Ntango makambo oyo ozalaki kolikya ekokisami te
NA LIBALA nyonso makambo oyo elɛmbisaka nzoto ekoki kobima, ata soki ntango mwasi ná mobali bazalaki naino bafianse bazalaki komona ete bakobanda koyokana malamu. Kasi, nini esalaka ete bato mibale oyo liboso bábalana bazalaki komona ete basalemá moko mpo na mosusu bámona na nsima ete bakeseni mpenza?
Biblia elobi ete baoyo bakobala “bakomona mpasi.” (1 Bakolinti 7:28, Bible na Lingala ya lelo oyo) Mbala mingi, kozanga kokoka nde eyeisaka mpasi yango. (Baloma 3:23) Lisusu, ekoki kozala ete molongani moko to mpe bango mibale bazali kolanda mitinda ya Biblia te. (Yisaya 48:17, 18) Nzokande, makambo oyo bato mosusu oyo balingi kobala bamizelaka na yango, ezalaka mwa mpasi mpo ekokisama ndenge oyo bazalaki kokanisa. Yango ekoki kobimisa matata mpe mikakatano minene.
Bilikya oyo ezali mpasi mpo ekokisama
Ozala mwasi to mobali, na ntembe te liboso obala ozalaki na makambo mwa mingi oyo ozalaki kozela mpo na libala; bato mingi bakanisaka bongo. Kanisá naino lolenge ya bomoi oyo ozalaki kolikya kozala na yango soki obali. Makambo oyo ozali komona na libala na yo ekeseni na ndenge oyo ozalaki kokanisa? Soki ezali bongo, kokanisa te ete makambo ekoki kobonga te. Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa bino bóbongisa makambo.a (2 Timote 3:16) Kasi, ekozala malamu otalela lisusu makambo mosusu oyo ozalaki kolikya liboso obala.
Na ndakisa, bato mosusu bazalaki kokanisa ete ntango bakobala, na libala na bango ekozala kaka lolango na lolango ndenge tomonaka na bafilme ya bolingo. Ntango mosusu yo mpe ozalaki kokanisa ete okobanda kolekisa ntango mingi elongo na molongani na yo mpe soki mwa matata ebimi, bino mibale bokobanda kosala nyonso mpo na kosilisa yango na kimya. Bato mingi bazalaki mpe kokanisa ete soki babali ekozala lisusu na ntina te bázala na komipekisa na makambo etali kosangisa nzoto. Makambo nyonso wana ezali mpasi mpo ekokisama na ndenge oyo moto alingi; yango wana ebimisaka mikakatano mpo na bato mosusu.—Genese 3:16.
Bato mosusu mpe bakanisaka ete bomoi na bango ekokóma na esengo kaka mpo babali. Toboyi te, kozwa moto oyo okofanda na ye bomoi na yo mobimba epesaka esengo mingi. (Masese 18:22; 31:10; Mosakoli 4:9) Kasi, tokoki nde komizela ete libala ezala lokola nkisi oyo ekobanda kosilisa matata nyonso? Moto oyo akanisaka bongo akokamwa mpenza soki makambo esalemi te na ndenge oyo azali kokanisa.
Bilikya oyo moninga ayebi te
Bilikya nyonso te nde ezalaka mpasi mpo ekokisama ndenge oyo moto alingi. Kutu, mosusu ezalaka nde bamposa oyo esengeli mpenza kokokisama. Nzokande, mikakatano ekoki kobima mpo na bilikya mosusu oyo bato bamityelaka. Mopesi-toli moko na makambo ya libala alobaki boye: “Nakutanaka na babalani mosusu oyo bazali na matata mpo molongani moko azali komizela ete mosusu akokisa mposa moko boye oyo azalaki na yango nzokande, ayebisaki yango polele te na molongani na ye.” Tótalela ndakisa oyo elandi mpo na koyeba ndenge oyo likambo yango ekoki kosalema.
Marie abalanaki na David, oyo azalaki kofanda na engumba mosusu. Liboso bábalana, Marie ayebaki ete kokende kofanda na esika mosusu ekozala pɛtɛɛ te mpo na ye, mingimingi mpo azalaka nsɔninsɔni. Kasi, atyaki motema ete mobali na ye David akosalisa ye mpo amesana na bato oyo akokutana na bango kuna. Na ndakisa, Marie azalaki komizela ete David akobanda kozala ntango nyonso pene na ye mpo na kosalisa ye amesana na baninga na ye. Nzokande, ntango babalanaki makambo ezalaki koleka ndenge wana te. Soki David akutani ná baninga na ye azalaki kobɛta masolo mpe kobosana ete mwasi na ye azali naino mopaya. Marie azalaki komiyoka ete bazali kokipe ye te mpe basundoli ye. Azalaki komituna ndenge nini mobali na ye akoki kosala ye bongo?
Tokoki koloba ete Marie azalaki kolikya makambo oyo ezali mpasi mpo ekokisama? Te. Mposa na ye ezalaki kaka ete mobali na ye asalisa ye amesana na esika wana mpe na bato oyo azalaki kokutana na bango kuna. Marie azalaka nsɔninsɔni, mpe liboso ya bato ebele azalaki koyeba te asala nini. Kasi, ayebisaki mposa na ye te epai ya David. Yango wana, David ayebaki te mokakatano oyo Marie azalaki na yango. Kasi, nini ekokaki kosalema soki basilisaki mokakatano yango te? Nsima ya mwa ntango Marie alingaki kobanda komona ete mobali na ye atyelaka ye likebi te.
Ekoki kozala ete yo mpe olɛmbaka nzoto mpe omitungisaka soki omoni ete molongani na yo azali kokokisa bamposa na yo te. Okoki kosala nini na ntango yango?
Yebisá mposa na yo
Ntango makambo oyo tozali kolikya ekokisami te, epesaka mpasi. (Masese 13:12) Kasi, ezali na likambo moko oyo okoki kosala. Biblia elobi ete: “Moto ya mayele akanisaka liboso ya koloba; yango wana maloba na ye ekɔtelaka bato mpenza na kati ya mitema.” (Masese 16:23, Bible na Lingala ya lelo) Na yango, soki omoni ete ezali na likambo moko ya ntina oyo ezali kokokisama te, sololá na molongani na yo.
Luká ngonga, esika, mpe maloba oyo ebongi mpo na koyebisa ye likambo oyo ezali kotungisa yo. (Masese 25:11) Lobá na kimya mpe na limemya nyonso. Kobosana te ete mokano na yo ezali te ya kosambisa molongani na yo, kasi nde ya koyebisa ye ndenge ozali koyoka mpe likambo oyo olingi ete asalela yo.—Masese 15:1.
Mpo na nini ezali na ntina osala yango? Mwasi to mobali oyo atyelaka mpenza molongani na ye likebi akoki te komona bamposa ya molongani na ye? Ekoki kozala ete molongani na yo azali kotalela makambo ndenge mosusu; kasi soki osololi na ye ekosalisa mpo amona makambo ndenge moko na yo. Kosɛnga molongani na yo bófanda mpo oyebisa ye ndenge ozali koyoka elakisi te ete makambo ezali kotambola malamu te na libala na bino to mpe ete molongani na yo akipaka yo te.
Yango wana, kokakatana te mpo na kosolola likambo yango na molongani na yo. Na ndakisa, na lisolo oyo touti kolobela, Marie akokaki kaka koloba na David ete: “Nazali na mokakatano mpo na komesana na ebele ya bato oyo nazali kokutana na bango. Nakosepela mingi soki ozali kosalisa ngai mpo namesana.”
‘Tóyokaka noki’
Tózwa ndakisa mosusu. Kanisá ete molongani na yo ayebisi yo ete azali komitungisa mpo ozali te kokokisa mposa moko oyo azali na yango. Na ntango wana esengeli ete oyoka molongani na yo. Koluka komilongisa te. Kutu, ‘osengeli koyoka noki, kowela koloba te, koyoka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19; Masese 18:13) Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”—1 Bakolinti 10:24.
Okolanda toli yango soki oluki komitya na esika ya molongani na yo. Biblia elobi boye: “Bino mibali, bókoba kofanda [ná basi na bino] mpe ndenge moko engebene boyebi,” to ndenge libongoli ya Phillips elobi yango, “bino mibali bólukaka koyeba malamu basi oyo bofandi na bango.” (1 Petelo 3:7) Ya solo, basi mpe basengeli kosala bongo mpo na mibali na bango.
Kobosana te ete ata soki yo ná molongani na yo boyokanaka na makambo mingi, botalelaka makambo nyonso ndenge moko te. (Talá etanda “Esika moko, kasi etaleli ekeseni.”) Kotalela makambo ndenge oyo moto mosusu azali kotalela yango ezalaka mpe na matomba. Yo ná molongani na yo, mokomoko na bino azalaki na makambo oyo azalaki kolikya mpo na libala, na kotalela ndenge abɔkwamá mpe mimeseno ya esika oyo akolá. Mpo na yango, ekoki kozala ete bolingani makasi, kasi makambo oyo mokomoko na bino azali kolikya mpo na libala ekeseni mpenza.
Na ndakisa, babalani bakoki koyeba etinda ya Biblia mpo na bokonzi. (Baefese 5:22, 23) Kasi, na kati ya libota na bino, ndenge nini mobali akomonisa bokonzi mpe ndenge nini mwasi akotosa ye? Yo ná molongani na yo bolandaka mitinda ya Biblia mpe bosalaka milende mpo na kotosa yango?
Ekoki mpe kozala ete bozali na makanisi ndenge moko te na makambo mosusu ya mikemike. Nani akobanda kosala mosala boye to boye na ndako? Ndenge nini babalani baklisto bakoki komonisa ete bazali kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso? (Matai 6:33) Ezali mpasi te mpo mwasi ná mobali bákɔta banyongo; yango wana kosalela mbongo na mayele ezalaka na matomba mpenza. Kasi, kosalela mbongo na mayele elimboli nini? Esengeli ete babalani básololaka malamu mpe na limemya makambo lokola oyo, mpe bakozwa matomba mingi.
Masolo ya ndenge wana ekoki kosalisa bino bózala na kimya na libala na bino ata soki mokomoko azalaki na bilikya oyo azali komona ete ekokisami te. Na ntembe te, bokozala na likoki ya kolanda toli ya Paulo oyo elobi ete: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”—Bakolose 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota ezali na batoli malamu mingi mpo na babalani; ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
ESIKA MOKO, KASI ETALELI EKESENI
“Kanisá ete etuluku moko ya bato bazali kotala mokili moko kitoko. Atako bango nyonso bazali kotala esika kaka moko, mokomoko na bango azali komona yango na ndenge na ye. Mpo na nini? Moto mokomoko atɛlɛmi na esika na ye. Lisusu, bango nyonso bazali kotya miso na ngámbo moko te. Mokomoko azali na likambo oyo ezali kobenda likebi na ye. Ezali mpe bongo na kati ya libala. Tóbosana likambo oyo te: ata soki bato mibale babongi mpenza mpo na kozala mwasi ná mobali, mokomoko azali na lolenge na ye ya kotalela makambo . . . Kosolola esɛngaka mwasi ná mobali básala milende mpo na koyokanisa makanisi na bango. Yango ezali kosɛnga ete bázwaka ntango mpo na kosololaka.”—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1993, lokasa 4.
[Etanda na lokasa 11]
OYO OSENGELI KOSALA SIKOYO
• Talelá lisusu bilikya na yo mpo na libala. Ezali makambo ya mpasi mpo ekokisama ndenge olingi? Ozali kolinga ete molongani na yo asalela yo makambo oyo eleki makoki na ye?—Bafilipi 2:4; 4:5.
• Soki omoni ete bilikya na yo eleki ndelo, meká kobongisa. Na ndakisa, na esika olobaka ete yo ná molongani na yo bokobanda koyokana na makambo nyonso, omityela mokano ete soki boyokani te, bokobanda kosala makasi mpo na kosilisa likambo na kimya.—Baefese 4:32.
• Sololáká na molongani na yo makambo oyo olingi ete asalela yo. Kosolola ezali sɛkɛlɛ mpo na koyekola komonisana bolingo mpe limemya.—Baefese 5:33.
[Elilingi na lokasa 9]
‘Yokaká noki’ bamposa ya molongani na yo