Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisi Batatoli
MOKOLO ya 11 Yanuali 2007, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme) oyo ezali na engumba Strasbourg, na France, eyebisaki ekateli na yango nsima ya kosambisa likambo ya Batatoli ya Yehova ná ekólo Russie. Ekateli yango elongisaki lotomo ya kosambela mpe lotomo ya kosambisama na bosembo mpo na Batatoli ya Yehova. Kasi, tótalela ndenge likambo yango ebandaki.
Na engumba Tcheliabinsk, na ekólo Russie, ezali na lisangá moko oyo basangani na yango mingi bazali bababa. Bandeko yango bazalaki kofutela ndako ya eteyelo moko mpo na kosala makita. Mokolo moko ya lomingo, mwa 16 Aprili 2000, mwasi moko oyo azali mokambi ya biro oyo etalelaka ntomo ya bato na etúká yango, elongo na bakonzi mibale ya basoda mpe mobali moko oyo alataki bilamba ya basoda te, bakendaki na esika ya makita mpe basɛngisaki Batatoli bákata makita. Bakonzi yango, mingimingi mokambi ya biro ya ntomo ya bato, balobaki ete Batatoli bazali kosala makita oyo mibeko epesi nzela te. Na nsima, mokolo ya 1 Mai 2000, bakataki kɔntra ya kofutela esika ya makita.
Batatoli ya Yehova bafundaki likambo yango epai ya prokirɛrɛ ya engumba Tcheliabinsk, kasi eloko moko esalemaki te. Mibeko ya ekólo Russie mpe Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elobi ete moto nyonso azali na lotomo ya kosambela mpe koyangana. Yango wana, Batatoli bafundaki likambo yango na tribinale ya distriki, mpe na nsima, na tribinale ya etúká mobimba. Lisusu, mwa basanza liboso, na mokolo ya 30 Yuli 1999, ekateli moko ya tribinale monene ya ekólo Russie elobaki ete “na kolanda mibeko ya ekólo Russie oyo etaleli bonsomi ya lisosoli mpe ya kosambela, maloba ‘kozanga epekiseli’ elimboli ete esɛngisami te bato bázwa ndingisa ya bakonzi to báyebisa bango liboso ya kosambela na bandako oyo ebongisami [mpo na yango].” Atako bongo, tribinale ya distriki mpe tribinale ya etúká mobimba elongisaki Batatoli te.
Mokolo ya 17 Desɛmbɛ 2001, Batatoli bamemaki likambo yango liboso ya Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Basambaki mokolo ya 9 Sɛtɛmbɛ 2004. Talá ndambo ya maloba oyo ezalaki na ekateli ya tribinale:
“Tribinale emoni ete bakonzi ya Leta batosaki te lotomo ya kosambela ya Batatoli ya Yehova na ndenge bakataki makita na bango mokolo ya 16 Aprili 2000.”
“Ezali polele ete mobeko moko te epesi ndingisa ya kokata makita ya losambo oyo ezali kosalema na esika oyo bato bazali kofutela na kolanda mibeko.”
“[Tribinale] etaleli ekateli ya tribinale monene ya ekólo Russie oyo emonisi ete esɛngisami te bato bázwa ndingisa ya bakonzi ya Leta to báyebisa bango liboso básala makita ya losambo.”
“Emonani ete bakonzi ya Leta batosaki te Artikle 9 ya Boyokani ya mikili ya Mpoto [bonsomi ya kosambela] na ndenge bakataki makita ya losambo ya bafundi na mokolo ya 16 Aprili 2000.”
“Tribinale emoni ete batribinale ya Russie, epai bamemaki likambo yango liboso, ekokisaki te mokumba na yango . . . ya komonisa ete bayokaki ngámbo nyonso mibale na bosembo mpe kozanga kopona bilongi. Artikle 6 ya Boyokani [lotomo ya kosambisama na bosembo] etosamaki te.”
Batatoli ya Yehova bazali kotɔnda mingi Nzambe mpo asalisi bango bálonga liboso ya Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. (Nzembo 98:1) Ekateli yango ekobongola makambo nini? Joseph Grieboski, mokambi ya ebongiseli moko oyo elandelaka lotomo ya kosambela (Institute on Religion and Public Policy), alobi boye: “Oyo ezali ekateli mosusu ya ntina mingi na oyo etali bonsomi ya losambo na mikili ya Mpoto, mpamba te ekateli ya Tribinale ya Mpoto ekobongola makambo etali bonsomi ya kosambela.”