Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/12 nk. 12-16
  • Milende oyo tosalaki mpo na kotikala makasi na elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Milende oyo tosalaki mpo na kotikala makasi na elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosalelaki Yehova na ntango ya epekiseli
  • Tobatelaki kondima ntango tozalaki na bolɔkɔ
  • Mama abimi na bolɔkɔ
  • Bomoi na ntango ya epekiseli
  • Tozali kokoba kobunda etumba ya elimo
  • Nasalelaki Yehova na motema molai uta bolenge na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nayaki koyeba ete makambo ya kozanga bosembo ekosila
    Lamuká!—2011
  • Nazali kokokisa elaka na ngai ya kosalela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/12 nk. 12-16

Lisolo ya bomoi

Milende oyo tosalaki mpo na kotikala makasi na elimo

Ya Rolf Brüggemeier

Mokanda ya liboso oyo nazwaki ntango nazalaki na bolɔkɔ eutaki epai ya moninga moko. Ayebisaki ngai ete bakangaki mpe mama ná leki na ngai Peter Jochen mpe Manfred. Yango esalaki ete baleki na biso ya basi mibale bázanga baboti mpe bandeko. Mpo na nini bakonzi ya Allemagne ya Ɛsti bazalaki konyokola libota na biso? Nini esalisaki biso totikala makasi na elimo?

ETUMBA YA MIBALE YA MOKILI MOBIMBA eyaki kosilisa kimya oyo tozalaki na yango na ntango wana, oyo tozalaki bana mike; tomonaki mpasi ya etumba na miso. Tata akómaki soda ya Allemagne mpe banguna bakangaki ye na etumba mpe babomaki ye. Yango wana, mama Berta asengelaki kobɔkɔla bana motoba, ya mbula moko kino 16.

Lingomba epai mama azalaki esilisaki ye mposa ya kosambela mpe azalaki lisusu kolinga koyoka makambo ya Nzambe te. Kasi, mokolo moko na 1949, Ilse Fuchs, mwasi moko ya mayele mpenza ayaki na ndako kosakwela biso nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Mituna mpe makanisi na ye ebendaki likebi ya mama. Boyekoli ya Biblia epesaki mama elikya.

Kasi, na ebandeli biso bana tozalaki naino kotya ntembe. Banazi mpe Bakoministe bapesaki biso bilaka mingi, kasi bakokisaki yango te. Atako tozalaki kondima lisusu bilaka ya bato te, masolo ya Batatoli oyo bakɔtaki na bakaa ya bakangami mpo baboyaki kokɔta na bitumba esimbaki mitema na biso. Na mbula oyo elandaki, ngai, mama ná Peter tozwaki batisimo.

Manfred, leki na biso ya mobali mpe azwaki batisimo, kasi emonanaki na nsima ete solo ya Biblia efandaki naino na motema na ye te. Ntango Bakoministe bapekisaki mosala na biso na 1950 mpe bapolisi mabe ya Stasi batyaki ye mbamba, alakisaki esika oyo tozalaki kosala makita. Yango nde esalaki ete bákanga mama mpe bandeko na ngai mosusu.

Tosalelaki Yehova na ntango ya epekiseli

Lokola tozalaki na epekiseli, tosengelaki kokɔtisa mikanda na Allemagne ya Ɛsti na mayele. Nazalaki kozwa mikanda na wɛsti ya Berlin epai mikanda na biso epekisamaki te, mpe kokɔta na yango na ngambo mosusu. Nakimaki bapolisi mbala na mbala, kasi na Novɛmbɛ 1950, bakangaki ngai.

Bapolisi ya Stasi batyaki ngai na bolɔkɔ moko na nse ya mabelé oyo ezalaki na maninisa te. Bapekisaki ngai kolalaka na moi mpe na butu bazalaki kosambisa ngai, ata mpe kobɛta ngai. Nazalaki kosolola na libota na ngai te tii na Marsi 1951, na mokolo oyo mama, Peter mpe Jochen bayaki kotala ngai na tribinale. Bakatelaki ngai bolɔkɔ mbula motoba.

