Nazali kokokisa elaka na ngai ya kosalela Nzambe
LISOLO YA FRANZ GUDLIKIES
Na kati ya basoda koleka nkama oyo tozalaki, tobikaki kaka basoda minei mpamba. Lokola namonaki ete nalingi kokufa, nafukamaki mpe nalakaki Nzambe ete, ‘Soki nabiki na etumba, nakosalela yo libela na libela.’
MBULA 54 esili koleka banda nasalaki elaka wana na sanza ya Aprili 1945, ntango nazalaki soda ya ekólo Allemagne. Ezalaki mwa moke liboso Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esila, wana basoda ya ekólo Union soviétique bazalaki koya na mokano ya kokóma tii na engumba Berlin. Basoda na biso bazalaki pene ya engumba Seelow na Ebale Oder, pene na kilomɛtɛlɛ 65 mpo okóma na Berlin. Butu na moi, banguna bazalaki kobɛta mindoki ya makasi oyo esilisaki basoda na biso.
Ezalaki ntango yango nde, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nalelaki mpe nabondelaki Nzambe. Nakanisaki lisusu vɛrsɛ ya Biblia oyo mama na ngai oyo azalaki mondimi, azalaki kotánga mbala mingi: “Béngá ngai na mokolo na mpasi mpe ngai nakobikisa yo, yo mpe okokumisa ngai.” (Nzembo 50:15) Na kati ya mabulu, esika oyo tobombanaki, nazalaki kobanga ete nalingi kokufa, nalakaki Nzambe ndenge ekomami awa na likoló. Ndenge nini nakokisaki elaka yango? Mpe ndenge nini nakómaki soda ya Allemagne?
Nakolaki na ekólo Lituanie
Na 1918, ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki kosalema, Lituanie ezwaki lipanda mpe bakonzi batyaki boyangeli ya demokrasi. Nabotamá na 1925 na etúká ya Memel (Klaïpeda) pene ya Mai Monene ya Baltique. Mbula mingi te liboso ete nabotama, etúká yango ekómaki ya ekólo Lituanie.
Ngai na bandeko na ngai mitano ya basi tokolaki na bomoi ya malamu. Tata azalaki mpenza lokola moninga na biso. Ntango nyonso azalaki kosala makambo elongo na biso. Baboti na biso bazalaki bato ya Église évangélique, kasi bazalaki kokende ndakonzambe te; mama azalaki koboya mpamba te bakonzi ya lingomba yango bazalaki na ezaleli ya liso na nse ya lokasa. Kasi, azalaki kolinga Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia, mpe azalaki kosepela mingi kotánga yango.
Na 1939, Allemagne ebɔtɔlaki mboka oyo tozalaki kofanda na Lituanie. Na nsima, na 1939, nakómaki soda ya Allemagne. Nazokaki na etumba moko, mpe ntango mpota yango ebelaki, nazongaki kobunda na ɛsti. Na ntango yango etumba ebongwanaki mpe basoda ya Union soviétique bazalaki kozongisa basoda ya Allemagne nsima. Ezalaki na ntango yango nde nabikaki na liwa, ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo.
Nazali kokokisa elaka na ngai
Na ntango ya etumba, baboti na ngai bakendaki kofanda na Oschatz, na Allemagne, na sudi-ɛsti ya mboka Leipzig. Ntango etumba esilaki, ezalaki mpasi mpo na koyeba esika bazalaki. Kasi tosepelaki mingi ntango tokutanaki lisusu! Mosika te, na Aprili 1947, ngai na mama tokendaki koyoka lisukulu ya Max Schubert, azalaki Motatoli ya Yehova. Mama andimaki mpenza ete akómi kosambela na lingomba ya solo, ngai mpe nsima ya koyangana na mwa makita nandimaki yango.
Mwa moke na nsima, mama akweaki na esikalie, azokaki bampota oyo etungisaki ye na boumeli ya mwa basanza mpe na nsima akufaki. Na lopitalo liboso akufa, alendisaki ngai na maloba oyo: “Mbala na mbala nazalaki kobondela ete ata mwana na ngai moko ayeba nzela ya Nzambe. Sikoyo namoni ete Nzambe ayokaki mabondeli na ngai, mpe nakoki kokufa na kimya.” Nazali mpenza kozela mokolo oyo mama akosekwa mpe akoyeba ete likambo oyo azalaki kosɛnga na mabondeli na ye ekokisamaki!—Yoane 5:28.
Na mokolo ya 8 Augusto 1947, sanza minei nsima ya lisukulu ya Ndeko Schubert, nazwaki batisimo na liyangani oyo esalemaki na Leipzig mpo na komonisa na miso ya bato ete namipesi na Yehova Nzambe. Nazalaki kosala milende mpo na kokokisa makambo oyo nalakaki Nzambe. Mosika te nakómaki mobongisi-nzela, ndenge babéngaka Motatoli ya Yehova oyo asakolaka ntango nyonso. Na eleko yango babongisi-nzela bazalaki soki 400 na ngámbo oyo na nsima ekómaki République démocratique d’Allemagne, to Allemagne ya Ɛsti.
Kaka na ebandeli, kondima na ngai emekami
Ntango nazalaki na mboka Oschatz, moninga moko ya kartye amekaki kokɔtisa ngai na politiki ya Marxisme. Alobaki na ngai soki nakɔti na Parti socialiste ya Allemagne (SED), Leta akofutela ngai kelasi na iniversite. Naboyaki likabo yango, ndenge Yesu aboyaki likabo ya Satana.—Matai 4:8-10.
Mokolo moko na Aprili 1949, bapolisi mibale bayaki kokanga ngai na esika ya mosala. Bamemaki ngai na biro ya sirete ya ekólo Union soviétique mpe balobaki ete nazali kosala mpo na bikólo ya Mpoto oyo bazali bakapitaliste. Balobaki na ngai ete mpo namonisa ete nayebi likambo te, natika mosala na ngai ya kosakola ndako na ndako te kasi nayebisaka bango moto nyonso oyo alobi mabe mpo na Union soviétique, mpo na SED, to moto nyonso oyo ayei na makita ya Batatoli ya Yehova. Lokola naboyaki kosala yango, batyaki ngai na kasho. Na nsima, nasambaki na tribinale ya basoda. Bakatelaki ngai etumbu ya mbula 15 ya mosala makasi na Sibérie!
Nafandaki nyɛɛ, mpe bakonzi bakamwaki. Na nsima, balobaki na ngai ete etumbu na ngai esili te, kasi nakende na ndako na ngai, bongo nazongaka kuna mbala moko na pɔsɔ kino mokolo nakoyebisa bango ete nandimi kosala ndenge basɛngaki ngai. Lokola nazalaki na mposa ya toli ya Batatoli ya Yehova oyo bakɔmeli na elimo, nakendaki na Magdebourg, epai biro ya la Société Watch Tower ezalaki na ntango wana. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kokende, mpamba te bazalaki kokɛngɛla ngai. Ndeko Ernst Wauer, oyo azalaki kosala na departema ya makambo ya mibeko ya Leta na biro ya la Société Watch Tower na Magdebourg, ayebisaki ngai boye: “Makambo oyo tomonaki na kaa ya bakangami eteyaki biso ete soki obundi, okolonga. Soki owangani Nzambe okolonga te.”a Toli yango esalisaki ngai nakokisa elaka na ngai ya kosalela Nzambe.
Epekiseli mpe bakangi ngai lisusu
Na Yuli 1950, nakómaki mokɛngɛli-motamboli. Kasi, na mokolo ya 30 Augusto bapolisi bakɔtaki na babiro na biso na mboka Magdebourg, mpe mosala ya kosakola epekisamaki. Yango wana, bapesaki ngai mosala mosusu. Ngai na Ndeko Paul Hirschberger tozalaki kotala masangá soki 50, tozalaki kotala lisangá mokomoko na boumeli ya mikolo mibale to misato, kosalisa bandeko bázala na ebongiseli malamu na ndenge oyo basengeli koteyaka na ntango wana ya epekiseli. Na basanza oyo elandaki, mbala motoba nabikaki, mpamba te basoda balingaki kokanga ngai!
Moto moko mabe akɔtaki na lisangá moko mpe afundaki biso na Stasi, elingi koloba bapolisi ya sirete. Bongo, na Yuli 1951, basoda mitano babimelaki ngai na Paul na kati ya balabala na mindoki na bango mpe bakangaki biso. Ntango tokanisaki, tomonaki ete totosaki mpenza malako ya ebongiseli ya Yehova na ndenge oyo esengeli te. Bandeko oyo bazalaki mikóló bapesaki biso toli ete tótambolaka biso mibale nzela moko te. Sikoyo tokɔtaki bolɔkɔ mpo tomityelaki motema na koleka ndelo! Lisusu, toyokanaki te ndenge tokoloba soki bakangi biso.
Ngai moko na kati ya kasho, nazalaki kolela mpe kobondela Yehova asalisa ngai ete nakaba bandeko na ngai te mpe nawangana ye te. Na nsima nalalaki. Nasutukaki mbala moko na mpɔngi ntango nayokaki mongongo ya moninga na ngai Paul. Nzokande biro oyo bazalaki kotuna ye mituna ezalaki kaka likoló ya kasho na ngai. Lokola molunge ezalaki na butu yango mpe mopɛpɛ ezalaki koleka te, bafungolaki biro yango, mpe nazalaki koyoka malɛmbɛ makambo nyonso oyo bazalaki koloba. Na nsima, ntango batunaki ngai mituna, napesaki kaka biyano oyo ye apesaki, yango ekamwisaki bakonzi. Vɛrsɛ ya Biblia oyo mama azalaki kolinga mingi ezalaki kozongela ngai na makanisi mbala na mbala mpe epesaki ngai makasi; vɛrsɛ yango elobi boye: “Béngá ngai na mokolo na mpasi mpe ngai nakobikisa yo, yo mpe okokumisa ngai.”—Nzembo 50:15.
Na nsima ya kotuna biso mituna, batyaki ngai na Paul na bolɔkɔ sanza mitano na Halle mpe na nsima na Magdebourg esika Stasi ezalaki kotya bato oyo bakati naino makambo na bango te. Na Magdebourg, na bantango mosusu nazalaki komona biro na biso oyo ekangamaki. Nazalaki koloba ete sikoyo mbɛlɛ nazali kosala kuna na esika nazala awa na bolɔkɔ! Na Febwali 1952 bakatelaki biso etumbu: “Mbula 10 ya bolɔkɔ mpe mbula 20 ya kozanga lotomo oyo mibeko epesi banamboka.”
Nabatelaki kondima na kati ya bolɔkɔ
Na eleko moko, Batatoli ya Yehova oyo bazwaki etumbu ya bolɔkɔ ya mbula zomi to mpe koleka, bazalaki na elembo oyo ekesenisaki bango na bakangami mosusu. Batongaki eteni ya elamba ya motane na lokolo ya patalo mpe na lobɔkɔ ya kazaka na biso. Lisusu, babakaki mwa eteni ya kartɔ ya motane na ekuke ya kasho na biso mpo na kokebisa bakɛngɛli ete tozali mpenza basali na mabe.
Bakonzi bazalaki mpenza kotalela biso lokola basali na mabe minene. Bapekisaki biso tózala na Biblia mpamba te, ndenge mokɛngɛli moko alobaki: “Motatoli ya Yehova oyo asimbi Biblia akokani na mosali na mabe oyo asimbi mondoki.” Mpo tózwa bavɛrsɛ ya Biblia, tozalaki kotánga mikanda ya Leo Tolstoy, mokomi moko ya Union soviétique, oyo azalaki kokoma bavɛrsɛ ya Biblia mingi na mikanda na ye. Tókangaki bavɛrsɛ yango na motó.
Liboso bákanga ngai na 1951, nalingaki kobala Elsa Riemer. Azalaki koya kotala ngai mbala na mbala na bolɔkɔ mpe mbala moko na sanza, azalaki kotindela ngai mwa liboke ya bilei. Azalaki mpe kokɔtisa bilei ya elimo na kati ya liboke yango. Mokolo moko, atindelaki ngai ba boudin mpe akɔtisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kati. Mbala mingi, bakɛngɛli bazalaki kofungola liboke ya ba boudin mpo bátala soki babombi eloko na kati, kasi mbala oyo bilei ekómaki mwa moke liboso ete mosala esila, bafungolaki yango te.
Na ntango yango, ngai na Karl Heinz Kleber tozalaki kolala na kasho moko moke na bato misato oyo bazalaki Batatoli te. Tokokaki kosala ndenge nini mpo tótánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kozanga ete báyeba? Tozalaki kotya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kati ya buku moko, ntango tozalaki kotánga yango bayebaki te ete tozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tozalaki mpe kopesa bilei yango ya elimo oyo ezali na motuya mingi epai ya Batatoli mosusu na bolɔkɔ.
Ntango tozalaki na bolɔkɔ, soki libaku emonani tozalaki koteya bato mosusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Nasepelaki mingi ntango moninga moko ya bolɔkɔ andimaki mateya na biso mpe akómaki Motatoli.—Matai 24:14.
Nazongeli mosala ya ntango nyonso
Nsima ya kolekisa mbula motoba na bolɔkɔ, nabimaki mokolo ya 1 Aprili 1957. Pɔsɔ mibale ekokaki kutu te, nabalaki Elsa. Ntango Stasi eyokaki ete nabimi na bolɔkɔ, ebandaki koluka motifi mpo bázongisa ngai na bolɔkɔ. Mpo nakima likambo yango, ngai na Elsa tokendaki kofanda na Berlin ya Wɛsti, na Allemagne ya Wɛsti.
Ntango tokómaki na Berlin ya Wɛsti, la Société atunaki biso soki tozali na mokano ya kosala nini. Tolobaki ete moko na biso akozala mobongisi-nzela nde mosusu akosala mosala ya mosuni.
Batunaki biso boye: “Bokanisi boni soki bino mibale bokómi babongisi-nzela?”
Toyanolaki ete: “Soki ekoki kosalema, tokobanda kaka sikoyo.”
Bazalaki kopesa biso mwa mosolo sanza na sanza mpo na kokokisa bamposa na biso, mpe na 1958, tobandaki mosala ya mobongisi-nzela monene. Tozalaki na esengo mingi na komona bato oyo tozalaki koyekola na bango Biblia bazali kobongwana mpe kokóma basaleli ya Yehova! Mbula zomi oyo tosalaki mosala ya mobongisi-nzela monene esalisaki biso tósalaka makambo elongo lokola esengeli kati ya mwasi na mobali. Elsa azalaki ntango nyonso na mopanzi na ngai, ata ntango nazalaki kobongisa motuka. Lisusu, tozalaki kotánga, koyekola, mpe kosala mabondeli elongo.
Na 1969, tobandaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli, tozalaki kotala lisangá moko na boumeli ya pɔsɔ moko mpe kosunga bandeko na bamposa na bango. Josef Barth, ndeko moko oyo aumelaki mingi na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, apesaki ngai toli oyo: “Soki olingi kolonga na mosala na yo, lingá bandeko.” Nasalelaki toli yango. Mpo na yango, tozalaki koyokana malamu na bandeko, yango esalaki ete ezala pɛtɛɛ mpo na kopesa toli na ntango oyo esengelaki.
Na 1972, Elsa abɛlaki kanser mpe basalaki ye lipaso. Nsima ya bambula, akómaki kobɛla mingai. Atako azalaki na mpasi, azalaki ntango nyonso kokende na ngai kotala masangá, koteya elongo na bandeko basi ndenge makoki na ye ezalaki kopesa ye nzela.
Tomimesenisi na makambo ya sika
Na 1984 baboti ya mwasi na ngai bakómaki na mposa ya moto mpo na kobatela bango, na yango totikaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli mpo na kobatela bango tii ntango bakufaki nsima ya mbula minei. (1 Timote 5:8) Na 1989, Elsa abɛlaki makasi. Likambo ya esengo, ayokaki mwa malamu, kasi esengelaki na ngai kosala misala nyonso ya ndako. Nazali kobunda kaka mpo na kobatela moto oyo azali ntango nyonso na maladi. Kasi, atako tozali na mitungisi ndenge na ndenge, bolingo na biso mpo na makambo ya elimo ezali ntango nyonso.
Lelo oyo, tozali kopesa Nzambe matɔndi na ndenge tozali kaka na molɔngɔ ya babongisi-nzela. Kasi, tomoni mpenza ete eloko oyo eleki ntina ezali mikumba na biso te to makambo nini tokoki kosala, kasi kozala ntango nyonso sembo. Tolingi kosalela Nzambe na biso, Yehova, mpo na mwa bambula te, kasi libela na libela. Makambo oyo tokutanaki na yango ezalaki nde kobongisa biso mpo na mikolo ekoya. Mpe Yehova apesi biso makasi ya kosanzola ye ata na ntango oyo tozali na komekama makasi.—Bafilipi 4:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya bomoi ya Ernst Wauer ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1991, lokasa 25 kino 29.
[Elilingi na lokasa 23]
Nakɔtaki bolɔkɔ awa na Magdebourg
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Gedenkstätte Moritzplatz Magdeburg für die Opfer politischer Gewalt; Foto: Fredi Fröschki, Magdeburg
[Elilingi na lokasa 23]
Ntango tobalanaki na 1957
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai na Elsa lelo oyo