Codex ezwi esika ya rulo—Ndenge oyo Biblia ekómaki buku
BANDA kalakala, bato bazalaki kosalela biloko ndenge na ndenge mpo na kokoma makambo. Na ntango ya kala, bakomi bazalaki kokoma makambo na bango likoló ya bamonima, mabanga to ya bitanda ya mabaya, mposo ya nyama mpe bongo na bongo. Na ekeke ya liboso, bato ya Moyen-Orient bazalaki kokoma mikanda na bango na rulo. Na nsima, bakómaki kosalela codex, oyo mokemoke ezwaki esika ya rulo, mpe bato ya bipai nyonso bakómaki kosalela yango mpo na kokoma. Esalisaki mpe mingi mpo na kokabola Biblia. Codex ezalaki nini, mpe ebandaki ndenge nini bákóma kosalela yango?
Codex ezalaki lolenge ya libosoliboso ya babuku oyo tozali kosalela lelo oyo. Bazalaki kosala yango na nkasa oyo bagumbi, basangisi esika moko na kati ya mposo moko ya makasi mpe batongi yango. Bazalaki kokoma na ngámbo nyonso mibale ya lokasa mokomoko, mpe bazalaki kotya bizipeli likoló na yango. Ba-codex ya ebandeli ezalaki mpenza lokola babuku ya lelo te, kasi lokola biloko mosusu nyonso oyo bato babimisá, bazalaki kobongisa yango mbala na mbala, na kotalela bamposa ya bato oyo bazalaki kosalela yango.
Mabaya, mafuta mpe mposo ya nyama
Na ebandeli, ba-codex ezalaki kosalema na mwa mabaya oyo bapakoli mafuta mpe bakangisi yango esika moko lokola buku. Na engumba Herculanum, bamonaki mwa babuku ya mabaya, oyo babengaka polyptyque. Engumba yango ebebisamaki elongo na engumba Pompéi ntango Vésuve, ngomba moko ya mɔtɔ, etombokaki na mobu 79 ya ntango na biso (T.B.). Na nsima, batikaki kosalela mabaya mpe bakómaki kosalela nkasa to biloko mosusu oyo ekoki kogumbama. Na monɔkɔ ya Latin, ba-codex to babuku yango ezalaki kobengama membranae, to buku ya mposo ya nyama, mpamba te ezalaki kosalema mingimingi na mposo ya nyama.
Ba-codex mosusu oyo ezali tii lelo oyo esalemaki na papirise. Ba-codex ya baklisto oyo eumeli mingi koleka nyonso, oyo ebatelamaki na mikili ekauká ya bisika mosusu ya Ezipito, esalemaki na papirise.a
Rulo to codex?
Emonani lokola tii pene na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., baklisto bazalaki kosalela mingimingi rulo. Banda na nsuka ya ekeke ya liboso tii na ekeke ya misato T.B., bato oyo bazalaki kosepela na codex ná baoyo bazalaki kosepela na rulo bazalaki kowelana makasi. Na kati ya bato oyo bamesanaki kosalela rulo, baoyo balingaki mbongwana te bazalaki kolinga te kotika makambo oyo bamesanaki kosala ntango bazalaki kotánga. Kasi, tótalela naino nini bazalaki kosala mpo na kotánga rulo. Na momeseno, mpo na kosala rulo, bazalaki kokangisa na kole motángo moko boye ya nkasa ya papirise to ya mposo ya nyama mpo na kokómisa yango lokasa moko ya molai mpe bazalaki kolínga yango. Bazalaki kokoma na ngámbo ya likoló ya lokasa yango, oyo bazalaki kokabola na milɔngɔ. Mpo na kotánga, bazalaki kofungola rulo yango tii na esika oyo balingi kotánga. Nsima ya kotánga, bazalaki kolínga yango lisusu. (Luka 4:16-20) Mbala mingi, mokanda moko ezalaki na barulo ebele, mpe ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosalela yango. Atako kobanda na ekeke ya mibale baklisto bakómaki kosepela kotya Makomami na codex, bato bakobaki kosalela rulo na boumeli ya bikeke mingi. Kutu, bato ya mayele balobaka ete baklisto nde basalaki ete codex ekóma kosalelama mingi.
Matomba ya kosalela codex ezali ebele: codex ekokaki kokɔtisa makambo mingi, kofungola yango ezalaki mpasi te mpe ezalaki kilo te mpo na komema yango. Atako na ebandeli bato mosusu bamonaki matomba wana, mingi bazalaki kokoka te kotika kosalela rulo. Kasi, na boumeli ya bikeke, makambo mingi esalaki ete codex ekóma mokemoke kosalelama mingi.
Na bokeseni na rulo, codex ezalaki kolya nkasa mingi te. Na codex, bazalaki kokoma na ngámbo nyonso mibale ya lokasa, mpe ekokaki kosangisa babuku ebele na volimi kaka moko. Bato mosusu balobaka ete baklisto ná bato oyo batalelaka mibeko bazalaki kolinga codex mingi mpo na kati ya codex ezalaki mpasi te komona esika olingi kotánga. Mpo na baklisto, kozala na buku oyo esangisi makambo mingi esika moko to na mikapo ya Biblia oyo bakoki kosalela ntango nyonso oyo balingi ezalaki na ntina mingi mpo na mosala ya kosakola. Longola yango, codex ezalaki koumela mingi koleka rulo, mpo yango ezalaki na ezipeli, oyo ezalaki kosalema mbala mingi na mabaya.
Ba-codex ezalaki mpe malamu mingi mpo na moto oyo azali kotánga ye moko. Na nsuka ya ekeke ya misato, baklisto bazalaki kosalela mwa ba-codex ya mike ya baevanzile oyo esalemaki na mposo ya nyama. Banda wana, bamiliare ya Babiblia, na mobimba to na ndambo, ebimisamaki na codex.
Lelo oyo, bisaleli mingi lokola baordinatɛrɛ, bakasɛti to badiskɛ mpe mikanda ezali kosalisa bato bázwaka noki mpe kozanga mokakatano maloba ya bwanya oyo ezali na kati ya Biblia. Ezala ozali na Biblia ya ndenge nini, kolisá bolingo na yo mpo na Liloba ya Nzambe, mpe saláká nyonso otángaka yango mokolo na mokolo.—Nzembo 119:97, 167.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Les premiers codex chrétiens,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1963, nkasa 469-473 (na Lifalanse).
[Bililingi na lokasa 15]
Codex esalisaki mingi mpo na kokabola Biblia