Mikolo motoba na nsima, bakangaki Peter, Jochen mpe mama. Na nsima, ndeko moko azwaki leki na ngai ya mwasi Hannelore oyo azalaki na mbula 11 mpe mama nkulutu azwaki Sabine, oyo azalaki na mbula 7. Bapolisi oyo bazalaki kokɛngɛla mama ná bandeko na ngai bazalaki kotalela bango lokola bato mabe, kutu bazalaki kolongola bango nsinga ya basapato. Ntango bazalaki kosambisa bango, bazalaki kotɛlɛma kaka. Bakatelaki bango mpe moto na moto bolɔkɔ ya mbula motoba.

Na 1953, bapesaki ngai ná Batatoli mosusu oyo tozalaki na bango na bolɔkɔ mosala ya kotonga libándá ya pɛpɔ ya basoda, kasi toboyaki. Bakonzi bakabolaki biso na bato mosusu ya bolɔkɔ na boumeli ya mikolo 21, elingi koloba tosengelaki kosala te, kozwa mikanda te mpe kolya moke. Bandeko basi mosusu bazalaki kobomba ndambo ya mampa na bango mpe kokɔtisela biso yango na mayele. Na ndenge wana nde nayebanaki na moko na bango, Anni, mpe tobalanaki nsima ya kobima na bolɔkɔ. Anni abimaki na bolɔkɔ na 1956 mpe ngai na 1957. Mbula moko nsima ya libala na biso, tobotaki mwana na biso Ruth. Peter, Jochen ná Hannelore mpe babalaki kaka na bambula wana.

Pene na mbula misato nsima ya kobima na bolɔkɔ, bakangaki ngai lisusu. Mokonzi moko ya bapolisi asɛngaki nakóma koyebisa bango basɛkɛlɛ na biso. Alobaki boye: “Brüggemeier, kosala motó makasi te. Oyebi malamu ndenge bolɔkɔ ezalaka mpe tolingi te ete ozonga lisusu komona mpasi wana. Okoki kotikala kaka Motatoli, kokoba koyekola mpe koteya Biblia ndenge olingi. Biso tolingi kaka oyebisaka biso makambo nyonso oyo bozali kosala. Kanisá mwasi na yo ná mwana na yo ya moke.” Maloba wana ya nsuka ebulunganisaki ngai. Kasi, nayebaki ete atako nazali na bolɔkɔ, Yehova akobatela libota na ngai malamu kutu koleka ngai moko; mpe abatelaki bango.

Bakonzi basɛngaki Anni na makasi asalaka butu ná moi mpe atikaka Ruth epai ya bato mosusu na boumeli ya pɔsɔ. Anni aboyaki mpe azalaki kosala na butu mpo abatelaka Ruth na moi. Bandeko na biso ya elimo basungaki bango mingi; bapesaki mwasi na ngai biloko ebele mpe akómaki kutu kokaba ndambo. Nasalaki lisusu mbula soki motoba na bolɔkɔ.

Tobatelaki kondima ntango tozalaki na bolɔkɔ

Ntango nazongaki na bolɔkɔ, Batatoli oyo batyaki ngai na bango esika moko bazalaki mpenza na mposa ya koyeba makambo oyo ebimi sika na mikanda. Nazalaki mpenza na esengo ndenge nazalaki koyekola na likebi Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli mpe koyangana na makita ntango nyonso mpo nalendisa bango na elimo!

Ntango tosɛngaki bakɛngɛli bápesa biso Biblia, bayanolaki boye: “Kopesa Batatoli ya Yehova Biblia ezali lokola opesi moto ya bolɔkɔ oyo amesaná kobuka bandako ebende mpo abuka ndako ya bolɔkɔ.” Mokolo na mokolo bandeko oyo bazalaki kokamba biso, bazalaki kopona mokapo moko ya Biblia oyo tosengelaki kotalela. Na boumeli ya miniti ntuku misato oyo bapesaki biso mpo na kotambola na kati ya lopango, tozalaki mpenza te kokipe kominanola to kozwa mopɛpɛ, kasi makanisi na biso ezalaki kaka na mokapo ya mokolo wana. Atako basɛngaki biso tókabawanaka na ntaka ya mɛtrɛ 5 mpe bapekisaki biso kosolola, tozalaki kaka koluka ndenge ya kolekiselana mokapo yango. Soki tozongi na kati ya ndako ya bolɔkɔ, moto na moto azalaki koyebisa makambo oyo ayokaki, wana tozali kotalela mokapo ya mokolo.

Nsukansuka, moto moko afundaki biso mpe balongolaki ngai wana, bakei kotya ngai na esika oyo nazalaki kaka ngai moko. Atako bongo, namonaki mpenza mpasi te, mpamba te na ntango wana nasilaki kokanga ebele ya bavɛrsɛ ya Biblia na motó. Nazalaki kolekisa ntango nyonso wana oyo nazalaki ngai moko na komanyola masolo ndenge na ndenge ya Biblia. Na nsima, bamemaki ngai na bolɔkɔ mosusu. Kuna, mokɛngɛli moko atyaki ngai ná bandeko mosusu mibale esika moko mpe, likambo ya esengo, apesaki biso Biblia. Nsima ya kolekisa nsanza motoba na esika oyo batyaki ngai kaka ngai moko, nazalaki na esengo ya kosolola lisusu masolo ya Biblia na bandeko.

Leki na ngai Peter ayebisaki eloko oyo esalisaki ye ayika mpiko epai azalaki na bolɔkɔ mosusu: “Nazalaki kokanisa ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika mpe nazalaki ntango nyonso komanyola na bavɛrsɛ ya Biblia. Mpo na kolendisana, tozalaki kotunana mituna ya Biblia. Bomoi ezalaki mpenza mpasi. Ntango mosusu bazalaki kotya biso bato 11 na mwa ndako ya mɛtrɛ-kare 12. Tosengelaki kosala makambo nyonso kaka wana: kolya, kolala, kosukola ata mpe kosumba. Tokómaki nkandankanda.”

Leki na ngai mosusu, Jochen, ayebisaki makambo oyo akutanaki na yango na bolɔkɔ. Alobi boye: “Nazalaki koyemba banzembo ya buku na biso ya nzembo oyo ezalaki koyela ngai na motó. Mokolo na mokolo nazalaki komanyola na vɛrsɛ moko oyo nayebi. Nsima ya kobima na bolɔkɔ, nakobaki na momeseno ya koyekola ndenge wana. Mikolo nyonso, nazalaki kotánga mokapo ya mokolo elongo na libota na ngai. Tozalaki mpe kobongisa makita nyonso.”

Mama abimi na bolɔkɔ

Nsima ya mbula mibale na ndambo, mama abimaki na bolɔkɔ. Lokola akómaki na bonsomi, abandaki koyekola Biblia na Hannelore mpe Sabine, mpe kosalisa bango bákóma na kondima makasi. Asalisaki mpe bango báyeba ndenge ya kolonga mikakatano oyo bakoki kokutana na yango na kelasi mpo na kondima na bango. Hannelore alobi boye: “Tozalaki kobanga eloko moko te, mpamba te na ndako tozalaki kolendisana. Boyokani makasi oyo tozalaki na yango na libota, esalisaki biso na mikakatano nyonso oyo tozalaki kokutana na yango.”

Hannelore alobi lisusu boye: “Tozalaki mpe kosunga bandeko na biso oyo bazalaki na bolɔkɔ na bilei ya elimo. Tozalaki kokoma Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mobimba na mabɔkɔ. Na nsima, tozalaki kozinga yango na papye oyo ekoki kopɔla te mpe kotya yango na kati ya liboke ya mbuma oyo tozalaki kotindela bango sanza na sanza. Tozalaki mpenza na esengo soki bandeko bakomeli biso ete bilei ya elimo oyo totindalaki bango ezalaki mpenza ‘elɛngi.’ Tomipesaki mingi na mosala yango. Nakoki koloba ete ezalaki mpenza ntango moko ya esengo.”

Bomoi na ntango ya epekiseli

Peter alobeli bomoi oyo azalaki na yango na boumeli ya mbula zomi ya epekiseli na Allemagne ya Ɛsti. Alobi boye: “Tozalaki kokutana na bituluku mikemike na bandako ya bandeko mpe tozalaki koya mpe kozonga biso nyonso mbala moko te. Nsima ya likita mokomoko, tozalaki koyokana mpo na mbala ya nsima. Tozalaki kosala yango na bilembo mpe na mikanda mpo tozalaki ntango nyonso kobanga bapolisi báyoka biso.”

Hannelore alobi boye: “Mbala mosusu bazalaki kotindela biso bandɛ ya liyangani. Ezalaki esengo mpenza koyoka yango elongo. Tozalaki kokutana na mwa etuluku na biso mpe koyoka mateya yango ya Biblia na boumeli ya ebele ya bangonga. Atako tozalaki komona balobi te, tozalaki kolanda programɛ na likebi mpe kozwa banoti.”

Peter alobi boye: “Bandeko na biso ya bikólo mosusu bazalaki kosala nyonso mpo na kotindela biso mikanda. Na boumeli ya mbula soki zomi liboso efelo ya Berlin ekwea na 1989, bazalaki kobimisela biso mikanda ya makomi mikemike. Bandeko mosusu batyaki mituka, mbongo ata mpe bonsomi na bango na likama mpo na komema mikanda na Allemagne ya Ɛsti. Na butu moko, tozalaki kozela ndeko moko ná mwasi na ye, kasi bayaki te. Bapolisi bazwaki bango na mikanda mpe bakangaki motuka na bango. Atako ezalaki likama, totikaki te kosala mosala yango mpo tófanda kimya.”

Leki na ngai Manfred, oyo atɛkaki biso na 1950, ayebisaki eloko oyo esalisaki ye azongela kondima na ye mpe abatela yango. Alobi boye: “Nsima ya kosala mwa basanza na bolɔkɔ, nakendaki na Allemagne ya Wɛsti mpe natikaki solo. Na 1954, nazongaki na Allemagne ya Ɛsti. Na mbula oyo elandaki nabalaki. Mosika te, mwasi na ngai andimaki solo mpe na 1957 azwaki batisimo. Na nsima, lisosoli na ngai ekómaki kotungisa ngai mpe na lisalisi ya mwasi na ngai nazongaki na lisangá.

“Bandeko oyo bayebaki ngai liboso natika solo bayambaki ngai na esengo lokola nde likambo moko esalamaki te. Bandeko bayambaki ngai na esengo mpe yango esepelisaki ngai mingi. Nazali mpenza na esengo ndenge boyokani na ngai ná Yehova mpe bandeko na ngai ezongi.”

Tozali kokoba kobunda etumba ya elimo

Biso nyonso na libota tosalaki mpenza milende mpo na kotikala makasi na elimo. Leki na ngai Peter alobi ete: “Lelo oyo, ezali na makambo mingi oyo ekoki kobenda biso. Na ntango ya epekiseli tozalaki kosepela kaka na oyo tozalaki na yango. Na ndakisa, moko te na kati na biso azalaki kopona azala na etuluku boye to boye ya boyekoli kaka mpo na esengo, mpe moto moko te azalaki komilelalela mpo makita esalemaka mosika to ebandaka na butu makasi. Biso nyonso tozalaki koya na makita na esengo, atako bamosusu kati na biso basengelaki kozela tii na ngonga ya 11 na butu mpo na kozonga.”

Na 1959, mama akendaki na Allemagne ya Wɛsti elongo na Sabine oyo azalaki na mbula 16. Lokola bazalaki na mposa ya kosala na esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi, biro ya Batatoli ya Yehova etindaki bango na engumba Ellwangen, na etúká ya Baden-Württemberg. Sabina akómaki mobongisi-nzela ntango akómaki na mbula 18 mpo amonaki molende oyo mama azalaki na yango atako akómaki kobɛla. Ntango Sabine abalaki, mama akómaki na mbula 58. Atako bongo, ayekolaki kotambwisa motuka mpo amipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Akobaki na mosala wana tii ntango akufaki na 1974.

Ngai moko, nsima ya kolekisa mbula soki motoba na bolɔkɔ oyo nakɔtaki mpo na mbala ya mibale, bamemaki ngai na Allemagne ya Wɛsti na 1965, kozanga ete libota na ngai báyeba. Kasi na nsima, mwasi na ngai Anni ná mwana na biso ya mwasi Ruth balandaki ngai kuna. Nasɛngaki biro ya filiale tokenda kosala epai mposa ya basakoli ezali makasi, mpe bayebisaki biso tókende na engumba Nördlingen, na etúká ya Bavaria. Kuna nde epai Ruth ná ndeko na ye Johannes bakolaki. Anni akómaki mobongisi-nzela. Ndakisa malamu na ye etindaki Ruth akóma mobongisi-nzela ntango kaka asilisaki kelasi. Bana na biso nyonso mibale babalá babongisi-nzela. Lelo oyo, babotá mpe tozwi bankɔkɔ motoba.

Na 1987, nasɛngaki pansiɔ ya mbalakaka mpo nakóma mpe mobongisi-nzela lokola mwasi na ngai. Mbula misato na nsima, babengaki ngai na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Selters mpo napesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga bandako mosusu mpo na koyeisa Betele monene. Nsima na yango, topesaki mabɔkɔ mpo na kotonga Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na engumba Glauchau, na ngámbo oyo ezalaki liboso Allemagne ya Ɛsti, mpe baponaki biso mpo tobongisaka ndako yango ebeba te. Lokola tozalaki lisusu nzoto malamu te, tozongaki esika mwana na biso ya mwasi azali, na lisangá ya Nördlingen, epai tozali babongisi-nzela.

Nazali mpenza na esengo ndenge bandeko na ngai ya mibali ná ya basi, mpe bato mingi ya libota na biso, bazali kokoba kosalela Yehova, Nzambe na biso oyo aleki malamu. Na boumeli ya bambula nyonso wana, tomoni ete soki totikali kaka makasi na elimo, tokomona bosolo ya maloba ya Nzembo 126:3: “[Yehova] asalaki makambo minene minene mpo na biso; biso mpe tosepeli na yango.”

[Elilingi na lokasa 13]

Mokolo ya libala na biso, na 1957

[Elilingi na lokasa 13]

Ngai ná libota na ngai na 1948: (Na molɔngɔ ya liboso, banda na lobɔkɔ ya mwasi) Manfred, Berta, Sabine, Hannelore, Peter; (na molɔngɔ ya nsima, banda na lobɔkɔ ya mwasi) ngai ná Jochen

[Bililingi na lokasa 15]

Buku ya makomi mikemike oyo tozalaki kosalela na epekiseli mpe radio oyo “bapolisi” bazalaki kosalela mpo na koyokaka biso na mayele

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Forschungs- und Gedenkstätte NORMANNENSTRASSE

[Elilingi na lokasa 16]

Ngai ná bandeko na ngai: (banda na molɔngɔ ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi) Hannelore ná Sabine; (banda na molɔngɔ ya nsima na lobɔkɔ ya mwasi) ngai, Jochen, Peter ná Manfred

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto