Epai ya batángi
TOZALI na esengo ya koyebisa bino ete kobanda na nimero oyo, makambo mosusu ebongwani na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Liboso ya kolobela makambo oyo ebongwani, tólobela naino makambo oyo ebongwani te.
Nkombo ya zulunalo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ebongwani te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokoba kokumisa Yehova, Nzambe ya solo, mpe kobɔndisa bato oyo batángaka yango na nsango malamu ya Bokonzi na ye. Na nimero oyo, masolo oyo ezali na lokasa 5 tii na lokasa 9 elimboli Bokonzi yango mpe emonisi ntango nini ekoya. Lisusu, ndenge esalaka banda mbula koleka nkama, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokoba kolendisa bato bándimela Yesu Klisto, ekokoba koteya solo ya Biblia, mpe kolimbola ndenge makambo oyo ezali koleka na mokili ezali kokokisa bisakweli ya Biblia.
Kasi, makambo nini ebongwani? Tólobela naino mwa makambo ya sika oyo ekobanda kozala na nimero ya liboso ya sanza nyonso.a
Sanza nyonso, ekozala na mitó ya makambo oyo ekobenda mpenza likebi. Motó ya likambo “Oyebaki yango?” ekozala na masolo oyo ekobanda kolimbola makambo oyo ekosalisa motángi ayeba malamu masolo ndenge na ndenge ya Biblia. Motó ya likambo “Pusaná penepene na Nzambe” ekozala na masolo oyo ekolimbola bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyeba makambo mosusu na ntina na Yehova. Motó ya likambo “Mituna ya batángi” ekopesa biyano na mituna oyo bato batunaka mpo na mateya ya Biblia. Na ndakisa, bato mingi batunaka boye: “Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto?” Okozwa eyano na motuna yango na lokasa 13.
Mitó ya makambo mosusu ebongisami mpo na kosalisa mabota. Motó ya likambo “Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo,” ekobima mbala minei na mbula; ekobanda kolobela mikakatano oyo ebimaka na mabota mpe ekomonisa ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa mpo na kosilisa yango. Motó ya likambo “Teyá bana na yo” ekobanda kobima na basanza mosusu mpe ekozala na masolo oyo baboti basengeli kotánga elongo na bana na bango. Motó ya likambo “Mpo na bilenge” ekobanda mpe kobima na basanza mosusu mpe ekozala na masolo oyo bilenge bakoki koyekola bango moko.
Ekozala mpe na mitó ya makambo mosusu oyo ekobanda kobima mbala minei na mbula. Motó ya likambo “Mekolá kondima na bango” ekolendisa biso tólanda ndakisa ya moto moko oyo lisolo na ye ezali na Biblia. Na ndakisa, na lokasa 18 tii lokasa 21, okokuta lisolo moko kitoko oyo elobeli mosakoli Eliya mpe okoyeba ndenge oyo okoki komekola kondima na ye. Na motó ya likambo “Mokanda euti na . . .” ekozala na lisolo oyo misionɛrɛ moko to ndeko mosusu akobɛta. Motó ya likambo “Yesu ateyi biso” ekomonisa mateya ya ebandeli ya Biblia na maloba ya pɛtɛɛ.
Tondimisami ete batángi nyonso oyo bazalaka na limemya mpo na Biblia mpe balingaka koyeba mateya na yango bakokoba kosepela na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tozali na elikya ete zulunalo oyo ekosalisa bino bókokisa mposa na bino ya koyeba solo ya Biblia.
BABIMISI
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokóma kobima ndenge mibale. Sanza nyonso, nimero oyo ekozala na dati ya 1 ekokabolama epai ya bato nyonso. Nimero oyo ekozala na dati ya 15, ekozala na masolo oyo Batatoli ya Yehova bakobanda koyekola na makita; moto nyonso akoki koyangana na makita yango.