Baoyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi’ bazali kondima solo
“Baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.”—Mis. 13:48.
1, 2. Ndenge nini Baklisto ya liboso bakokisaki likambo oyo Yesu asakolaki ete nsango malamu ekosakolama na mabelé mobimba?
MOKANDA ya Misala ezali komonisa ndenge baklisto ya liboso bakokisaki likambo oyo Yesu asakolaki ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama na mabelé mobimba. (Mat. 24:14) Basakoli ya molende bafungolaki nzela mpo na bato nyonso oyo basengelaki kolanda bango. Lokola bayekoli ya Yesu basakolaki na molende na Yelusaleme, bankóto ya bato, ná ‘ebele ya banganga-nzambe,’ basopanaki na lisangá ya ekeke ya liboso.—Mis. 2:41; 4:4; 6:7.
2 Bamisionɛrɛ ya liboso basalisaki bato ebele bákóma baklisto. Na ndakisa, Filipo akendeki na Samalia epai bato ebele bandimaki nsango malamu. (Mis. 8:5-8) Paulo asalaki mibembo ya milaimilai elongo na baklisto ndenge na ndenge, mpo na kosakola nsango malamu na Sipele, na bamboka ya Asie Mineure, na Masedonia, na Grèce mpe na Italie. Ebele ya Bayuda mpe Bagrɛki bakómaki baklisto na bingumba oyo asakolaki. (Mis. 14:1; 16:5; 17:4) Tito asakolaki na Krɛti. (Tito 1:5) Petelo asakolaki na Babilone, mpe na ntango oyo akomaki mokanda na ye ya liboso, soki na mobu 62 tii 64 ya ntango na biso (T.B.), nsango malamu eyebanaki malamu mpenza na Ponti, na Galatia, na Kapadosi, na Azia mpe na Bitinia. (1 Pet. 1:1; 5:13) Ezalaki mpenza ntango ya esengo! Molende ya baklisto ya ekeke ya liboso etindaki banguna na bango báloba ete: “Bato oyo basili kobalola mabelé oyo efandami.”—Mis. 17:6; 28:22.
3. Matomba nini mosala ya basakoli ya Bokonzi ezali kobimisa lelo oyo, mpe oyokaka ndenge nini ntango ozali komona yango?
3 Lelo oyo mpe, lisangá ekoli mingi. Ntango otángaka lapolo ya mobu ya Batatoli ya Yehova mpe omonaka matomba oyo mosala na bango ezali kobimisa, elendisaka yo te? Osepelaki te koyeba ete basakoli ya Bokonzi bayekolaki Biblia na bato koleka milio motoba na mobu ya mosala 2007? Longola yango, na Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto na mbula eleki, bato soki milio zomi oyo bazali Batatoli ya Yehova te bayanganaki na molulu wana ya ntina mingi; yango emonisi ete basepelaki na nsango malamu. Yango emonisi ete mosala ezali naino mingi.
4. Banani bazali kondima nsango ya Bokonzi?
4 Lelo oyo, ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, “baoyo nyonso [ bazali] na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” bazali kondima solo. (Mis. 13:48) Yehova azali kobenda bato ya lolenge wana na ebongiseli na ye. (Tángá Hagai 2:7.) Mpo na kopesa mpenza mabɔkɔ na mosala wana ya koyanganisa bato, ndenge nini tosengeli kotalela mosala ya kosakola?
Sakolá kozanga kopona bilongi
5. Yehova andimaka bato ya ndenge nini?
5 Baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki ete “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Mis. 10:34, 35) Mpo moto azala na boyokani ná Yehova, asengeli kondima mbeka ya lisiko ya Yesu. (Yoa. 3:16, 36) Lisusu, mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Tim. 2:3, 4.
6. Basakoli ya Bokonzi basengeli kokeba na likambo nini, mpe mpo na nini?
6 Ekozala malamu te basakoli ya nsango malamu báboya kosakwela bato mosusu mpo na mposo na bango, mpo bazali bato minene to bato mpamba, mpo na ndenge bazali komonana, mpo na lingomba na bango to mpo na makambo mosusu. Kanisá naino moke: Ozalaka na botɔndi te ndenge moto oyo ateyaki yo Biblia akaniselaki yo mabe te? Na yango, tosengeli te koboya kosakola nsango ya bomoi epai ya bato oyo bakoki kosepela na yango.—Tángá Matai 7:12.
7. Mpo na nini tosengeli te kosambisa baoyo tozali kosakwela nsango malamu?
7 Yehova atyá Yesu Mosambisi, yango wana biso tosengeli kosambisa moto te. Yango ebongi mpenza, mpo biso tokoki kosambisa moto kaka na “[ kolanda] oyo emonani na miso na [biso]” to “oyo eyokani na matoi na [ biso].” Nzokande, Yesu akoki koyeba ata makanisi oyo ezali na kati ya motema ya moto.—Yis. 11:1-5; 2 Tim. 4:1.
8, 9. (a) Saulo azalaki moto ya ndenge nini liboso akóma moklisto? (b) Bomoi ya Paulo esengeli koteya biso nini?
8 Bato ya lolenge nyonso bakómá basaleli ya Yehova. Saulo, moto ya Talasi oyo akómaki ntoma Paulo, azali mpenza ndakisa na likambo yango. Saulo, oyo azalaki Mofalisai, azalaki kotɛmɛla baklisto makasi. Lokola azalaki mpenza kokanisa ete baklisto bazali basambeli ya solo te ya Yehova, azalaki konyokola bango. (Gal. 1:13) Na makanisi ya bato, nani akokaki kondima ete Paulo akoki kokóma moklisto? Nzokande, Yesu amonaki likambo moko ya malamu na motema ya Saulo mpe aponaki ye mpe apesaki ye mokumba moko ya ntina mingi. Na yango, Saulo akómaki moklisto moko ya mpiko mpe ya molende mpenza na lisangá ya ekeke ya liboso.
9 Bomoi ya Paulo eteyi biso nini? Ntango mosusu, na teritware na biso ezali na bato oyo balingaka koyoka nsango na biso ata moke te. Ata soki tokanisi ete ata moko na bango te akoki kokóma moklisto, tosengeli kolɛmba te kokanisa na bango na lisalisi ya Biblia. Ntango mosusu, ata bato oyo tokanisaki ete bakoki kosepela na solo te bandimaki yango. Mokumba na biso ezali ya kosakwela bato nyonso “kozanga kotika.”—Tángá Misala 5:42.
Baoyo bazali kosakola “kozanga kotika” bakozwa mapamboli
10. Mpo na nini tosengeli te kobanga kosakola nsango malamu epai ya bato ya matata? Pesá ndakisa ya bato ya matata oyo babongwaná na mboka na bino.
10 Miso ekoki kokosa biso. Na ndakisa, Ignacioa abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova ntango azalaki na bolɔkɔ na mboka moko ya Amerika ya Sudi. Bato bazalaki kobanga ye mpo azalaki matata. Yango wana, baninga na ye ya bolɔkɔ oyo bazalaki kosala biloko mpe kotɛkela bato ya bolɔkɔ, bazalaki kotinda Ignacio asɛngela bango nyongo na bango epai ya baoyo bazalaki kofuta noki te. Kasi, lokola abandaki kokola na elimo mpe kosalela makambo oyo azalaki koyekola, Ignacio, mobali wana ya matata, akómaki moto ya boboto. Lelo oyo, moto moko atindaka ye lisusu te asɛngela ye nyongo. Ignacio azali na esengo mpo solo ya Biblia mpe elimo santu ya Nzambe ebongoli bomoto na ye. Azali mpe na botɔndi mpo na basakoli oyo babangaki te koyekola na moto lokola ye.
11. Mpo na nini tozongelaka bato?
11 Moko ya bantina oyo tokobaka kozongela bato oyo tosakwelaki nsango malamu ezali ete bomoi mpe makanisi na bango ekoki kobongwana, mpe ebongwanaka. Ekoki kozala ete nsima na biso babɛlaki makasi, balongolaki bango na mosala to bakufelaki moto. (Tángá Mosakoli 9:11.) Makambo oyo ezali kosalema na mokili ekoki kotinda bato bákóma komitungisa mingi mpo na bomoi na bango. Makambo yango ekoki kosala ete moto oyo azalaki liboso kosepela na solo te to azalaki motɛmɛli, akóma kosepela na yango. Yango wana, tosengeli te koboya kosakwela bato mosusu nsango malamu ntango nyonso oyo tozwi libaku ya kosala yango.
12. Ndenge nini tosengeli kotalelaka bato oyo tozali kosakwela nsango malamu, mpe mpo na nini?
12 Bato bazalaka na momeseno ya kotalela bato libosoliboso lokola bato ya mboka, ya ekólo, ya monɔkɔ to ya etuluku boye to boye. Kasi, Yehova atalaka nde moto ye moko ndenge azali. Amonaka motema ya moto mokomoko. (Tángá 1 Samwele 16:7.) Biso mpe tosengeli kosalaka bongo na mosala ya kosakola. Bandakisa mingi emonisi litomba ya kotalelaka bato nyonso oyo tozali kosakwela nsango malamu na ndenge ebongi.
13, 14. (a) Mpo na nini mobongisi-nzela moko akaniselaki mwasi moko oyo akutanaki na ye na mosala ya kosakola mabe? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
13 Sandra, mobongisi-nzela moko ya mwasi, azalaki kosakola ndako na ndako na esanga moko ya Caraïbes mpe akutanaki na Ruth, oyo amipesaki mpenza na masano (carnaval). Mbala mibale mobimba, Ruth abimaki elombe ya masano yango. Lokola asepelaki mingi na makambo oyo Sandra azalaki koyebisa ye, andimaki koyekola Biblia. Sandra alobi boye: “Ntango nakɔtaki na ndako na ye, namonaki fɔtɔ na ye moko ya monene, alati bilamba ya masano mpe namonaki bankɛni oyo azwaki na masano yango. Nakanisaki ete moto oyo ayebani mpe amipesi mingi na masano boye akoki mpenza kokangama na solo te. Na yango, natikaki kokende kotala ye.”
14 Nsima ya mwa ntango, Ruth ayaki na Ndako ya Bokonzi mpe ntango makita esilaki, atunaki Sandra ete: “Mpo na nini oyaka lisusu koyekola na ngai te?” Sandra asɛngaki bolimbisi mpe bayokanaki mpo na kobanda lisusu koyekola. Ruth akolaki nokinoki na elimo, alongolaki bafɔtɔ na ye ya masano, abandaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola, mpe amipesaki epai ya Yehova. Na yango, Sandra ayaki komona ete akaniselaki Ruth mabe mpamba.
15, 16. (a) Litomba nini Motatoli moko azwaki ntango apesaki sɛmɛki na ye litatoli? (b) Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kopesa ndeko na biso litatoli ata soki azali na etamboli ya ndenge nini?
15 Batatoli mingi oyo basakwelaki bandeko na bango oyo bazali Batatoli te nsango malamu, ata soki emonanaki ete bakosepela na nsango yango te, bazwaki matomba ya malamu mpenza. Tózwa ndakisa ya Joyce, ndeko moko ya mwasi na États-Unis. Sɛmɛki na ye ya mobali akɔtaki bolɔkɔ mbala na mbala banda bomwana na ye. Joyce alobi boye: “Bato bazalaki koloba ete azali na ntina te, mpo amipesaki na bangi, na moyibi mpe asalaki makambo mosusu mingi ya mabe. Atako bongo, nakobaki koteya ye Biblia na boumeli ya mbula 37.” Milende oyo asalaki mpo na kosalisa sɛmɛki na ye efutaki mpenza, mpo nsukansuka abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova mpe asalaki mbongwana monene na bomoi na ye. Eleki mwa mikolo, sɛmɛki ya Joyce azwaki batisimo na liyangani moko ya etúká na Californie, na États-Unis. Joyce alobi boye: “Nalelaki na esengo. Nazali na esengo monene mpo nalɛmbaki ye te!”
16 Ekoki kozala ete obangaka koyebisa bato mosusu ya libota na yo nsango ya Biblia mpo bazali na etamboli ya mabe. Nzokande, Joyce atikaki te ete kobanga epekisa ye apesa sɛmɛki na ye litatoli. Ndenge nini tokoki koyeba oyo ezali na motema ya moto mosusu? Ekoki kozala ete moto yango azali koluka na motema moko koyeba solo. Na yango, tosengeli te kopimela ye libaku yango.—Tángá Masese 3:27.
Esaleli ya malamu mpenza mpo na koyekola Biblia
17, 18. (a) Balapolo oyo ezali kouta epai ya bandeko ya mokili mobimba emonisi nini mpo na buku Biblia eteyaka mpenza nini? (b) Matomba nini ozwá na buku yango?
17 Balapolo oyo ezali kouta epai ya bandeko ya mokili mobimba emonisi ete buku Biblia eteyaka mpenza nini?, oyo ebongisami mpo na koyekola Biblia, ezali mpenza kosimba mitema ya bato. Penni, mobongisi-nzela moko ya mwasi na États-Unis, abandaki koyekola na bato ebele Biblia na lisalisi ya buku yango. Mibale bazalaki mibange mpe bazalaki bandimi ya molende na mangomba na bango. Penni andimaki te ete solo ya Biblia oyo elimbolami na buku Biblia eteyaka ekoki kosimba mitema na bango. Ndeko yango akomi ete atako bongo, “lokola buku yango ezali kolimbola Biblia na ndenge ya polele, ya pɛtɛɛ mpe ezali mindɔndɔmindɔndɔ te, bazalaki na mokakatano te ya kondima makambo oyo bazalaki koyekola, kozanga kotya ntembe to kosilika.”
18 Pat, mosakoli moko ya Angleterre, abandaki koyekola Biblia na mwasi moko oyo autaki na ekólo moko ya Azia. Mwasi yango akimaki ekólo na ye mpo basoda oyo batombokelaki guvɛrnema bakangaki mobali na ye ná bana na bango mpe bakendaki na bango, mpe bamonanaki lisusu te. Bomoi na ye ekómaki na likama, batumbaki ndako na ye mpe mibali ebele bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na mbala moko. Nyonso wana etindaki ye akóma komona ete bomoi na ye ezali na ntina te, mpe mbala mingi alukaki komiboma. Kasi, boyekoli ya Biblia epesaki ye elikya. Pat akomi boye: “Bandimbola mpe bandakisa ya polele oyo ezali na buku Biblia eteyaka esimbaki mpenza motema na ye.” Mwasi yango akolaki nokinoki na elimo, akómaki mosakoli, mpe azalaki na mokano ya kozwa batisimo na liyangani oyo esengelaki kolanda. Oyo nde esengo ya kosalisa bato ya mitema sembo báyeba mpe básepela na elikya oyo Makomami ezali kopesa!
“Tótika te kosala oyo ezali malamu”
19. Mpo na nini tosengeli kosakola na lombangu?
19 Ntango mikolo ezali koleka, ezali komonana ete tosengeli kosala na lombangu mpo na kokokisa mokumba na biso ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Mbula na mbula, ebele ya bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi bazali kondima nsango malamu. Nzokande, lokola “mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi,” baoyo bazali naino na kati ya molili ya elimo bazali “koleka na nzela ya kobomama.”—Sef. 1:14; Mas. 24:11.
20. Ekateli nini mokomoko na biso asengeli kozwa?
20 Tokoki naino kosalisa bato ya ndenge wana. Kasi, mpo na kosala yango, tosengeli kolanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso oyo, “kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” (Mis. 5:42) Tokolanda ndakisa na bango soki tozali kokoba kosakola atako bazali kotɛmɛla biso, soki tozali kobongisa “mayele na biso ya koteya” mpe soki tozali kosakola kozanga kopona bilongi! “Tótika te kosala oyo ezali malamu,” mpamba te soki tokobi kaka, Nzambe akosopela biso ebele ya mapamboli.—2 Tim. 4:2; tángá Bagalatia 6:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
Okopesa eyano nini?
• Banani bazali kondima nsango malamu?
• Mpo na nini tosengeli te kozwela bato oyo tozali kosakwela nsango malamu makanisi mabe?
• Buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali kobimisa matomba nini?
[Bililingi na lokasa 13]
Ebele ya bato ya mitema sembo bazali kondima nsango malamu
[Bililingi na lokasa 15]
Kobongwana ya ntoma Paulo ekoki koteya biso nini?
[Elilingi na lokasa 16]
Basakoli ya nsango malamu bakaniselaka bato mabe te