Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Apr.
“Emonani ete makambo ya mabe ekómi kosalema mingi. [Pesá ndakisa ya likambo moko ya mabe oyo esalemaki na esika bofandi to oyo ezali na zulunalo oyo.] Osilá komituna mpo na nini bato bakómi kosala makambo ya mabe mingi boye? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia esakolaki ete mabe ekokola mingi. [Tángá 2 Timote 3:1-5.] Zulunalo oyo epesi eyano na motuna oyo: ‘Makambo ya mabe ekosila?’”
Lamuká! Apr.
“Bato mingi balobaka ete bazali baklisto. Okanisi ete kozala moklisto elimboli mpenza nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Yesu alobaki awa. [Tángá Yoane 15:14.] Lisolo oyo emonisi ete kozala moklisto esuki kaka na maloba te.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 26.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
“Liwa ya mwana epesaka baboti mpasi mingi mpe mpasi yango eumelaka ntango molai. Okanisi ete baboti bakoki kozwa libɔndisi epai wapi? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baloma 15:5.] Zulunalo oyo elobeli mwa ndambo ya makambo oyo Nzambe asalelaka mpo na kobɔndisa baoyo bazali kolela.”
Lamuká! Mai
“Bato mosusu batondi na bozwi, nzokande bamilio ya bato mosusu bazali babola. Okanisi ete likambo yango ekosila mokolo mosusu? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge Nzambe atalelaka babola. [Tángá Nzembo 22:24.] Zulunalo oyo elimboli elikya oyo Biblia epesi mpo na babola.”