mpe na nzela na yango abandaki komona biyano na mituna mingi ya Biblia oyo azalaki komituna. Poso na poso kalati kitoko oyo ezalaki na mituna minyatami mpo na mokapo moko na moko ezalaki koya na nzela ya pɔ́sita. Kalati yango mpe emonisaki epai wapi kati na búku biyano bikokaki kozwama.

Na 1926, baboti na ngai, leki na ngai ya mwasi Beryl, mpe ngai totikaki Lingomba ya Anglican mpamba te totungisamaki mingi na ntina na bokoti ya lingomba na makambo ya politiki, ezala mpe na ntina na mateya na yango oyo malongobani te. Liteya monene ezalaki oyo ete Nzambe anyokolaka bato mpo na libela kati na lifelo ya mɔ́tɔ. Mama na ngai, oyo azalaki mpenza koluka solo ya Biblia, andimisamaki ete Lingomba ya Anglican ezalaki lingomba ya solo te.

Mwa moke na nsima, lokola eyano na mabondeli ya mama oyo ezalaki kouta na nsé ya motema, mwasi moko na nkombo Jackson, oyo azalaki Moyekoli ya Biblia, ayaki kotala biso. Soko pene na boumeli ya ngonga mibale, alobanaki elongo na mama mpe ngai, koyanoláká na mituna na biso na lisalisi ya Biblia. Tosepelaki mpenza koyekola, kati na makambo mosusu, toyekolaki ete mabondeli na biso masengeli kotindama epai na Yehova Nzambe, Tata ya Yesu Klisto, kasi na Bosato bozangi kolimbolama te. (Nzembo 83:18; Yoane 20:17) Kasi mpo na ngai motuna nakoki kobosana te oyo mama atunaki ezalaki oyo: “Elimboli nini koluka liboso Bokonzi?”​—Matai 6:33, NW.

Eyano oyo eutaki na Biblia ezalaki na bopusi makasi likoló na bomoi na biso. Kobanda na poso wana, tobandaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia mpe koyebisa makambo oyo tozalaki koyekola epai na bato mosusu. Tondimisamaki ete tomoni solo. Mwa basanza na nsima, na 1927, mama azwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ye mpo na kosalela Yehova, mpe na 1930, ngai mpe nazwaki batisimo.

Kokota na mosala ya babongisi-nzela

Libota na biso ezalaki koyangana na lisangá ya Gillingham, oyo esalemaki soko na bato 25. Mingi kati na bango bazalaki basakoli ya ntango nyonso, oyo babéngamaki babongisi-nzela, mpe bango nyonso bazalaki na elikya ya kokende na likoló. (Bafilipi 3:14, 20) Molende na bango ya boklisto ezalaki na bopusi likoló na basusu. Wana nazalaki bobele na mibu 18, nasalaki mosala ya babongisi-nzela mpo na mwa ntango mokuse na Belgique na 1931. Yango epelisaki mposa na ngai mpo na mosala mingi ya Bokonzi. Na ntango wana tozalaki kokende kokabola epai na bakonzi ya mangomba mwa búku Le Royaume, l’espérance du monde.

Na nsima, tata na ngai akómaki kotemela mosala na biso ya boklisto, mpe na ntina na yango, nakendaki na Londres na 1932 mpo na kotanga na eteyelo monene. Na nsima, nazalaki molakisi na boumeli ya mbula minei mpe na boumeli ya ntango wana nazalaki kosangana na lisangá ya Blackheath, lisangá moko kati na masangá bobele minei oyo ezalaki na Londres na ntango wana. Ezalaki na ntango wana nde tobandaki koyoka bansango ya kokangama mpe ya minyoko oyo bandeko na biso baklisto mibali mpe basi bazalaki kozwa na Allemagne oyo eyangelamaki na Hitler mpamba te bazalaki koboya kopesa maboko na milende ya Hitler mpo na etumba.

Na 1938, bobele na sanza oyo nasilisaki kofuta banyongo ya babúku oyo nazwaki, natikaki mosala na ngai mpo na kokokisa mposa na ngai ya kokóma mobongisi-nzela. Ndeko na ngai ya mwasi Beryl abandaki mosala ya babongisi-nzela na Londres bobele na ntango yango, kasi azalaki kofanda na ndako mosusu ya babongisi-nzela. Moninga na ngai ya liboso na mosala ya babongisi-nzela ezalaki Mildred Willett, oyo na nsima abalanaki na John Barr, oyo azali sikawa moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Elongo na basusu kati na etuluku na biso, tozalaki kotambola na vélo mpo na kokende na teritware mpe kolekisa mokolo mobimba kuna, atako mbula ezalaki kobeta mingi.

Etumba ezalaki kosalema bipai nyonso na Mpótó. Bazalaki kolakisa basivili lolenge ya kosalela biloko bikobatelaka bato na mipepe mabe, mpe bibongiseli bikamatamaki mpo na kokimisa bana na bamboka mike ya Angleterre to na bingumba mike soki matáta na ntina na bitumba ebimi. Nazalaki bobele na mbongo moke mpo na kosomba sapato, mpe likoki ya kozwa lisalisi ya mbongo uta na baboti na ngai ezalaki te. Kasi ata bongo Yesu alobaki te ete: ‘Biloko oyo binso bikobakisamela bino soki boluki liboso Bokonzi’ (Matai 6:33, NW) Nazalaki kondima solo ete Yehova akokokisa bamposa na ngai nyonso, mpe asalaki yango mingi mpenza na boumeli ya bambula nyonso wana. Na boumeli ya ntango na bitumba nazalaki na bantango mosusu kobakisa na bilei moke oyo nazalaki na yango bandunda oyo nazalaki kolokota na balabála oyo mituka ezalaki kokweisa. Mpe mbala mingi nazalaki kozwa bilei na kosombitanyáká mikanda na mbuma mpe bandunda.

Leki na ngai ya mwasi Sonia abotamaki na 1928. Azalaki bobele na mibu nsambo wana apesaki bomoi na ye mpo na kosalela Yehova. Sonia alobaki ete atako azalaki naino na eleko wana ya bomwana, mosala ya babongisi-nzela ekómaki mokano oyo amityelaki. Na 1941, mwa moke nsima na komonisa komipesa na ye na kozwáká batisimo kati na mai, akokisaki mokano yango wana ye mpe mama batindamaki lokola babongisi-nzela na Caerphilly, na súdi ya mboka oyo ebéngami Pays des Galles.

Mosala na biso na boumeli ya bambula ya Etumba

Na Sɛtɛ́mbɛ 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe bandeko na biso baklisto mibali mpe basi kati na Grande Bretagne bazalaki kokangama na boloko mpo na bantina bobele moko oyo bakangaki baninga na bango bandimi kati na Allemagne oyo eyangelamaki na Nazi​—mpo na etelemelo na bango ya kozanga kokota na makambo ya mokili mpo na oyo etali kosangana na etumba. Mpepo ya bitumba ebandaki kobwaka babómbi na Angleterre na katikati ya mobu 1940. Butu moko nsima na mosusu, makelele na yango ezalaki kopesa mpasi mingi na matoi, kasi na lisalisi ya Yehova tozalaki na likoki ya kolala mwa moke mpe kozwa makasi mpo na kosangana na mosala ya kosakola na mokolo oyo mokolanda.

Wana ezalaki biso kokende kosakola na teritware na biso mingimingi tozalaki kokuta bobele bandako oyo ebebisamaki. Na Novɛ́mbɛ 1940, bómbi moko ekweaki na ntáká ya bamɛtɛlɛ moke liboso na ndako oyo mingi kati na biso bazalaki kofanda, ebukaki maninisa na biteni mikemike. Ekuke monene oyo ezalaki na ekotelo ebukanaki, mpe mombonda mokweaki. Nsima na kolekisa eteni ya butu oyo etikalaki kati na ebombamelo moko oyo ebongisamaki mpo na kokima masasi oyo mazalaki kouta na mpepo, tokabwanaki mpe tokendaki kofanda na bandako ya Batatoli bakeseni.

Mwa moke na nsima, natindamaki na Croydon, mboka moko pembeni na engumba Londres. Moninga na ngai na mosala ya babongisi-nzela ezalaki Ann Parkin, oyo azalaki ndeko ya Ron Parkin oyo na nsima akómaki motambwisi ya filiale ya Porto Rico. Na nsima nakendaki na Bridgend, na súdi ya Pays de Galles, epai nakobaki mosala na ngai ya mobongisi-nzela, kofandáká na kati ya motuka oyo ebendamaka na bampunda na boumeli ya sanza motoba. Kolongwa kuna tokokaki kotambola na vélo bakilomɛtɛlɛ motoba mpo na kokende na lisangá monene ya penepene oyo ezalaki na Port Talbot.

Na ntango wana bato bakómaki koyina biso, bazalaki kobénga biso ba “conchies” (batemeli ya makanisi na bato). Yango esalaki ete tózala na mikakatano mpo na kozwa ndako ya kofutela, kasi Yehova abatelaki biso lokola alakaki yango.

Na nsima, mwambe kati na biso batindamaki lokola babongisi-nzela monene na Swansea, engumba oyo ezali na libongo kati na súdi ya Pays de Galles. Lokola etumba ezalaki koya sé makasi, yango esalaki ete bázala na makanisi mabe na ntina na biso. Maloba “bato mpamba” mpe “bagoigoi” ekomamaki na efelo ya ndako oyo babongisi-nzela bazalaki kofanda. Botemeli yango eyeisamaki makasi na bansango oyo ekomamaki na bazulunalo oyo ezalaki kokweisa biso na ntina na etelemelo na biso ya kozanga kokota na makambo ya mokili. Na nsuka, nsambo kati na biso, moko nsima na mosusu, batindamaki na boloko. Nalekisaki sanza moko kati na boloko oyo ezalaki na Cardiff na 1942, mpe na nsima ndeko na ngai ya mwasi Beryl mpe alekisaki mikolo kuna. Atako tozalaki bobele na biloko moke na mosuni mpe tonyokwamaki na kotyolama mpe na kopamelama, nzokande tozalaki bazwi na elimo.

Na ntango wana, mama mpe Sonia bazalaki kosala mosala ya babongisi-nzela na Caerphilly mpe bakutanaki na makambo motindo moko. Mpo na mbala ya liboso, Sonia akutanaki na mwasi moko oyo azalaki na mposa ya koyekola Biblia mpe basengelaki kokutana mokolo ya mitano na mpokwa. Sonia akanisaki ete mama akokende elongo na ye, kasi mama alimbwelaki ye ete: “Nazali na moto mosusu oyo nasengeli kotala na mpokwa oyo. Lokola osilaki kolakana na moto wana, osengeli kokende bobele yo moko.” Atako Sonia azalaki bobele na mibu 13, akendeki ye moko, mpe mwasi yango azalaki kokóla malamu na elimo mpe na nsima akómaki Motatoli oyo amipesi.

Mosala nsima ya Etumba​—mpe Galadi

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esukaki na 1945, nazalaki kosala na teritware oyo etangolami kati na Whaley Brigde, na Derbyshire. Na ntɔ́ngɔ́ moko basakolaki ete etumba esili, tokendaki kotala mpe kolendisa bato oyo balembisamaki mpenza na makambo oyo etumba ememaki​—bitike, basi-bakufeli-mibali, mpe baoyo babungisi biteni mosusu ya nzoto.

Mwa basanza na nsima, la Société asengaki bato oyo balingi kokende kosakola na Irlande, na esanga Emeraude. Na ntango wana Batatoli ya Yehova bazalaki bobele soko 140 na Irlande, na yango etalelamaki lokola teritware moko monene mpo na bamisionere. Nsima na mwa basanza, babongisi-nzela monene 40 batindamaki kuna, ngai mpe nazalaki kati na bango.

Nsima na kosala mwa ntango na Coleraine mpe na Cookstown na nɔ́rdi, natindamaki, elongo na baninga mosusu misato, na Drogheda na ngámbo ya ɛ́sti ya libongo. Atako bafandi ya Irlande na momeseno bazalaka bato na esengo mpe bayambi bapaya, kozanga koyokana na ntina na makambo ya losambo ezalaki makasi. Na yango, na boumeli ya mbula mobimba wana, tozalaki na likoki ya kokabola epai na bato bobele mwa mikanda mikosalisaka mpo na boyekoli ya Biblia (ya solo bobele búku moko mpe mwa babúku).

Na boumeli ya mikolo oyo tolekisaki na Drogheda, nazalaki kotambola na vélo longwa na ebokwelo (ferme) moko kino na mosusu wana elenge mosáli moko ya ebokwelo abimaki mbala moko na pembeni ya balabála. Atalaki epai na epai zingazinga na ye, na nsima atunaki ngai na mongongo moko ya nsé ete: “Ozali moko ya Batatoli ya Yehova?” Wana nayanolaki ye ete nazalaki moko na bango, alandaki koloba ete: “Na butu eleki natyanaki ntembe makasi elongo na mobandami na ngai na ntina na bino bilenge basi, mpe tokataki elaká na biso ya kobalana. Azalaki koloba ete bozali ba communistes, lokola ezali koloba yango basángó ya Katolike mpe bazulunalo, kasi namonisaki ye ete ekokaki kozala bongo te, mpo ete bino bokendeke ndako na ndako.”

Napesaki ye mwa búku mpo na kotanga, oyo abombaki kati na libénga na ye, mpe tokamataki ebongiseli mpo na kokutana mpe kosolola mingi na butu, mpamba te alobaki ete: “Soki bamoni ngai kosolola na yo, bakolongola ngai na mosala.” Na butu wana, elongo na mobongisi-nzela mosusu tokutanaki na ye mpe toyanolaki na mituna mingi oyo azalaki na yango. Amonanaki ete andimisamaki ete yango ezalaki solo, mpe alakaki kokóma na ndako na biso na butu mosusu mpo na koyekola makambo mingi. Atikalaki koya te, na yango tokanisaki ete na butu wana ya liboso, moko na bato oyo balekaki wana na vélo bamonaki ye mpe mbala mosusu balongolaki ye na mosala. Mbala mingi tomitunaka soki asilá kokóma Motatoli ya Yehova.

Nsima na koyangana na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Brighton na ngámbo ya súdi ya Angleterre na 1949, mingi kati na biso babyangamaki na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower na Etúká ya New York. Bato 26 bautaki na Grande Bretagne mpo na koyangana na kelasi ya mbala ya 15, oyo bazwaki mapolomi na Yulí 30, 1950, na boumeli ya liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na Yankee Stadium.

Mosala na biso na Brésil

Mbula oyo elandaki natindamaki na São Paulo, na Brésil, moko kati na bingumba oyo eleki na bokóli ya motuya ya bato kati na mokili. Na ntango yango ezalaki bobele na masangá mitano ya Batatoli ya Yehova, kasi sikawa ezali na masangá soko 600! Oyo nde bokeseni na lolenge ya kosala kati na Irlande! Bandako mingi kati na teritware na biso na São Paulo ezalaki bandako minene, oyo ezingamaki na mapango ya bibende elongo na bikuke oyo bibongisamaki malamu mpenza. Tozalaki kobénga nkolo ndako to mwana ya mosala na kobetáká maboko na biso.

Lokola bambula ezalaki koleka, totindamaki na bisika mosusu ya sika. Nazwaki libaku ya kopesa maboko na kosalema ya masangá ya sika na bisika bikeseni kati na etúká ya São Paulo, bakisá lisangá moko na Jundiaí na 1955 mpe mosusu na Piracicaba na 1958. Na nsima, na 1960, ndeko na ngai ya mwasi Sonia akómaki moninga na ngai ya mosala ya misionere, mpe totindamaki na Pôrto Alegre, mboka-mokonzi ya ekólo Rio Grande do Sul. Okoki kokamwa, mpe komituna ete lolenge nini Sonia akómaki na Brésil?

Sonia mpe mama balandaki kosala mosala ya kobongisa nzela elongo na Angleterre nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi na ebandeli ya bambula 1950, mama azwaki lipasó ya kanser, yango esalaki ete makasi na ye ekita mpo na kokende na mosala ya ndako na ndako, atako bongo azalaki na likoki ya kotambwisa boyekoli ya Biblia mpe kokoma mikanda. Sonia akobaki mosala na ye ya mobongisi-nzela, mpe na ntango yango azalaki kosalisa mama. Na 1959, Sonia azwaki libaku ya kosangana na kelasi ya Galadi ya mbala ya 33 mpe atindamaki na Brésil. Na ntango yango, Beryl azalaki kosalisa mama kino kufa na ye na 1962. Beryl na nsima abalaki, mpe ye na libota na ye bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso.

Na Brésil, Sonia mpe ngai tosalisaki bato mingi na komipesa mpe kozwa batisimo. Nzokande, moko na mikakatano oyo ezalaki epai na bafandi mingi ya Brésil ezalaki oyo ya kokomisa libala na Leta. Lokola koboma libala ezali mpasi na Brésil, ezalaki kosalema mingi ete mwasi mpe mobali bafanda elongo kozanga ete babalana. Yango ezalaki kosalema mingimingi wana moko na babalani akabwanaki na mobalani na ye ya liboso oyo abalanaki na ye na boyokani na mibeko.

Mwasi moko na nkombo Eva, azalaki kati na ezalela wana na ntango nakutanaki na ye. Mobali oyo abalaki mpenza ye azalaki komonana lisusu te, mpo na komona ye, tolekisaki liyebisi na radio. Ntango mobali na ye amonanaki, nakendaki elongo na ye na engumba mosusu mpo ete mobali yango atya loboko na búku oyo ekomonisa ete Eva akómi na bonsomi na boye ete akoki kobalana na boyokani na mibeko na mobali oyo azalaki kofanda na ye lokola makango. Na ntango bazalaki kokata likambo, mosambisi atunaki Eva mpe ngai ete tolimbola mpo na nini ye alingaki kobongisa makambo matali libala na ye. Mosambisi akamwaki mpe amonisaki bosepeli na ye ntango tolimbwelaki ye yango.

Na libaku mosusu, nakendeki elongo na moko na Bayekoli na ngai ya Biblia mpo na koluka mokoteli ya likambo na ye. Na libaku oyo lisusu litatoli malamu lipesamaki mpo na libala mpe mibeko na Nzambe na ntina na bizaleli malamu. Na ntango wana koboma libala ezalaki kosenga mbongo mingi, na boye ete mwasi mpe mobali bazalaki koluka mbongo mpo na kofuta basambisi. Kasi mpo na bayekoli wana ya sika ya Biblia esengelaki ete basala bongo. Sonia mpe ngai tozwaki libaku ya kozala batatoli ya libala na bango, mpe na nsima, elongo na bana na bango misato ya mike, toyokaki lisoló mokuse ya Biblia kati na ndako na bango.

Bomoi moko ya matomba mingi

Wana Sonia mpe ngai topesaki bomoi na biso epai na Yehova mpe tokómaki babongisi-nzela, tozalaki na likanisi ete, soki likoki ekozala, mosala ya babongisi-nzela ekokóma mosala ya bomoi na biso mobimba. Tokanisaki soko moke mpenza te na makambo oyo makokaki kobima na bambula na biso oyo ezalaki liboso to na makambo lokola bokono to mikakatano ya mbongo. Nzokande, lokola Yehova alakaki, atikaki biso soko moke te.​—Baebele 13:6.

Ee, kozanga mbongo ezalaki mokakatano oyo tozalaki na yango na bantango mosusu. Na eleko moko boye, moninga na ngai ya mosala mpe ngai tozalaki kolya bobele mampa mike na ndunda lokola bilei ya ntɔ́ngɔ́ na boumeli ya mbula mobimba, kasi tokufaki na nzala te, mpe tozangaki te biloko ya ntina mpo na kobikela.

Lokola bambula ezalaki koleka, makasi na biso mpe ezalaki kokita. Na katikati ya bambula 1980, biso mibale tozwaki lipasó ya makasi oyo ebimisaki mimekamo minene, mpo ete kosangana na biso na mosala ya kosakola ekitaki mpenza. Na Yanuáli 1987, tobyangamaki mpo na kozala basangani ya biro ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Brésil.

Libota na biso monene ya basáli koleka nkóto ezwami na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 140 longwa na São Paulo na bandako moko kitoko, epai tozali koyanta mikanda mikolimbolaka Biblia mpo na Brésil mpe biteni mosusu ya Amerika ya Súdi. Awa tobatelami na bolingo nyonso na basaleli bamipesá ya Nzambe. Ntango ngai nakómaki liboso na Brésil na 1951, ezalaki soko na basakoli 4 000 ya nsango ya Bokonzi, kasi sikawa bazali koleka 366 000! Tata na biso ya makoló oyo atondi na mawa ya solo abakiselaki biso ‘biloko nyonso mosusu’ mpamba te tolukaki liboso Bokonzi na ye.​—Matai 6:33.

[Elilingi na lokasa 22]

Olive elongo na Mildred Willett pene na likalo oyo ezalaki koyebisa lisukúlu ya bato nyonso, na 1939

[Elilingi na lokasa 25]

Olive mpe Sonia Springate

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto