Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/1 lok. 13
  • Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali na motema na yo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Oyo Bokonzi na Nzambe ekoki komemela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/1 lok. 13

Mituna ya batángi

Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto?

Lelo oyo bato mingi bakanisaka bongo. Na ndakisa, buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Bokonzi ya Nzambe elimboli . . . boyangeli ya Nzambe na kati ya mitema na biso.” Basango mpe bapastɛrɛ mingi bateyaka bongo. Biblia eteyaka mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali na kati ya mitema ya bato?

Bato mosusu balobaka ete Yesu ye moko nde ateyaki bongo. Yesu alobaki boye: “Talá! bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.” (Luka 17:21) Na Biblia mosusu maloba yango ebongolami boye: “Bokonzi bwa Nzámbe bozali o ntéi ya bínó.” Ezali bongo nde Yesu alobaki? Yesu alingaki mpenza koloba ete Bokonzi ya Nzambe ezali na kati ya mitema ya bato?

Liboso, tótalela naino soki motema ya moto elimboli nini. Na Biblia, motema ya elilingi elimboli bomoto ya kati, esika oyo makanisi, elimo, mpe mayoki ya moto efandi. Likanisi ete eloko ya malamu mingi lokola Bokonzi ya Nzambe efanda na motema ya moto, mpo ebongola ye, ekómisa ye moto malamu, ekoki kosepelisa; kasi, ekoki mpenza kosalema?

Biblia elobi boye: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Yesu ye moko mpe alobaki boye: “Longwa na motema ya bato nde makanisi ya mabe ebimaka: bapite, koyiba, koboma bato, bikobo, kolula biloko ya bato, misala ya motema mabe.” (Malako 7:20-22) Tokanisi boni? Makambo ya mabe oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili eutaka libosoliboso na mitema ya bato, boye te? Na bongo, ndenge nini Bokonzi ya Nzambe, eloko oyo ezangi mbeba ekoki kofanda na motema? Ya solo, Bokonzi ya Nzambe ekoki kouta na motema ya moto te, se ndenge nsende ekoki te kobimisa bambuma ya figi.​—Matai 7:16.

Ya mibale, tótalela soki Yesu alobaki na banani maloba oyo ezali na Luka 17:21. Vɛrsɛ oyo ezali liboso elobi boye: “Ntango Bafalisai batunaki ye soki bokonzi ya Nzambe esengelaki koya ntango nini, ayanolaki bango.” (Luka 17:20) Bafalisai bazalaki banguna ya Yesu. Yesu alobaki ete bato yango oyo bazalaki bakosi, bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (Matai 23:13) Tókanisa naino: Soki bafalisai basengelaki te kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, ndenge nini Bokonzi yango ekokaki kozala na mitema na bango? Ekokaki kosalema te! Na yango, Yesu alingaki koloba nini na maloba yango?

Na Biblia mosusu, basaleli maloba oyo ekokani na oyo esalelami na Libongoli ya Mokili ya Sika. Na ndakisa, na Babiblia mosusu balobi ete Bokonzi ya Nzambe ezali “na kati na bino” to “na katikati na bino.” Na ntango wana, ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ezalaki na katikati ya bato ata mpe na katikati ya Bafalisai? Yesu, Mokonzi oyo Yehova Nzambe aponaki, azalaki na katikati na bango. Ateyaki bato makambo na ntina na Bokonzi ya Nzambe, asalaki kutu makamwisi mpo na komonisa bango makambo oyo Bokonzi yango ekosala. Ezali na ndenge yango nde Bokonzi ya Nzambe ezalaki na katikati na bango.

Tomoni ete Biblia eteyi te ete Bokonzi ya Nzambe ezalaka na motema ya moto. Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza guvɛrnema oyo ekobongola makambo awa na mabelé, ndenge basakoli balobaki yango.​—Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto