Nazali na botɔndi ndenge nasaleli Yehova, ata na kati ya mikakatano
Lisolo ya Maatje de Jonge-van den Heuvel
NAZALI na mbula 98. Nasaleli Yehova na esengo na boumeli ya mbula 70—kasi kondima na ngai ezangaki komekama te. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakɔtisaki ngai na kaa ya bakangami, epai kolɛmba nzoto etindaki ngai nazwa ekateli oyo epesaki ngai mpasi mingi na nsima. Mwa bambula na nsima, nakutanaki na komekama mosusu ya makasi. Atako bongo, nazali na botɔndi epai ya Yehova ndenge nazwaki libaku ya kosalela ye, ata na kati ya mikakatano.
Bomoi na ngai ebongwanaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1940. Nazalaki kofanda na Hilversum, mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 24 na sudi-ɛsti ya Amsterdam, na Pays-Bas. Ekólo yango ezalaki na nse ya boyangeli ya Banazi. Nabalanaki banda mbula mitano ná Jaap de Jonge, mobali moko malamu, mpe tozalaki na mwana moko kitoko ya mwasi na nkombo Willy; azalaki na mbula 3. Tozalaki kofanda pembeni na libota moko oyo bazalaki babola, mpe oyo bazalaki kobunda mpo na koleisa bana mwambe. Kasi, bafandisaki mpe moto mosusu, elenge mobali moko mpe bazalaki koleisa ye. Nazalaki komituna: ‘Mpo na nini babakisaki mokumba wana mosusu?’ Mokolo moko ntango nakendaki kotikela bango mwa biloko ya kolya, bayebisaki ngai ete elenge mobali yango azalaki mobongisi-nzela. Ayebisaki ngai makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe mapamboli oyo Bokonzi yango ekomema. Makambo oyo ayebisaki ngai esimbaki mpenza motema na ngai, mpe eumelaki te, nandimaki solo. Kaka na mbula yango, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo. Mbula moko nsima ya batisimo na ngai, mobali na ngai mpe andimaki solo.
Atako nazalaki na boyebi mingi te ya Biblia, nakangaki mpenza ntina ete ndenge nakómi Motatoli, nakɔti na ebongiseli moko oyo ezali na nse ya epekiseli. Nayebaki mpe ete Batatoli ebele batindamaki na bolɔkɔ mpo bazalaki kosakola nsango ya Bokonzi. Atako bongo, nabandaki mbala moko kosakola ndako na ndako, mpe ngai ná mobali na ngai tondimaki ete ndako na biso ekóma esika ya koyamba babongisi-nzela mpe bakɛngɛli-batamboli. Ndako na biso ekómaki mpe esika ya kobomba mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo bandeko mibali mpe bandeko basi ya Amsterdam bazalaki komemela biso. Bazalaki kotondisa bavelo na bango na babuku, mpe bazalaki kozipa kapo likoló na yango. Bandeko yango bazalaki mpenza na bolingo mpe na mpiko! Bazalaki kotya bomoi na bango na likama mpo na bandeko na bango.—1 Yoa. 3:16.
“Mama, okozonga kaka sikoyo?”
Sanza soki motoba nsima ya batisimo na ngai, bapolisi misato bayaki epai na biso. Bakɔtaki na ndako mpe babandaki kolukaluka mikanda. Atako bamonaki te armoire oyo etondaki na mikanda, bamonaki babuku mosusu oyo tobombaki na nse ya mbeto na biso. Na mbala moko, basɛngaki ngai nalanda bango na biro ya polisi ya Hilversum. Ntango nayambaki mwana na ngai Willy mpo na kopesa ye mbote ya nsuka, atunaki ngai boye: “Mama, okozonga kaka sikoyo?” Nalobaki ete: “Ɛɛ, bebe na ngai, mama akozonga kaka sikoyo.” Nzokande, sanza 18 ya mpasi elekaki liboso nakoka lisusu komema ye na mabɔkɔ na ngai.
Sikoyo polisi moko akɔtisaki ngai na engbunduka mpo na komema ngai na Amsterdam mpo bátuna ngai mituna. Bato oyo bazalaki kotuna ngai mituna batángelaki ngai nkombo ya bandeko misato ya Hilversum mpe balobaki nayebisa bango soki bazali Batatoli ya Yehova. Nayanolaki boye: “Nayebi bango te, longola kaka moko. Ayaka kotikela biso miliki.” Nakosaki te; ndeko yango azalaki komemela biso miliki. Nabakisaki boye: “Kasi mpo na koyeba soki azali Motatoli ya Yehova, bino moko bótuna ye, bótuna ngai te.” Lokola naboyaki koloba likambo mosusu, babɛtaki ngai na elongi mpe batyaki ngai na ndako moko ya bolɔkɔ; natikalaki kuna sanza mibale. Ntango mobali na ngai ayebaki esika nazalaki, amemelaki ngai mwa bilamba ná biloko ya kolya. Na nsima, na sanza ya Augusto 1941, batindaki ngai na Ravensbrück—kaa moko ya bakangami ya basi oyo ekendaki nsango mpo na ndenge bazalaki konyokola bato kuna; ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 na nɔrdi ya Berlin, na Allemagne.
“Kangá motema, ndeko”
Ntango nakómaki kuna, bayebisaki biso ete bakoki kobimisa biso soki totye sinyatire na mokanda moko oyo emonisi ete towangani kondima na biso. Kasi natyaki sinyatire yango te. Bongo, basɛngaki ngai napesa biloko na ngai nyonso mpe natikala motakala na kikoso moko, epai nakutaki bandeko mosusu ya basi oyo bautaki mpe na Pays-Bas. Bapesaki biso bilamba ya kaa oyo batyá elembo moko ya motane; bapesaki biso mpe saani moko, kɔpɔ moko, ná lutu moko. Na butu ya liboso, batyaki biso na ndako moko ya baleki-nzela. Kuna, mpo na mbala ya liboso banda bakangaki ngai, nalelaki makasi. Nazalaki koganga ete: “Nini ekoyela ngai? Nakotikala awa ntango boni?” Mpo na koloba solo, ntango wana, boyokani na ngai na Yehova ezalaki naino makasi mpenza te, mpo nayebaki solo kaka mwa basanza moke liboso. Nazalaki naino na makambo mingi ya koyekola. Mokolo oyo elandaki ntango bazalaki kobenga biso bankombo, na ntembe te ndeko mwasi moko oyo autaki Allemagne amonaki ete nazali na mawa. Alobaki na ngai ete: “Kangá motema, ndeko, kangá motema! Eloko nini ekoki kosala biso mabe?”
Ntango basilisaki kobenga biso bankombo, bamemaki biso na ndako mosusu; kuna bankama ya bandeko basi mosusu oyo bautaki Allemagne mpe na Pays-Bas bayambaki biso. Bandeko mosusu basilaki kolekisa mbula mobimba na ndako yango. Kozala elongo na bango epesaki ngai makasi—ya solo mpenza, esalisaki ngai nakanga motema. Nakamwaki mpe na komona ete ndako oyo batyaki bandeko na biso ezalaki pɛto mpenza koleka bandako mosusu na kaa yango. Longola yango, ndako na biso eyebanaki mpe ete kuna, moyibi, kofinga, to kobunda ezalaka te. Na bokeseni na bomoi ya mpasi oyo ezalaki na kaa, ndako na biso ezalaki lokola esanga moko ya pɛto na kati ya mbu moko oyo etondi na bosoto.
Bomoi ya mokolo na mokolo na kaa
Bomoi na kaa ezalaki nde kosala mosala makasi mpe kolya moke mpenza. Ezalaki kosɛnga tólamuka na ngonga ya 5 na ntɔngɔ, mpe mwa moke na nsima, bazalaki kobenga biso nkombo. Bakɛngɛli bazalaki kotɛlɛmisa biso pene na ngonga mobimba, ezala mbula ezali kobɛta to moi ezali kongala. Na ngonga ya 5 na mpokwa, nsima ya kosala mosala makasi mokolo mobimba, bazalaki lisusu kobenga biso bankombo. Na nsima, bazalaki kopesa biso mwa supu mpe limpa, mpe tozalaki kokende kolala—tolɛmbi makasi.
Mikolo nyonso, longola kaka mokolo ya lomingo, nazalaki kosala na bilanga epai nazalaki kobuka blé na likwangola, kolongola salite na baterase, mpe kopɛtola bandako ya bangulu. Atako mosala yango ezalaki makasi mpe ya salite, nakokaki kosala yango mokolo na mokolo mpo nazalaki naino elenge mpe na makasi na nzoto. Lisusu, koyemba banzembo oyo ezali na nsango ya Biblia ntango nazalaki kosala ezalaki kopesa ngai makasi. Atako bongo, mokolo na mokolo nazalaki koyoka mposa makasi ya komona mobali mpe mwana na ngai.
Bazalaki kopesa biso bilei moke mpenza, kasi biso nyonso tozalaki kosala makasi tóbomba ata mwa eteni ya limpa mokolo na mokolo mpo tózala na mwa eloko ya kolya na mokolo ya lomingo, ntango tokozwa libaku ya koyangana mpo na kosolola masolo ya Biblia. Tozalaki na mokanda moko te oyo elimbolaka Biblia, kasi nazalaki kosepela mingi koyoka mikóló, bandeko basi ya sembo ya Allemagne, ntango bazalaki kolobela makambo ya elimo. Tosalaki kutu ata Ekaniseli ya liwa ya Kristo.
Nakutani na mpasi, nayoki mawa, mpe nalendisami
Na bantango mosusu, bazalaki kotinda biso tósala misala oyo ezalaki mbala moko kopesa mabɔkɔ na bitumba ya Banazi. Lokola tozalaki kokɔta na makambo ya politiki te, bandeko nyonso ya basi baboyaki kosala mosala yango, mpe ngai nalandaki ndakisa na bango ya mpiko. Lokola etumbu, baboyaki kopesa biso bilei mikolo mingi mpe batɛlɛmisaki biso bangonga mingi liboso bábenga biso bankombo. Mokolo moko, na eleko ya malili, bakangaki biso na ndako mikolo 40 kozanga kotyela biso molunge.
Bazalaki mbala na mbala koyebisa biso Batatoli ya Yehova ete bakobimisa biso na bolɔkɔ mpe bakozongisa biso na ndako soki totye sinyatire na mokanda oyo emonisi ete towangani kondima na biso. Nsima ya kofanda na Ravensbrück mbula mobimba, nalɛmbaki nzoto mpenza. Mposa ya komona mobali mpe mwana na ngai ekómaki makasi mpenza tii nakendaki epai ya bakɛngɛli, nasɛngaki bango mokonda oyo elobaki ete nakozala lisusu Moyekoli ya Biblia te, mpe natyaki sinyatire.
Ntango bandeko basi bayokaki likambo oyo nasalaki, bamosusu bakómaki kokima ngai. Kasi, bandeko mibale ya mikóló, Hedwig ná Gertrud, balukaki ngai mpe bayebisaki ngai ete balingaka ngai kaka. Ntango tozalaki kosala elongo na ndako ya bangulu, balimbwelaki ngai ntina ya kobatela bosembo epai ya Yehova mpe ndenge tomonisaka ete tolingaka ye na koboyáká kobuka mibeko na ye. Komibanzabanza mpe bolingo na bango ya bomama esimbaki mpenza motema na ngai.a Nayebaki ete nasalaki mabe, mpe nalingaki kokende mpo báboma sinyatire yango. Na mpokwa, nayebisaki ndeko moko ete nalingi nakende mpo báboma sinyatire na ngai. Na ntembe te, mokonzi moko ya basoda ayokaki lisolo na biso, mpo kaka na mpokwa yango, na mbalakaka babimisaki ngai na kaa mpe bakɔtisaki ngai na engbunduka mpo nazonga na Pays-Bas. Mokɛngɛli moko ya mwasi—nayebaka elongi na ye tii lelo—alobaki na ngai ete: “Ozali kaka Bibelforscher (Moyekoli ya Biblia), mpe okotikala kaka bongo.” Nazongisaki ete: “Ɛɛ, soki Yehova alingi.” Atako bongo, nakobaki komituna, ‘Ndenge nini nakoki kobongola maloba oyo nalobaki?’
Na esika moko, mokanda yango elobaki boye: “Nandimi ete nakosala lisusu soki moke te mpo na ebongiseli ya Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba.” Nayebaki likambo oyo nakosala! Na sanza ya Yanuali 1943, mwa moke nsima ya kokóma na ndako, nazongelaki mosala ya kosakola. Ya solo, nayebaki ete soki bakonzi ya Banazi bakangi ngai lisusu wana nazali kosakola mpo na Bokonzi ya Nzambe, nakozwa etumbu ya makasi koleka.
Mpo na komonisa Yehova ete nazali mpenza na mposa makasi ya kosalela ye na bosembo, ngai ná mobali na ngai tondimaki ete ndako na biso ezala lisusu esika ya kobomba mikanda mpe kofandisa bakɛngɛli-batamboli. Nazalaki mpenza na esengo ndenge nazwaki libaku mosusu ya komonisa bolingo na ngai mpo na Yehova mpe bato na ye!
Likambo moko ya mpasi
Mwa basanza liboso etumba esila, ngai ná mobali na ngai tokutanaki na likambo moko ya mpasi. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1944, mwana na biso Willy abɛlaki na mbalakaka. Azalaki na maladi moko ya mongongo (diphtérie). Nzoto na ye ebebaki na mbala moko, mpe nsima ya mikolo misato, akufaki. Azalaki na mbula 7 mpamba.
Liwa ya mwana na biso kaka moko epesaki biso mpasi mingi. Ya solo, mikakatano oyo nakutanaki na yango na Ravensbrück ezalaki eloko te soki nakokanisi yango na mpasi oyo nayokaki ntango mwana na biso akufaki. Kasi, na bantango wana ya mpasi, tozalaki ntango nyonso kobɔndisama na maloba ya Nzembo 16:8 oyo elobi ete: “Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso. Lokola ye azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te.” Ngai ná mobali na ngai totyaki motema mobimba na elikya ya lisekwa oyo Yehova apesá biso. Tolendendelaki na kati ya solo mpe tozalaki ntango nyonso na molende na mosala ya kosakola nsango malamu. Tii ntango mobali na ngai akufaki na 1969, asalisaki mpenza ngai nasalela Yehova na botɔndi.
Mapamboli mpe bisengo
Na boumeli ya bambula oyo eleki, likambo moko oyo ezalaki kopesa ngai esengo ntango nyonso ezali kozala penepene na basaleli ya ntango nyonso. Ndenge ezalaki na ntango ya etumba, ndako na biso ezalaki ntango nyonso koyamba bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango ntango bazalaki koya kotala lisangá na biso. Mokɛngɛli-motamboli moko Maarten Kaptein ná mwasi na ye Nel, bafandaki kutu na ndako na biso mbula 13! Ntango Nel akómaki pene na kokufa mpo na maladi na ye, nazwaki libaku ya kosalisa ye na ndako na biso sanza misato tii akufaki. Kozala elongo na bango mpe elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá na biso esalisi ngai nasepela na paradiso ya elimo epai tozali sikoyo.
Likambo moko ya monene oyo eyelá ngai esalemaki na 1995—babengisaki ngai na ekaniseli moko na Ravensbrück. Kuna, nakutanaki na bandeko basi oyo tozalaki na bango na kaa mpe oyo namonaki te mbula koleka 50! Nabosanaka te mokolo wana oyo tokutanaki na bango mpe ezali likambo oyo ebɔndisaka ngai mpe libaku kitoko oyo tozwaki ya kolendisana mpo tókoba kozela mokolo oyo bandeko mpe baninga na biso bakozonga na bomoi.
Na Baroma 15:4, ntoma Paulo alobaki ete “na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” Nazali kopesa Yehova matɔndi na ndenge apesá biso elikya wana, oyo esalisi ngai nasalela ye na botɔndi, ata na kati ya mikakatano.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango wana, lokola bandeko bazalaki kosolola te na biro monene ya Batatoli ya Yehova, bazalaki kosala oyo bakoki ntango bazali kotalela likambo etali koboya kokɔta na makambo ya politiki. Na yango, bandeko nyonso bazalaki kotalela likambo yango ndenge moko te.
[Elilingi na lokasa 10]
Ná Jaap, na 1930
[Elilingi na lokasa 10]
Mwana na biso Willy, na mbula nsambo
[Elilingi na lokasa 12]
Na 1995, nakɔtaki na likita moko oyo elendisaki ngai mingi. Nafandi liboso, moto ya mibale na lobɔkɔ ya mwasi