Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/4 lok. 3
  • Makambo ya mabe lelo oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ya mabe lelo oyo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato balobaka ete Nzambe azali motema mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Makambo ya mabe ekosila?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Nani atindaka bato básala mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/4 lok. 3

Makambo ya mabe lelo oyo

MARÍA azalaki na mbula 64 mpe azalaki kofanda kaka ye moko. Mokolo moko, bakutaki ye akufi na kati ya ndako na ye. Emonanaki ete bato babɛtaki ye mpe bakangaki ye nsinga na nkingo.

Etuluku moko ya bato babɛtaki bapolisi misato, balobaki ete bapolisi yango bayibaki bana mibale. Polisi moko akimaki; bakangaki mibale oyo batikalaki, basopelaki bango esansi mpe batumbaki bango.

Moto moko abengaki na telefone mpo na koyebisa likambo moko ya nsɔmɔ oyo amonaki. Bakundolaki bibembe ya mibali minei oyo bazalaki bapaya. Bamonaki ete bakangaki bato yango bilamba na miso mpe nsinga na mabɔkɔ. Ntango minganga batalaki bibembe yango malamumalamu, bamonaki ete bakundaki bato yango na bomoi.

Makambo nyonso oyo touti kolobela ezali bafilme te. Ezali makambo ya solo oyo euti kosalema mpe balobelaki yango na bazulunalo ya ekólo moko ya Amerika ya Sudi. Kasi, makambo yango ezali kosalema kaka na ekólo wana te, ezali kosalema na mokili mobimba.

Na mokili mobimba, makambo ya mabe ekómi kosalema mokolo na mokolo. Kobwaka babombe, kobomana, bitumba, kobɛta masasi mpe kosangisa nzoto na bato na makasi ezali kaka mwa bandakisa ya makambo yango. Bazulunalo, radio mpe televizyo ezali ntango nyonso kolakisa polele makambo yango mpe bato mingi bayokaka lisusu motema mpasi te ntango bazali koyoka mpe komona makambo ya ndenge wana.

Okoki mpenza komituna, ‘Mpo na nini bato bakómi kosala makambo ya mabe boye? Tokoki nde koloba ete bato bazali lisusu koyokela basusu mawa te mpe bazali lisusu na limemya ata moke te mpo na bomoi?’ Mpo na nini mokili ekómi boye?

Tótalela sikoyo ndakisa ya Harry, mobali moko ya mbula 69 oyo azalaki na maladi ya kanser. Mwasi na ye abɛlaka maladi moko makasi oyo babengi sclérose en plaques, kasi baninga na bango mpe bato mosusu basalisaka bango. Harry alobi boye: “Soki bato oyo bazalaki kosalisa biso te, nayebi te nini tolingaki kosala.” Na Canada, epai Harry afandaka, ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi basalisaka mibange oyo bazali bandeko na bango te. Na ntembe te, oyebi bato mosusu oyo bazalaka na boboto mpe bamibanzabanzaka mpo na basusu. Bato bazali mpenza na likoki ya koyokela basusu mawa mpe komonisela bango boboto na esika ya kosalela bango makambo ya mabe.

Kasi, mpo na nini bato bazali kosala makambo ya mabe? Nini ezali kotinda bango básala bongo? Bato oyo bazali kosala mabe bakoki kobongwana? Makambo ya mabe ekosila? Soki ekosila, ekosalema ndenge nini mpe ntango nini?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa]

Engbunduka: CORDON PRESS

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto