Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/2 nk. 8-9
  • Bomoi ebombeli biso nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ebombeli biso nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Biblia elobaka
  • Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mabelé mabongwani Paradis
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Bomoi na paladiso ya sika
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/2 nk. 8-9

Bomoi ebombeli biso nini?

MPO NA NINI EYANO NA MOTUNA YANGO EZALI NA NTINA? Makambo oyo moto azali kosala lelo, emonisaka ndenge atalelaka mikolo ezali koya. Na ndakisa, baoyo bazali mpenza na elikya te mpo na mikolo ezali koya bakoki koloba boye: “Tiká tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:32) Kokanisa bongo ekoki komemela moto kimya ya solosolo te, kasi ekotinda ye nde akóma kolekisa ndelo na kolya na komɛla mpe akóma komitungisa.

Soki bomoi na biso ezalaki na mabɔkɔ ya moto, tolingaki kozala na elikya te. Mopɛpɛ, mai mpe mabelé ezali kobebisama na ndenge oyo esalemá naino te. Nsɔmɔ ya etumba ya nikleere mpe ya bateroriste ezali se kobakisama. Maladi mpe bobola ezali konyokola bamiliare ya bato na mokili mobimba. Atako bongo, elikya ezali.

Bato bakoki te koloba na bosikisiki makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya, nzokande Yehova Nzambe alobi ete azali ye “oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalami naino te.” (Yisaya 46:10) Yehova alobi nini mpo na bomoi na biso ya lobi?

Oyo Biblia elobaka

Yehova akotika te ete mabelé to bomoi awa na mabelé ebebisama mpo na libela. Kutu, Biblia elaki ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ (Emoniseli 11:18) Na nzela ya Bokonzi to guvɛrnema na ye ya likoló, Yehova akolongola mabe nyonso na mabelé mpe akozongisa bomoi ndenge alingaki ezala na ebandeli. (Genese 1:26-31; 2:8, 9; Matai 6:9, 10) Bavɛrsɛ oyo elandi ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo ekosalema mosika te, oyo ekobongola bomoi ya moto nyonso awa na mabelé.

Nzembo 46:8, 9. “Yaká kotala misala ya [Yehova] oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga; akozikisa mpe makalo kati na mɔtɔ.”

Yisaya 35:5, 6. “Bongo miso ya bakufeli miso makofungolama, mpe matoi ya bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo. Zambi mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokaoki.”

Yisaya 65:21, 22. “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya.”

Danyele 2:44. “Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”

Yoane 5:28, 29. “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo ya [Yesu] mpe bakobima.”

Emoniseli 21:3, 4. “Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”

Ndenge oyo biyano ya Biblia epesaka kimya ya solosolo

Moto mosusu akoki kokanisa ete makambo oyo tolobeli awa ezali kaka ndɔtɔ ya mpamba. Nzokande, Nzambe nde apesi bilaka yango, kasi bato te. Mpe Yehova Nzambe “akoki te kobuka lokuta.”​—Tito 1:2.

Soki ozali kondima ete bilaka ya Nzambe ekokokisama mpe ozali kotosa mibeko na ye, okozala na kimya ya solosolo ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini. Ezali na eloko moko te, ezala bitumba, bobola, maladi, ata mpe mitungisi ya bobange to koyeba ete okokufa, oyo ekoki kolongola kimya na yo libela. Mpo na nini? Mpo oyebi ete Bokonzi ya Nzambe ekolongola bampasi wana nyonso.

Nini ekoki kosalisa yo okóma na elikya ya ndenge wana? Osengeli ‘kokómisa makanisi na yo sika’ mpe komindimisa yo moko “nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Na ntembe te ekosɛnga oyeba makambo mosusu oyo ekosalisa yo ondima ete bilaka ya Biblia ekokokisama. Soki osali bongo, milende na yo ekokende na mai te. Ezali na makambo mingi te oyo osalaka oyo ekomemela yo kimya ya solosolo.

[Bililingi na lokasa 8, 9]

Liloba ya Nzambe epesi elikya nini mpo na mikolo ezali koya?

Yisaya 35:5

Yisaya 35:6

Yoane 5:28, 29

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto