Lisolo ya bomoi
Nazali kozela bokonzi oyo ezali “ya mokili oyo te”
Ya Nikolai Gutsulyak
Na boumeli ya mikolo 41, nazalaki na kati ya bolɔkɔ oyo bakangami na yango batombokaki. Mokolo moko, lokito ya masasi elamwisaki ngai na mpɔngi. Mituka ya bitumba ná basoda bakɔtaki na kaa mpo na kobundisa bato ya bolɔkɔ. Bomoi na ngai ekómaki na likama.
NDENGE nini nakómaki na esika ya boye? Tiká nayebisa bino. Likambo yango esalemaki na 1954. Na ntango wana, nazalaki na mbula 30. Lokola ebele ya Batatoli ya Yehova mosusu oyo bazalaki na nse ya boyangeli ya Bakoministe, bakangaki ngai mpo naboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpe mpo nazalaki kosakwela basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Na kati ya bolɔkɔ yango, biso Batatoli tozalaki mibali 46 mpe basi 34. Batyaki biso na kaa moko ya bakangami penepene na mboka Kengir, na katikati ya ekólo Kazakhstan. Tozalaki kuna elongo na ebele ya bakangami mosusu.
Joseph Stalin, oyo azalaki prezida ya Union soviétique, akufaki mbula moko liboso. Bakangami mingi bakanisaki ete guvɛrnema ya sika ekoyoka kolela na bango mpo na kobongisa makambo na bolɔkɔ. Nsukansuka, lokola bayokelaki bango te, batombokaki. Na ntango yango, biso Batatoli toyebisaki batomboki mpe babateli ya bolɔkɔ polele ete tokɔtaka na makambo ya ndenge wana te. Mpo na koboya komikɔtisa na botomboki yango, tosengelaki mpenza kozala na kondima epai ya Nzambe.
Botomboki ebandi
Botomboki ebandaki na kati ya bolɔkɔ mwa 16, na sanza ya mitano. Mikolo mibale na nsima, bato ya bolɔkɔ koleka 3 200 baboyaki kokende mosala mpo bábongisela bango makambo mpe bápesaka bato ya politiki oyo bazalaki bakangami mwa kilo. Makambo eumelaki te kobeba. Liboso, bato ya bolɔkɔ babenganaki bakɛngɛli ya bolɔkɔ mpe batyaki banzelanzela na efelo ya lopango ya bolɔkɔ. Na nsima, babukaki bifelo oyo ezalaki kokabola basi ná mibali mpe bakómaki kofanda esika moko. Na mikolo wana ya yikiyiki, bakangami mosusu kutu babalanaki, mpe basango oyo bazalaki mpe bakangami babalisaki bango. Na ndako misato ya bolɔkɔ epai botomboki esalemaki, mingi kati na bakangami 14 000 bakɔtaki na mobulu yango.
Batomboki baponaki komite moko oyo ekobanda kosolola ná basoda. Kasi mosika te, bango na bango bayokanaki lisusu te, mpe baoyo bamipesaki mpenza na likambo yango bazwaki makambo nyonso na mabɔkɔ na bango. Makambo eyaki ndongo. Mpo na kotya molɔngɔ na ndenge na bango, bakonzi ya batomboki basalaki departema ya basinzili, ya basoda mpe ya bapanzi nsango. Bakambi yango batyaki bikoliseli-lolaka na zingazinga ya lopango ya bolɔkɔ mpe bazalaki koloba makambo oyo ekopelisa lisusu mɔtɔ na mitema ya batomboki. Batomboki bazalaki kopekisa bato ya bolɔkɔ kokima, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kotya motó makasi bitumbu, mpe balobaki polele ete bakoboma moto nyonso oyo basepeli na ye te. Kutu, nsango etambolaki ete basilaki koboma bato mosusu ya bolɔkɔ.
Lokola batomboki bayebaki ete basoda bakokɔtela bango na kati ya bolɔkɔ, bamibongisaki malamu mpo na kobunda na bango. Mpo bakangami mingi bázala na likoki ya kobunda, bakonzi ya batomboki bayebisaki bango nyonso báluka bibundeli. Na yango, balongolaki bibende ya maninisa mpe basalaki na yango bambeli mpe bibundeli mosusu. Basalaki kutu makasi mpe bazwaki mandoki ná babombi.
Balingi kokɔtisa biso na botomboki na makasi
Na ntango wana, batomboki mibale bapusanaki pembeni na ngai. Moko asimbaki mbeli oyo bautaki kopelisa makasi mpe alobaki na ngai ete, “Zwá! Ekosalisa yo.” Nabondelaki Yehova na motema ete asalisa ngai nábanga te. Nayanolaki ye ete: “Nazali moklisto, Motatoli ya Yehova. Ngai ná Batatoli mosusu tokɔtá bolɔkɔ oyo mpo tozali kobunda na bato te, kasi mpo tozali kobunda na bilimo oyo emonanaka te. Bibundeli na biso ezali nde kondima mpe elikya oyo tozali na yango mpo na Bokonzi ya Nzambe.”—Baefese 6:12.
Likambo ya kokamwa, mobali yango aningisaki motó mpo na komonisa ete andimi likanisi na ngai. Nzokande, moninga na ye azipolaki ngai mbata mpe na nsima bakendaki. Batomboki babandaki kotambola na kaa mobima mpo na komeka kokɔtisa Batatoli na makasi na botomboki na bango. Kasi, bandeko nyonso baboyaki.
Komite ya batomboki basalaki likita moko mpo na kotalela likambo yango. Balobaki ete: “Bandimi ya mangomba nyonso bazali kokɔta na botomboki. Kaka Batatoli ya Yehova nde baboyi! Tósala bango nini?” Moko na bango apesaki likanisi ete bátumba Motatoli moko mpo na kobangisa biso. Kasi, mokangami moko oyo azalaki mokonzi ya basoda kala, oyo bakangami mosusu bazalaki komemya mingi, atɛlɛmaki mpe alobaki ete: “Likanisi wana ezali malamu te. Tótya bango nyonso na ndako oyo ezali na nsuka, pene na porte ya lopango. Soki basoda bakɔteli biso na mituka ya bitumba, bango nde bakokufa liboso. Wana makila na bango ekozala na motó na biso te.” Bandimaki likanisi na ye.
Batye biso na esika mabe
Mwa moke na nsima, babandaki kobaluka na lopango mobimba mpe kobelela ete: “Batatoli ya Yehova, bóbima awa!” Bamemaki biso nyonso 80 na ndako moko oyo ezalaki na nsuka ya lopango. Babimisaki bambeto mpo ndako ekóma monene mpe bayebisaki biso tókɔta. Na ndenge yango, tokɔtaki bolɔkɔ na kati ya bolɔkɔ.
Lokola tokokaki kolalaka esika moko ná bandeko basi te, bandeko basi batongaki elamba moko ya molai mpe tosalelaki yango mpo na kokabola ndako yango na biteni mibale: Moko mpo na mibali mpe mosusu mpo na basi. (Na nsima, Motatoli moko ya Russie ayemaki ndako yango, oyo totye awa na nse.) Ntango tozalaki na kati ya ndako yango, tozalaki kobondela mingi elongo mpe kosɛnga Yehova na etingya mpenza ete apesa biso bwanya mpe “nguya oyo eleki makasi.”—2 Bakolinti 4:7.
Na ntango nyonso wana, tozalaki na katikati: batomboki epai, basoda epai. Toyebaki te nini ngámbo boye to boye bakoki kosala. Ndeko moko ya mobange, oyo azalaki moklisto ya sembo mpenza, alobaki ete: “Bómitungisa te, Yehova akosundola biso te.”
Bandeko na biso ya basi, ezala ya bilenge to ya mikóló, bayikaki mpiko mpenza. Moko azalaki na mbula soki 80 mpe azalaki na mposa ya lisalisi mingi. Basusu bazalaki maladi mpe bazalaki na mposa ya lisalisi ya monganga. Na ntango nyonso wana, tosengelaki kotikaka ndako polele, mpo batomboki báyebaka makambo nyonso oyo tozali kosala. Na butu, batomboki wana bazalaki kokɔta na kati ya ndako na biso. Na bantango mosusu, tozalaki koyoka bango bazali koloba ete, “Bokonzi ya Nzambe elali.” Na moi, ntango bazalaki kopesa biso nzela ya kokende na esika ya kolya, tozalaki ntango nyonso kofanda esika moko mpe kobondela Yehova ete abatela biso na bato mabe.
Tozalaki kosala nyonso mpo na kolendisana na elimo. Na ndakisa, mbala mingi ndeko moko azalaki kobɛta lisolo moko ya Biblia na mongongo makasi mpo biso nyonso tóyoka. Na nsima, azalaki komonisa ndenge lisolo yango eyokani na makambo oyo ezalaki kokómela biso. Ndeko moko ya mobange azalaki kolinga mingimingi kobɛta lisolo ya basoda ya Gideona. Azalaki kokundwela biso ete, “na nkombo ya Yehova, mibali 300 oyo basimbaki kaka bibɛtɛlo ya miziki babundaki na basoda 135 000 oyo bazalaki na bibundeli. Bango nyonso 300 bazongaki mpe ata moko te azwaki likama.” (Basambisi 7:16, 22; 8:10) Lisolo wana mpe masolo mosusu elendisaki biso mpenza na elimo. Nautaki kokóma Motatoli sika, kasi kondima makasi ya bandeko mibali mpe basi oyo bakɔmelá na elimo elendisaki ngai mingi. Namonaki mpenza ete Yehova azalaki na biso.
Etumba ebandi
Bapɔsɔ elekaki mpe matata ezalaki se kokóma makasi na kati ya bolɔkɔ. Batomboki ná bakonzi bakómaki kosolola mingi mpo na koluka koyokana. Bakonzi ya batomboki bazalaki kosɛnga ete guvernɛma etinda momonisi na yango aya kokutana na bango. Bakonzi bazalaki kosɛnga batomboki bátosa, bábwaka bibundeli na bango mpe bázongela mosala. Guvɛrnema eboyaki, batomboki mpe baboyaki. Na ntango wana, basoda bazingaki lopango ya bolɔkɔ mpe bazalaki kozela kaka mitindo mpo bákɔta. Batomboki mpe bamibongisaki mpo na kobunda. Bakangaki banzela mpe batondisaki ebele ya bibundeli. Moto nyonso ayebaki ete nsukansuka basoda ná bato ya bolɔkɔ bakondongwana.
Mwa 26 Yuni, lokito ya masasi elamwisaki biso. Mituka ya bitumba ebukaki lopango mpe ekɔtaki na kati ya kaa. Na nsima, basoda babandaki kokɔta mpe kobɛta masasi. Bakangami, ná mibali ná basi, bazalaki kolanda mituka yango mpe koganga “Hurrah!” mpe bazalaki kobamba yango mabanga, babombi oyo bango moko basalaki mpe eloko nyonso oyo bakokaki kozwa. Etumba moko ya makasi ebandaki mpe biso Batatoli tokangamaki na katikati. Ndenge nini Yehova akoyanola na mabondeli oyo tosalaki mpo na kosɛnga ye asalisa biso?
Na mbala moko, basoda bakɔtaki na ndako oyo tozalaki. Balobaki ete: “Basantu, bóbima! Bósala noki, bóbima libándá ya lopango!” Mokonzi ya basoda alobaki na basoda bábɛta biso masasi te, kasi bátikala na biso mpo na kobatela biso. Ntango etumba ezalaki konginda, biso tofandaki na matiti, na pembeni ya kaa. Na boumeli ya ngonga minei, tozalaki koyoka lokito ya babombi, ya masasi, koganga mpe kolela kuna na kati ya kaa. Na nsima, makelele esilaki. Na ntɔngɔntɔngɔ, tomonaki basoda bazali kobimisa bibembe libándá ya kaa. Toyokaki ete bato ebele bazokaki mpe basusu bakufaki.
Mwa nsima, kaka na mokolo yango, mokonzi moko ya basoda oyo nayebaki ayaki esika tozalaki. Atunaki na lolendo nyonso: “Nikolai, nani abikisi bino? Biso to Yehova?” Totɔndaki ye na motema moko na ndenge abikisaki biso, kasi tobakisaki ete, “toyebi ete Yehova, Nzambe na biso Mozwi-ya-nguya nyonso nde atindi yo obikisa biso, ndenge atindaki bato mosusu bábikisa basaleli na ye na ntango ya kala.”—Ezela 1:1, 2.
Mokonzi ya basoda yango ayebisaki biso ndenge basoda bayebaki biso mpe esika oyo tozalaki. Alobaki ete mokolo mosusu, ntango bakutanaki na batomboki, basoda balobaki na batomboki ete babomi bato ya bolɔkɔ oyo baboyaki kokɔta na botomboki. Batomboki bazongisaki ete Batatoli ya Yehova bakɔtaki te na botomboki yango, kasi babomaki bango te. Bapesaki bango nde etumbu. Batyaki Batatoli na bolɔkɔ, bango nyonso ndako moko. Bakonzi ya basoda babosanaki yango te.
Tokangamaki kaka na Bokonzi ya Yehova
Aleksandr Solzhenitsyn, mokomi moko monene ya Russie alobelá botomboki yango na buku na ye (The Gulag Archipelago). Mpo na likambo yango, akomaki ete botomboki ebandaki mpo “tozali na mposa ya bonsomi, . . . kasi nani akopesa biso yango?” Biso Batatoli ya Yehova oyo tozalaki na bolɔkɔ yango tozalaki mpe na mposa ya bonsomi. Nzokande, bonsomi oyo tozalaki koluka ezalaki kaka ya kobima na bolɔkɔ te, kasi bonsomi oyo kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kopesa. Ntango tozalaki na bolɔkɔ, toyebaki ete tosengeli na makasi oyo euti epai ya Nzambe mpo tókangama na Bokonzi na ye. Mpe Yehova apesaki biso nyonso oyo tosengelaki na yango. Asalisaki biso mpe tolongaki kozanga ete tósalela bambeli to babɔmbi.—2 Bakolinti 10:3.
Yesu alobaki na Pilato ete, “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi.” (Yoane 18:36) Na yango, lokola tozali bayekoli ya Yesu, tokɔtaki te na bitumba ya politiki. Tozalaki na esengo mpo, ezala na boumeli ya botomboki mpe na nsima na yango, emonanaki polele epai ya basusu ete biso tokangami kaka na Bokonzi ya Nzambe. Mpo na biso, Solzhenitsyn akomaki boye: “Batatoli ya Yehova bazalaki kolanda na bonsomi mpenza kaka mibeko ya lingomba na bango mpe baboyaki kotonga bisika ya komibomba to kozala basinzili.”
Mobulu wana esalemaki eleki lelo mbula koleka 50. Kasi, nazalaka na botɔndi mpenza soki nakanisi ntango yango, mpamba te nazwaki mateya oyo ekosalisa ngai bomoi na ngai mobimba, lokola kotalela Yehova mpe kotya mpenza motema na lobɔkɔ na ye ya nguya. Ya solo, lokola ebele ya Batatoli mosusu oyo bazalaki na Union soviétique, namonaki na miso ete Yehova asikolaka, abatelaka mpe abikisaka baoyo bazali kozela Bokonzi oyo ezali “ya mokili oyo te.”
[Bililingi na lokasa 9]
Kaa ya bakangami na Kazakhstan epai batyaki biso
[Elilingi na lokasa 10]
Fɔtɔ ya ndako oyo batyaki Batatoli, eteni ya basi
[Elilingi na lokasa 11]
Elongo ná bandeko baklisto, ntango tobimaki na bolɔkɔ