Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/7 nk. 8-9
  • Liboso mpe nsima​—Azwaki makasi ya kobongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liboso mpe nsima​—Azwaki makasi ya kobongwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basi mibale oyo bakufelá mibali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baoyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi’ bazali kondima solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Okoki kolonga mawa ya kozanga molongani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • ‘Mposa nyonso ya motema na ngai’ ekokisamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/7 nk. 8-9

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe Ye akopusana penepene na bino”

Liboso mpe nsima​—Azwaki makasi ya kobongwana

SANDRA, mwasi moko ya Mexico, azalaki koloba ete na libota na bango ye nde “makila ya libata.” Ntango azalaki elenge, bandeko na ye bazalaki kolinga ye te, yango wana akolaki mawamawa. Alobi boye: “Na bolenge na ngai mobimba nazalaki na mposa ya bomoi te mpe nazalaki komitungisa mingi mpo na bomoi na ngai mpe komituna soki ntina ya bomoi ezali nini.”

Ntango Sandra akómaki na eteyelo ya ntei, akómaki komɛla masanga ya tata na ye na ndako. Na nsima, akómaki kosomba masanga na ye moko mpe akómaki mpenza moombo na yango. Ye moko alobi boye: “Nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te.” Lokola Sandra abungisaki elikya nyonso, akómaki komɛla bangi. Alobi boye: “Na sakosi na ngai nazalaki kozanga molangi ya masanga te, to nkisi oyo epesaka kwiti, to mpe mwa liboke ya marijuana mpo nalongolaka susi.”

Ntango Sandra asilisaki kelasi ya monganga, amipesaki lisusu koleka na masanga. Alukaki kutu komiboma. Kasi akufaki te.

Mpo na koluka lisalisi ya elimo, Sandra akɔtaki na mangomba ndenge na ndenge. Lokola azalaki lisusu na elikya te, azalaki mbala na mbala kobelela Nzambe ete: “Ozali wapi? Mpo na nini otiki ngai boye?” Na ntango akómaki mpenza na nsuka, Motatoli ya Yehova moko azwaki libaku ya kosolola na ye. Na nsima bakómaki koyekola Biblia. Motema ya Sandra esimbamaki mpenza ntango ayokaki ete “Yehova azali penepene na baoyo bazali na mpota na motema.”​—Nzembo 34:18, NW.

Ndeko oyo azalaki koyekola Biblia na Sandra asalisaki ye akanga ntina ete Yehova Nzambe ayebi ete tozali bato ya bolɛmbu mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo Adama atikelá biso. Sandra amonaki ete Nzambe ayebaka ete tokolonga te kosala makambo nyonso oyo azali kosɛnga biso na ndenge ya kokoka. (Nzembo 51:5; Baloma 3:23; 5:12, 18) Ayokaki esengo mingi ntango ayebaki ete Yehova alandelaka mabunga na biso te, mpe asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokokoka te. Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Soki olandelaka mabunga, ee Yah, ee Yehova, nani akokaki kotɛlɛma?”​—Nzembo 130:3, NW.

Liteya moko monene ya Biblia oyo esepelisaki motema ya Sandra ezali liteya ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso. Na lisalisi ya mbeka yango, Yehova akoki koyokela bato ya botosi mawa mpe kobenga bango bato ya sembo atako bazali bato ya kozanga kokoka. (1 Yoane 2:2; 4:9, 10) Ya solo, ‘mabunga na biso ekoki kolimbisama’ mpe yango ekoki kosalisa biso tótika komimona ete tozali na ntina te.​—Baefese 1:7.

Ndakisa ya ntoma Paulo eteyaki Sandra mingi. Paulo azalaki na botɔndi mingi mpo na boboto oyo Nzambe amonisaki epai na ye ndenge alimbisaki mabunga na ye mpe asungaki ye na etumba monene oyo azalaki kobunda mpo na kolonga mabunga oyo azalaki kozongela mbala na mbala. (Baloma 7:15-25; 1 Bakolinti 15:9, 10) Paulo abongwanaki, ‘azalaki kobɛtabɛta nzoto na ye makofi mpe kokómisa yango lokola moombo’ mpo na kosala ntango nyonso makambo oyo Nzambe andimaka. (1 Bakolinti 9:27) Aboyaki kotikala moombo ya bamposa ya masumu.

Sandra atungisamaki mingi mpo na bolɛmbu na ye, kasi azalaki ntango nyonso kobunda mpo na kolonga yango. Abondelaki Yehova na molende mpo asalisa ye alonga bolɛmbu yango mpe asɛngaki ye ayokela ye mawa. (Nzembo 55:22; Yakobo 4:8) Ntango Sandra amonaki ete Nzambe azalaki mpenza komibanzabanza mpo na ye, azwaki makasi ya kobongwana. Alobi boye: “Nazali na esengo ya koteya bato mosusu Biblia lokola mosakoli ya ntango nyonso.” Sandra azwaki libaku malamu ya kosalisa yaya na ye ya mwasi ná leki na ye ya mwasi báyeba Yehova. Sikoyo, azali ‘kosala oyo ezali malamu,’ mpe lokola azali monganga, amipesaka mpo na kosalisa bandeko na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova.​—Bagalatia 6:10.

Sandra azali kaka moombo ya biloko mabe oyo azalaki komɛla? Alobi na esengo ete: “Bɔɔngɔ na ngai ezali malamu. Namɛlaka lisusu masanga te, likaya te, bangi mpe te. Nazali lisusu na mposa ya biloko yango te. Nasí nazwi oyo nazalaki koluka.”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

“Nasí nazwi oyo nazalaki koluka”

[Etanda na lokasa 9]

Mitinda ya Biblia ezali kobongola bato

Talá mwa mitinda ya Biblia oyo esalisaki bato mingi bálongwa na boombo ya biloko oyo ebebisaka nzoto:

“Tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tókokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe.” (2 Bakolinti 7:1) Nzambe apambolaka bato oyo bamipɛtoli mpe baboyi mimeseno oyo ekómisaka mbindo.

“Kobanga Yehova elimboli koyina mabe.” (Masese 8:13, NW) Kobanga Nzambe esalisaka moto atika mimeseno ya mabe, na ndakisa komɛla bangi. Moto oyo atiki makambo wana akosepelisa Yehova mpe bamaladi mosusu ya mabe ekozwa ye te.

‘Bómikitisa mpe bótosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli.’ (Tito 3:1) Na bisika mingi, mibeko epekisi kozala na bangi to komɛla yango. Baklisto ya solo basimbaka bangi te, bamɛlaka mpe yango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto