Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 nk. 27-30
  • Nazali na esengo atako bolenge na ngai ezalaki mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali na esengo atako bolenge na ngai ezalaki mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakómi na bomoi ezangi ntina
  • Yehova abikisi ngai
  • Nasalisi leki na ngai moko
  • Nazali kolonga makanisi ya mabe
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 nk. 27-30

Nazali na esengo atako bolenge na ngai ezalaki mpasi

Lisolo ya Eusebio Morcillo

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1993, nakendaki na bolɔkɔ moko oyo bakɛngɛlaka bato makasi. Nakendaki mpo na batisimo ya Mariví, leki na ngai ya mwasi oyo azalaki mokangami kuna. Bato mosusu ya bolɔkɔ mpe bakonzi ya bolɔkɔ bazalaki kotala ndenge nazalaki kobatisa ye. Liboso nalobela ndenge oyo ye ná ngai tokómaki kuna, nalobela naino bolenge na biso.

NABOTAMÁ na mokolo ya 5 Mai 1954, na Espagne; nazali mwana ya liboso na libota ya bana 8. Mariví azalaki mwana ya misato. Nkɔkɔ na biso ya mwasi azalaki komema biso na Lingomba ya Katolike, mpe ntango nazalaki na ye elongo, bomwana na ngai ezalaki malamu mpo namipesaki na makambo ya Nzambe. Kasi, makambo oyo baboti na ngai bazalaki kosala, ezalaki mabe na miso ya Nzambe. Mbala mingi, tata azalaki kobɛta mama mpe biso bana. Tozalaki kobangabanga, mpe nazalaki komitungisa mingi na komona ndenge mama azalaki konyokwama.

Na kelasi mpe nazalaki kokutana na makambo ya mpasi mingi. Sango moko oyo azalaki molakisi na biso, azalaki kotutisa mitó na biso na mur soki topesi eyano ya mabe na motuna moko oyo atuni. Sango mosusu azalaki kosangisa nzoto na bana-kelasi oyo bakei epai na ye mpo na kotalela badevuare na bango. Longola yango, mateya ya Katolike lokola mɔtɔ ya lifelo ezalaki kotungisa ngai mpe kobangisa ngai mingi. Nsukansuka, natikaki kolanda makambo ya Nzambe.

Nakómi na bomoi ezangi ntina

Lokola nazalaki lisusu na moto oyo akoki kosalisa ngai nalanda nzela ya Nzambe te, nakómaki kolekisa ntango mingi na banganda elongo na bato ya pite mpe ya mobulu. Mbala mingi, bitumba ezalaki kobima, mpe bazalaki kozokisana na bambeli mpe na milangi, mpe bazalaki kobambana bakiti. Atako nazalaki mpenza komikɔtisa te na bitumba yango, mokolo moko babɛtaki ngai mpe nabungisaki makanisi.

Nsukansuka, nakimaki banganda yango mpe nakómaki kokende na banganda oyo bato ya mobulu bazalaki mpenza te. Kasi, ata na banganda yango, bangi ezalaki mingi. Na esika bangi epesa ngai esengo mpe kimya, nakómaki nde komona bimonamona mpe nazalaki kotungisama mingi.

Atako makambo yango epesaki ngai esengo te, nabendaki leki na ngai ya mobali José Luis ná moninga na ngai Miguel na nzela yango. Lokola bilenge mingi ya Espagne na ntango wana, tokómaki na etamboli ya mbindo mpenza. Nazalaki kosala nyonso mpo nazwa mbongo ya kosomba bangi. Namisambwisaki mpenza.

Yehova abikisi ngai

Na eleko yango, elongo na baninga na ngai, tozalaki mbala mingi kolobela Nzambe mpe ntina ya bomoi. Nakómaki koluka moto oyo nakokaki koyebisa makambo oyo ezalaki na motema na ngai mpo asalisa ngai nayeba Nzambe. Namonaki ete Francisco, moninga na ngai moko ya mosala, akesanaki mpenza na bato mosusu. Nazalaki komona ete azalaki na esengo, azalaki sembo, mpe boboto; yango wana, nasepelaki koyebisa ye makambo oyo ezalaki kotungisa ngai. Francisco azalaki Motatoli ya Yehova, mpe apesaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo ezalaki na lisolo moko oyo elobelaki bangi.

Nsima ya kotánga lisolo yango, nabondelaki Nzambe asalisa ngai; nalobaki boye: “Nkolo, nayebi ete ozalaka, mpe nalingi koyeba yo mpe kosalela yo. Nasɛngi yo osalisa ngai!” Francisco ná Batatoli mosusu bakómaki kolendisa ngai na lisalisi ya Biblia mpe kopesa ngai mikanda mosusu ya makambo ya Nzambe mpo natángaka. Na nsima, namonaki ete Nzambe azalaki kosalela bango mpo na kosalisa ngai ndenge nasɛngaki na libondeli. Eumelaki te, nakómaki koyebisa baninga na ngai mpe leki na ngai José Luis makambo oyo nazalaki koyekola.

Mokolo moko, ntango toutaki kotala miziki na baninga na ngai, natikalaki mwa moke na nsima mpo na kotala bango. Ntango natalaki bango malamumalamu, namonaki ete bangi ebebisaki biso mpenza. Kaka na ngonga yango, nazwaki ekateli ya kotika bomoi yango mpe kokóma Motatoli ya Yehova.

Nayebisaki Francisco alukela ngai Biblia; ayelaki ngai Biblia ná buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Ntango natángaki ete Nzambe alaki kopangwisa mpisoli nyonso mpe kolongola liwa, namonaki mbala moko ete nazwi solo oyo ekoki kolongola moto na boombo. (Yoane 8:32; Emoniseli 21:4) Na nsima, nakendaki na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Ndenge oyo bayambaki ngai na esengo mpe lokola moninga, esimbaki mpenza motema na ngai.

Ntango nazongaki, nabengaki mbala moko José Luis mpe baninga na ngai mosusu mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo namonaki na Ndako ya Bokonzi. Mwa mikolo na nsima, biso nyonso tokendaki na makita. Elenge mwasi moko oyo afandaki liboso na biso atalaki biso. Tomonaki ete akamwaki na komona bato oyo bazalaki na nsuki milai, mpe asalaki makasi atala biso lisusu te. Na pɔsɔ oyo elandaki, na ntembe te akamwaki ntango amonaki biso lisusu na Ndako ya Bokonzi, na mbala oyo tolataki bakazaka ná bakravati.

Mwa moke na nsima, ngai ná Miguel tokendaki na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova. Tomonaki likambo moko oyo tomoná naino te​—bato nyonso, mikóló mpe bana basangani lokola bandeko. Likambo ya kokamwa, liyangani yango ezalaki na esika oyo tokendaká mpo na kotala miziki. Kasi, na mbala oyo, tozalaki elongo na bato ya kimya mpe miziki oyo ebɛtamaki ezalaki kokitisa motema.

Ngai ná baninga na ngai nyonso tokómaki koyekola Biblia. Sanza soki 8 na nsima, na mokolo ya 26 Yuli 1974, ngai ná Miguel tozwaki batisimo. Biso mibale tozalaki na mbula 20. Baninga na biso mosusu 4 bazwaki batisimo mwa basanza na nsima. Makambo oyo nayekolaki na Biblia etindaki ngai nakóma kosala misala ya ndako mpo na kosalisa mama na ngai oyo azalaki motema molai mpe koteya ye Biblia. Tokómaki baninga. Namipesaki mpe na kosalisa baleki na ngai.

Nsukansuka, mama mpe baleki na ngai nyonso, longolá kaka moko, bayekolaki Biblia mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Na 1977, nabalaki Soledad. Ye nde elenge mwasi oyo akamwaki ntango amonaki biso na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso. Mwa basanza na nsima, tokómaki babongisi-nzela, elingi koloba Batatoli ya Yehova oyo bamipesi mobimba na mosala ya kosakola nsango malamu.

Nasalisi leki na ngai moko

Ntango Mariví, leki na ngai ya nsuka, azalaki mwana moke, babebisaki ye mpe likambo yango ya nsɔni etikalá ye na makanisi. Na bolenge na ye, akómaki komɛla bangi, koyiba, mpe kosala kindumba. Ntango akómaki na mbula 23, akɔtaki bolɔkɔ, epai akobaki na makambo ya mabe.

Na ntango wana, nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga, ndeko oyo akendaka kolendisa masangá ya Batatoli ya Yehova. Na 1989, batindaki biso na teritware mosusu; bolɔkɔ oyo Mariví azalaki ezalaki na teritware yango. Bakonzi ya bolɔkɔ bautaki kobɔtɔla ye mwana na ye mpe likambo yango ezalaki kotungisa ye mingi; azalaki lisusu na mposa ya bomoi te. Mokolo moko, nakendaki kotala ye mpe nasɛngaki ye tóbanda koyekola Biblia, mpe andimaki. Nsima ya sanza moko, atikaki komɛla bangi mpe makaya. Nasepelaki mingi komona ete Yehova apesaki ye makasi ya kobongwana ndenge wana.​—Baebele 4:12.

Eumelaki te, Mariví akómaki koyebisa baninga na ye ya bolɔkɔ mpe bakonzi ya bolɔkɔ makambo oyo azalaki koyekola na Biblia. Atako bazalaki kotinda ye na babolɔkɔ ndenge na ndenge, atikaki kosakola te. Kutu, na bolɔkɔ moko, asakolaki na porte mokomoko. Mariví ayekolaki Biblia na bato mingi na babolɔkɔ oyo bazalaki kotinda ye.

Mokolo moko, Mariví ayebisaki ngai ete alingi komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Kasi, azalaki na ndingisa ya kobima libándá ya bolɔkɔ yango te, mpe moto moko te akokaki kokɔta na kati mpo na kobatisa ye. Akangaki lisusu motema na boumeli ya mbula 4 na esika yango ya mabe. Nini esalisaki ye abatela kondima na ye? Ntango makita ezali kosalema na lisangá, ye mpe na kati ya bolɔkɔ azalaki kotánga makambo oyo bazalaki koyekola. Azalaki na momeseno ya koyekola Biblia mpe kobondela mingi.

Na nsima, batindaki Mariví na bolɔkɔ moko oyo ezalaki na pisini. Amonaki ete yango ekopesa ye libaku ya kozwa batisimo. Esalamaki mpe bongo; nsukansuka bapesaki ye ndingisa ya kozwa batisimo. Ngai nde nakendaki kosala lisukulu ya batisimo na ye na kati ya bolɔkɔ. Nazalaki na ye elongo na mokolo oyo elekaki ntina na bomoi na ye.

Mariví azwaki maladi ya sida ntango azalaki na bomoi ya mobulu. Atako bongo, na sanza ya Marsi 1994, abimaki na bolɔkɔ; babimisaki ye noki mpo akómaki na etamboli ya malamu. Afandaki na mama mpe azalaki kaka kosalela Yehova tii liwa na ye mbula mibale na nsima.

Nazali kolonga makanisi ya mabe

Ngai mpe nanyokwamaki mpo na etamboli oyo nazalaki na yango kala. Ndenge oyo tata anyokolaki ngai na bomwana mpe etamboli mabe oyo nazalaki na yango na bolenge na ngai ebebisaki bomoto na ngai. Ata ntango nakolaki, mbala mingi nazalaki komiyoka lokola moto amemi ngambo mpe nazalaki komimona ete nazali na ntina te. Na bantango mosusu, nazalaki konyokwama mpenza na makanisi. Kasi, Liloba ya Nzambe esalisaki ngai mingi mpo na kolonga makanisi yango. Komanyola ntango nyonso na bavɛrsɛ lokola Yisaya 1:18 mpe Nzembo 103:8-13 esalisaki ngai natika mokemoke komiyoka lokola moto azali na nyongo.

Libondeli mpe esalisaki ngai mpo natika komiyoka ete nazali na ntina te. Mbala mingi nazalaki kobondela Yehova na mai na miso. Atako bongo, maloba oyo ezali na 1 Yoane 3:19, 20 elendisaki ngai mingi: “Na likambo oyo nde tokoyeba ete touti na solo, mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso na yango, mpamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.”

Lokola nabondelaka Yehova na motema “motutami mpe na mawa,” namonaka ete nazali te moto mabe mpenza ndenge nazalaki kokanisa. Biblia elobi na baoyo balukaka Yehova ete atyolaka te moto oyo azali mpenza na mawa mpo na etamboli ya mabe oyo ozalaki na yango mpe abongoli motema mpo na kosalela ye.​—Nzembo 51:17.

Mbala nyonso oyo makanisi ya mabe eyeli ngai, nasalaka makasi nakanisa makambo ya malamu, lokola oyo ezali na Bafilipi 4:8. Nakangá na motó maloba ya Nzembo 23 mpe Lisolo Likoló ya Ngomba. Ntango makanisi ya mabe eyeli ngai, nazongelaka bavɛrsɛ yango ngai moko. Kosala bongo esalisaka ngai mpenza, mingimingi soki mpɔngi ekatani ngai na butu.

Likambo mosusu oyo esalisaka ngai ezali maloba ya kolendisa ya mwasi na ngai mpe ya bandeko mosusu. Atako na ebandeli nazalaki kondima te maloba na bango ya kolendisa, Biblia esalisaki ngai namona ete bolingo “endimaka makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Mokemoke, nayekolaki kondima bolɛmbu na ngai.

Epai mosusu, etumba na ngai mpo na kolonga makanisi ya mabe esalisi ngai nazala nkulutu oyo ayebaka komitya na esika ya bandeko mosusu. Ngai ná mwasi na ngai tolekisi mbula soki 30 na kosala kaka mosala ya Nzambe. Esengo oyo nayokaka ntango nazali kosunga bandeko esalisaka ngai nalongola makanisi ya mabe mpo na makambo oyo nakutaná na yango.

Lelo oyo, soki nakanisi mapamboli nyonso oyo Yehova asopeli ngai, nayokaka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Sanzolá [Yehova] . . . Ye oyo akolimbisaka bokesene na yo nyonso, akobikisaka yo na maladi na yo nyonso. Ye oyo akosikola bomoi na yo epai na kufa, akozingelaka yo na boboto mpe bolingo.”​—Nzembo 103:1-4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi ebimisamaka lisusu te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]

Mbala mingi nazalaki komiyoka lokola moto amemi ngambo mpe komona ete nazali na ntina te. Kasi, Liloba ya Nzambe esalisaki ngai mingi mpo na kolonga makanisi yango

[Bililingi na lokasa 27]

Leki na ngai José Luis ná moninga na ngai Miguel balandaki etamboli na ngai ya mabe mpe oyo ya malamu

[Elilingi na lokasa 28]

Libota na biso mobimba na 1973

[Elilingi na lokasa 29]

Mariví ntango azalaki na bolɔkɔ

[Elilingi na lokasa 30]

Ngai ná mwasi na ngai Soledad

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto